Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.7
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
33
LIN
BSB
A
a
Genesis 33
33
Genesis
Isaac and Jacob
Lingala Bible
Esau
, person
Jacob
, person
Rachel
, person
Leah
, person
Joseph
, person
Seir
, place
Canaan
, place
Shechem
, place
4 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tango Jakobi atombolaki miso na ye, amonaki na mosika Ezawu koya elongo na bato nkama minei. Boye Jakobi akabolaki bana na ye : ndambo epai ya Lea, ndambo epai ya Rasheli mpe ndambo mosusu epai ya basali mibale ya basi.
BSB
BSB:
Now Jacob looked up and saw Esau coming toward him with four hundred men. So he divided the children among Leah, Rachel, and the two maidservants.
2
LIN
Atiaki basali ya basi elongo na bana na bango na liboso ; Lea mpe bana na ye na sima ; mpe Rasheli na Jozefi na suka.
BSB
BSB:
He put the maidservants and their children in front, Leah and her children next, and Rachel and Joseph at the rear.
3
LIN
Ye moko alekaki liboso na bango mpe afukamaki na mabele mbala sambo wana azalaki kopusana liboso ya ndeko na ye ya mobali.
BSB
BSB:
But Jacob himself went on ahead and bowed to the ground seven times as he approached his brother.
4
LIN
Ezawu akimaki mbangu mpo na kokutana na ye ; ayambaki ye, amibwakaki na nzoto na ye mpo na koyamba ye mpe apesaki ye beze ; bongo bakomaki kolela.
BSB
BSB:
Esau, however, ran to him and embraced him, threw his arms around his neck, and kissed him. And they both wept.
5
LIN
Tango atombolaki miso na ye, amonaki na mosika basi mpe bana. Atunaki : — Banani wana bazali elongo na yo ? Jakobi azongisaki : — Ezali bana oyo Nzambe apesi, na bolingo na Ye, epai ya mosali na yo.
BSB
BSB:
When Esau looked up and saw the women and children, he asked, “Who are these with you?” Jacob answered, “These are the children God has graciously given your servant.”
6
LIN
Boye, basali ya basi elongo na bana na bango bapusanaki mpe bafukamaki.
BSB
BSB:
Then the maidservants and their children approached and bowed down.
7
LIN
Na sima, Lea elongo na bana na ye bayaki kofukama. Bongo na suka, Jozefi elongo na Rasheli bayaki mpe kofukama.
BSB
BSB:
Leah and her children also approached and bowed down, and then Joseph and Rachel approached and bowed down.
8
LIN
Ezawu atunaki : — Ngulupa nyonso oyo nakutani na yango, tina na yango nini ? Jakobi azongisaki : — Ezali mpo ete nazwa ngolu na miso na yo, nkolo na ngai.
BSB
BSB:
“What do you mean by sending this whole company to meet me?” asked Esau. “To find favor in your sight, my lord,” Jacob answered.
9
LIN
Kasi Ezawu azongisaki : — Ndeko na ngai, biloko nyonso oyo, nazali na yango ebele ; bomba biloko na yo mpo na yo moko.
BSB
BSB:
“I already have plenty, my brother,” Esau replied. “Keep what belongs to you.”
10
LIN
Jakobi alobaki : — Nabondeli yo : soki nazwi ngolu na miso na yo, ndima kozwa biloko oyo lokola kado kowuta na maboko na ngai ; pamba te ndenge namoni yo, ezali lokola namoni Nzambe, mpo ete oyambi ngai na boboto.
BSB
BSB:
But Jacob insisted, “No, please! If I have found favor in your sight, then receive this gift from my hand. For indeed, I have seen your face, and it is like seeing the face of God, since you have received me favorably.
11
LIN
Nabondeli yo penza, ndima makabo oyo namemeli yo ; pamba te Nzambe nde apesaki ngai yango na ngolu na Ye mpe nazali na nyonso. Lokola Jakobi azalaki kaka kotia molende, Ezawu andimaki kozwa yango.
BSB
BSB:
Please accept my gift that was brought to you, because God has been gracious to me and I have all I need.” So Jacob pressed him until he accepted.
12
LIN
Ezawu alobaki : — Telema tokende, nakotambola na yo nzela moko.
BSB
BSB:
Then Esau said, “Let us be on our way, and I will go ahead of you.”
13
LIN
Kasi Jakobi azongiselaki ye : — Oh nkolo na ngai ! Oyebi malamu ete bana bazwi nanu makasi te, mpe nazali lisusu na bameme, bangombe mpe bantaba ya basi oyo ezali nanu komelisa mabele. Soki tomeki kotambolisa yango mbangu makasi kaka na mokolo moko, bibwele nyonso ekokufa.
BSB
BSB:
But Jacob replied, “My lord knows that the children are frail, and I must care for sheep and cattle that are nursing their young. If they are driven hard for even a day, all the animals will die.
14
LIN
Boye, tika ete nkolo na ngai akende liboso, wana ngai nakotambola malembe-malembe na sima, kolanda etamboli ya bibwele oyo ezali liboso na ngai, mpe kolanda etamboli ya bana, kino nakokoma epai ya nkolo na ngai, na Seiri.
BSB
BSB:
Please let my lord go ahead of his servant. I will continue on slowly, at a comfortable pace for the livestock and children, until I come to my lord at Seir.”
15
LIN
Ezawu alobaki : — Nabondeli yo, ndima ete natikela yo ndambo ya bato na ngai. Kasi Jakobi atunaki : — Mpo na nini kosala bongo ? Tika ete nazwa kaka ngolu na miso ya nkolo na ngai !
BSB
BSB:
“Let me leave some of my people with you,” Esau said. But Jacob replied, “Why do that? Let me find favor in the sight of my lord.”
16
LIN
Boye, kaka na mokolo wana, Ezawu azwaki nzela mpe azongaki na Seiri.
BSB
BSB:
So that day Esau started on his way back to Seir,
17
LIN
Nzokande, Jakobi akendeki na Sukoti. Atongaki kuna ndako mpo na ye moko mpe mpo na bibwele na ye ; yango wana babengi esika yango Sukoti.
BSB
BSB:
but Jacob went on to Succoth, where he built a house for himself and shelters for his livestock; that is why the place was called Succoth.
18
LIN
Longwa na mokili ya Padani-Arami, Jakobi akomaki na kimia na engumba Sishemi oyo ezali na mokili ya Kanana ; mpe atelemisaki ndako na ye ya kapo liboso ya engumba.
BSB
BSB:
After Jacob had come from Paddan-aram, he arrived safely at the city of Shechem in the land of Canaan, and he camped just outside the city.
19
LIN
Na motuya ya bibende ya palata nkama moko, asombaki na maboko ya bana mibali ya Amori, tata ya Sishemi, eteni ya mabele epai wapi atongaki ndako na ye ya kapo.
BSB
BSB:
And the plot of ground where he pitched his tent, he purchased from the sons of Hamor, Shechem’s father, for a hundred pieces of silver.
20
LIN
Atongaki kuna etumbelo moko oyo abengaki : « El, Nzambe ya Isalaele. »
BSB
BSB:
There he set up an altar and called it El-Elohe-Israel.
Chapter complete
You’ve read Genesis 33
Chapter 33 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 34
Read Genesis 34
Listen
Back to Genesis 32
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 33
Ask Study Help
Ask anything about Genesis 33
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 32
Genesis 33
Genesis 34