Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.42.1
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
34
LIN
BSB
A
a
Genesis 34
34
Genesis
Isaac and Jacob
Lingala Bible
Jacob
, person
Shechem
, person
Hamor
, person
Dinah
, person
Levi
, person
Simeon
, person
Leah
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Nzokande, Dina, mwana mwasi oyo Lea abotelaki Jakobi, abimaki mpo na kokende kotala basi ya mokili wana.
BSB
BSB:
Now Dinah, the daughter Leah had borne to Jacob, went out to visit the daughters of the land.
2
LIN
Tango Sishemi, mokambi ya mokili wana mpe mwana mobali ya Amori, moto ya Evi, amonaki ye, akangaki ye mpe asangisaki na ye nzoto na makasi.
BSB
BSB:
When Shechem son of Hamor the Hivite, the prince of the region, saw her, he took her and lay with her by force.
3
LIN
Motema na ye emipesaki mobimba epai ya Dina, mwana mwasi ya Jakobi, alingaki ye mpe akomaki koloba na ye maloba ya bolingo.
BSB
BSB:
And his soul was drawn to Dinah, the daughter of Jacob. He loved the young girl and spoke to her tenderly.
4
LIN
Sishemi alobaki na Amori, tata na ye : « Balela ngai elenge mwasi oyo. »
BSB
BSB:
So Shechem told his father Hamor, “Get me this girl as a wife.”
5
LIN
Tango Jakobi ayokaki ete lokumu ya Dina, mwana na ye ya mwasi, ebebisami, abatelaki kimia kino bana na ye ya mibali bazongaki na ndako, pamba te bazalaki na esobe elongo na bibwele.
BSB
BSB:
Jacob heard that Shechem had defiled his daughter Dinah, but since his sons were with his livestock in the field, he remained silent about it until they returned.
6
LIN
Boye, Amori, tata na Sishemi, akendeki kosolola na Jakobi.
BSB
BSB:
Meanwhile, Shechem’s father Hamor came to speak with Jacob.
7
LIN
Tango bana mibali ya Jakobi bazongaki wuta na esobe, bayokaki sango ya makambo oyo esalemaki. Bongo, bayokaki pasi mingi na mitema mpe basilikaki makasi, pamba te Sishemi asalaki likambo ya soni na Isalaele, wana asangisaki nzoto na makasi na mwana mwasi ya Jakobi. Likambo ya bongo esengelaki kosalema te.
BSB
BSB:
When Jacob’s sons heard what had happened, they returned from the field. They were filled with grief and fury, because Shechem had committed an outrage in Israel by lying with Jacob’s daughter—a thing that should not be done.
8
LIN
Kasi Amori alobaki na bango : « Motema ya Sishemi, mwana na ngai ya mobali ezali kopela na bolingo mpo na mwana na bino ya mwasi. Nabondeli bino, bopesa ye na libala mpo na Sishemi.
BSB
BSB:
But Hamor said to them, “My son Shechem longs for your daughter. Please give her to him as his wife.
9
LIN
Na bongo, bokoki kosala elongo na biso boyokani na nzela ya libala : bokobalisa biso bana na bino ya basi mpe biso tokobalisa bino bana na biso ya basi,
BSB
BSB:
Intermarry with us; give us your daughters and take our daughters for yourselves.
10
LIN
bokovanda elongo na biso. Mboka ezali liboso na bino, bovanda, bosala mombongo mpe bokoma bankolo mabele. »
BSB
BSB:
You may settle among us, and the land will be open to you. Live here, move about freely, and acquire your own property.”
11
LIN
Boye, Sishemi alobaki na tata mpe na bandeko mibali ya Dina : — Tika ete nazwa ngolu na miso na bino mpe nakopesa bino nyonso oyo bokosenga ngai.
BSB
BSB:
Then Shechem said to Dinah’s father and brothers, “Grant me this favor, and I will give you whatever you ask.
12
LIN
Bokatela ngai motuya makasi ya mbongo ya libala mpe biloko ebele ya libala ; nakofuta bino eloko nyonso oyo bokosenga ngai. Kasi bopesa ngai kaka elenge mwasi oyo na libala.
BSB
BSB:
Demand a high dowry and an expensive gift, and I will give you whatever you ask. Only give me the girl as my wife!”
13
LIN
Lokola lokumu ya Dina, ndeko mwasi na bango, ebebaki, bana mibali ya Jakobi basalelaki mayele mabe mpo na kopesa eyano epai ya Sishemi mpe tata na ye Amori.
BSB
BSB:
But because Shechem had defiled their sister Dinah, Jacob’s sons answered him and his father Hamor deceitfully.
14
LIN
Balobaki na bango : — Tokoki kosala likambo ya boye te, tokoki te kopesa na libala ndeko na biso ya mwasi epai ya mobali oyo akatama ngenga te, pamba te ezali likambo ya soni mpo na biso.
BSB
BSB:
“We cannot do such a thing,” they said. “To give our sister to an uncircumcised man would be a disgrace to us.
15
LIN
Tokoki kondima yango kaka soki bokomi lokola biso, soki bana na bino nyonso ya mibali bakatisi ngenga.
BSB
BSB:
We will consent to this on one condition, that you become circumcised like us—every one of your males.
16
LIN
Boye biso tokopesa na libala bana na biso ya basi mpe tokozwa bana na bino ya basi na libala. Tokovanda elongo na bino mpe tokokoma libota moko.
BSB
BSB:
Then we will give you our daughters and take your daughters for ourselves. We will dwell among you and become one people.
17
LIN
Kasi soki boboyi kokatisa ngenga ndenge biso tolobi, tokozwa ndeko na biso ya mwasi mpe tokokende na biso.
BSB
BSB:
But if you will not agree to be circumcised, then we will take our sister and go.”
18
LIN
Likanisi na bango emonanaki malamu epai ya Amori mpe Sishemi, mwana na ye ya mobali.
BSB
BSB:
Their offer seemed good to Hamor and his son Shechem.
19
LIN
Lokola elenge mobali, oyo azalaki na lokumu koleka bato nyonso ya ndako ya tata na ye, alingaki mwana mwasi ya Jakobi, akokisaki na lombangu likambo oyo bayebisaki ye.
BSB
BSB:
The young man, who was the most respected of all his father’s household, did not hesitate to fulfill this request, because he was delighted with Jacob’s daughter.
20
LIN
Boye, Amori mpe Sishemi, mwana na ye ya mobali, bakendeki na ekuke ya engumba na bango mpo na koloba na bana mboka na bango :
BSB
BSB:
So Hamor and his son Shechem went to the gate of their city and addressed the men of their city:
21
LIN
« Bato oyo bazali na boboto epai na biso ; tika ete bavanda elongo na biso mpe basala mombongo, mpo ete mboka ezali na yango monene ! Tokoki na biso kobala bana na bango ya basi, mpe bango bakoki na bango kobala bana na biso ya basi.
BSB
BSB:
“These men are at peace with us. Let them live and trade in our land; indeed, it is large enough for them. Let us take their daughters in marriage and give our daughters to them.
22
LIN
Kasi mibali bakondima kovanda elongo na biso lokola bandeko ya libota moko soki kaka mibali nyonso kati na biso bakatisi ngenga lokola bango.
BSB
BSB:
But only on this condition will the men agree to dwell with us and be one people: if all our men are circumcised as they are.
23
LIN
Bibwele na bango, bomengo na bango, banyama na bango nyonso ; boni ekokoma ya biso te soki kaka tondimi ete bavanda elongo na biso ? »
BSB
BSB:
Will not their livestock, their possessions, and all their animals become ours? Only let us consent to them, and they will dwell among us.”
24
LIN
Boye, bato nyonso oyo bazalaki kobima na ekuke ya engumba bandimaki Amori mpe mwana na ye ya mobali, Sishemi ; mpe mibali nyonso bakatisaki ngenga.
BSB
BSB:
All the men who went out of the city gate listened to Hamor and his son Shechem, and every male of the city was circumcised.
25
LIN
Sima na mikolo misato, wana mibali nyonso kati na bango bazalaki nanu na pasi ya bapota, bana mibali mibale ya Jakobi, bandeko mibali ya Dina, Simeoni mpe Levi, bakamataki mipanga na bango, bakotaki na pwasa kati na engumba mpe babomaki mibali nyonso.
BSB
BSB:
Three days later, while they were still in pain, two of Jacob’s sons (Dinah’s brothers Simeon and Levi) took their swords, went into the unsuspecting city, and slaughtered every male.
26
LIN
Babomaki na mopanga Amori mpe mwana na ye ya mobali Sishemi. Bakamataki Dina wuta na ndako ya Sishemi mpe bazongaki na ye.
BSB
BSB:
They killed Hamor and his son Shechem with their swords, took Dinah out of Shechem’s house, and went away.
27
LIN
Bana mibali mosusu ya Jakobi bayaki kosasa mibali oyo bazalaki na bapota mpe kobebisa engumba mpo ete babebisaki lokumu ya ndeko na bango ya mwasi.
BSB
BSB:
Jacob’s other sons came upon the slaughter and looted the city, because their sister had been defiled.
28
LIN
Babotolaki bangombe na bango, bameme mpe bantaba na bango, ba-ane na bango, biloko nyonso oyo ezalaki kati na engumba mpe na bilanga.
BSB
BSB:
They took their flocks and herds and donkeys, and everything else in the city or in the field.
29
LIN
Bakamataki bomengo na bango nyonso : bana, basi mpe biloko nyonso oyo ezalaki kati na bandako na bango.
BSB
BSB:
They carried off all their possessions and women and children, and they plundered everything in their houses.
30
LIN
Boye, Jakobi alobaki na Simeoni mpe na Levi : — Bopesi ngai pasi mpe bobimisi ngai moto mabe na miso ya bato ya Kanana mpe ya Perizi oyo bazali kovanda na mboka oyo. Biso tozali kaka moke ; mpe soki basangisi makasi na bango mpo na kobundisa ngai, bakoboma ngai elongo na ndako na ngai mobimba.
BSB
BSB:
Then Jacob said to Simeon and Levi, “You have brought trouble upon me by making me a stench to the Canaanites and Perizzites, the people of this land. We are few in number; if they unite against me and attack me, I and my household will be destroyed.”
31
LIN
Bango bazongisaki : — Boni, esengelaki bazwa ndeko na biso lokola mwasi ya ndumba ?
BSB
BSB:
But they replied, “Should he have treated our sister like a prostitute?”
Chapter complete
You’ve read Genesis 34
Chapter 34 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 35
Read Genesis 35
Listen
Back to Genesis 33
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 34
Ask Study Help
Ask anything about Genesis 34
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 33
Genesis 34
Genesis 35