Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.42.2
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
37
LIN
BSB
A
a
Genesis 37
37
Genesis
Joseph
Lingala Bible
Joseph
, person
Jacob
, person
Egypt
, place
Reuben
, person
Shechem
, place
Judah
, person
Gilead
, place
Canaan
, place
7 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Jakobi avandaki na mokili ya Kanana epai wapi tata na ye azalaki kovanda.
BSB
BSB:
Now Jacob lived in the land where his father had resided, the land of Canaan.
2
LIN
Tala molongo ya libota ya Jakobi. Elenge mobali Jozefi azalaki na mibu zomi na sambo ya mbotama mpe azalaki kobatela bibwele. Azalaki kosala mosala yango elongo na bandeko na ye ya mibali, bana ya Bila mpe ya Zilipa, basi ya tata na ye. Jozefi azalaki koyebisa tata na bango makambo mabe ya bandeko na ye.
BSB
BSB:
This is the account of Jacob. When Joseph was seventeen years old, he was tending the flock with his brothers, the sons of his father’s wives Bilhah and Zilpah, and he brought their father a bad report about them.
3
LIN
Isalaele azalaki kolinga Jozefi mingi koleka bana na ye nyonso, pamba te abotaki ye na kimobange. Asalelaki ye elamba ya kitoko mpe ya talo.
BSB
BSB:
Now Israel loved Joseph more than his other sons, because Joseph had been born to him in his old age; so he made him a robe of many colors.
4
LIN
Tango bandeko na ye ya mibali bamonaki ete tata na bango azali kolinga ye koleka bango nyonso, bayinaki ye mpe bakokaki lisusu te koloba na ye na motema malamu.
BSB
BSB:
When Joseph’s brothers saw that their father loved him more than any of them, they hated him and could not speak a kind word to him.
5
LIN
Jozefi alotaki ndoto mpe tango ayebisaki yango epai ya bandeko na ye ya mibali, bayinaki ye lisusu makasi.
BSB
BSB:
Then Joseph had a dream, and when he told it to his brothers, they hated him even more.
6
LIN
Alobaki na bango : — Boyoka ndoto oyo nalotaki :
BSB
BSB:
He said to them, “Listen to this dream I had:
7
LIN
« Tozalaki kokanga maboke ya ble kati na bilanga. Mbala moko, liboke na ngai elamuki mpe etelemi ngwi ; bongo maboke na bino, oyo ezalaki zingazinga ya liboke na ngai, egumbamaki liboso ya liboke na ngai. »
BSB
BSB:
We were binding sheaves of grain in the field, and suddenly my sheaf rose and stood upright, while your sheaves gathered around and bowed down to mine.”
8
LIN
Bandeko na ye ya mibali balobaki na ye : — Okanisi ete okokoma mokonzi na biso mpe okokonza biso ? Bongo bayinaki ye lisusu koleka likolo ya ndoto na ye mpe likolo ya makambo oyo alobaki.
BSB
BSB:
“Do you intend to reign over us?” his brothers asked. “Will you actually rule us?” So they hated him even more because of his dream and his statements.
9
LIN
Alotaki lisusu ndoto mosusu mpe ayebisaki yango epai ya bandeko na ye ya mibali. Alobaki : — Boyoka, naloti lisusu ndoto mosusu : « Namonaki moyi, sanza mpe minzoto zomi na moko kogumbama liboso na ngai. »
BSB
BSB:
Then Joseph had another dream and told it to his brothers. “Look,” he said, “I had another dream, and this time the sun and moon and eleven stars were bowing down to me.”
10
LIN
Tango ayebisaki tata na ye ndenge ayebisaki bandeko na ye ya mibali, tata na ye agangelaki ye mpe alobaki : — Ndoto nini wana yo osili kolota ? Okanisi ete ngai, mama na yo mpe bandeko na yo ya mibali, tokoya mpe tokogumbama na mabele liboso na yo ?
BSB
BSB:
He told his father and brothers, but his father rebuked him and said, “What is this dream that you have had? Will your mother and brothers and I actually come and bow down to the ground before you?”
11
LIN
Bandeko na ye ya mibali bakomaki na motema likunya epai na ye, kasi tata na ye abombaki kaka likambo yango na motema.
BSB
BSB:
And his brothers were jealous of him, but his father kept in mind what he had said.
12
LIN
Bandeko mibali ya Jozefi bakendeki koleisa bibwele ya tata na bango pembeni ya Sishemi.
BSB
BSB:
Some time later, Joseph’s brothers had gone to pasture their father’s flocks near Shechem.
13
LIN
Isalaele alobaki na Jozefi : — Oyebi ete bandeko na yo bazali koleisa bibwele pembeni ya Sishemi ; yaka, pamba te nalingi kotinda yo epai na bango. Jozefi azongisaki : — Malamu !
BSB
BSB:
Israel said to him, “Are not your brothers pasturing the flocks at Shechem? Get ready; I am sending you to them.” “I am ready,” Joseph replied.
14
LIN
Tata na ye alobaki na ye : — Kende mpe tala soki makambo nyonso ezali kotambola malamu mpo na bandeko na yo mpe mpo na bibwele, bongo omemela ngai sango. Boye, atindaki ye wuta na lubwaku ya Ebron. Wana Jozefi akomaki na Sishemi,
BSB
BSB:
Then Israel told him, “Go now and see how your brothers and the flocks are faring, and bring word back to me.” So he sent him off from the Valley of Hebron. And when Joseph arrived in Shechem,
15
LIN
moto moko amonaki ye tango azalaki koyengayenga na bilanga. Atunaki ye : — Ozali koluka nini ?
BSB
BSB:
a man found him wandering in the field and asked, “What are you looking for?”
16
LIN
Jozefi azongisaki : — Nazali koluka bandeko na ngai. Okoki koyebisa ngai esika nini bazali koleisa bibwele na bango ?
BSB
BSB:
“I am looking for my brothers,” Joseph replied. “Can you please tell me where they are pasturing their flocks?”
17
LIN
Moto yango azongisaki : — Balongwaki awa mpe nayokaki bango koloba : « Tokende na Dotani. » Boye Jozefi alandaki bandeko na ye mpe amonaki bango pembeni ya Dotani.
BSB
BSB:
“They have moved on from here,” the man answered. “I heard them say, ‘Let us go to Dothan.’” So Joseph set out after his brothers and found them at Dothan.
18
LIN
Tango bango bamonaki ye na mosika liboso ete akoma pene na bango, bayokanaki mpo ete baboma ye.
BSB
BSB:
Now Joseph’s brothers saw him in the distance, and before he arrived, they plotted to kill him.
19
LIN
Balobanaki bango na bango : — Tala moloti bandoto azali koya.
BSB
BSB:
“Here comes that dreamer!” they said to one another.
20
LIN
Sik’oyo, boya mpo ete toboma ye mpe tobwaka ye na moko kati na mabulu oyo. Tokoloba ete nyama mabe eliaki ye. Bongo tokotala oyo ekoya sima na bandoto na ye.
BSB
BSB:
“Come now, let us kill him and throw him into one of the pits. We can say that a vicious animal has devoured him. Then we shall see what becomes of his dreams!”
21
LIN
Tango Ribeni ayokaki bongo, alukaki nzela ya kokangola ye na maboko na bango. Alobaki : — Toboma ye te !
BSB
BSB:
When Reuben heard this, he tried to rescue Joseph from their hands. “Let us not take his life,” he said.
22
LIN
Bosopa makila na ye te ! Bobwaka ye kaka na libulu oyo ezali kati na esobe, kasi bosala ye mabe te. Ribeni alobaki bongo pamba te azalaki na makanisi ya kokangola ye na maboko na bango mpe kozongisa ye na maboko ya tata na ye.
BSB
BSB:
“Do not shed his blood. Throw him into this pit in the wilderness, but do not lay a hand on him.” Reuben said this so that he could rescue Joseph from their hands and return him to his father.
23
LIN
Tango kaka Jozefi akomaki epai ya bandeko na ye ya mibali, balongolaki ye elamba na ye ya kitoko mpe ya talo oyo alataki.
BSB
BSB:
So when Joseph came to his brothers, they stripped him of his robe—the robe of many colors he was wearing—
24
LIN
Bakangaki ye mpe babwakaki ye na libulu. Libulu yango ezalaki na eloko te, ezalaki mpe na mayi te na kati.
BSB
BSB:
and they took him and threw him into the pit. Now the pit was empty, with no water in it.
25
LIN
Wana bavandaki mpo na kolia, batombolaki miso mpe bamonaki bato ya libota ya Isimaeli elongo na bashamo na bango koya wuta na Galadi. Bashamo na bango ezalaki komema na Ejipito : biloko ya mike-mike ya solo kitoko oyo balambelaka, mafuta ya solo kitoko mpe mire.
BSB
BSB:
And as they sat down to eat a meal, they looked up and saw a caravan of Ishmaelites coming from Gilead. Their camels were carrying spices, balm, and myrrh on their way down to Egypt.
26
LIN
Boye Yuda alobaki na bandeko na ye ya mibali : « Litomba nini tokozwa soki tobomi ndeko na biso mpe tozipi makila na ye ?
BSB
BSB:
Then Judah said to his brothers, “What profit will we gain if we kill our brother and cover up his blood?
27
LIN
Malamu toteka ye epai ya bato ya ekolo ya Isimaeli, kasi toboma ye te ; pamba te azali kaka ndeko na biso mpe tozali na ye makila moko. » Boye bandeko na ye bandimaki.
BSB
BSB:
Come, let us sell him to the Ishmaelites and not lay a hand on him; for he is our brother, our own flesh.” And they agreed.
28
LIN
Nzokande tango bato ya mombongo ya mokili ya Madiani balekaki wana, babimisaki Jozefi wuta na libulu mpe batekaki ye epai ya bato ya ekolo ya Isimaeli, na motuya ya mbongo ya bibende, tuku mibale ; mpe bango bamemaki ye na Ejipito.
BSB
BSB:
So when the Midianite traders passed by, his brothers pulled Joseph out of the pit and sold him for twenty shekels of silver to the Ishmaelites, who took him to Egypt.
29
LIN
Tango Ribeni azongaki na libulu mpe amonaki ete Jozefi azali lisusu kuna te, apasolaki bilamba na ye,
BSB
BSB:
When Reuben returned to the pit and saw that Joseph was not there, he tore his clothes,
30
LIN
azongaki epai ya bandeko na ye mpe alobaki : « Elenge mobali azali lisusu kuna te ! Sik’oyo ngai, nakosuka wapi ? »
BSB
BSB:
returned to his brothers, and said, “The boy is gone! What am I going to do?”
31
LIN
Boye babomaki ntaba, bazwaki elamba ya Jozefi mpe bazindisaki yango na makila ya ntaba.
BSB
BSB:
Then they took Joseph’s robe, slaughtered a young goat, and dipped the robe in its blood.
32
LIN
Sima, bazongisaki elamba yango ya kitoko mpe ya talo epai ya tata na bango. Balobaki : — Tala eloko oyo tomoni ; tala yango malamu soki ezali penza elamba ya mwana na yo to te !
BSB
BSB:
They sent the robe of many colors to their father and said, “We found this. Examine it to see whether it is your son’s robe or not.”
33
LIN
Jakobi asosolaki ete ezali elamba ya Jozefi mpe agangaki : — Ezali elamba ya mwana na ngai ! Nyama moko ya mabe elie ye ! Solo, bakati-kati Jozefi na biteni !
BSB
BSB:
His father recognized it and said, “It is my son’s robe! A vicious animal has devoured him. Joseph has surely been torn to pieces!”
34
LIN
Jakobi apasolaki bilamba na ye, alataki saki mpe asalaki matanga mpo na mwana na ye mikolo ebele.
BSB
BSB:
Then Jacob tore his clothes, put sackcloth around his waist, and mourned for his son many days.
35
LIN
Bana na ye nyonso ya mibali mpe ya basi bayaki kobondisa ye ; kasi aboyaki kobondisama. Alobaki : « Te ; nakozala na matanga kino nakolanda mwana na ngai na mboka ya bakufi epai wapi mwana na ngai azali. » Boye, tata na ye alelaki ye.
BSB
BSB:
All his sons and daughters tried to comfort him, but he refused to be comforted. “No,” he said. “I will go down to Sheol mourning for my son.” So his father wept for him.
36
LIN
Bato ya mokili ya Madiani batekaki Jozefi na Ejipito epai ya Potifari, kalaka ya lokumu ya Faraon mpe mokonzi ya bakengeli ya mokonzi.
BSB
BSB:
Meanwhile, the Midianites sold Joseph in Egypt to Potiphar, an officer of Pharaoh and captain of the guard.
Chapter complete
You’ve read Genesis 37
Chapter 37 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 38
Read Genesis 38
Listen
Back to Genesis 36
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 37
Ask Study Help
Ask anything about Genesis 37
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 36
Genesis 37
Genesis 38