Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.42.3
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
38
LIN
BSB
A
a
Genesis 38
38
Genesis
Joseph
Lingala Bible
Judah
, person
Shelah
, person
Tamar
, person
Timnah
, place
Er
, person
Onan
, person
Shua
, person
Enaim
, place
5 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Nzokande na tango wana, Yuda atikaki bandeko na ye mpe akendeki kovanda epai ya Ira, moto ya Adulami.
BSB
BSB:
About that time, Judah left his brothers and settled near a man named Hirah, an Adullamite.
2
LIN
Yuda akutanaki kuna na mwana mwasi ya Shuwa, moto ya Kanana. Abalaki ye mpe asangisaki na ye nzoto.
BSB
BSB:
There Judah saw the daughter of a Canaanite man named Shua, and he took her as a wife and slept with her.
3
LIN
Mwasi yango akomaki na zemi mpe abotelaki Yuda mwana mobali. Mpe Yuda apesaki ye kombo « Eri. »
BSB
BSB:
So she conceived and gave birth to a son, and Judah named him Er.
4
LIN
Mwasi yango azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali ; apesaki ye kombo « Onani. »
BSB
BSB:
Again she conceived and gave birth to a son, and she named him Onan.
5
LIN
Abotaki mwana mobali mosusu mpe apesaki ye kombo « Shela. » Yuda azalaki na Kezibi tango mwasi na ye abotaki mwana ya misato.
BSB
BSB:
Then she gave birth to another son and named him Shelah; it was at Chezib that she gave birth to him.
6
LIN
Yuda abalelaki Eri, mwana na ye ya liboso, mwasi : Tamari.
BSB
BSB:
Now Judah acquired a wife for Er, his firstborn, and her name was Tamar.
7
LIN
Kasi Eri, mwana liboso ya Yuda, azalaki moto mabe na miso ya Yawe ; yango wana Yawe abomaki ye.
BSB
BSB:
But Er, Judah’s firstborn, was wicked in the sight of the LORD; so the LORD put him to death.
8
LIN
Bongo Yuda alobaki na Onani : « Sangisa nzoto na semeki na yo mpo ete obota bana mpo na ndeko na yo ya mobali oyo akufa. »
BSB
BSB:
Then Judah said to Onan, “Sleep with your brother’s wife. Perform your duty as her brother-in-law and raise up offspring for your brother.”
9
LIN
Kasi lokola Onani ayebaki ete bana oyo bakobotama bakozala ya ye te, azalaki kobwaka mayi na ye ya mibali na mabele tango nyonso azalaki kosangisa nzoto na semeki na ye, mpo ete abotela ndeko na ye ya mobali bana te.
BSB
BSB:
But Onan knew that the offspring would not belong to him; so whenever he would sleep with his brother’s wife, he would spill his seed on the ground so that he would not produce offspring for his brother.
10
LIN
Likambo oyo Onani azalaki kosala ezalaki kosepelisa Yawe te. Boye ye mpe lisusu, Yawe abomaki ye.
BSB
BSB:
What he did was wicked in the sight of the LORD, so He put Onan to death as well.
11
LIN
Yuda alobaki na Tamari, bokilo na ye ya mwasi : « Lokola okufisi mibali, kende kovanda na ndako ya tata na yo kino Shela, mwana na ngai ya mobali, akokoma mokolo. » Pamba te azalaki komilobela : « Tango mosusu ye mpe akoki kokufa lokola bandeko na ye ya mibali. » Boye Tamari akendeki kovanda na ndako ya tata na ye.
BSB
BSB:
Then Judah said to his daughter-in-law Tamar, “Live as a widow in your father’s house until my son Shelah grows up.” For he thought, “He may die too, like his brothers.” So Tamar went to live in her father’s house.
12
LIN
Sima na tango molayi, mwana mwasi ya Shuwa, mwasi ya Yuda, akufaki. Lokola tango na ye ya matanga esilaki, Yuda akendeki na Timina epai ya bato oyo bazalaki kolongola bapwale ya bameme na ye. Boye, moninga na ye Ira, moto ya Adulami, akendeki elongo na ye.
BSB
BSB:
After a long time Judah’s wife, the daughter of Shua, died. When Judah had finished mourning, he and his friend Hirah the Adullamite went up to his sheepshearers at Timnah.
13
LIN
Tango bayebisaki Tamari : « Bokilo na yo ya mobali azali kokende na Timina mpo na kolongolisa bapwale ya bameme na ye, »
BSB
BSB:
When Tamar was told, “Your father-in-law is going up to Timnah to shear his sheep,”
14
LIN
alongolaki bilamba na ye ya mwasi akufisa mobali mpe amizipaki elongi na vwale mpo ete bayeba ye lisusu te. Avandaki na ekuke ya Enayimi oyo ezalaki na nzela ya Timina, pamba te amonaki ete Shela akolaki, kasi bapesaki ye te na libala epai ya Shela.
BSB
BSB:
she removed her widow’s garments, covered her face with a veil to disguise herself, and sat at the entrance to Enaim, which is on the way to Timnah. For she saw that although Shelah had grown up, she had not been given to him as a wife.
15
LIN
Tango Yuda amonaki ye, akanisaki ete azali mwasi ya ndumba, pamba te azipaki elongi na ye.
BSB
BSB:
When Judah saw her, he thought she was a prostitute because she had covered her face.
16
LIN
Lokola Yuda ayebaki te ete ezali bokilo na ye ya mwasi, apusanaki na esika oyo azalaki, pembeni ya nzela, mpe alobaki na ye : — Yaka, ndima ete tosangisa na yo nzoto. Tamari atunaki : — Okopesa ngai nini soki osangisi na ngai nzoto ?
BSB
BSB:
Not realizing that she was his daughter-in-law, he went over to her and said, “Come now, let me sleep with you.” “What will you give me for sleeping with you?” she inquired.
17
LIN
Yuda azongisaki : — Nakotindela yo mwana ntaba oyo nakozwa na etonga na ngai. Tamari atunaki lisusu : — Ndanga nini okosimbisa ngai kino tango okotindela ngai yango ?
BSB
BSB:
“I will send you a young goat from my flock,” Judah answered. But she replied, “Only if you leave me something as a pledge until you send it.”
18
LIN
Yuda alobaki : — Ndanga nini olingi ete nasimbisa yo ? Tamari azongisaki : — Lopete na yo, singa na yo mpe lingenda na yo, oyo osimbi na loboko. Boye Yuda apesaki ye yango, asangisaki na ye nzoto mpe Tamari akomaki na zemi.
BSB
BSB:
“What pledge should I give you?” he asked. She answered, “Your seal and your cord, and the staff in your hand.” So he gave them to her and slept with her, and she became pregnant by him.
19
LIN
Tamari atelemaki mpe akendeki ; alongolaki vwale na ye mpe azongisaki lisusu na nzoto bilamba na ye ya mwasi akufisa mobali.
BSB
BSB:
Then Tamar got up and departed. And she removed her veil and put on her widow’s garments again.
20
LIN
Boye Yuda atindaki moninga na ye Ira, moto ya Adulami, mpo ete amemela mwasi yango mwana ntaba mpe azwa ndanga oyo asimbisaki ye. Kasi Ira amonaki ye te.
BSB
BSB:
Now when Judah sent his friend Hirah the Adullamite with the young goat to collect the items he had left with the woman, he could not find her.
21
LIN
Boye atunaki epai ya bavandi ya esika wana, na Enayimi : — Wapi mwasi ya ndumba oyo azalaki na nzela, na Enayimi ? Bazongiselaki ye : — Esika oyo etikala kozala na mwasi ya ndumba te.
BSB
BSB:
He asked the men of that place, “Where is the shrine prostitute who was beside the road at Enaim?” “No shrine prostitute has been here,” they answered.
22
LIN
Ira azongaki epai ya Yuda mpe ayebisaki ye : — Namoni ye te ; kutu bavandi ya Enayimi bayebisi ngai ete mwasi ya ndumba atikala kozala na esika wana te.
BSB
BSB:
So Hirah returned to Judah and said, “I could not find her, and furthermore, the men of that place said, ‘No shrine prostitute has been here.’”
23
LIN
Yuda alobaki : — Atikala na biloko oyo azwaki, noki te tokobima babolole. Ngai nazali na likambo te ; natindeli ye mwana ntaba, mpe yo omoni ye te.
BSB
BSB:
“Let her keep the items,” Judah replied. “Otherwise we will become a laughingstock. After all, I did send her this young goat, but you could not find her.”
24
LIN
Sima na sanza misato, bayebisaki Yuda : — Tamari, bokilo na yo ya mwasi, asalaki kindumba, mpe tala kutu akomi na zemi. Yuda alobaki : — Babimisa ye mpe batumba ye na moto !
BSB
BSB:
About three months later, Judah was told, “Your daughter-in-law Tamar has prostituted herself, and now she is pregnant.” “Bring her out!” Judah replied. “Let her be burned to death!”
25
LIN
Wana bazalaki kobimisa ye libanda, Tamari atindaki sango oyo epai ya Yuda, bokilo na ye : — Nazali na zemi ya nkolo biloko oyo. Mpe abakisaki : — Tala soki okoki koyeba nani azali nkolo ya lopete oyo, ya singa oyo mpe ya lingenda oyo.
BSB
BSB:
As she was being brought out, Tamar sent a message to her father-in-law: “I am pregnant by the man to whom these items belong.” And she added, “Please examine them. Whose seal and cord and staff are these?”
26
LIN
Yuda asosolaki ete ezali biloko na ye mpe alobaki : — Azali sembo koleka ngai, pamba te nabalisaki ye te epai ya Shela, mwana na ngai ya mobali. Boye Yuda atikalaki lisusu te kosangisa na ye nzoto.
BSB
BSB:
Judah recognized the items and said, “She is more righteous than I, since I did not give her to my son Shelah.” And he did not have relations with her again.
27
LIN
Wana tango na ye ya kobota ekokaki, emonanaki ete ezalaki na mapasa mibale ya mibali kati na libumu na ye.
BSB
BSB:
When the time came for Tamar to give birth, there were twins in her womb.
28
LIN
Na tango ya kobota, moko kati na bango abimisaki loboko ; mpe mwasi oyo abotisaka asimbaki loboko yango, akangaki yango singa ya motane mpe alobaki : « Mwana oyo nde abimi liboso. »
BSB
BSB:
And as she was giving birth, one of them put out his hand; so the midwife took a scarlet thread and tied it around his wrist. “This one came out first,” she announced.
29
LIN
Kasi azongisaki loboko na ye, mpe ndeko na ye ya mobali abimaki. Bongo mwasi oyo abotisaka alobaki : « Ofungoli nzela nini mpo na kobima ? » Mpe bapesaki ye kombo « Peretsi. »
BSB
BSB:
But when he pulled his hand back and his brother came out, she said, “You have broken out first!” So he was named Perez.
30
LIN
Sima, ndeko na ye oyo azalaki na singa ya motane na loboko mpe abotamaki ; bapesaki ye kombo « Zera. »
BSB
BSB:
Then his brother came out with the scarlet thread around his wrist, and he was named Zerah.
Chapter complete
You’ve read Genesis 38
Chapter 38 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 39
Read Genesis 39
Listen
Back to Genesis 37
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 38
Ask Study Help
Ask anything about Genesis 38
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 37
Genesis 38
Genesis 39