Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.42.6
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
40
LIN
BSB
A
a
Genesis 40
40
Genesis
Joseph
Lingala Bible
Joseph
, person
Pharaoh
, person
Egypt
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Sima na mwa tango, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi ya Ejipito mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi ya Ejipito, basalaki mabe liboso ya nkolo na bango, mokonzi ya Ejipito.
BSB
BSB:
Some time later, the king’s cupbearer and baker offended their master, the king of Egypt.
2
LIN
Faraon asilikelaki bakalaka na ye mibale ya lokumu : kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa.
BSB
BSB:
Pharaoh was angry with his two officers, the chief cupbearer and the chief baker,
3
LIN
Abwakaki bango na boloko kati na ndako ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, boloko epai wapi Jozefi azalaki.
BSB
BSB:
and imprisoned them in the house of the captain of the guard, the same prison where Joseph was confined.
4
LIN
Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi apesaki bango na maboko ya Jozefi mpo ete alandela bango. Boye basalaki mikolo mwa mingi na boloko.
BSB
BSB:
The captain of the guard assigned them to Joseph, and he became their personal attendant. After they had been in custody for some time,
5
LIN
Ezalaki mokolo moko na butu, bango mibale, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi ya Ejipito, balotaki moto na moto ndoto na ye mpe ndoto na ndoto ezalaki na ndimbola na yango.
BSB
BSB:
both of these men—the Egyptian king’s cupbearer and baker, who were being held in the prison—had a dream on the same night, and each dream had its own meaning.
6
LIN
Na tongo, Jozefi akendeki epai na bango mpe amonaki ete bazali mawa-mawa.
BSB
BSB:
When Joseph came to them in the morning, he saw that they were distraught.
7
LIN
Jozefi atunaki bakalaka ya lokumu ya Faraon, oyo bazalaki kati na boloko elongo na ye, kati na ndako ya nkolo na ye : — Mpo na nini lelo bilongi na bino ezali mawa-mawa ?
BSB
BSB:
So he asked the officials of Pharaoh who were in custody with him in his master’s house, “Why are your faces so downcast today?”
8
LIN
Bazongiselaki ye : — Biso mibale toloti bandoto ; kasi moto ya kolimbola yango mpo na biso azali te. Jozefi alobaki na bango : — Boyebi te ete Nzambe nde apesaka ndimbola ya bandoto ? Nabondeli bino, boyebisa ngai bandoto na bino.
BSB
BSB:
“We both had dreams,” they replied, “but there is no one to interpret them.” Then Joseph said to them, “Don’t interpretations belong to God? Tell me your dreams.”
9
LIN
Bongo kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi ya Ejipito ayebisaki Jozefi ndoto na ye. Alobaki : — Na ndoto na ngai, namonaki nzete ya vino liboso na ngai.
BSB
BSB:
So the chief cupbearer told Joseph his dream: “In my dream there was a vine before me,
10
LIN
Nzete yango ya vino ezalaki na bitape misato. Bongo ekomaki kobimisa mito, fololo mpe maboke ebimisaki bambuma ya kotela.
BSB
BSB:
and on the vine were three branches. As it budded, its blossoms opened and its clusters ripened into grapes.
11
LIN
Kopo ya Faraon ezalaki na maboko na ngai. Nazwaki bambuma ya vino, nakamolaki yango na kopo ya Faraon mpe napesaki ye kopo yango na maboko na ye.
BSB
BSB:
Pharaoh’s cup was in my hand, and I took the grapes, squeezed them into his cup, and placed the cup in his hand.”
12
LIN
Jozefi alobaki na ye : — Tala ndimbola ya ndoto na yo : « Bitape misato ezali mikolo misato.
BSB
BSB:
Joseph replied, “This is the interpretation: The three branches are three days.
13
LIN
Sima na mikolo misato, Faraon akotombola moto na yo mpe akozongisa yo na esika na yo ya mosala. Okotia lisusu kopo ya Faraon na maboko na ye ndenge ozalaki kosala na kala.
BSB
BSB:
Within three days Pharaoh will lift up your head and restore your position. You will put Pharaoh’s cup in his hand, just as you did when you were his cupbearer.
14
LIN
Kasi tango makambo nyonso oyo ekotambola malamu mpo na yo, nabondeli yo, kanisa ngai mpe salela ngai bolamu, zala molobeli na ngai epai ya Faraon mpo ete abimisa ngai na boloko oyo.
BSB
BSB:
But when it goes well for you, please remember me and show me kindness by mentioning me to Pharaoh, that he might bring me out of this prison.
15
LIN
Pamba te babimisaki ngai na makasi wuta na mokili ya Ba-Ebre ; mpe awa nasali likambo moko te ya mabe mpo ete batia ngai na boloko. »
BSB
BSB:
For I was kidnapped from the land of the Hebrews, and even here I have done nothing for which they should have put me in this dungeon.”
16
LIN
Tango kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi ya Ejipito asosolaki ete Jozefi apesaki ndimbola ya malamu, alobaki na Jozefi : — Ngai mpe nalotaki ndoto : « Bitunga misato ya mapa ezalaki likolo ya moto na ngai.
BSB
BSB:
When the chief baker saw that the interpretation was favorable, he said to Joseph, “I too had a dream: There were three baskets of white bread on my head.
17
LIN
Kitunga ya likolo ezalaki na bagato ya ndenge na ndenge, oyo Faraon alingaka ; kasi bandeke ezalaki kolia yango wuta na kitunga oyo ezalaki na moto na ngai. »
BSB
BSB:
In the top basket were all sorts of baked goods for Pharaoh, but the birds were eating them out of the basket on my head.”
18
LIN
Jozefi alobaki na ye : — Tala ndimbola ya ndoto na yo : « Bitunga misato ezali mikolo misato.
BSB
BSB:
Joseph replied, “This is the interpretation: The three baskets are three days.
19
LIN
Sima na mikolo misato, Faraon akokata moto na yo mpe akodiembika yo na nzete. Bongo bandeke ekolia mosuni na yo. »
BSB
BSB:
Within three days Pharaoh will lift off your head and hang you on a tree. Then the birds will eat the flesh of your body.”
20
LIN
Sima na mikolo misato, ezalaki mokolo ya mbotama ya Faraon. Faraon asalisaki feti monene mpe abengisaki bakalaka na ye nyonso. Abimisaki na boloko, liboso ya bakalaka na ye, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi mpe kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa.
BSB
BSB:
On the third day, which was Pharaoh’s birthday, he held a feast for all his officials, and in their presence he lifted up the heads of the chief cupbearer and the chief baker.
21
LIN
Faraon azongisaki na mosala, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga. Boye azongelaki lisusu kotia kopo na maboko ya Faraon.
BSB
BSB:
Pharaoh restored the chief cupbearer to his position, so that he once again placed the cup in Pharaoh’s hand.
22
LIN
Kasi Faraon adiembikaki kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa, ndenge kaka Jozefi ayebisaki bango.
BSB
BSB:
But Pharaoh hanged the chief baker, just as Joseph had described to them in his interpretation.
23
LIN
Kasi kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi ya Ejipito atikalaki kokanisa lisusu Jozefi te : abosanaki ye.
BSB
BSB:
The chief cupbearer, however, did not remember Joseph; he forgot all about him.
Chapter complete
You’ve read Genesis 40
Chapter 40 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 41
Read Genesis 41
Listen
Back to Genesis 39
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 40
Ask Study Help
Ask anything about Genesis 40
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 39
Genesis 40
Genesis 41