Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.42.6
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
41
LIN
BSB
A
a
Genesis 41
41
Genesis
Joseph
Lingala Bible
Pharaoh
, person
Egypt
, place
Joseph
, person
Nile
, place
On
, place
Asenath
, person
Potiphera
, person
Ephraim
, person
1 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Sima na mibu mibale, Faraon alotaki ndoto : atelemaki pembeni ya ebale Nili,
BSB
BSB:
After two full years had passed, Pharaoh had a dream: He was standing beside the Nile,
2
LIN
amonaki bangombe sambo ya basi, ya kitoko mpe ya mafuta. Bangombe yango ebimaki wuta na ebale mpe ezalaki kolia matiti pembeni ya ebale Nili.
BSB
BSB:
when seven cows, sleek and well-fed, came up from the river and began to graze among the reeds.
3
LIN
Sima na yango, bangombe mosusu sambo ya basi, ya mabe mpe ekonda, ebimaki wuta na ebale, etelemaki pembeni ya bangombe ya basi oyo ezalaki pembeni ya ebale Nili.
BSB
BSB:
After them, seven other cows, sickly and thin, came up from the Nile and stood beside the well-fed cows on the bank of the river.
4
LIN
Bangombe sambo ya basi ya mabe mpe ekonda eliaki bangombe sambo ya kitoko mpe ya mafuta. Kaka na tango yango, Faraon alamukaki.
BSB
BSB:
And the cows that were sickly and thin devoured the seven sleek, well-fed cows. Then Pharaoh woke up,
5
LIN
Alalaki lisusu mpe alotaki ndoto ya mibale : nzete moko ya ble ebimisaki mito sambo ya ble, ya minene mpe ya kitoko.
BSB
BSB:
but he fell back asleep and dreamed a second time: Seven heads of grain, plump and ripe, came up on one stalk.
6
LIN
Mito mosusu sambo ya ble, ekonda mpe ezika na mopepe ya este, ebimaki sima na oyo ya minene.
BSB
BSB:
After them, seven other heads of grain sprouted, thin and scorched by the east wind.
7
LIN
Mito sambo oyo ekonda eliaki mito sambo oyo ya minene mpe etonda. Kaka na tango yango, Faraon alamukaki, asosolaki ete ezali ndoto.
BSB
BSB:
And the thin heads of grain swallowed up the seven plump, ripe ones. Then Pharaoh awoke and realized it was a dream.
8
LIN
Na tongo, lokola molimo na ye etungisamaki, abengaki bato nyonso ya soloka mpe ya bwanya ya Ejipito. Faraon ayebisaki bango ndoto na ye, kasi ata moto moko te akokaki kolimbolela ye yango.
BSB
BSB:
In the morning his spirit was troubled, so he summoned all the magicians and wise men of Egypt. Pharaoh told them his dreams, but no one could interpret them for him.
9
LIN
Kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi alobaki na Faraon : « Na mokolo ya lelo, nalingi kokanisa mbeba na ngai.
BSB
BSB:
Then the chief cupbearer said to Pharaoh, “Today I recall my failures.
10
LIN
Mokolo moko, Faraon asilikelaki basali na ye mpe atiaki ngai na boloko elongo na kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi kati na ndako ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi.
BSB
BSB:
Pharaoh was once angry with his servants, and he put me and the chief baker in the custody of the captain of the guard.
11
LIN
Biso mibale tolotaki bandoto na butu moko : ndoto na ndoto ezalaki na ndimbola na yango.
BSB
BSB:
One night both the chief baker and I had dreams, and each dream had its own meaning.
12
LIN
Kuna, tozalaki na elenge mobali moko, azali Mo-Ebre mpe mosali ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi. Toyebisaki ye bandoto na biso mpe alimbolaki yango mpo na biso, apesaki moto na moto ndimbola ya ndoto na ye.
BSB
BSB:
Now a young Hebrew was there with us, a servant of the captain of the guard. We told him our dreams and he interpreted them for us individually.
13
LIN
Makambo nyonso esalemaki ndenge kaka alimbolelaki biso yango. Ngai nazongelaki misala na ngai ; mpe moninga mosusu, badiembikaki ye. »
BSB
BSB:
And it happened to us just as he had interpreted: I was restored to my position, and the other man was hanged.”
14
LIN
Faraon abengaki Jozefi, mpe babimisaki ye na lombangu na boloko. Bakataki ye suki, alataki bilamba mosusu mpe ayaki liboso ya Faraon.
BSB
BSB:
So Pharaoh sent for Joseph, who was quickly brought out of the dungeon. After he had shaved and changed his clothes, he went in before Pharaoh.
15
LIN
Faraon alobaki na Jozefi : — Nalotaki ndoto mpe ata moto moko te alongi kolimbola yango ; kasi nayoki sango na tina na yo ete soki oyoki ndoto, okolimbola yango.
BSB
BSB:
Pharaoh said to Joseph, “I had a dream, and no one can interpret it. But I have heard it said of you that when you hear a dream you can interpret it.”
16
LIN
Jozefi azongiselaki Faraon : — Ngai nakolonga te kosala yango, kasi Nzambe akopesa na Faraon eyano oyo azali na yango posa.
BSB
BSB:
“I myself cannot do it,” Joseph replied, “but God will give Pharaoh a sound answer.”
17
LIN
Faraon alobaki na Jozefi : — Na ndoto na ngai, natelemaki pembeni ya ebale Nili.
BSB
BSB:
Then Pharaoh said to Joseph: “In my dream I was standing on the bank of the Nile,
18
LIN
Namonaki bangombe sambo ya basi, ya kitoko mpe ya mafuta. Bangombe yango ebimaki wuta na ebale mpe ezalaki kolia matiti pembeni ya ebale Nili.
BSB
BSB:
when seven cows, well-fed and sleek, came up from the river and began to graze among the reeds.
19
LIN
Sima na yango, bangombe mosusu sambo ya basi ebimaki : ya mike, ya mabe penza mpe ekonda ; nanu natikala komona te bangombe ya ndenge wana na mokili mobimba ya Ejipito.
BSB
BSB:
After them, seven other cows—sickly, ugly, and thin—came up. I have never seen such ugly cows in all the land of Egypt!
20
LIN
Ngombe ya basi ekonda mpe ya mabe eliaki bangombe sambo ya mafuta oyo ebimaki liboso.
BSB
BSB:
Then the thin, ugly cows devoured the seven well-fed cows that were there first.
21
LIN
Bongo ekotaki na mabumu na yango kasi ezalaki komonana te ete bangombe ya mafuta ekoti na mabumu ya bangombe ekonda, mpe lolenge na yango ezalaki kaka mabe lokola ndenge ezalaki liboso. Kaka na tango yango, nalamukaki.
BSB
BSB:
When they had devoured them, however, no one could tell that they had done so; their appearance was as ugly as it had been before. Then I awoke.
22
LIN
Na ndoto na ngai mosusu, namonaki mito sambo ya ble ya kitoko mpe ya mafuta kobima na nzete moko.
BSB
BSB:
In my dream I also saw seven heads of grain, plump and ripe, growing on a single stalk.
23
LIN
Sima na yango, mito sambo mosusu ya ble ebimaki. Ezalaki ya kokawuka, ekonda mpe ezika na mopepe ya este.
BSB
BSB:
After them, seven other heads of grain sprouted—withered, thin, and scorched by the east wind.
24
LIN
Mito sambo ya ble oyo ekonda emelaki mito sambo ya ble oyo ya malamu. Nayebisaki yango epai ya bato ya soloka kasi ata moto moko te akokaki kolimbolela ngai yango.
BSB
BSB:
And the thin heads of grain swallowed the seven plump ones. I told this dream to the magicians, but no one could explain it to me.”
25
LIN
Jozefi alobaki na Faraon : — Ndoto ya Faraon ezali kaka ndoto moko mpe ezali kaka na ndimbola moko. Nzambe amonisaki Faraon makambo oyo Ye akosala.
BSB
BSB:
At this, Joseph said to Pharaoh, “The dreams of Pharaoh are one and the same. God has revealed to Pharaoh what He is about to do.
26
LIN
Bangombe sambo ya basi ya kitoko ezali mibu sambo, mpe mito sambo ya ble ezali mibu sambo : ezali kaka ndoto moko.
BSB
BSB:
The seven good cows are seven years, and the seven ripe heads of grain are seven years. The dreams have the same meaning.
27
LIN
Bangombe sambo ya basi ekonda mpe ya mabe oyo ebimaki sima na oyo ya mafuta mpe ya kitoko, ezali mibu sambo ; mpe mito sambo ya ble oyo ekonda mpe ezika na mopepe ya este ezali mibu sambo ya nzala makasi.
BSB
BSB:
Moreover, the seven thin, ugly cows that came up after them are seven years, and so are the seven worthless heads of grain scorched by the east wind—they are seven years of famine.
28
LIN
Tala maloba oyo nazalaki na yango mpo na koyebisa Faraon. Nzambe atalisi na Faraon makambo oyo Ye akosala.
BSB
BSB:
It is just as I said to Pharaoh: God has shown Pharaoh what He is about to do.
29
LIN
Mibu sambo ya bofuluki ekoya na mokili mobimba ya Ejipito.
BSB
BSB:
Behold, seven years of great abundance are coming throughout the land of Egypt,
30
LIN
Kasi mibu sambo ya nzala makasi ekolanda yango ; boye bakobosana bofuluki nyonso ya mokili ya Ejipito mpo ete nzala makasi yango ekokawusa mokili.
BSB
BSB:
but seven years of famine will follow them. Then all the abundance in the land of Egypt will be forgotten, and the famine will devastate the land.
31
LIN
Bakokanisa lisusu te bofuluki nyonso ya mokili likolo ya nzala makasi oyo ekolanda, pamba te nzala ekozala makasi penza.
BSB
BSB:
The abundance in the land will not be remembered, since the famine that follows it will be so severe.
32
LIN
Soki Faraon alotaki ndoto yango na lolenge mibale, elingi koloba ete Nzambe asilaki kozwa mokano na likambo yango mpe akokokisa yango na lombangu.
BSB
BSB:
Moreover, because the dream was given to Pharaoh in two versions, the matter has been decreed by God, and He will carry it out shortly.
33
LIN
Tika sik’oyo Faraon aluka moto moko ya mayele mpe ya bwanya, atia ye na moto ya mokili ya Ejipito.
BSB
BSB:
Now, therefore, Pharaoh should look for a discerning and wise man and set him over the land of Egypt.
34
LIN
Tika ete Faraon asala bongo ; tika ete apona basali na mokili, ba-oyo bakokongola eteni ya mitano ya bambuma ya Ejipito na tango ya mibu sambo ya bofuluki.
BSB
BSB:
Let Pharaoh take action and appoint commissioners over the land to take a fifth of the harvest of Egypt during the seven years of abundance.
35
LIN
Boye, na se ya bokonzi ya Faraon, bakobanda kosangisa biloko nyonso ya kolia oyo mibu ya malamu ekobimisa, bakobomba ble na bingumba mpe bakobatela yango lokola biloko ya kolia mpo na bingumba.
BSB
BSB:
Under the authority of Pharaoh, let them collect all the excess food from these good years, that they may come and lay up the grain to be preserved as food in the cities.
36
LIN
Bakobatela biloko yango mpo na mokili, mpo na mibu sambo ya nzala makasi oyo ekozala na mokili ya Ejipito ; na bongo nzala makasi ekobebisa mokili te.
BSB
BSB:
This food will be a reserve for the land during the seven years of famine to come upon the land of Egypt. Then the country will not perish in the famine.”
37
LIN
Likambo yango esepelisaki Faraon mpe basali na ye nyonso.
BSB
BSB:
This proposal pleased Pharaoh and all his officials.
38
LIN
Faraon atunaki bango : — Tokoki komona moto lokola oyo, moto oyo Molimo na Nzambe avandi kati na ye ?
BSB
BSB:
So Pharaoh asked them, “Can we find anyone like this man, in whom the Spirit of God abides?”
39
LIN
Faraon alobaki na Jozefi : — Lokola Nzambe ayebisi yo makambo oyo nyonso, ezali na moto moko te oyo azali na mayele mpe na bwanya lokola yo.
BSB
BSB:
Then Pharaoh said to Joseph, “Since God has made all this known to you, there is no one as discerning and wise as you.
40
LIN
Okozala mokonzi ya ndako na ngai mpe bato na ngai nyonso bakobanda kotosa mitindo na yo. Kaka kiti ya bokonzi nde ekosala ete ngai nazala na likolo na yo.
BSB
BSB:
You shall be in charge of my house, and all my people are to obey your commands. Only with regard to the throne will I be greater than you.”
41
LIN
Faraon alobaki na Jozefi : — Natie yo mokonzi ya mokili mobimba ya Ejipito.
BSB
BSB:
Pharaoh also told Joseph, “I hereby place you over all the land of Egypt.”
42
LIN
Faraon alongolaki lopete na ye na mosapi na ye mpe atiaki yango na mosapi ya Jozefi. Alatisaki ye bilamba ya lino ya kitoko mpe atiaki ye singa ya wolo na kingo.
BSB
BSB:
Then Pharaoh removed the signet ring from his finger, put it on Joseph’s finger, clothed him in garments of fine linen, and placed a gold chain around his neck.
43
LIN
Amatisaki ye na shareti na ye ya mibale mpe bato bazalaki koganga : « Bofukama ! » Boye, atiaki Jozefi mokonzi ya mokili mobimba ya Ejipito.
BSB
BSB:
He had Joseph ride in his second chariot, with men calling out before him, “Bow the knee!” So he placed him over all the land of Egypt.
44
LIN
Faraon alobaki lisusu na Jozefi : — Nazali Faraon. Kasi awa na Ejipito, moto moko te akotombola loboko to lokolo soki kaka na mitindo na yo te.
BSB
BSB:
And Pharaoh declared to Joseph, “I am Pharaoh, but without your permission, no one in all the land of Egypt shall lift his hand or foot.”
45
LIN
Faraon apesaki Jozefi kombo « Tsafinati-Paenea, » mpe apesaki ye Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, mpo ete azala mwasi na ye. Jozefi atambolaki na mokili ya Ejipito.
BSB
BSB:
Pharaoh gave Joseph the name Zaphenath-paneah, and he gave him Asenath daughter of Potiphera, priest of On, to be his wife. And Joseph took charge of all the land of Egypt.
46
LIN
Azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akotaki na mosala ya Faraon, mokonzi ya Ejipito. Jozefi alongwaki na miso ya Faraon mpe atambolaki na mokili mobimba ya Ejipito.
BSB
BSB:
Now Joseph was thirty years old when he entered the service of Pharaoh king of Egypt. And Joseph left Pharaoh’s presence and traveled throughout the land of Egypt.
47
LIN
Na mibu sambo ya bofuluki, mabele ebotaki mingi.
BSB
BSB:
During the seven years of abundance, the land brought forth bountifully.
48
LIN
Jozefi asangisaki biloko nyonso ya kolia oyo ebotaki na mibu yango sambo ya bofuluki kati na Ejipito mpe abombaki yango kati na engumba. Na engumba moko na moko, atiaki biloko ya kolia oyo ewutaki na bilanga oyo ezalaki zingazinga na yango.
BSB
BSB:
During those seven years, Joseph collected all the excess food in the land of Egypt and stored it in the cities. In every city he laid up the food from the fields around it.
49
LIN
Jozefi abombaki ble ebele lokola zelo ya ebale monene, ezalaki mingi koleka ; yango wana bakataki kotanga, pamba te bakokaki kotanga yango lisusu te.
BSB
BSB:
So Joseph stored up grain in such abundance, like the sand of the sea, that he stopped keeping track of it; for it was beyond measure.
50
LIN
Liboso ete mibu ya nzala makasi eya, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale.
BSB
BSB:
Before the years of famine arrived, two sons were born to Joseph by Asenath daughter of Potiphera, priest of On.
51
LIN
Jozefi apesaki mwana na ye ya liboso kombo « Manase, » pamba te amilobelaki : « Nzambe asali ete nabosana pasi na ngai nyonso mpe bokabwani na ngai na libota mobimba ya tata na ngai. »
BSB
BSB:
Joseph named the firstborn Manasseh, saying, “God has made me forget all my hardship and all my father’s household.”
52
LIN
Apesaki mwana na ye ya mibale kombo « Efrayimi, » pamba te amilobelaki : « Nzambe apesi ngai mabota na mokili epai wapi namonaki pasi. »
BSB
BSB:
And the second son he named Ephraim, saying, “God has made me fruitful in the land of my affliction.”
53
LIN
Mibu sambo ya bofuluki oyo ezalaki na Ejipito ekomaki na suka,
BSB
BSB:
When the seven years of abundance in the land of Egypt came to an end,
54
LIN
mpe mibu sambo ya nzala makasi ebandaki, ndenge kaka Jozefi alobaki. Nzala makasi ekotaki na mikili nyonso, kasi na mokili mobimba ya Ejipito biloko ya kolia ezangaki te.
BSB
BSB:
the seven years of famine began, just as Joseph had said. And although there was famine in every country, there was food throughout the land of Egypt.
55
LIN
Tango bato nyonso ya Ejipito bakomaki na nzala makasi, bagangaki epai ya Faraon mpo na koluka biloko ya kolia. Bongo Faraon alobaki na bato nyonso ya Ejipito : « Bokende epai ya Jozefi mpe bosala makambo oyo akoyebisa bino. »
BSB
BSB:
When extreme hunger came to all the land of Egypt and the people cried out to Pharaoh for food, he told all the Egyptians, “Go to Joseph and do whatever he tells you.”
56
LIN
Tango nzala ekotaki na mokili mobimba ya Ejipito, Jozefi afungolaki ndako oyo batiaki biloko mpe atekaki ble epai ya bato ya Ejipito ; kasi nzala makasi ekobaki kaka.
BSB
BSB:
When the famine had spread over all the land, Joseph opened up all the storehouses and sold grain to the Egyptians; for the famine was severe in the land of Egypt.
57
LIN
Mikili nyonso ezalaki koya na Ejipito mpo na kosomba ble epai ya Jozefi mpo ete nzala makasi ekotaki na mokili mobimba.
BSB
BSB:
And every nation came to Joseph in Egypt to buy grain, because the famine was severe over all the earth.
Chapter complete
You’ve read Genesis 41
Chapter 41 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 42
Read Genesis 42
Listen
Back to Genesis 40
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 41
A question this chapter raises
Was Noah’s flood global?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 40
Genesis 41
Genesis 42