Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.0.2
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
44
LIN
BSB
A
a
Genesis 44
44
Genesis
Joseph
Lingala Bible
Joseph
, person
Judah
, person
Benjamin
, person
Canaan
, place
Pharaoh
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Jozefi apesaki mitindo epai ya moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako na ye : « Tondisa biloko ya kolia na basaki ya bato oyo kolanda kilo oyo bakoki komema mpe tia mbongo ya moko na moko na moto ya saki na ye.
BSB
BSB:
Then Joseph instructed his steward: “Fill the men’s sacks with as much food as they can carry, and put each one’s silver in the mouth of his sack.
2
LIN
Okotia kopo na ngai oyo ya palata na moto ya saki ya leki na bango ya suka elongo na mbongo na ye ya ble. » Moto yango asalaki ndenge kaka Jozefi alobaki na ye.
BSB
BSB:
Put my cup, the silver one, in the mouth of the youngest one’s sack, along with the silver for his grain.” So the steward did as Joseph had instructed.
3
LIN
Na tongo-tongo, batikaki bandeko ya Jozefi kozonga elongo na ba-ane na bango.
BSB
BSB:
At daybreak, the men were sent on their way with their donkeys.
4
LIN
Wana babimaki na engumba, bamikomelaki nanu mosika te, Jozefi alobaki na moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako na ye : « Telema, landa bato wana ! Mpe tango okokanga bango, tuna bango : mpo na nini bozongisi mabe na malamu ?
BSB
BSB:
They had not gone far from the city when Joseph told his steward, “Pursue the men at once, and when you overtake them, ask, ‘Why have you repaid good with evil?
5
LIN
Mpo na nini boyibi kopo oyo nkolo na ngai amelelaka mayi mpe asalelaka mpo na koyeba makambo oyo ekoya ? Likambo oyo bosali ezali penza mabe. »
BSB
BSB:
Is this not the cup my master drinks from and uses for divination? What you have done is wicked!’”
6
LIN
Mokambi ya ndako ya Jozefi akangaki bango mpe alobelaki bango lolenge nkolo na ye atindaki ye.
BSB
BSB:
When the steward overtook them, he relayed these words to them.
7
LIN
Kasi bazongiselaki ye : — Mpo na nini nkolo na biso alobi makambo ya boye ? Basali na yo bakoki kosala makambo ya boye te.
BSB
BSB:
“Why does my lord say these things?” they asked. “Your servants could not possibly do such a thing.
8
LIN
Tomemelaki yo mbongo oyo tomonaki tango tofungolaki basaki na biso wuta na mokili ya Kanana. Ndenge nini tokoki lisusu koyiba wolo to palata kati na ndako ya nkolo na yo ?
BSB
BSB:
We even brought back to you from the land of Canaan the silver we found in the mouths of our sacks. Why would we steal silver or gold from your master’s house?
9
LIN
Soki moko kati na basali na yo amonani ete azali na yango, akokufa ; mpe biso bamosusu oyo totikali, tokokoma bawumbu ya nkolo na biso.
BSB
BSB:
If any of your servants is found to have it, he must die, and the rest will become slaves of my lord.”
10
LIN
Moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako ya Jozefi alobaki : — Malamu mingi ! Tika ete ezala ndenge bolobi ! Moto oyo akomonana ete azali na yango, akokoma mowumbu na ngai. Bino ba-oyo botikali, bokozala na likambo te.
BSB
BSB:
“As you say,” replied the steward. “But only the one who is found with the cup will be my slave, and the rest of you shall be free of blame.”
11
LIN
Moko na moko akitisaki saki na ye na lombangu na mabele mpe afungolaki yango.
BSB
BSB:
So each one quickly lowered his sack to the ground and opened it.
12
LIN
Moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Jozefi abandaki koluka kobanda na kulutu kino na leki. Mpe kopo emonanaki na saki ya Benjame.
BSB
BSB:
The steward searched, beginning with the oldest and ending with the youngest—and the cup was found in Benjamin’s sack.
13
LIN
Tango bamonaki bongo, bapasolaki bilamba na bango ; bazongisaki biloko na ba-ane na bango mpe bazongaki bango nyonso na engumba.
BSB
BSB:
Then they all tore their clothes, loaded their donkeys, and returned to the city.
14
LIN
Jozefi azalaki kaka na ndako. Tango Yuda na bandeko na ye ya mibali bakotaki na ndako, bagumbamaki kino na se liboso na ye.
BSB
BSB:
When Judah and his brothers arrived at Joseph’s house, he was still there, and they fell to the ground before him.
15
LIN
Jozefi alobaki na bango : — Likambo nini oyo bosali ? Boyebi te ete moto lokola ngai nazali na makoki ya komona makambo na bosoloka ?
BSB
BSB:
“What is this deed you have done?” Joseph declared. “Do you not know that a man like me can surely divine the truth?”
16
LIN
Yuda azongisaki : — Likambo nini tokoki koloba na nkolo na ngai ? Tokoloba lisusu nini ? Ndenge nini tokoki kotalisa ete toyebi likambo te ? Nzambe alakisi polele mbeba ya basali na yo. Tokomi sik’oyo bawumbu ya nkolo na ngai, biso nyonso elongo na ye oyo amonani ete azalaki na kopo kati na saki na ye.
BSB
BSB:
“What can we say to my lord?” Judah replied. “How can we plead? How can we justify ourselves? God has exposed the iniquity of your servants. We are now my lord’s slaves—both we and the one who was found with the cup.”
17
LIN
Kasi Jozefi alobaki : — Nakoki kosala likambo ya boye te ! Kaka moto oyo amonani ete azalaki na kopo kati na saki na ye nde akozala mowumbu na ngai. Bino ba-oyo botikali, bozonga na kimia epai ya tata na bino.
BSB
BSB:
But Joseph replied, “Far be it from me to do this. The man who was found with the cup will be my slave. The rest of you may return to your father in peace.”
18
LIN
Yuda apusanaki pembeni na ye mpe alobaki : — Nabondeli yo, nkolo na ngai ! Tika ete mosali na yo aloba liloba moko epai ya nkolo na ngai. Kosilikela mosali na yo te, pamba te ndenge Faraon azali, ndenge wana mpe yo ozali.
BSB
BSB:
Then Judah approached Joseph and said, “Sir, please let your servant speak personally to my lord. Do not be angry with your servant, for you are equal to Pharaoh himself.
19
LIN
Nkolo na ngai atunaki basali na ye : « Bozali na tata to na ndeko mosusu ya mobali ? »
BSB
BSB:
My lord asked his servants, ‘Do you have a father or a brother?’
20
LIN
Tozongiselaki nkolo na ngai : « Tozali na tata oyo akomi mobange mpe ndeko mobali ya leki oyo babotelaki tata na biso na kimobange. Ndeko na ye ya mobali akufa mpe atikala kaka ye moko mwana mobali na libumu ya mama na ye, mpe tata na ye alingaka ye mingi. »
BSB
BSB:
And we answered, ‘We have an elderly father and a younger brother, the child of his old age. The boy’s brother is dead. He is the only one of his mother’s sons left, and his father loves him.’
21
LIN
Bongo olobaki na basali na yo : « Bomemela ngai ye mpo ete nakoka komona ye na miso na ngai. »
BSB
BSB:
Then you told your servants, ‘Bring him down to me so that I can see him for myself.’
22
LIN
Tozongiselaki nkolo na ngai : « Elenge mobali akoki kotika tata na ye te ; soki atiki ye, tata na ye akokufa. »
BSB
BSB:
So we said to my lord, ‘The boy cannot leave his father. If he were to leave, his father would die.’
23
LIN
Kasi olobaki na basali na yo : « Soki leki na bino ya mobali ayei elongo na bino te, bokomona lisusu elongi na ngai te. »
BSB
BSB:
But you said to your servants, ‘Unless your younger brother comes down with you, you will not see my face again.’
24
LIN
Tango tozongaki epai ya mosali na yo, tata na ngai, toyebisaki ye makambo nyonso oyo nkolo na ngai alobaki.
BSB
BSB:
Now when we returned to your servant my father, we relayed your words to him.
25
LIN
Bongo tata na biso alobaki : « Bozonga mpe bosomba ndambo ya biloko ya kolia. »
BSB
BSB:
Then our father said, ‘Go back and buy us some food.’
26
LIN
Kasi tozongisaki : « Tokoki kokende te. Tokokende kaka soki leki na biso ya mobali azali elongo na biso. Tokoki komona elongi ya moto wana te soki leki na biso ya mobali azali elongo na biso te. »
BSB
BSB:
But we answered, ‘We cannot go down there unless our younger brother goes with us. So if our younger brother is not with us, we cannot see the man.’
27
LIN
Mosali na yo, tata na biso, alobaki na biso : « Boyebi ete mwasi na ngai, Rasheli, abotelaki ngai bana mibale ya mibali.
BSB
BSB:
And your servant my father said to us, ‘You know that my wife bore me two sons.
28
LIN
Moko na bango akenda mosika na ngai. Nakanisi ete ezali ya solo, nyama moko ya mabe esila kolia ye. Banda tango wana, natikala komona ye lisusu te.
BSB
BSB:
When one of them was gone, I said: “Surely he has been torn to pieces.” And I have not seen him since.
29
LIN
Soki bozwi ngai lisusu mwana oyo mpe soki likama ekweyeli ye, bokoboma ngai na pasi, na kimobange na ngai. »
BSB
BSB:
Now if you also take this one from me and harm comes to him, you will bring my gray hair down to Sheol in sorrow.’
30
LIN
Sik’oyo, soki elenge mobali azali elongo na biso te tango nakozonga epai ya tata na ngai, mosali na yo, mpe soki tata na ngai, oyo motema na ye ekangama makasi na motema ya elenge mobali oyo,
BSB
BSB:
So if the boy is not with us when I return to your servant, and if my father, whose life is wrapped up in the boy’s life,
31
LIN
amoni ete elenge mobali azali elongo na biso te, wana akokufa. Basali na yo bakoboma tata na biso na pasi na kimobange na ye.
BSB
BSB:
sees that the boy is not with us, he will die. Then your servants will have brought the gray hair of your servant our father down to Sheol in sorrow.
32
LIN
Pamba te ngai mosali na yo, nandimaki, na miso ya tata na ngai, kobatela elenge mobali oyo. Nalobaki : « Soki nazongiseli yo ye te, nakozala na ngambo liboso na yo tata na ngai, bomoi na ngai mobimba. »
BSB
BSB:
Indeed, your servant guaranteed the boy’s safety to my father, saying, ‘If I do not return him to you, I will bear the guilt before you, my father, all my life.’
33
LIN
Yango wana sik’oyo, nabondeli yo, tika ete mosali na yo akoma mowumbu ya nkolo na ngai na esika ya elenge mobali oyo mpe tika ete elenge mobali azonga elongo na bandeko na ye ya mibali.
BSB
BSB:
Now please let your servant stay here as my lord’s slave in place of the boy. Let him return with his brothers.
34
LIN
Ndenge nini nakoki kozonga epai ya tata na ngai soki elenge mobali azali elongo na ngai te ? Kotika te ete namona pasi oyo ekokomela tata na ngai !
BSB
BSB:
For how can I go back to my father without the boy? I could not bear to see the misery that would overwhelm him.”
Chapter complete
You’ve read Genesis 44
Chapter 44 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 45
Read Genesis 45
Back to Genesis 43
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 44
Ask Study Help
Ask anything about Genesis 44
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 43
Genesis 44
Genesis 45