Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.0.3
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
45
LIN
BSB
A
a
Genesis 45
45
Genesis
Joseph
Lingala Bible
Egypt
, place
Joseph
, person
Pharaoh
, person
Israel
, person
Benjamin
, person
Canaan
, place
Goshen
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Jozefi akokaki lisusu komikanga te liboso ya bato nyonso oyo bazalaki liboso na ye, agangaki : « Bobimisa bato nyonso ! » Boye, moto moko te azalaki pembeni na ye tango amimonisaki epai ya bandeko na ye ya mibali.
BSB
BSB:
Then Joseph could no longer control himself before all his attendants, and he cried out, “Send everyone away from me!” So none of them were with Joseph when he made himself known to his brothers.
2
LIN
Lokola alelaki na mongongo makasi, bato ya Ejipito bayokaki ye ; mpe sango ekendeki kino na ndako ya Faraon.
BSB
BSB:
But he wept so loudly that the Egyptians heard him, and Pharaoh’s household soon heard of it.
3
LIN
Jozefi alobaki na bandeko na ye ya mibali : — Nazali Jozefi ! Tata na ngai azali nanu na bomoi ? Kasi bandeko na ye bakokaki koyanola ye te, pamba te bazalaki kolenga liboso na ye.
BSB
BSB:
Joseph said to his brothers, “I am Joseph! Is my father still alive?” But they were unable to answer him, because they were terrified in his presence.
4
LIN
Jozefi alobaki na bango : — Bopusana pembeni na ngai ! Tango bapusanaki, alobaki : — Nazali Jozefi, ndeko na bino ya mobali oyo botekaki mpo ete bamema ngai na Ejipito.
BSB
BSB:
Then Joseph said to his brothers, “Please come near me.” And they did so. “I am Joseph, your brother,” he said, “the one you sold into Egypt!
5
LIN
Kasi sik’oyo, bomitungisa te mpe bozala na mawa te na ndenge botekaki ngai awa. Ezali mpo na kobikisa bomoi na bino nde Nzambe atindaki ngai liboso na bino.
BSB
BSB:
And now, do not be distressed or angry with yourselves that you sold me into this place, because it was to save lives that God sent me before you.
6
LIN
Oyo ezali mobu ya mibale wuta nzala makasi ekotaki na mokili ; mpe na mibu mitano oyo ezali koya, bakolona te mpe bakobuka te.
BSB
BSB:
For the famine has covered the land these two years, and there will be five more years without plowing or harvesting.
7
LIN
Kasi Nzambe atindaki ngai liboso na bino mpo ete bowumela na mokili mpe bobikisa bomoi na bino na nzela ya kokangolama monene.
BSB
BSB:
God sent me before you to preserve you as a remnant on the earth and to save your lives by a great deliverance.
8
LIN
Ezali bino te bato botindaki ngai awa, kasi ezali nde Nzambe. Akomisaki ngai tata ya Faraon, nkolo ya ndako na ye mpe moyangeli ya mokili mobimba ya Ejipito.
BSB
BSB:
Therefore it was not you who sent me here, but God, who has made me a father to Pharaoh—lord of all his household and ruler over all the land of Egypt.
9
LIN
Bozonga noki epai ya tata na ngai mpe boloba na ye : « Mwana na yo, Jozefi, alobi : ‹ Nzambe akomisa ngai nkolo ya Ejipito mobimba ; yaka epai na ngai, kowumela te.
BSB
BSB:
Now return quickly to my father and tell him, ‘This is what your son Joseph says: God has made me lord of all Egypt. Come down to me without delay.
10
LIN
Okovanda na etuka ya Gosheni mpe okozala pembeni na ngai : yo, bana na yo mpe bakitani na yo, bameme na yo, bantaba na yo, bangombe na yo mpe biloko nyonso oyo ozali na yango.
BSB
BSB:
You shall settle in the land of Goshen and be near me—you and your children and grandchildren, your flocks and herds, and everything you own.
11
LIN
Kuna, nakokokisa baposa na yo nyonso, pamba te mibu mitano ya nzala makasi ezali koya ; soki te, yo elongo na bana na yo mpe bibwele na yo nyonso, bokokoma na pasi.
BSB
BSB:
And there I will provide for you, because there will be five more years of famine. Otherwise, you and your household and everything you own will come to destitution.’
12
LIN
Bino moko bozali komona ! Ndeko na ngai, Benjame, akoki mpe komona yango, ete ezali ngai moto nazali koloba na bino.
BSB
BSB:
Behold! You and my brother Benjamin can see that I, Joseph, am the one speaking with you.
13
LIN
Boyebisa tata na ngai lokumu nyonso oyo nazali na yango awa na Ejipito, boyebisa ye makambo nyonso oyo bosili komona mpe bomemela ngai ye awa na lombangu. › »
BSB
BSB:
Tell my father about all my splendor in Egypt and everything you have seen. And bring my father down here quickly.”
14
LIN
Sima, amibwakaki na kingo ya ndeko na ye Benjame mpe alelaki ; Benjame mpe akangaki ye na kingo, bongo alelaki.
BSB
BSB:
Then Joseph threw his arms around his brother Benjamin and wept, and Benjamin wept as they embraced.
15
LIN
Apesaki bandeko na ye nyonso beze mpe alelaki. Sima na yango, basololaki.
BSB
BSB:
Joseph kissed each of his brothers as he wept over them. And afterward his brothers talked with him.
16
LIN
Tango sango ekomaki na ndako ya Faraon ete bandeko ya Jozefi bayei, Faraon elongo na bakambi na ye nyonso basepelaki.
BSB
BSB:
When the news reached Pharaoh’s house that Joseph’s brothers had come, Pharaoh and his servants were pleased.
17
LIN
Faraon alobaki na Jozefi : — Yebisa bandeko na yo : « Botia biloko likolo ya banyama na bino mpe bozonga na mokili ya Kanana.
BSB
BSB:
Pharaoh said to Joseph, “Tell your brothers, ‘Do as follows: Load your animals and return to the land of Canaan.
18
LIN
Boyela ngai tata na bino mpe mabota na bino ; nakopesa bino mabele oyo eleki kitoko kati na Ejipito mpe bokolia biloko na yango oyo eleki kitoko. »
BSB
BSB:
Then bring your father and your families and return to me. I will give you the best of the land of Egypt, and you shall eat from the fat of the land.’
19
LIN
Okoyebisa bango lisusu : « Bozwa ndambo ya bashario ya Ejipito mpo na bana mpe basi na bino ; bongo bozwa tata na bino mpe bozonga awa.
BSB
BSB:
You are also directed to tell them: ‘Take wagons from the land of Egypt for your young children and your wives, and bring your father and come back.
20
LIN
Boyoka mawa te mpo na oyo bokotika na Kanana, pamba te biloko nyonso ya kitoko oyo ezali na Ejipito ekozala mpo na bino. »
BSB
BSB:
But pay no regard to your belongings, for the best of all the land of Egypt is yours.’”
21
LIN
Bana ya Isalaele basalaki makambo oyo bayebisaki bango. Jozefi apesaki bango bashario ndenge Faraon apesaki mitindo mpe apesaki bango bilei mosusu mpo na mobembo na bango.
BSB
BSB:
So the sons of Israel did as they were told. Joseph gave them wagons as Pharaoh had instructed, and he also gave them provisions for their journey.
22
LIN
Jozefi apesaki epai ya moko na moko kati na bango bilamba ya sika ; apesaki Benjame mbongo ya bibende, nkama misato, elongo na bilamba ya sika.
BSB
BSB:
He gave new garments to each of them, but to Benjamin he gave three hundred shekels of silver and five sets of clothes.
23
LIN
Atindelaki tata na ye biloko oyo : ba-ane zomi etonda na bilamba ya kitoko ya Ejipito mpe bampunda zomi ya basi etonda na ble, mapa mpe bilei mpo na mobembo na ye.
BSB
BSB:
And he sent to his father the following: ten donkeys loaded with the best of Egypt, and ten female donkeys loaded with grain and bread and provisions for his father’s journey.
24
LIN
Jozefi atikaki bandeko na ye kokende. Tango bazali kolongwa, alobaki na bango : — Boswana te na nzela.
BSB
BSB:
Then Joseph sent his brothers on their way, and as they were leaving, he said to them, “Do not quarrel on the way!”
25
LIN
Balongwaki na Ejipito mpe bakendeki epai ya tata na bango Jakobi, na mokili ya Kanana.
BSB
BSB:
So the brothers went up out of Egypt and came to their father Jacob in the land of Canaan.
26
LIN
Balobaki na ye : — Jozefi azali nanu na bomoi. Ye nde moto azali koyangela Ejipito mobimba. Jakobi ayokaki nzoto malili mpe andimelaki bango te.
BSB
BSB:
“Joseph is still alive,” they said, “and he is ruler over all the land of Egypt!” But Jacob was stunned, for he did not believe them.
27
LIN
Kasi tango bayebisaki ye makambo nyonso oyo Jozefi alobaki mpo na bango mpe tango amonaki bashario oyo Jozefi atindaki mpo na komema ye na Ejipito, molimo ya tata na bango Jakobi ezongaki.
BSB
BSB:
However, when they relayed all that Joseph had told them, and when he saw the wagons that Joseph had sent to carry him back, the spirit of their father Jacob was revived.
28
LIN
Mpe Isalaele alobaki : — Ya solo, nandimi ete mwana na ngai Jozefi azali nanu na bomoi ; nakokende mpe nakomona ye liboso ete nakufa.
BSB
BSB:
“Enough!” declared Israel. “My son Joseph is still alive! I will go to see him before I die.”
Chapter complete
You’ve read Genesis 45
Chapter 45 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 46
Read Genesis 46
Back to Genesis 44
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 45
Ask Study Help
Ask anything about Genesis 45
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 44
Genesis 45
Genesis 46