Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.0.3
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
46
LIN
BSB
A
a
Genesis 46
46
Genesis
Joseph
Lingala Bible
Jacob
, person
Egypt
, place
Joseph
, person
Canaan
, place
Pharaoh
, person
Rachel
, person
Goshen
, place
Judah
, person
52 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Isalaele akendeki na nyonso oyo azalaki na yango. Tango akomaki na Beri-Sheba, abonzaki mbeka epai ya Nzambe ya Izaki, tata na ye.
BSB
BSB:
So Israel set out with all that he had, and when he came to Beersheba, he offered sacrifices to the God of his father Isaac.
2
LIN
Na butu, Nzambe alobaki na Isalaele na nzela ya emoniseli : — Jakobi ! Jakobi ! Jakobi azongisaki : — Ngai oyo.
BSB
BSB:
And that night God spoke to Israel in a vision: “Jacob, Jacob!” He said. “Here I am,” replied Jacob.
3
LIN
Nzambe alobaki : — Nazali Nzambe, Nzambe ya tata na yo. Kobanga te kokende na Ejipito, pamba te nakokomisa yo ekolo monene kuna.
BSB
BSB:
“I am God,” He said, “the God of your father. Do not be afraid to go down to Egypt, for I will make you into a great nation there.
4
LIN
Ngai moko nakokende elongo na yo na Ejipito ; mpe ya solo, nakozongisa yo lisusu. Loboko ya Jozefi ekozipa miso na yo.
BSB
BSB:
I will go down with you to Egypt, and I will surely bring you back. And Joseph’s own hands will close your eyes.”
5
LIN
Bongo Jakobi alongwaki na Beri-Sheba. Bana mibali ya Isalaele bamatisaki na bashario oyo Faraon atindaki mpo na komema ye : tata na bango Jakobi, bana na bango mpe basi na bango.
BSB
BSB:
Then Jacob departed from Beersheba, and the sons of Israel took their father Jacob in the wagons Pharaoh had sent to carry him, along with their children and wives.
6
LIN
Bamemaki lisusu bibwele na bango mpe biloko nyonso oyo bazalaki na yango na mokili ya Kanana ; mpe Jakobi elongo na bakitani na ye nyonso bakendeki na Ejipito.
BSB
BSB:
They also took the livestock and possessions they had acquired in the land of Canaan, and Jacob and all his offspring went to Egypt.
7
LIN
Azwaki elongo na ye mpo na kokende na Ejipito : bana na ye ya mibali, bakoko na ye ya mibali mpe bana na ye ya basi elongo na bakoko na ye ya basi : bakitani na ye nyonso.
BSB
BSB:
Jacob took with him to Egypt his sons and grandsons, and his daughters and granddaughters—all his offspring.
8
LIN
Tala bakombo ya bana mibali ya Isalaele, oyo bakendeki na Ejipito : Ribeni, mwana liboso ya Jakobi.
BSB
BSB:
Now these are the names of the sons of Israel (Jacob and his descendants) who went to Egypt: Reuben, Jacob’s firstborn.
9
LIN
Bana mibali ya Ribeni : Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi.
BSB
BSB:
The sons of Reuben: Hanoch, Pallu, Hezron, and Carmi.
10
LIN
Bana mibali ya Simeoni : Yemuweli, Yamini, Owadi, Yakini, Tsoari mpe Saulo, mwana mobali oyo babotelaki ye na mwasi ya mokili ya Kanana.
BSB
BSB:
The sons of Simeon: Jemuel, Jamin, Ohad, Jachin, Zohar, and Shaul the son of a Canaanite woman.
11
LIN
Bana mibali ya Levi : Gerishoni, Keati mpe Merari.
BSB
BSB:
The sons of Levi: Gershon, Kohath, and Merari.
12
LIN
Bana mibali ya Yuda : Eri, Onani, Shela, Peretisi mpe Zera. Kasi Eri mpe Onani bakufaki na mokili ya Kanana. Bana mibali ya Peretsi : Etsironi mpe Amuli.
BSB
BSB:
The sons of Judah: Er, Onan, Shelah, Perez, and Zerah; but Er and Onan died in the land of Canaan. The sons of Perez: Hezron and Hamul.
13
LIN
Bana mibali ya Isakari : Tola, Puwa, Yashubi mpe Shimironi.
BSB
BSB:
The sons of Issachar: Tola, Puvah, Job, and Shimron.
14
LIN
Bana mibali ya Zabuloni : Seredi, Eloni mpe Yaleyeli.
BSB
BSB:
The sons of Zebulun: Sered, Elon, and Jahleel.
15
LIN
Bango nde bazalaki bana mibali oyo Lea abotelaki Jakobi kati na Padani-Arami ; bakisa Dina, mwana mwasi. Bana na ye nyonso ya basi mpe ya mibali bazalaki tuku misato na misato.
BSB
BSB:
These are the sons of Leah born to Jacob in Paddan-aram, in addition to his daughter Dinah. The total number of sons and daughters was thirty-three.
16
LIN
Bana mibali ya Gadi : Tsefoni, Agi, Shuni, Etsiboni, Eri, Arodi mpe Areeli.
BSB
BSB:
The sons of Gad: Ziphion, Haggi, Shuni, Ezbon, Eri, Arodi, and Areli.
17
LIN
Bana mibali ya Aseri : Yimina, Yishiva, Yishivi, Beria mpe ndeko na bango ya mwasi Sera. Bana mibali ya Beria : Eberi mpe Malikieli.
BSB
BSB:
The children of Asher: Imnah, Ishvah, Ishvi, Beriah, and their sister Serah. The sons of Beriah: Heber and Malchiel.
18
LIN
Bango nde bazalaki bana mibali oyo Zilipa abotelaki Jakobi ; Zilipa azalaki mwasi mosali oyo Labani apesaki epai ya Lea, mwana na ye ya mwasi. Bana na ye nyonso ya basi mpe ya mibali bazalaki zomi na motoba.
BSB
BSB:
These are the sons of Jacob born to Zilpah—whom Laban gave to his daughter Leah—sixteen in all.
19
LIN
Bana mibali ya Rasheli, mwasi ya Jakobi : Jozefi mpe Benjame.
BSB
BSB:
The sons of Jacob’s wife Rachel: Joseph and Benjamin.
20
LIN
Kati na mokili ya Ejipito, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya engumba Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale : Manase mpe Efrayimi.
BSB
BSB:
Manasseh and Ephraim were born to Joseph in the land of Egypt by Asenath daughter of Potiphera, priest of On.
21
LIN
Bana mibali ya Benjame : Bela, Bekeri, Ashibeli, Gera, Namani, Eyi, Roshi, Mupimi, Upime mpe Aridi.
BSB
BSB:
The sons of Benjamin: Bela, Becher, Ashbel, Gera, Naaman, Ehi, Rosh, Muppim, Huppim, and Ard.
22
LIN
Bango nde bazalaki bana mibali oyo Rasheli abotelaki Jakobi : bango nyonso bazalaki zomi na minei.
BSB
BSB:
These are the sons of Rachel born to Jacob—fourteen in all.
23
LIN
Mwana mobali ya Dani : Ushimi.
BSB
BSB:
The son of Dan: Hushim.
24
LIN
Bana mibali ya Nefitali : Yatseyeli, Guni, Yetseri mpe Shilemi.
BSB
BSB:
The sons of Naphtali: Jahzeel, Guni, Jezer, and Shillem.
25
LIN
Bango nde bazalaki bana mibali oyo Bila abotelaki Jakobi ; bango nyonso bazalaki sambo. Bila azalaki mwasi mosali oyo Labani apesaki epai ya mwana na ye ya mwasi Rasheli.
BSB
BSB:
These are the sons of Jacob born to Bilhah, whom Laban gave to his daughter Rachel—seven in all.
26
LIN
Bato nyonso oyo bakendeki na Ejipito elongo na Jakobi, oyo bazalaki penza bakitani na ye, longola basi ya bana na ye, bango nyonso bazalaki tuku motoba na motoba.
BSB
BSB:
All those belonging to Jacob who came to Egypt—his direct descendants, besides the wives of Jacob’s sons—numbered sixty-six persons.
27
LIN
Bana mibali ya Jozefi oyo babotamaki na Ejipito bazalaki mibale. Bato nyonso ya libota ya Jakobi oyo bakendeki na Ejipito bazalaki tuku sambo.
BSB
BSB:
And with the two sons who had been born to Joseph in Egypt, the members of Jacob’s family who went to Egypt were seventy in all.
28
LIN
Liboso ete Jakobi akutana na Jozefi, atindaki Yuda epai ya Jozefi mpo na kobongisa bokutani na bango na Gosheni. Tango bakomaki na Gosheni,
BSB
BSB:
Now Jacob had sent Judah ahead of him to Joseph to get directions to Goshen. When Jacob’s family arrived in the land of Goshen,
29
LIN
Jozefi abongisaki Shario na ye mpe akendeki kokutana na Isalaele, tata na ye, na Gosheni. Tango kaka akomaki liboso na ye, ayambaki tata na ye mpe alelaki mingi.
BSB
BSB:
Joseph prepared his chariot and went there to meet his father Israel. Joseph presented himself to him, embraced him, and wept profusely.
30
LIN
Isalaele alobaki na Jozefi : — Sik’oyo, nakoki na ngai kokufa mpo ete namoni yo penza na miso na ngai moko, mpe ozali nanu na bomoi !
BSB
BSB:
Then Israel said to Joseph, “Finally I can die, now that I have seen your face and know that you are still alive!”
31
LIN
Jozefi alobaki na bandeko na ye mpe na libota ya tata na ye : — Nakokende koyebisa Faraon : « Bandeko na ngai mpe libota ya tata na ngai, ba-oyo bavandaka na mokili ya Kanana, bayei epai na ngai.
BSB
BSB:
Joseph said to his brothers and to his father’s household, “I will go up and inform Pharaoh: ‘My brothers and my father’s household from the land of Canaan have come to me.
32
LIN
Bazali babateli bibwele, babokolaka bibwele. Bamemi bameme, bantaba, bangombe na bango mpe biloko nyonso oyo bazalaki na yango. »
BSB
BSB:
The men are shepherds; they raise livestock, and they have brought their flocks and herds and all that they own.’
33
LIN
Tango Faraon akobenga bino mpe akotuna bino : « Bosalaka mosala nini ? »
BSB
BSB:
When Pharaoh summons you and asks, ‘What is your occupation?’
34
LIN
Bokozongisa : « Basali na yo babokolaka bibwele wuta bomwana na biso kino sik’oyo ndenge bakoko na biso bazalaki kosala. » Soki kaka bolobi bongo, akopesa bino nzela ya kovanda na Gosheni, pamba te bato ya Ejipito balingaka te babateli nyonso ya bibwele.
BSB
BSB:
you are to say, ‘Your servants have raised livestock ever since our youth—both we and our fathers.’ Then you will be allowed to settle in the land of Goshen, since all shepherds are detestable to the Egyptians.”
Chapter complete
You’ve read Genesis 46
Chapter 46 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 47
Read Genesis 47
Back to Genesis 45
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 46
Ask Study Help
Ask anything about Genesis 46
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 45
Genesis 46
Genesis 47