Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.0.3
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Gen
Genesis
47
LIN
BSB
A
a
Genesis 47
47
Genesis
Joseph
Lingala Bible
Pharaoh
, person
Joseph
, person
Egypt
, place
Jacob
, person
Canaan
, place
Goshen
, place
Rameses
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Jozefi akendeki mpe alobaki na Faraon : — Tata na ngai elongo na bandeko na ngai bayei wuta na mokili ya Kanana na bameme, bantaba, bangombe mpe biloko na bango nyonso ; bazali sik’oyo na Gosheni.
BSB
BSB:
So Joseph went and told Pharaoh: “My father and my brothers, with their flocks and herds and all they own, have come from the land of Canaan and are now in Goshen.”
2
LIN
Jozefi aponaki bandeko na ye mitano mpe alakisaki bango epai ya Faraon.
BSB
BSB:
And he chose five of his brothers and presented them before Pharaoh.
3
LIN
Faraon atunaki bandeko ya Jozefi : — Bosalaka mosala nini ? Bazongiselaki Faraon : — Basali na yo bazali babateli bibwele ndenge kaka bakoko na biso bazalaki.
BSB
BSB:
“What is your occupation?” Pharaoh asked Joseph’s brothers. “Your servants are shepherds,” they replied, “both we and our fathers.”
4
LIN
Balobaki lisusu na Faraon : — Toyei kovanda awa, pamba te nzala makasi ezali kati na mokili ya Kanana mpe matiti ezali lisusu te mpo na bibwele ya basali na yo ; yango wana, tobondeli yo, pesa basali na yo nzela ya kovanda na Gosheni.
BSB
BSB:
Then they said to Pharaoh, “We have come to live in the land for a time, because there is no pasture for the flocks of your servants, since the famine in the land of Canaan has been severe. So now, please allow your servants to settle in the land of Goshen.”
5
LIN
Faraon alobaki na Jozefi : — Tata na yo mpe bandeko na yo bayei epai na yo ;
BSB
BSB:
Pharaoh said to Joseph, “Now that your father and brothers have come to you,
6
LIN
mokili ya Ejipito mpe ezali na maboko na yo. Vandisa tata na yo mpe bandeko na yo na eteni ya mabele oyo eleki kitoko ; tika ete bavanda na Gosheni. Mpe soki oyebi kati na bango bato ya mayele, pesa bango mokumba ya kobatela bibwele na ngai.
BSB
BSB:
the land of Egypt is before you; settle your father and brothers in the best part of the land. They may dwell in the land of Goshen. And if you know of any talented men among them, put them in charge of my own livestock.”
7
LIN
Jozefi amemaki tata na ye mpo na kolakisa ye epai ya Faraon. Tango Jakobi asilisaki kopambola Faraon,
BSB
BSB:
Then Joseph brought in his father Jacob and presented him before Pharaoh, and Jacob blessed Pharaoh.
8
LIN
Faraon atunaki Jakobi : — Ozali na mibu boni ?
BSB
BSB:
“How many years have you lived?” Pharaoh asked.
9
LIN
Jakobi azongiselaki Faraon : — Nazali na mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama. Mikolo ya bomoi na ngai ezali moke mpe ya pasi, ekokokana te na mikolo ya bomoi ya bakoko na ngai.
BSB
BSB:
“My travels have lasted 130 years,” Jacob replied. “My years have been few and hard, and they have not matched the years of the travels of my fathers.”
10
LIN
Jakobi apambolaki Faraon mpe alongwaki liboso na ye.
BSB
BSB:
Then Jacob blessed Pharaoh and departed from his presence.
11
LIN
Jozefi avandisaki tata na ye mpe bandeko na ye na Ejipito mpe apesaki bango eteni ya mabele oyo eleki kitoko kati na mokili, na mabele ya Ramisesi, ndenge kaka Faraon atindaki.
BSB
BSB:
So Joseph settled his father and brothers in the land of Egypt and gave them property in the best part of the land, the district of Rameses, as Pharaoh had commanded.
12
LIN
Jozefi apesaki lisusu biloko ya kolia epai ya tata na ye, bandeko na ye mpe epai ya libota ya tata na ye mobimba kolanda motango ya bana na bango.
BSB
BSB:
Joseph also provided his father and brothers and all his father’s household with food for their families.
13
LIN
Biloko ya kolia ezalaki lisusu te kati na mokili mobimba mpe nzala makasi eyaki. Mokili ya Ejipito mpe oyo ya Kanana ekawukaki na nzala makasi.
BSB
BSB:
There was no food, however, in all that region, because the famine was so severe; the lands of Egypt and Canaan had been exhausted by the famine.
14
LIN
Jozefi azwaki mbongo nyonso oyo azalaki kobomba tango bato ya mokili ya Ejipito mpe ya Kanana bazalaki kosomba ble epai na ye, amemaki yango na ndako ya Faraon.
BSB
BSB:
Joseph collected all the money to be found in the land of Egypt and the land of Canaan in exchange for the grain they were buying, and he brought it into Pharaoh’s palace.
15
LIN
Tango mbongo ya bato ya Ejipito mpe ya Kanana esilaki, bato nyonso ya Ejipito bayaki epai ya Jozefi mpe balobaki : — Pesa biso biloko ya kolia ! Mpo na nini tokufa na nzala na miso na yo ? Mpo ete mbongo na biso esili ?
BSB
BSB:
When the money from the lands of Egypt and Canaan was gone, all the Egyptians came to Joseph and said, “Give us food. Why should we die before your eyes? For our funds have run out!”
16
LIN
Jozefi azongisaki : — Soki bozali lisusu na mbongo te, bomemela ngai bibwele na bino. Bokopesa ngai bibwele na bino na esika ya mbongo.
BSB
BSB:
“Then bring me your livestock,” said Joseph. “Since the money is gone, I will sell you food in exchange for your livestock.”
17
LIN
Bamemaki epai ya Jozefi bampunda, bantaba mpe bangombe na bango ; bongo Jozefi apesaki bango bilei na esika ya bampunda, ba-ane, bameme, bantaba mpe bangombe na bango. Na mibu nyonso wana oyo Jozefi azalaki kopesa bango bilei, bango bazalaki kopesa ye bibwele na bango.
BSB
BSB:
So they brought their livestock to Joseph, and he gave them food in exchange for their horses, their flocks and herds, and their donkeys. Throughout that year he provided them with food in exchange for all their livestock.
18
LIN
Tango mibu wana esilaki, bayaki lisusu epai na ye na mibu oyo elandaki. Balobaki : — Tokoki kobombela nkolo na biso te ete mbongo na biso esili mpe bibwele na biso ekomi ya yo. Totikali lisusu na eloko moko te longola kaka banzoto na biso mpe mabele na biso.
BSB
BSB:
When that year was over, they came to him the second year and said, “We cannot hide from our lord that our money is gone and all our livestock belongs to you. There is nothing left for our lord except our bodies and our land.
19
LIN
Mpo na nini, biso elongo na mabele na biso, tokufa na miso na yo ? Somba biso kaka elongo na mabele na biso na motuya ya biloko ya kolia ; mpe biso elongo na mabele na biso, tokokoma bawumbu ya Faraon. Toboyi na biso kokufa na nzala, pesa biso milona ya kolona mpo ete tobika mpe mabele na biso ekoma esobe te.
BSB
BSB:
Why should we perish before your eyes—we and our land as well? Purchase us and our land in exchange for food. Then we, along with our land, will be slaves to Pharaoh. Give us seed that we may live and not die, and that the land may not become desolate.”
20
LIN
Jozefi asombaki mabele nyonso ya Ejipito mpo na Faraon, pamba te bato nyonso ya Ejipito batekaki bilanga na bango mpo ete nzala elekaki makasi. Boye mabele ekomaki ya Faraon.
BSB
BSB:
So Joseph acquired for Pharaoh all the land in Egypt; the Egyptians, one and all, sold their fields because the famine was so severe upon them. The land became Pharaoh’s,
21
LIN
Jozefi akomisaki bavandi ya bingumba nyonso ya Ejipito bawumbu ya Faraon.
BSB
BSB:
and Joseph reduced the people to servitude from one end of Egypt to the other.
22
LIN
Kasi asombaki mabele ya banganga-nzambe te, pamba te bazalaki kozwa tango nyonso biloko ebele kolanda mobeko ya Faraon ete bazwaka biloko ya kolia. Yango wana, banganga-nzambe batekaki mabele na bango te.
BSB
BSB:
However, he did not acquire the priests’ portion of the land, for it had been given to them by Pharaoh. They ate the rations that Pharaoh supplied; so they did not sell their land.
23
LIN
Jozefi alobaki na bato : — Nasombi bino lelo mpo na Faraon, bino mpe mabele na bino. Tala milona mpo na bino mpo ete bokoka kolona mabele.
BSB
BSB:
Then Joseph said to the people, “Now that I have acquired you and your land for Pharaoh this day, here is seed for you to sow in the land.
24
LIN
Kasi tango bokobuka mbuma, bokopesa eteni ya mitano epai ya Faraon. Biteni minei oyo mosusu, bokobomba yango lokola milona mpo na bilanga mpe lokola biloko ya kolia mpo na bino moko, mpo na mabota na bino mpe mpo na bana na bino.
BSB
BSB:
At harvest time, you are to give a fifth of it to Pharaoh, and four-fifths will be yours as seed for the field and food for yourselves and your households and children.”
25
LIN
Bazongisaki : — Obikisi bomoi na biso ! Lokola tozwi ngolu na miso na yo nkolo na biso, tokozala bawumbu ya Faraon.
BSB
BSB:
“You have saved our lives,” they said. “We have found favor in our lord’s eyes, and we will be Pharaoh’s servants.”
26
LIN
Bongo Jozefi akomisaki yango mobeko kino lelo kati na mabele ya Ejipito : eteni ya mitano ya bambuma nyonso oyo ekowuta na mabele ezali mpo na Faraon. Kasi mabele ya Banganga-Nzambe ekomaki ya Faraon te.
BSB
BSB:
So Joseph established a law that a fifth of the produce belongs to Pharaoh, and it is in effect in the land of Egypt to this day. Only the priests’ land does not belong to Pharaoh.
27
LIN
Boye bana ya Isalaele bavandaki na Ejipito, na Gosheni. Kuna bakomaki na bozwi ebele, babotaki bana mpe bakomaki ebele.
BSB
BSB:
Now the Israelites settled in the land of Egypt, in the region of Goshen. They acquired property there and became fruitful and increased greatly in number.
28
LIN
Jakobi awumelaki mibu zomi na sambo na Ejipito. Mpe mibu ya bomoi na ye ezalaki nkama moko na tuku minei na sambo.
BSB
BSB:
And Jacob lived in the land of Egypt seventeen years, and the length of his life was 147 years.
29
LIN
Tango mokolo ya kufa ya Isalaele ekomaki pene, abengaki Jozefi, mwana na ye ya mobali, mpe alobaki na ye : — Soki nazwi ngolu na miso na yo, tia loboko na yo na se ya mopende na ngai ; laka ngai ete okotalisa ngai bolamu mpe boyengebene, mpe okokunda ngai na Ejipito te.
BSB
BSB:
When the time drew near for Israel to die, he called his son Joseph and said to him, “If I have found favor in your eyes, put your hand under my thigh and promise to show me kindness and faithfulness. Do not bury me in Egypt,
30
LIN
Kasi tango nakolala elongo na bakoko na ngai, okobimisa ngai na Ejipito mpe okokunda ngai na esika oyo bakunda bango. Jozefi azongisaki : — Nakosala ndenge olobi.
BSB
BSB:
but when I lie down with my fathers, carry me out of Egypt and bury me with them.” Joseph answered, “I will do as you have requested.”
31
LIN
Bongo Jakobi alobaki lisusu : — Lapa ndayi mpo na kolakisa ete okosala ndenge olobi. Boye, Jozefi alapaki ndayi na miso na ye ; mpe Isalaele agumbamaki na koyekama na moto ya mbeto na ye.
BSB
BSB:
“Swear to me,” Jacob said. So Joseph swore to him, and Israel bowed in worship at the head of his bed.
Chapter complete
You’ve read Genesis 47
Chapter 47 of 50 in Genesis
Up next
Genesis 48
Read Genesis 48
Back to Genesis 46
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Genesis 47
Ask Study Help
Ask anything about Genesis 47
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Genesis 46
Genesis 47
Genesis 48