Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.8.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Hos
Hosea
6
LIN
BSB
A
a
Hosea 6
6
Hosea
God's case against Israel
Lingala Bible
Judah
, person
Ephraim
, person
Israel
, person
Gilead
, place
Shechem
, place
Adam
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Boya, tozonga epai na Yawe ! Akati-kati biso solo na biteni, kasi akobikisa biso ; azokisaki biso, kasi akotia kisi na bapota na biso.
BSB
BSB:
Come, let us return to the LORD. For He has torn us to pieces, but He will heal us; He has wounded us, but He will bind up our wounds.
2
LIN
Sima na mikolo mibale, akopesa biso lisusu bomoi ; na mokolo ya misato, akotelemisa biso lisusu mpo ete tozala na bomoi liboso na Ye.
BSB
BSB:
After two days He will revive us; on the third day He will raise us up, that we may live in His presence.
3
LIN
Toyeba Yawe, toluka penza koyeba Ye ; ndenge tongo etanaka solo, ndenge wana mpe akomonana : akoya epai na biso lokola mvula, lokola mvula oyo enokaka na pwasa mpe epolisaka mabele.
BSB
BSB:
So let us know—let us press on to know the LORD. As surely as the sun rises, He will appear; He will come to us like the rain, like the spring showers that water the earth.
4
LIN
Efrayimi, nasala yo lisusu nini ? Yuda, nasala yo lisusu nini ? Bolingo na bino mpo na Ngai ezali lokola londende ya tongo, lokola mamwe oyo elimwaka noki.
BSB
BSB:
What shall I do with you, O Ephraim? What shall I do with you, O Judah? For your loyalty is like a morning mist, like the early dew that vanishes.
5
LIN
Yango wana, na maloba ya basakoli na Ngai, nazali kokata-kata bino na biteni ; na maloba ya monoko na Ngai, nazali koboma bino, mpe bitumbu ezali kokweyela bino lokola mokalikali.
BSB
BSB:
Therefore I have hewn them by the prophets; I have slain them by the words of My mouth, and My judgments go forth like lightning.
6
LIN
Pamba te nasepelaka na boboto koleka mbeka, mpe na boyebi ya Nzambe koleka mbeka ya kotumba.
BSB
BSB:
For I desire mercy, not sacrifice, and the knowledge of God rather than burnt offerings.
7
LIN
Ndenge kaka Adamu asalaki, bango mpe babukaki boyokani na Ngai ; kuna, bazalaki sembo te liboso na Ngai.
BSB
BSB:
But they, like Adam, have transgressed the covenant; there they were unfaithful to Me.
8
LIN
Galadi ezali engumba ya bato mabe, etonda na bilembo ya makila.
BSB
BSB:
Gilead is a city of evildoers, tracked with footprints of blood.
9
LIN
Ndenge babomi babombamaka mpo na koluka kosala bato mabe, ndenge wana mpe Banganga-Nzambe basalaka : babomaka bato na nzela ya Sishemi ; ezali likambo ya somo penza !
BSB
BSB:
Like raiders who lie in ambush, so does a band of priests; they murder on the way to Shechem; surely they have committed atrocities.
10
LIN
Kati na libota ya Isalaele, namonaki makambo ya somo makasi : Efrayimi amipesaki na kindumba, mpe Isalaele akomaki mbindo.
BSB
BSB:
In the house of Israel I have seen a horrible thing: Ephraim practices prostitution there, and Israel is defiled.
11
LIN
Yo mpe lisusu, Yuda, tango ya kobuka mbuma ebongisami mpo na yo, sima na Ngai kozongisa bomengo ya bato na Ngai.
BSB
BSB:
Also for you, O Judah, a harvest is appointed, when I restore My people from captivity.
Chapter complete
You’ve read Hosea 6
Chapter 6 of 14 in Hosea
Up next
Hosea 7
Read Hosea 7
Back to Hosea 5
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Hosea 6
Ask Study Help
Ask anything about Hosea 6
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Hosea 5
Hosea 6
Hosea 7