Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.6.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Hos
Hosea
7
LIN
BSB
A
a
Hosea 7
7
Hosea
God's case against Israel
Lingala Bible
Ephraim
, person
Israel
, person
Egypt
, place
Assyria
, place
Samaria
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tango kaka nalingaki kobikisa Isalaele, masumu ya Efrayimi mpe mabe ya Samari ebimaki na pwasa, mpo ete batambolaki na lokuta ; miyibi babukaki bandako mpe bato mabe babotolaki bato biloko kati na babalabala.
BSB
BSB:
When I heal Israel, the iniquity of Ephraim will be exposed, as well as the crimes of Samaria. For they practice deceit and thieves break in; bandits raid in the streets.
2
LIN
Bamilobelaka te, kati na mitema na bango, ete Ngai nabosanaka te mabe nyonso oyo basalaka ; sik’oyo, misala na bango ya mabe ezingeli bango, ezali tango nyonso liboso na Ngai.
BSB
BSB:
But they fail to consider in their hearts that I remember all their evil. Now their deeds are all around them; they are before My face.
3
LIN
Basepelisaka mokonzi na nzela ya misala na bango ya mabe ; basepelisaka mpe bakambi na nzela ya lokuta na bango.
BSB
BSB:
They delight the king with their evil, and the princes with their lies.
4
LIN
Bango nyonso bazali bandumba, bapelaka na posa lokola moto ya fulu ya mapa, oyo molambi mapa akobaka te kobakisa koni, wuta na tango asangisaki farine kino mapa evimba.
BSB
BSB:
They are all adulterers, like an oven heated by a baker who needs not stoke the fire from the kneading to the rising of the dough.
5
LIN
Na mokolo ya feti ya mokonzi na biso, bakambi balangwaka masanga mpe mokonzi asanganaka na batioli.
BSB
BSB:
The princes are inflamed with wine on the day of our king; so he joins hands with those who mock him.
6
LIN
Wana mitema na bango epelaka lokola moto ya fulu, bapusanaka pene na ye na mayele mabe. Butu mobimba, balalaka na kanda ; mpe na tongo, kanda yango ekomaka kopela lokola moto.
BSB
BSB:
For they prepare their heart like an oven while they lie in wait; all night their anger smolders; in the morning it blazes like a flaming fire.
7
LIN
Bango nyonso bapelaka lokola moto ya fulu, batumbaka bakambi na bango ; mpe bakonzi na bango nyonso bakweyaka, moko te kati na bango abelelaka Ngai.
BSB
BSB:
All of them are hot as an oven, and they devour their rulers. All their kings fall; not one of them calls upon Me.
8
LIN
Efrayimi asangani na bikolo mosusu, akomi lokola galeti oyo ebela malamu te.
BSB
BSB:
Ephraim mixes with the nations; Ephraim is an unturned cake.
9
LIN
Bapaya bazali kosilisa ye makasi, kasi ye azali kososola yango te. Azali kokoma mobange, kasi azali kososola yango te.
BSB
BSB:
Foreigners consume his strength, but he does not notice. Even his hair is streaked with gray, but he does not know.
10
LIN
Lolendo ya Isalaele ezali kofunda ye, kasi azali komona nyonso wana pamba : azongeli te Yawe, Nzambe na ye ; mpe atako bongo, azali kaka koluka Ye te !
BSB
BSB:
Israel’s arrogance testifies against them, yet they do not return to the LORD their God; despite all this, they do not seek Him.
11
LIN
Efrayimi akomi lokola ebenga oyo ekosamaka na bopete mpe ezangi mayele : azali kosenga lisungi epai ya Ejipito, kasi azali mpe kokende na Asiri.
BSB
BSB:
So Ephraim has become like a silly, senseless dove—calling out to Egypt, then turning to Assyria.
12
LIN
Tango akendaka, nabwakelaka ye monyama mpe nakangaka ye ndenge bakangaka ndeke na likolo. Nakopesa ye etumbu oyo ekoki kolanda ndenge nakebisaki ye na tina na yango kati na lisanga.
BSB
BSB:
As they go, I will spread My net over them; I will bring them down like birds of the air. I will chastise them when I hear them flocking together.
13
LIN
Mawa na bango mpo ete bakimi mosika na Ngai ! Tika ete babebisama mpo ete batombokeli Ngai ! Wana nazalaki na Ngai kokangola bango, kasi bango, basepelaki kokosela Ngai makambo !
BSB
BSB:
Woe to them, for they have strayed from Me! Destruction to them, for they have rebelled against Me! Though I would redeem them, they speak lies against Me.
14
LIN
Babelelaka Ngai te wuta na mozindo ya mitema na bango, kasi balelaka na bambeto na bango. Tango bamikataka banzoloko mpo na kozwa ble mpe vino ya sika, bakomaka nde mosika na Ngai.
BSB
BSB:
They do not cry out to Me from their hearts when they wail upon their beds. They slash themselves for grain and new wine, but turn away from Me.
15
LIN
Ezali Ngai nde nateyaki mpe nakomisaki bango makasi, kasi bango bazalaka kaka na mabongisi ya kosala Ngai mabe.
BSB
BSB:
Although I trained and strengthened their arms, they plot evil against Me.
16
LIN
Bazongelaka te Ye-Oyo-Aleki-Likolo, bazali lokola tolotolo ebeba ; bakambi na bango bakokufa na mopanga likolo ya maloba na bango ezanga limemia. Mpo na yango, bakosambwa kati na Ejipito.
BSB
BSB:
They turn, but not to the Most High; they are like a faulty bow. Their leaders will fall by the sword for the cursing of their tongue; for this they will be ridiculed in the land of Egypt.
Chapter complete
You’ve read Hosea 7
Chapter 7 of 14 in Hosea
Up next
Hosea 8
Read Hosea 8
Back to Hosea 6
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Hosea 7
Ask Study Help
Ask anything about Hosea 7
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Hosea 6
Hosea 7
Hosea 8