Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.6.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Hos
Hosea
8
LIN
BSB
A
a
Hosea 8
8
Hosea
God's case against Israel
Lingala Bible
Israel
, person
Ephraim
, person
Samaria
, place
Judah
, person
Egypt
, place
Assyria
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tia kelelo na monoko na yo ! Lokola mpongo, pasi ekokitela Ndako ya Yawe, mpo ete babebisi boyokani na Ngai mpe batombokeli Mobeko na Ngai.
BSB
BSB:
Put the ram’s horn to your lips! An eagle looms over the house of the LORD, because the people have transgressed My covenant and rebelled against My law.
2
LIN
Isalaele azali kobelela Ngai : « Oh Nzambe na biso, toyebi Yo ! »
BSB
BSB:
Israel cries out to Me, “O our God, we know You!”
3
LIN
Kasi Isalaele abwaki makambo malamu ; yango wana, monguna akolanda ye.
BSB
BSB:
But Israel has rejected good; an enemy will pursue him.
4
LIN
Batunaki Ngai te tango batiaki bakonzi mpe baponaki bakambi. Bamisalelaki banzambe ya bikeko na palata mpe na wolo na bango mpo na libebi na bango moko.
BSB
BSB:
They set up kings, but not by Me. They make princes, but without My approval. With their silver and gold they make themselves idols, to their own destruction.
5
LIN
Oh Samari, nzambe na yo ya ekeko ya mwana ngombe ya mobali ezali nkele ! Kanda na Ngai epeli mpo na kobebisa bango. Kino tango nini bakokoka te kotambola na bopeto ?
BSB
BSB:
He has rejected your calf, O Samaria. My anger burns against them. How long will they be incapable of innocence?
6
LIN
Ewuti na Isalaele ! Ekeko wana ya mwana ngombe ya mobali, ezali monyangwisi bibende na moto nde asala yango ; ezali Nzambe te. Bakobuka yango biteni-biteni, mwana ngombe wana ya Samari.
BSB
BSB:
For this thing is from Israel—a craftsman made it, and it is not God. It will be broken to pieces, that calf of Samaria.
7
LIN
« Lokola baloni mopepe, bakobuka mopepe ya makasi. Nzete ya ble oyo ezanga moto ebimisaka farine te. Ezala soki ebimisi mito, ezali bapaya nde bakolia yango.
BSB
BSB:
For they sow the wind, and they shall reap the whirlwind. There is no standing grain; what sprouts fails to yield flour. Even if it should produce, the foreigners would swallow it up.
8
LIN
Isalaele abebisami ; tala bango wana kati na bikolo, bazali komonana lokola biloko pamba !
BSB
BSB:
Israel is swallowed up! Now they are among the nations like a worthless vessel.
9
LIN
Pamba te bakendeki na Asiri lokola ane ya zamba oyo ezali kotelengana yango moko. Efrayimi apesaki bakado epai ya bamakangu na ye.
BSB
BSB:
For they have gone up to Assyria like a wild donkey on its own. Ephraim has hired lovers.
10
LIN
Ata apesaki bakado kati na bikolo, sik’oyo Ngai nakosangisa bango esika moko mpe bakobanda kosila kokufa na se ya minyoko ya mokonzi moko ya nguya.
BSB
BSB:
Though they hire allies among the nations, I will now round them up, and they will begin to diminish under the oppression of the king of princes.
11
LIN
Ata Efrayimi atongi bitumbelo ebele mpo na kolongola masumu na ye, kasi bitumbelo yango ekomemisa ye kaka masumu.
BSB
BSB:
Though Ephraim multiplied the altars for sin, they became his altars for sinning.
12
LIN
Nakomelaki bango makambo ebele ya Mobeko na Ngai, kasi bamonaki yango lokola eloko moko ya mopaya.
BSB
BSB:
Though I wrote for them the great things of My law, they regarded them as something strange.
13
LIN
Bazali kobonza bambeka lokola likabo mpo na Ngai, mpe bazali kolia misuni ; kasi Yawe azali kosepela na bango te. Sik’oyo, akokanisa mabe na bango mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango : bakozonga na Ejipito.
BSB
BSB:
Though they offer sacrifices as gifts to Me, and though they eat the meat, the LORD does not accept them. Now He will remember their iniquity and punish their sins: They will return to Egypt.
14
LIN
Isalaele abosani Mokeli na ye mpe atongi bandako ya kitoko ; Yuda atongi bingumba ebele batonga makasi ; kasi Ngai nakotinda moto kati na bingumba na bango, mpe ekotumba bandako na bango ya kitoko. »
BSB
BSB:
Israel has forgotten his Maker and built palaces; Judah has multiplied its fortified cities. But I will send fire upon their cities, and it will consume their citadels.
Chapter complete
You’ve read Hosea 8
Chapter 8 of 14 in Hosea
Up next
Hosea 9
Read Hosea 9
Back to Hosea 7
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Hosea 8
Ask Study Help
Ask anything about Hosea 8
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Hosea 7
Hosea 8
Hosea 9