Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.13.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
John
John
4
LIN
BSB
A
a
John 4
4
John
The book of signs
Lingala Bible
Jesus
, person
Galilee
, place
Samaria
, place
Jacob
, person
Jerusalem
, place
Judea
, place
Joseph
, person
John
, person
3 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Yesu ayokaki ete Bafarizeo bazwi sango oyo ezali koloba ete akomi na bayekoli ebele koleka Yoane mpe azali kobatisa bato mingi koleka Yoane.
BSB
BSB:
When Jesus realized that the Pharisees were aware He was gaining and baptizing more disciples than John
2
LIN
(Nzokande, Yesu Ye moko azalaki kobatisa te, kasi ezalaki nde bayekoli na Ye.)
BSB
BSB:
(although it was not Jesus who baptized, but His disciples),
3
LIN
Boye, alongwaki na Yuda mpe azongaki na Galile.
BSB
BSB:
He left Judea and returned to Galilee.
4
LIN
Lokola asengelaki kolekela na Samari,
BSB
BSB:
Now He had to pass through Samaria.
5
LIN
akomaki na engumba Sishari ya Samari, oyo ezalaki mosika te na elanga oyo Jakobi apesaki epai ya mwana na ye, Jozefi.
BSB
BSB:
So He came to a town of Samaria called Sychar, near the plot of ground that Jacob had given to his son Joseph.
6
LIN
Nzokande libulu ya mayi ya Jakobi ezalaki kati na elanga yango. Boye lokola Yesu alembaki nzoto mpo na mobembo, avandaki pembeni ya libulu yango. Ezalaki pene ya ngonga ya midi.
BSB
BSB:
Since Jacob’s well was there, Jesus, weary from His journey, sat down by the well. It was about the sixth hour.
7
LIN
Tango mwasi moko ya engumba Samari akendeki kotoka mayi, Yesu alobaki na ye : — Pesa Ngai mayi mpo ete namela.
BSB
BSB:
When a Samaritan woman came to draw water, Jesus said to her,
“Give Me a drink.”
8
LIN
(Bayekoli ya Yesu bakendeki na engumba mpo na kosomba biloko ya kolia).
BSB
BSB:
(His disciples had gone into the town to buy food.)
9
LIN
Kasi mwasi yango alobaki : — Ebandi ndenge nini yo oyo ozali Moyuda osenga ngai, mwasi ya engumba Samari, mayi mpo ete omela ? —Pamba te Bayuda bazalaki koyokana te na bato ya Samari.—
BSB
BSB:
“You are a Jew,” said the woman. “How can You ask for a drink from me, a Samaritan woman?” (For Jews do not associate with Samaritans.)
10
LIN
Yesu azongiselaki ye : — Soki oyebaki likabo ya Nzambe mpe nani oyo asengi yo mayi, ezali yo nde olingaki kosenga Ye mayi mpo ete omela, mpe Ye alingaki kopesa yo mayi ya bomoi.
BSB
BSB:
Jesus answered,
“If you knew the gift of God and who is asking you for a drink, you would have asked Him, and He would have given you living water.”
11
LIN
Mwasi alobaki na Yesu : — Nkolo, ozali na eloko moko te mpo na kotoka mayi, mpe libulu ezali mozindo ; bongo mayi yango ya bomoi, olingaki kozwa yango wapi ?
BSB
BSB:
“Sir,” the woman replied, “You have nothing to draw with and the well is deep. Where then will You get this living water?
12
LIN
Koko na biso, Jakobi, apesa biso libulu oyo ; ye moko mpe amela mayi na yango, elongo na bana na ye mpe bibwele na ye. Boni, okanisi ete oleki ye ?
BSB
BSB:
Are You greater than our father Jacob, who gave us this well and drank from it himself, as did his sons and his livestock?”
13
LIN
Yesu azongiselaki ye : — Moto nyonso oyo amelaka mayi oyo, ayokaka lisusu posa ya mayi ;
BSB
BSB:
Jesus said to her,
“Everyone who drinks this water will be thirsty again.
14
LIN
kasi moto oyo akomela mayi oyo Ngai nakopesa ye akoyoka lisusu posa ya mayi te : mayi oyo Ngai nakopesa ye ekokoma kati na ye lokola etima ya mayi oyo ekawukaka te mpe etiolaka kino na bomoi ya seko.
BSB
BSB:
But whoever drinks the water I give him will never thirst. Indeed, the water I give him will become in him a fount of water springing up to eternal life.”
15
LIN
Mwasi yango alobaki na Yesu : — Nkolo, pesa ngai mayi yango mpo ete nayokaka lisusu posa ya mayi te mpe nazonga lisusu awa te mpo na kotoka mayi.
BSB
BSB:
The woman said to Him, “Sir, give me this water so that I will not get thirsty and have to keep coming here to draw water.”
16
LIN
Yesu alobaki na ye : — Kende, benga mobali na yo mpe zonga awa.
BSB
BSB:
Jesus told her,
“Go, call your husband and come back.”
17
LIN
Mwasi azongisaki : — Nazali na mobali te. Yesu alobaki na ye : — Ozali koloba penza ya solo ete ozali na mobali te,
BSB
BSB:
“I have no husband,” the woman replied. Jesus said to her,
“You are correct to say that you have no husband.
18
LIN
pamba te ozalaki na mibali mitano ; mpe ye oyo ozali na ye sik’oyo azali mpe mobali na yo te. Boye likambo oyo owuti koloba ezali ya solo.
BSB
BSB:
In fact, you have had five husbands, and the man you now have is not your husband. You have spoken truthfully.”
19
LIN
Mwasi yango alobaki na Yesu : — Nkolo, namoni ete ozali mosakoli.
BSB
BSB:
“Sir,” the woman said, “I see that You are a prophet.
20
LIN
Bakoko na biso, bato ya Samari, bagumbamelaki Nzambe na likolo ya ngomba oyo ; kasi bino, Bayuda, bolobaka ete esika epai wapi tosengeli kogumbamela ezali kati na Yelusalemi.
BSB
BSB:
Our fathers worshiped on this mountain, but you Jews say that the place where one must worship is in Jerusalem.”
21
LIN
Yesu azongiselaki ye : — Mwasi, ndima Ngai : tango ezali koya, tango oyo bakogumbamela lisusu Tata te na likolo ya ngomba oyo to kati na Yelusalemi.
BSB
BSB:
“Believe Me, woman,”
Jesus replied,
“a time is coming when you will worship the Father neither on this mountain nor in Jerusalem.
22
LIN
Bino, bato ya Samari, bogumbamelaka nzambe oyo boyebi te ; kasi biso, togumbamelaka Nzambe oyo toyebi, pamba te lobiko ewuti epai ya Bayuda.
BSB
BSB:
You worship what you do not know; we worship what we do know, for salvation is from the Jews.
23
LIN
Kasi tango ezali koya mpe esili na yango kokoka, tango oyo bagumbameli ya solo bokogumbamela Tata, kati na Molimo mpe kati na solo ; pamba te Tata alukaka bato oyo bogumbamelaka Ye na lolenge wana.
BSB
BSB:
But a time is coming and has now come when the true worshipers will worship the Father in spirit and in truth, for the Father is seeking such as these to worship Him.
24
LIN
Nzambe azali Molimo ; esengeli ete bato oyo bagumbamelaka Ye bagumbamela Ye kati na Molimo mpe kati na solo.
BSB
BSB:
God is Spirit, and His worshipers must worship Him in spirit and in truth.”
25
LIN
Mwasi alobaki na Yesu : — Nayebi ete Masiya azali koya, Ye oyo babengaka Klisto ; mpe tango akoya, akoyebisa biso makambo nyonso.
BSB
BSB:
The woman said, “I know that Messiah” (called Christ) “is coming. When He comes, He will explain everything to us.”
26
LIN
Yesu alobaki na ye : — Nazali Masiya, Ngai oyo nazali koloba na yo.
BSB
BSB:
Jesus answered,
“I who speak to you am He.”
27
LIN
Kaka na tango yango, bayekoli ya Yesu bazongaki. Bakamwaki mingi komona Yesu kosolola na mwasi. Kasi moko te kati na bango amekaki kotuna Ye : « Ozali koluka nini ? » to « Mpo na nini ozali kosolola na ye ? »
BSB
BSB:
Just then His disciples returned and were surprised that He was speaking with a woman. But no one asked Him, “What do You want from her?” or “Why are You talking with her?”
28
LIN
Bongo mwasi atikaki mbeki na ye wana, azongaki na engumba mpe alobaki na bato :
BSB
BSB:
Then the woman left her water jar, went back into the town, and said to the people,
29
LIN
— Boya kotala moto oyo ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. Akoki kozala Klisto te ?
BSB
BSB:
“Come, see a man who told me everything I ever did. Could this be the Christ?”
30
LIN
Bato babimaki longwa na engumba mpe bakendeki epai ya Yesu.
BSB
BSB:
So they left the town and made their way toward Jesus.
31
LIN
Na tango yango, bayekoli bazalaki kosenga na Yesu : — Rabi, lia.
BSB
BSB:
Meanwhile the disciples urged Him, “Rabbi, eat something.”
32
LIN
Kasi Yesu azongiselaki bango : — Ngai, nakolia bilei oyo bino boyebi te.
BSB
BSB:
But He told them,
“I have food to eat that you know nothing about.”
33
LIN
Bongo bayekoli na Ye balobanaki bango na bango : — Boni, ekoki kozala na moto oyo amemelaki Ye bilei ?
BSB
BSB:
So the disciples asked one another, “Could someone have brought Him food?”
34
LIN
Yesu alobaki na bango : — Bilei na Ngai ezali : kosala mokano ya Ye oyo atindaki Ngai mpe kosilisa mosala oyo apesaki Ngai.
BSB
BSB:
Jesus explained,
“My food is to do the will of Him who sent Me and to finish His work.
35
LIN
Bino bolobaka : « Etikali sanza minei mpo ete tobuka mbuma kati na bilanga. » Kasi Ngai, nazali koloba na bino : bofungola miso na bino mpe botala malamu bilanga ; bambuma ekomeli mpe ekoki mpo na kobuka.
BSB
BSB:
Do you not say, ‘There are still four months until the harvest’? I tell you, lift up your eyes and look at the fields, for they are ripe for harvest.
36
LIN
Moto oyo azali kobuka azali komizwela lifuti mpe kosangisa bambuma mpo na bomoi ya seko. Boye, moloni mpe mobuki mbuma bazali kosepela elongo, bango mibale.
BSB
BSB:
Already the reaper draws his wages and gathers a crop for eternal life, so that the sower and the reaper may rejoice together.
37
LIN
Awa nde ekokisami bosolo ya lisese oyo elobaka : « Moko alonaka, mosusu abukaka. »
BSB
BSB:
For in this case the saying ‘One sows and another reaps’ is true.
38
LIN
Natindaki bino kobuka bambuma ya elanga oyo bino bolonaki te ; ezali bato mosusu nde basalaki mosala, mpe bino bozali bobele kosepela na motoki ya bato mosusu.
BSB
BSB:
I sent you to reap what you have not worked for; others have done the hard work, and now you have taken up their labor.”
39
LIN
Bato mingi ya Samari, oyo bazalaki kovanda kati na engumba wana bandimelaki Yesu mpo na litatoli oyo mwasi azalaki kopesa : « Ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. »
BSB
BSB:
Many of the Samaritans from that town believed in Jesus because of the woman’s testimony, “He told me everything I ever did.”
40
LIN
Tango bato ya Samari bayaki epai ya Yesu, basengaki na Ye ete avanda elongo na bango ; mpe Yesu avandaki elongo na bango mikolo mibale.
BSB
BSB:
So when the Samaritans came to Him, they asked Him to stay with them, and He stayed two days.
41
LIN
Bato ebele koleka bakomaki kondimela Ye mpo na maloba oyo Ye moko azalaki koloba.
BSB
BSB:
And many more believed because of His message.
42
LIN
Bongo balobaki na mwasi wana : — Tondimi kaka te mpo na makambo oyo olobaki, pamba te biso moko toyoki sik’oyo mpe toyebi ete azali penza Mobikisi ya mokili.
BSB
BSB:
They said to the woman, “We now believe not only because of your words; we have heard for ourselves, and we know that this man truly is the Savior of the world.”
43
LIN
Sima na mikolo mibale, Yesu alongwaki wana mpe akendeki na Galile.
BSB
BSB:
After two days, Jesus left for Galilee.
44
LIN
Solo, Ye moko Yesu alobaki ete mosakoli azwaka lokumu te kati na ekolo na ye.
BSB
BSB:
Now He Himself had testified that a prophet has no honor in his own hometown.
45
LIN
Tango akomaki na Galile, bato ya Galile bayambaki Ye, pamba te bango mpe bakendeki na Yelusalemi, na tango ya feti, mpe bamonaki makambo nyonso oyo asalaki kuna.
BSB
BSB:
Yet when He arrived, the Galileans welcomed Him. They had seen all the great things He had done in Jerusalem at the feast, for they had gone there as well.
46
LIN
Yesu ayaki lisusu na Kana ya Galile, epai wapi abongolaki mayi vino. Nzokande, na Kapernawumi, ezalaki na mokonzi moko ya basoda oyo mwana na ye ya mobali azalaki kobela.
BSB
BSB:
So once again He came to Cana in Galilee, where He had turned the water into wine. And there was a royal official whose son lay sick at Capernaum.
47
LIN
Tango ayokaki ete Yesu akomi na Galile longwa na Yuda, akendeki kokutana na Ye mpe asengaki na Ye ete akende kobikisa mwana na ye ya mobali oyo akomi pene ya kokufa.
BSB
BSB:
When he heard that Jesus had come from Judea to Galilee, he went and begged Him to come down and heal his son, who was about to die.
48
LIN
Yesu alobaki na ye : — Boni, bokondima kaka soki bomoni bilembo mpe bikamwa ?
BSB
BSB:
Jesus said to him,
“Unless you people see signs and wonders, you will never believe.”
49
LIN
Mokonzi wana ya basoda alobaki : — Nkolo na ngai, yaka noki liboso ete mwana na ngai ya mobali akufa.
BSB
BSB:
“Sir,” the official said, “come down before my child dies.”
50
LIN
Yesu alobaki na ye : — Kende, mwana na yo ya mobali azali na bomoi. Moto yango andimaki maloba oyo Yesu alobaki mpe azongaki.
BSB
BSB:
“Go,”
said Jesus.
“Your son will live.”
The man took Jesus at His word and departed.
51
LIN
Wana azalaki kozonga, basali na ye bayaki kokutana na ye mpe bayebisaki ye : — Mwana na yo ya mobali abiki na bokono na ye.
BSB
BSB:
And while he was still on the way, his servants met him with the news that his boy was alive.
52
LIN
Atunaki bango soki ezalaki na ngonga nini mwana abikaki. Bazongisaki : — Fievele etikaki ye lobi oyo eleki, na ngonga ya liboso sima na midi.
BSB
BSB:
So he inquired as to the hour when his son had recovered, and they told him, “The fever left him yesterday at the seventh hour.”
53
LIN
Tata asosolaki ete ezalaki kaka na ngonga oyo Yesu alobaki na ye : « Mwana na yo ya mobali azali na bomoi. » Bongo ye elongo na bato nyonso ya ndako na ye bandimaki.
BSB
BSB:
Then the father realized that this was the very hour in which Jesus had told him,
“Your son will live.”
And he and all his household believed.
54
LIN
Oyo nde ezalaki likamwisi ya mibale oyo Yesu asalaki sima na Ye kozonga na Galile longwa na Yuda.
BSB
BSB:
This was now the second sign that Jesus performed after coming from Judea into Galilee.
Chapter complete
You’ve read John 4
Chapter 4 of 21 in John
Up next
John 5
Read John 5
Back to John 3
Go Deeper
Commentary
What the commentators say on John 4
A question this chapter raises
Isn’t the New Testament antisemitic?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
John 3
John 4
John 5