Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.14.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
John
John
5
LIN
BSB
A
a
John 5
5
John
The book of signs
Lingala Bible
Jesus
, person
Jerusalem
, place
Moses
, person
John
, person
Sheep Gate
, place
Bethesda
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Sima na yango, Yesu akendeki na Yelusalemi mpo na feti moko ya Bayuda.
BSB
BSB:
Some time later there was a feast of the Jews, and Jesus went up to Jerusalem.
2
LIN
Nzokande, kuna na Yelusalemi, pene ya Ekuke ya Bameme, ezalaki na liziba moko oyo, na lokota ya Arami, bazalaki kobenga « Betesida. » Liziba yango ezalaki na baveranda mitano zingazinga na yango.
BSB
BSB:
Now there is in Jerusalem near the Sheep Gate a pool with five covered colonnades, which in Hebrew is called Bethesda.
3
LIN
Babeli mingi bazalaki kolala na baveranda yango : bakufi miso, bato oyo batambolaka tengu-tengu mpe bato oyo bakufa makolo. [Bazalaki kozela ete mayi eningana,
BSB
BSB:
On these walkways lay a great number of the sick, the blind, the lame, and the paralyzed.
4
LIN
pamba te anjelu moko na Nkolo azalaki koya tango na tango na liziba yango mpo na koningisa mayi. Soki mayi eningani, moto oyo azalaki kokita moto ya liboso kati na liziba azalaki kobika ata soki pasi na ye ezali ndenge nini.]
BSB
BSB:
Not in the BSB
Not in the earliest manuscripts
5
LIN
Ezalaki wana na moto moko oyo awumelaki na bokono mibu tuku misato na mwambe.
BSB
BSB:
One man there had been an invalid for thirty-eight years.
6
LIN
Lokola Yesu amonaki ye alala na mabele mpe ayokaki ete awumeli mikolo ebele na pasi yango, atunaki ye : — Olingi kobika ?
BSB
BSB:
When Jesus saw him lying there and realized that he had spent a long time in this condition, He asked him,
“Do you want to get well?”
7
LIN
Mobeli azongiselaki Ye : — Nkolo, nazali na moto te mpo na kokitisa ngai kati na liziba soki mayi eningani. Wana nabundanaka mpo na kokita na mayi, moto mosusu akitaka liboso na ngai.
BSB
BSB:
“Sir,” the invalid replied, “I have no one to help me into the pool when the water is stirred. While I am on my way, someone else goes in before me.”
8
LIN
Yesu alobaki na ye : — Telema, kamata etoko na yo mpe tambola.
BSB
BSB:
Then Jesus told him,
“Get up, pick up your mat, and walk.”
9
LIN
Kaka na tango yango, moto yango abikaki ; akamataki etoko na ye mpe akomaki kotambola. Nzokande likambo yango esalemaki na mokolo ya Saba.
BSB
BSB:
Immediately the man was made well, and he picked up his mat and began to walk. Now this happened on the Sabbath day,
10
LIN
Boye, bakambi ya Bayuda balobaki na moto oyo abikisamaki : — Lelo ezali mokolo ya Saba ; ozali na ndingisa te ya komema etoko oyo.
BSB
BSB:
so the Jews said to the man who had been healed, “This is the Sabbath! It is unlawful for you to carry your mat.”
11
LIN
Azongiselaki bango : — Moto oyo abikisi ngai alobi na ngai : « Kamata etoko na yo mpe tambola. »
BSB
BSB:
But he answered, “The man who made me well told me,
‘Pick up your mat and walk.’”
12
LIN
Batunaki ye lisusu : — Nani alobi na yo bongo ?
BSB
BSB:
“Who is this man who told you to pick it up and walk?” they asked.
13
LIN
Kasi moto oyo abikaki ayebaki te soki moto oyo abikisaki ye azali nani, pamba te Yesu alimwaki kati na ebele ya bato oyo bazalaki wana.
BSB
BSB:
But the man who was healed did not know who it was, for Jesus had slipped away while the crowd was there.
14
LIN
Sima na mwa tango, Yesu amonaki, kati na lopango ya Tempelo, moto oyo abikaki. Alobaki na ye : — Tala, omoni ndenge okomi sik’oyo nzoto kolongono. Kosala lisusu masumu te, noki te likambo moko ya mabe koleka ekomela yo.
BSB
BSB:
Afterward, Jesus found the man at the temple and said to him,
“See, you have been made well. Stop sinning, or something worse may happen to you.”
15
LIN
Moto yango akendeki koyebisa bakambi ya Bayuda ete ezali Yesu nde abikisaki ye.
BSB
BSB:
And the man went away and told the Jews that it was Jesus who had made him well.
16
LIN
Lokola Yesu azalaki kosala makambo wana na mokolo ya Saba, bakambi ya Bayuda bakomaki kofunda Ye.
BSB
BSB:
Now because Jesus was doing these things on the Sabbath, the Jews began to persecute Him.
17
LIN
Kasi Yesu alobaki na bango : « Tata na Ngai azali kosala kino sik’oyo, Ngai mpe nazali kosala. »
BSB
BSB:
But Jesus answered them,
“To this very day My Father is at His work, and I too am working.”
18
LIN
Mpo na yango, bakambi ya Bayuda bakomaki koluka nzela ya koboma Ye ; pamba te azalaki kotosa te mokolo ya Saba, azalaki koloba ete Nzambe azali Tata na Ye, mpe Ye akokani na Nzambe.
BSB
BSB:
Because of this, the Jews tried all the harder to kill Him. Not only was He breaking the Sabbath, but He was even calling God His own Father, making Himself equal with God.
19
LIN
Yesu alobaki na bango lisusu : Nazali koloba na bino penza ya solo : Mwana akoki kosala eloko moko te na ndenge na Ye moko, kasi azali kosala kaka makambo oyo azali komona Tata na Ye kosala ; pamba te makambo nyonso oyo Tata asalaka, yango mpe Mwana asalaka.
BSB
BSB:
So Jesus replied,
“Truly, truly, I tell you, the Son can do nothing by Himself, unless He sees the Father doing it. For whatever the Father does, the Son also does.
20
LIN
Boye lokola Tata alingaka Mwana, yango wana alakisaka Ye makambo nyonso oyo Ye moko Tata asalaka ; kutu, akolakisa Ye lisusu kosala makambo minene koleka oyo bosili komona kino sik’oyo, mpo ete bokamwa.
BSB
BSB:
The Father loves the Son and shows Him all He does. And to your amazement, He will show Him even greater works than these.
21
LIN
Ndenge kaka Tata asekwisaka bakufi mpe apesaka bango bomoi, ndenge wana mpe Mwana apesaka bomoi na moto oyo Ye alingi.
BSB
BSB:
For just as the Father raises the dead and gives them life, so also the Son gives life to whom He wishes.
22
LIN
Lisusu, Tata asambisaka bato te ; apesa bokonzi ya kosambisa bato na maboko ya Mwana,
BSB
BSB:
Furthermore, the Father judges no one, but has assigned all judgment to the Son,
23
LIN
mpo ete bato nyonso bakumisa Mwana ndenge bakumisaka Tata. Moto oyo akumisaka Mwana te akumisaka mpe Tata te oyo atindaki Mwana.
BSB
BSB:
so that all may honor the Son just as they honor the Father. Whoever does not honor the Son does not honor the Father who sent Him.
24
LIN
Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi.
BSB
BSB:
Truly, truly, I tell you, whoever hears My word and believes Him who sent Me has eternal life and will not come under judgment. Indeed, he has crossed over from death to life.
25
LIN
Nazali koloba na bino penza ya solo : tango ezali koya mpe esili kokoka oyo bakufi bakoyoka mongongo ya Mwana na Nzambe, mpe ba-oyo bakoyoka yango bakozala na bomoi ;
BSB
BSB:
Truly, truly, I tell you, the hour is coming and has now come when the dead will hear the voice of the Son of God, and those who hear will live.
26
LIN
pamba te lokola Tata azali etima ya bomoi, yango wana asalaki mpe ete Mwana azala etima ya bomoi ;
BSB
BSB:
For as the Father has life in Himself, so also He has granted the Son to have life in Himself.
27
LIN
mpe apesaki Ye bokonzi ya kosambisa bato, mpo ete azali Mwana na Moto.
BSB
BSB:
And He has given Him authority to execute judgment, because He is the Son of Man.
28
LIN
Bokamwa yango te, pamba te tango ezali koya, tango oyo bato nyonso oyo bazali kati na bakunda bakoyoka mongongo na Ye
BSB
BSB:
Do not be amazed at this, for the hour is coming when all who are in their graves will hear His voice
29
LIN
mpe bakobima longwa kati na yango : ba-oyo basalaki malamu bakosekwa mpo na kozwa bomoi, kasi ba-oyo basalaki mabe bakosekwa mpo na kozwa etumbu.
BSB
BSB:
and come out—those who have done good to the resurrection of life, and those who have done evil to the resurrection of judgment.
30
LIN
Nakoki kosala eloko moko te na ndenge na Ngai moko : nakataka makambo kolanda oyo nayokaka kowuta epai na Tata, mpe kosambisa na Ngai ezali sembo ; pamba te nalukaka te kosala mokano na Ngai moko, kasi mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.
BSB
BSB:
I can do nothing by Myself; I judge only as I hear. And My judgment is just, because I do not seek My own will, but the will of Him who sent Me.
31
LIN
Soki napesi litatoli mpo na Ngai moko, litatoli na Ngai ekozala ya solo te.
BSB
BSB:
If I testify about Myself, My testimony is not valid.
32
LIN
Boye esengeli ete motatoli mosusu apesa yango mpo na Ngai ; mpe nayebi ete litatoli oyo akopesa na tina na Ngai ezali ya solo.
BSB
BSB:
There is another who testifies about Me, and I know that His testimony about Me is valid.
33
LIN
Botindaki bato epai ya Yoane, mpe ye atatolaki na tina na bosolo.
BSB
BSB:
You have sent to John, and he has testified to the truth.
34
LIN
Ngai, nandimaka litatoli ya moto te ; kasi nalobi bongo mpo ete bobika.
BSB
BSB:
Even though I do not accept human testimony, I say these things so that you may be saved.
35
LIN
Solo, Yoane azalaki lokola mwinda oyo bapelisi mpe ezali kongenga. Kasi bino, boponaki kosepela na kongenga na ye kaka mpo na mwa tango moke.
BSB
BSB:
John was a lamp that burned and gave light, and you were willing for a season to bask in his light.
36
LIN
Nzokande Ngai, nazali na litatoli moko ya monene na tina na Ngai moko koleka kutu oyo ya Yoane : misala oyo nazali kosala na Kombo ya Tata etatolaka na tina na Ngai ete ezali Tata nde atindaki Ngai.
BSB
BSB:
But I have testimony more substantial than that of John. For the works that the Father has given Me to accomplish—the very works I am doing—testify about Me that the Father has sent Me.
37
LIN
Ye moko, Tata, oyo atindaki Ngai atatolaki mpo na Ngai. Botikala nanu te koyoka mongongo na Ye mpe komona elongi na Ye ;
BSB
BSB:
And the Father who sent Me has Himself testified about Me. You have never heard His voice nor seen His form,
38
LIN
mpe liloba na Ye ezali kati na bino te, pamba te bondima te Motindami na Ye.
BSB
BSB:
nor does His word abide in you, because you do not believe the One He sent.
39
LIN
Bokundolaka Makomi na bokebi, mpo ete bokanisaka ete bokozwa bomoi ya seko kati na yango ; nzokande, Makomi yango etatolaka na tina na Ngai,
BSB
BSB:
You pore over the Scriptures because you presume that by them you possess eternal life. These are the very words that testify about Me,
40
LIN
kasi boboyi na bino koya epai na Ngai mpo na kozwa bomoi.
BSB
BSB:
yet you refuse to come to Me to have life.
41
LIN
Nalukaka na Ngai te lokumu oyo ewutaka na bato.
BSB
BSB:
I do not accept glory from men,
42
LIN
Kutu nayebi bino malamu, nayebi ete, kati na mitema na bino, bozali na bolingo te mpo na Nzambe.
BSB
BSB:
but I know you, that you do not have the love of God within you.
43
LIN
Ngai, nayei na Kombo ya Tata na Ngai, kasi boboyi koyamba Ngai ! Nzokande, soki moto mosusu ayei na kombo na ye moko, bokoyamba ye.
BSB
BSB:
I have come in My Father’s name, and you have not received Me; but if someone else comes in his own name, you will receive him.
44
LIN
Lokola bolukaka kaka kopesana lokumu bino na bino mpe boboyaka lokumu oyo ewutaka kaka na Nzambe, ndenge nini bokoki kondima Ngai ?
BSB
BSB:
How can you believe if you accept glory from one another, yet do not seek the glory that comes from the only God?
45
LIN
Bokanisa te ete Ngai nde nakofunda bino liboso ya Tata na Ngai, ezali Moyize oyo bondimaka nde akofunda bino.
BSB
BSB:
Do not think that I will accuse you before the Father. Your accuser is Moses, in whom you have put your hope.
46
LIN
Pamba te, soki penza bozalaki kondima Moyize, bolingaki mpe kondima Ngai ; pamba te akomaki na tina na Ngai.
BSB
BSB:
If you had believed Moses, you would believe Me, because he wrote about Me.
47
LIN
Kasi soki bozali kondima ata makomi na ye te, ndenge nini bokondima maloba na Ngai ?
BSB
BSB:
But since you do not believe what he wrote, how will you believe what I say?”
Chapter complete
You’ve read John 5
Chapter 5 of 21 in John
Up next
John 6
Read John 6
Back to John 4
Go Deeper
Commentary
What the commentators say on John 5
A question this chapter raises
Did Jesus really do miracles?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
John 4
John 5
John 6