Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.16.0
Skip to content
Opened
en
Loading
Today
Ask
Read
Journey
More
Loading
Loading chapter
Loading chapter
John
John
6
LIN
BSB
A
a
John 6
6
John
The book of signs
Lingala Bible
Jesus
, person
Capernaum
, place
Peter
, person
Philip
, person
Moses
, person
Judas
, person
Galilee Sea
, place
Joseph
, person
3 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Sima na yango, Yesu akendeki na ngambo mosusu ya ebale ya Galile oyo babengaka mpe ebale ya Tiberiade.
BSB
BSB:
After this, Jesus crossed to the other side of the Sea of Galilee (that is, the Sea of Tiberias).
2
LIN
Bato ebele bazalaki kolanda Ye mpo ete bazalaki komona bikamwa oyo azalaki kosala na banzoto ya babeli.
BSB
BSB:
A large crowd followed Him because they saw the signs He was performing on the sick.
3
LIN
Yango wana Yesu amataki na ngomba mpe avandaki kuna elongo na bayekoli na Ye.
BSB
BSB:
Then Jesus went up on the mountain and sat down with His disciples.
4
LIN
Nzokande Pasika, feti ya Bayuda, ekomaki pene.
BSB
BSB:
Now the Jewish Feast of the Passover was near.
5
LIN
Tango Yesu atombolaki miso, amonaki ebele ya bato penza koya epai na Ye ; alobaki na Filipo : — Tokosomba mapa wapi mpo na koleisa bato oyo nyonso ?
BSB
BSB:
When Jesus looked up and saw a large crowd coming toward Him, He said to Philip,
“Where can we buy bread for these people to eat?”
6
LIN
Yesu atunaki Filipo motuna oyo mpo na komeka ye mpe kotala soki akoloba nini, pamba te Ye, Yesu, ayebaki makambo oyo alingaki kosala.
BSB
BSB:
But He was asking this to test him, for He knew what He was about to do.
7
LIN
Filipo azongiselaki Yesu : — Mapa oyo tokoki kosomba na mbongo ya bibende nkama mibale ekokoka te mpo ete moto moko na moko kati na bango azwa eteni ya lipa !
BSB
BSB:
Philip answered, “Two hundred denarii would not buy enough bread for each of them to have a small piece.”
8
LIN
Moko kati na bayekoli na Ye, oyo kombo na ye ezali Andre, ndeko mobali ya Simona Petelo, alobaki na Ye :
BSB
BSB:
One of His disciples, Andrew, Simon Peter’s brother, said to Him,
9
LIN
— Ezali awa na elenge mobali moko oyo azali na mapa mitano basala na bambuma ya orje, mpe bambisi mibale ; kasi yango ekosala nini mpo na ebele ya bato oyo ?
BSB
BSB:
“Here is a boy with five barley loaves and two small fish. But what difference will these make among so many?”
10
LIN
Yesu apesaki bango mitindo : — Boloba na bato nyonso ete bavanda. Boye, lokola ezalaki na matiti ebele na esika yango, bavandaki. Ezalaki wana na mibali pene nkoto mitano.
BSB
BSB:
“Have the people sit down,”
Jesus said. Now there was plenty of grass in that place, so the men sat down, about five thousand of them.
11
LIN
Bongo Yesu azwaki mapa yango, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe akabolaki yango epai ya bato oyo bazalaki wana ; asalaki mpe bongo na bambisi : bato bazwaki kolanda ndenge posa na bango ezalaki.
BSB
BSB:
Then Jesus took the loaves and the fish, gave thanks, and distributed to those who were seated as much as they wanted.
12
LIN
Sima na bato kolia mpe kotonda, Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Bosangisa biteni oyo etikali mpo ete eteni moko te ebeba.
BSB
BSB:
And when everyone was full, He said to His disciples,
“Gather the pieces that are left over, so that nothing will be wasted.”
13
LIN
Basangisaki biteni yango ; mpe na biteni ya mapa mitano basala na bambuma ya orje, oyo etikalaki na maboko ya bato oyo baliaki, batondisaki bitunga zomi na mibale.
BSB
BSB:
So they collected them and filled twelve baskets with the pieces of the five barley loaves left over by those who had eaten.
14
LIN
Tango bato bamonaki bikamwa oyo Yesu awutaki kosala, balobaki : « Azali penza Mosakoli oyo asengelaki koya na mokili. »
BSB
BSB:
When the people saw the sign that Jesus had performed, they began to say, “Truly this is the Prophet who is to come into the world.”
15
LIN
Kasi, lokola Yesu ayebaki ete bazali na makanisi ya kokamata Ye mpo na kokomisa Ye mokonzi, abendanaki lisusu na ngomba mpo ete azala kaka Ye moko.
BSB
BSB:
Then Jesus, realizing that they were about to come and make Him king by force, withdrew again to a mountain by Himself.
16
LIN
Tango pokwa ekomaki, bayekoli na Ye bakitaki na ebale
BSB
BSB:
When evening came, His disciples went down to the sea,
17
LIN
epai wapi bamataki na bwato moko, bakatisaki ebale mpo na kokende na Kapernawumi, na ngambo mosusu ya ebale. Butu ekotaki, wana Yesu amikomelaki nanu te epai bango bakomaki.
BSB
BSB:
got into a boat, and started across the sea to Capernaum. It was already dark, and Jesus had not yet gone out to them.
18
LIN
Ekumbaki moko ebandaki kopepa, mpe mayi ya ebale etombokaki.
BSB
BSB:
A strong wind was blowing, and the sea grew agitated.
19
LIN
Awa basilaki koluka nkayi na molayi ya bakilometele pene mitano to motoba, bamonaki Yesu kotambola likolo ya mayi ya ebale mpe kopusana pene ya bwato ; somo makasi ekangaki bango.
BSB
BSB:
When they had rowed about three or four miles, they saw Jesus approaching the boat, walking on the sea—and they were terrified.
20
LIN
Kasi Yesu alobaki na bango : « Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali Ngai ! »
BSB
BSB:
But Jesus spoke up:
“It is I; do not be afraid.”
21
LIN
Balingaki kokotisa Yesu na bwato, kasi, mbala moko, bwato etutaki mabele ya esika oyo bazalaki kokende.
BSB
BSB:
Then they were willing to take Him into the boat, and at once the boat reached the shore where they were heading.
22
LIN
Mokolo oyo elandaki, bato oyo batikalaki na ngambo mosusu ya ebale bayaki kokanisa na sima ete ezalaki kaka na bwato moko, mpe ete Yesu akendeki bwato moko te na bayekoli na Ye ; bayekoli bakendeki bango moko kaka.
BSB
BSB:
The next day, the crowd that had remained on the other side of the sea realized that only one boat had been there, and that Jesus had not boarded it with His disciples, but they had gone away alone.
23
LIN
Nzokande, babwato mosusu ewutaki na Tiberiade mpe ekomaki pene ya esika oyo baliaki mapa sima na Nkolo kozongisa matondi epai ya Nzambe.
BSB
BSB:
However, some boats from Tiberias landed near the place where the people had eaten the bread after the Lord had given thanks.
24
LIN
Tango bato bamonaki ete, ezala Yesu to bayekoli na Ye, moko te azalaki lisusu wana, bamataki na babwato yango mpe bakendeki koluka Yesu, na Kapernawumi.
BSB
BSB:
So when the crowd saw that neither Jesus nor His disciples were there, they got into the boats and went to Capernaum to look for Him.
25
LIN
Tango bakutaki Ye na ngambo mosusu ya ebale, batunaki Ye : — Rabi, okomaki awa tango nini ?
BSB
BSB:
When they found Him on the other side of the sea, they asked Him, “Rabbi, when did You get here?”
26
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bozali koluka Ngai, ezali kaka mpo ete boliaki mapa mpe botondaki, kasi ezali te mpo ete bomonaki bikamwa.
BSB
BSB:
Jesus replied,
“Truly, truly, I tell you, it is not because you saw these signs that you are looking for Me, but because you ate the loaves and had your fill.
27
LIN
Bosalaka te mpo na bilei oyo ebebaka, kasi bosalaka mpo na bilei oyo ewumelaka mpo na bomoi ya seko, bilei oyo Mwana na Moto akopesa bino ; pamba te ezali Ye nde Nzambe Tata abeta kashe.
BSB
BSB:
Do not work for food that perishes, but for food that endures to eternal life, which the Son of Man will give you. For on Him God the Father has placed His seal of approval.”
28
LIN
Batunaki Ye lisusu : — Tosengeli kosala nini mpo na kokokisa misala oyo Nzambe azali kozela epai na biso ?
BSB
BSB:
Then they inquired, “What must we do to perform the works of God?”
29
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Mosala ya Nzambe, yango oyo : bondima Ye oyo Nzambe atindaki.
BSB
BSB:
Jesus replied,
“The work of God is this: to believe in the One He has sent.”
30
LIN
Batunaki Ye lisusu : — Elembo nini ya kokamwa okolakisa biso mpo ete tondima Yo ? Okosala penza nini ?
BSB
BSB:
So they asked Him, “What sign then will You perform, so that we may see it and believe You? What will You do?
31
LIN
Bakoko na biso baliaki mana kati na esobe kolanda ndenge ekomama : « Apesaki bango lipa kowuta na Likolo. »
BSB
BSB:
Our fathers ate the manna in the wilderness, as it is written: ‘He gave them bread from heaven to eat.’”
32
LIN
Kasi Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : ezali Moyize te moto apesaki bino lipa oyo ezalaki kowuta na Likolo, kasi ezali Tata na Ngai nde apesaka bino lipa ya solo oyo ewutaka na Likolo.
BSB
BSB:
Jesus said to them,
“Truly, truly, I tell you, it was not Moses who gave you the bread from heaven, but it is My Father who gives you the true bread from heaven.
33
LIN
Pamba te lipa ya Nzambe ezali Ye oyo akiti wuta na Likolo mpe apesaka mokili bomoi.
BSB
BSB:
For the bread of God is He who comes down from heaven and gives life to the world.”
34
LIN
Bongo balobaki na Ye : — Nkolo, pesaka biso lipa yango tango nyonso.
BSB
BSB:
“Sir,” they said, “give us this bread at all times.”
35
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Moto nyonso oyo akoya epai na Ngai akoyoka lisusu nzala te, mpe moto nyonso oyo akondima Ngai akoyoka lisusu posa ya mayi te.
BSB
BSB:
Jesus answered,
“I am the bread of life. Whoever comes to Me will never hunger, and whoever believes in Me will never thirst.
36
LIN
Nzokande, ndenge nayebisaki bino, bozali komona Ngai, kasi bozali kondima te.
BSB
BSB:
But as I stated, you have seen Me and still you do not believe.
37
LIN
Bato nyonso oyo Tata apesi Ngai bakoya epai na Ngai, mpe nakobengana soki moke te moto nyonso oyo akoya epai na Ngai.
BSB
BSB:
Everyone the Father gives Me will come to Me, and the one who comes to Me I will never drive away.
38
LIN
Pamba te soki nakitaki wuta na Likolo, ezali te mpo na kosala mokano na Ngai moko, kasi mpo na kokokisa mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.
BSB
BSB:
For I have come down from heaven, not to do My own will, but to do the will of Him who sent Me.
39
LIN
Nzokande, Ye oyo atindaki Ngai alingi ete nabungisa ata moto moko te kati na bato oyo apesaki Ngai, kasi nasekwisa bango na mokolo ya suka.
BSB
BSB:
And this is the will of Him who sent Me, that I shall lose none of those He has given Me, but raise them up at the last day.
40
LIN
Pamba te mokano ya Tata na Ngai ezali ete moto nyonso oyo amoni Mwana mpe andimi Ye azwa bomoi ya seko ; mpe, Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka.
BSB
BSB:
For it is My Father’s will that everyone who looks to the Son and believes in Him shall have eternal life, and I will raise him up at the last day.”
41
LIN
Bayuda bakomaki koyimayima na tina na Ye mpo ete alobaki : « Ngai, nazali lipa oyo ekiti wuta na Likolo. »
BSB
BSB:
At this, the Jews began to grumble about Jesus because He had said,
“I am the bread that came down from heaven.”
42
LIN
Bakomaki koloba : — Boni, wana ezali Yesu te ? Ezali mwana mobali ya Jozefi te ? Toyebi malamu tata mpe mama na ye ! Bongo ndenge nini azali koloba : « Nawuti na Likolo ? »
BSB
BSB:
They were asking, “Is this not Jesus, the son of Joseph, whose father and mother we know? How then can He say,
‘I have come down from heaven’?”
43
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Botika koyimayima kati na bino !
BSB
BSB:
“Stop grumbling among yourselves,”
Jesus replied.
44
LIN
Moto moko te akoki koya epai na Ngai soki Tata oyo atindaki Ngai abendi ye te ; mpe Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka.
BSB
BSB:
“No one can come to Me unless the Father who sent Me draws him, and I will raise him up at the last day.
45
LIN
Tala ndenge ekomama kati na mikanda ya Basakoli : « Nzambe akoteya bango nyonso. » Boye moto nyonso oyo ayokaka Tata mpe ayambaka mateya na Ye ayaka epai na Ngai.
BSB
BSB:
It is written in the Prophets: ‘And they will all be taught by God.’ Everyone who has heard the Father and learned from Him comes to Me—
46
LIN
Moto moko te amona Tata, longola kaka Ye oyo ayaki wuta epai ya Nzambe.
BSB
BSB:
not that anyone has seen the Father except the One who is from God; only He has seen the Father.
47
LIN
Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo andimi azali na bomoi ya seko,
BSB
BSB:
Truly, truly, I tell you, he who believes has eternal life.
48
LIN
pamba te nazali lipa oyo epesaka bomoi.
BSB
BSB:
I am the bread of life.
49
LIN
Bakoko na bino baliaki mana kati na esobe mpe bakufaki,
BSB
BSB:
Your fathers ate the manna in the wilderness, yet they died.
50
LIN
kasi botala lipa oyo ewuti na Likolo ; moto oyo akolia yango akokufa te.
BSB
BSB:
This is the bread that comes down from heaven, so that anyone may eat of it and not die.
51
LIN
Ngai nde nazali lipa ya bomoi oyo ewuti na Likolo ; moto nyonso oyo akolia lipa yango, akozala na bomoi ya seko ; mpe lipa oyo nakopesa mpo ete mokili ezwa bomoi ezali nde nzoto na Ngai.
BSB
BSB:
I am the living bread that came down from heaven. If anyone eats of this bread, he will live forever. And this bread, which I will give for the life of the world, is My flesh.”
52
LIN
Tango Bayuda bayokaki bongo, bakomaki kotiana tembe ; bazalaki koloba : — Akopesa biso nzoto na ye ndenge nini mpo ete tolia yango ?
BSB
BSB:
At this, the Jews began to argue among themselves, “How can this man give us His flesh to eat?”
53
LIN
Bongo Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bolie nzoto ya Mwana na Moto te mpe bomeli makila na Ye te, bozali na bomoi te kati na bino.
BSB
BSB:
So Jesus said to them,
“Truly, truly, I tell you, unless you eat the flesh and drink the blood of the Son of Man, you have no life in you.
54
LIN
Moto oyo alie nzoto na Ngai mpe ameli makila na Ngai, azali na bomoi ya seko ; mpe Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka.
BSB
BSB:
Whoever eats My flesh and drinks My blood has eternal life, and I will raise him up at the last day.
55
LIN
Pamba te nzoto na Ngai ezali penza bilei, mpe makila na Ngai ezali penza lokola mayi oyo bamelaka.
BSB
BSB:
For My flesh is real food, and My blood is real drink.
56
LIN
Moto oyo alie nzoto na Ngai mpe ameli makila na Ngai azali kati na Ngai, mpe Ngai nazali kati na ye.
BSB
BSB:
Whoever eats My flesh and drinks My blood remains in Me, and I in him.
57
LIN
Ndenge Tata oyo atindaki Ngai azali etima ya bomoi mpe Ngai nazali na bomoi na nzela na Ye, ndenge wana mpe moto oyo alie nzoto na Ngai akozala na bomoi na nzela na Ngai.
BSB
BSB:
Just as the living Father sent Me and I live because of the Father, so also the one who feeds on Me will live because of Me.
58
LIN
Tala ndenge lipa oyo ewuti na Likolo ezali : ekokani te na mana oyo bakoko na bino baliaki, kasi bakufaki kaka ; nzokande, moto oyo akolia lipa oyo Ngai nazali akozala na bomoi ya seko.
BSB
BSB:
This is the bread that came down from heaven. Unlike your fathers, who ate the manna and died, the one who eats this bread will live forever.”
59
LIN
Wana nde ezalaki mateya ya Yesu kati na ndako ya mayangani ya Kapernawumi.
BSB
BSB:
Jesus said this while teaching in the synagogue in Capernaum.
60
LIN
Sima na koyoka Ye, bayekoli mingi ya Yesu balobaki : — Mateya oyo ezali makasi mingi, nani akoki kondima yango ?
BSB
BSB:
On hearing it, many of His disciples said, “This is a difficult teaching. Who can accept it?”
61
LIN
Yesu asosolaki ete bayekoli na Ye bazalaki koyimayima na tina na yango ; alobaki na bango : — Boni, maloba oyo ebetisi bino mabaku ?
BSB
BSB:
Aware that His disciples were grumbling about this teaching, Jesus asked them,
“Does this offend you?
62
LIN
Bongo ekozala ndenge nini soki bomoni Mwana na Moto kozonga epai Ye azalaki liboso ?
BSB
BSB:
Then what will happen if you see the Son of Man ascend to where He was before?
63
LIN
Ezali Molimo nde apesaka bomoi ; mosuni ezali na eloko te. Maloba oyo nalobi na bino ezali Molimo mpe bomoi.
BSB
BSB:
The Spirit gives life; the flesh profits nothing. The words I have spoken to you are spirit and they are life.
64
LIN
Kasi bato mosusu kati na bino bazali kondima te. Solo, wuta na ebandeli, Yesu ayebaki banani bazalaki kondima te, mpe nani akoteka Ye.
BSB
BSB:
However, there are some of you who do not believe.”
(For Jesus had known from the beginning which of them did not believe and who would betray Him.)
65
LIN
Alobaki lisusu : — Yango wana nalobaki na bino : « Moto moko te akoki koya epai na Ngai soki epesameli ye te na Tata. »
BSB
BSB:
Then Jesus said,
“This is why I told you that no one can come to Me unless the Father has granted it to him.”
66
LIN
Banda na tango wana, bayekoli na Ye mingi bazongaki mpe batikaki kolanda Ye.
BSB
BSB:
From that time on many of His disciples turned back and no longer walked with Him.
67
LIN
Boye, Yesu alobaki na bantoma zomi na mibale : — Boni, bino mpe bolingi kokende ?
BSB
BSB:
So Jesus asked the Twelve,
“Do you want to leave too?”
68
LIN
Simona Petelo azongisaki : — Nkolo, tokokende epai ya nani ? Yo nde ozali na maloba ya bomoi ya seko.
BSB
BSB:
Simon Peter replied, “Lord, to whom would we go? You have the words of eternal life.
69
LIN
Biso, tondimi mpe toyebi ete ozali Mosantu ya Nzambe.
BSB
BSB:
We believe and know that You are the Holy One of God.”
70
LIN
Yesu alobaki na bango : — Boni, ezali Ngai te nde naponaki bino nyonso zomi na mibale ? Nzokande, moko kati na bino azali Satana !
BSB
BSB:
Jesus answered them,
“Have I not chosen you, the Twelve? Yet one of you is a devil!”
71
LIN
Yesu azalaki nde koloba na tina na Yuda, mwana mobali ya Simona Isikarioti, oyo, kati na bantoma zomi na mibale, asengelaki koteka Ye.
BSB
BSB:
He was speaking about Judas, the son of Simon Iscariot. For although Judas was one of the Twelve, he was later to betray Jesus.
Chapter complete
You’ve read John 6
Chapter 6 of 21 in John
Up next
John 7
Read John 7
Back to John 5
Go Deeper
Commentary
What the commentators say on John 6
A question this chapter raises
What is deconstruction, and should I deconstruct my faith?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
John 5
John 6
John 7