2 LIN kolanda ndenge bayebisaki biso yango na bato oyo, wuta na ebandeli, bamonaki yango na miso mpe bakomaki basali ya Liloba na Nzambe. BSB BSB: just as they were handed down to us by the initial eyewitnesses and servants of the word.
3 LIN Yango wana, ngai mpe, sima na ngai kotuna-tuna mpo na koluka koyeba malamu makambo nyonso, banda na ebandeli, namonaki lisusu ete ezali malamu mpo na ngai kokomela yo yango ndenge elandanaki, Teofile ya lokumu, BSB BSB: Therefore, having carefully investigated everything from the beginning, it seemed good also to me to write an orderly account for you, most excellent Theophilus,
4 LIN mpo ete oyeba bosolo ya malakisi oyo ozwaki. BSB BSB: so that you may know the certainty of the things you have been taught.
6 LIN Bango mibale bazalaki bato ya sembo liboso ya Nzambe, bazalaki kotosa, na ndenge esengeli, mibeko nyonso mpe mitindo nyonso ya Nkolo. BSB BSB: Both of them were righteous in the sight of God, walking blamelessly in all the commandments and decrees of the Lord.
7 LIN Kasi bazalaki na mwana te, pamba te Elizabeti azalaki ekomba ; mpe bango mibale bakomaki mibange. BSB BSB: But they had no children, because Elizabeth was barren, and they were both well along in years.
8 LIN Mokolo moko, wana Zakari azalaki kosala mosala na ye lokola Nganga-Nzambe, liboso ya Nzambe, pamba te ezalaki ngala ya lisanga na ye, BSB BSB: One day while Zechariah’s division was on duty and he was serving as priest before God,
9 LIN aponamaki na zeke, kolanda momesano ya bonganga-Nzambe, mpo na kokota kati na Esika ya bule ya Nkolo mpe kotumba kuna malasi ya ansa. BSB BSB: he was chosen by lot, according to the custom of the priesthood, to enter the temple of the Lord and burn incense.
10 LIN Tango ekomaki ngonga ya kotumba malasi ya ansa, lisanga mobimba ya basambeli ezalaki kosambela na libanda. BSB BSB: And at the hour of the incense offering, the whole congregation was praying outside.
11 LIN Bongo anjelu moko ya Yawe abimelaki ye ya kotelema na ngambo ya loboko ya mobali ya etumbelo ya malasi ya ansa. BSB BSB: Just then an angel of the Lord appeared to Zechariah, standing at the right side of the altar of incense.
12 LIN Tango Zakari amonaki ye, abangaki makasi, mpe somo monene ekangaki ye. BSB BSB: When Zechariah saw him, he was startled and gripped with fear.
13 LIN Kasi anjelu alobaki na ye : — Zakari, kobanga te ! Nzambe ayoki mabondeli na yo. Mwasi na yo, Elizabeti, akobotela yo mwana mobali, mpe okopesa ye kombo « Yoane. » BSB BSB: But the angel said to him, “Do not be afraid, Zechariah, because your prayer has been heard. Your wife Elizabeth will bear you a son, and you are to give him the name John.
14 LIN Mwana yango akosala esengo na yo, mpe okosepela na ye makasi ; mpe bato ebele bakosepela mpo na mbotama na ye, BSB BSB: He will be a joy and delight to you, and many will rejoice at his birth,
15 LIN pamba te akozala moto monene na miso ya Nkolo. Akomela te ezala vino to masanga ya makasi, mpe akozala atonda na Molimo Mosantu wuta na libumu ya mama na ye. BSB BSB: for he will be great in the sight of the Lord. He shall never take wine or strong drink, and he will be filled with the Holy Spirit even from his mother’s womb.
16 LIN Akozongisa bato ebele ya Isalaele epai ya Nkolo, Nzambe na bango, BSB BSB: Many of the sons of Israel he will turn back to the Lord their God.
18 LIN Zakari atunaki anjelu : — Ndenge nini nakoki koyeba ete ezali ya solo ? Pamba te, ngai, nazali mobange, mpe mibu ya mbotama ya mwasi na ngai esili kopusana makasi. BSB BSB: “How can I be sure of this?” Zechariah asked the angel. “I am an old man, and my wife is well along in years.”
19 LIN Anjelu azongiselaki ye : — Nazali Gabrieli ; natelemaka liboso ya Nzambe oyo atindi ngai mpo na koyebisa yo mpe kopesa yo basango oyo ya malamu. BSB BSB: “I am Gabriel,” replied the angel. “I stand in the presence of God, and I have been sent to speak to you and to bring you this good news.
20 LIN Lokola ondimeli maloba na ngai te, oyo ekokokisama solo na tango na yango oyo ekatama, okokoma baba mpe okokoka lisusu koloba te kino na mokolo oyo makambo yango ekokokisama. BSB BSB: And now you will be silent and unable to speak until the day this comes to pass, because you did not believe my words, which will be fulfilled at their proper time.”
21 LIN Na tango yango, bato bazalaki kozela Zakari mpe komituna mpo na nini azali kowumela tango molayi kati na Esika ya bule. BSB BSB: Meanwhile, the people were waiting for Zechariah and wondering why he took so long in the temple.
22 LIN Tango abimaki, azalaki lisusu te na makoki ya koloba na bango ; boye basosolaki ete azwi emoniseli kati na Esika ya bule, pamba te akomaki koloba na bango na nzela ya bilembo mpe atikalaki baba. BSB BSB: When he came out and was unable to speak to them, they realized he had seen a vision in the temple. He kept making signs to them but remained unable to speak.
23 LIN Tango mikolo na ye ya mosala ekokaki, azongaki na ndako na ye. BSB BSB: And when the days of his service were complete, he returned home.
24 LIN Sima na mwa tango, mwasi na ye, Elizabeti, akomaki na zemi mpe abombamaki sanza mitano. BSB BSB: After these days, his wife Elizabeth became pregnant and for five months remained in seclusion. She declared,
25 LIN Azalaki komilobela : « Tala likambo oyo Nkolo asali mpo na ngai ! Na mikolo oyo, atalisi ngai ngolu na Ye mpe alongoli soni na ngai na miso ya bato. » BSB BSB: “The Lord has done this for me. In these days He has shown me favor and taken away my disgrace among the people.”
27 LIN Atindaki ye epai ya elenge mwasi Mari oyo ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe azalaki mobandami ya libala na mobali moko oyo kombo na ye ezalaki Jozefi, mokitani ya Davidi. BSB BSB: to a virgin pledged in marriage to a man named Joseph, who was of the house of David. And the virgin’s name was Mary.
28 LIN Anjelu akotaki epai ya Mari mpe alobaki na ye : — Mbote na yo, yo oyo osili kozwa ngolu monene ! Nkolo azali elongo na yo ! BSB BSB: The angel appeared to her and said, “Greetings, you who are highly favored! The Lord is with you.”
29 LIN Tango Mari ayokaki maloba ya anjelu, amitungisaki makasi mpe akomaki komituna soki mbote yango elakisi nini. BSB BSB: Mary was greatly troubled at his words and wondered what kind of greeting this might be.
30 LIN Kasi anjelu alobaki na ye : — Mari, kobanga te ! Pamba te Nzambe asaleli yo ngolu ! BSB BSB: So the angel told her, “Do not be afraid, Mary, for you have found favor with God.
31 LIN Okozwa zemi, okobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo « Yesu. » BSB BSB: Behold, you will conceive and give birth to a son, and you are to give Him the name Jesus.
32 LIN Akozala Moto monene, mpe bakobenga Ye : Mwana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. Nkolo Nzambe akopesa Ye kiti ya bokonzi ya Davidi, koko na Ye. BSB BSB: He will be great and will be called the Son of the Most High. The Lord God will give Him the throne of His father David,
33 LIN Akozala Mokonzi ya libota ya Jakobi mpo na libela, mpe bokonzi na Ye ekozala na suka te. BSB BSB: and He will reign over the house of Jacob forever. His kingdom will never end!”
35 LIN Anjelu azongiselaki ye : — Molimo Mosantu akokitela yo, mpe nguya ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekozipa yo na elilingi na Ye. Boye Mosantu oyo okobota akobengama Mwana na Nzambe. BSB BSB: The angel replied, “The Holy Spirit will come upon you, and the power of the Most High will overshadow you. So the Holy One to be born will be called the Son of God.
36 LIN Ndeko na yo ya mwasi, Elizabeti, azali mpe na zemi ; akobota mwana mobali, atako akomi mobange. Ye oyo bazalaki kobenga « ekomba » akomi sik’oyo na zemi ya sanza motoba. BSB BSB: Look, even Elizabeth your relative has conceived a son in her old age, and she who was called barren is in her sixth month.
37 LIN Pamba te Nzambe alembanaka eloko te. BSB BSB: For no word from God will ever fail.”
39 LIN Sima na mwa mikolo, Mari atelemaki mpe akendeki na lombangu, na engumba moko kati na mokili ya bangomba ya Yuda. BSB BSB: In those days Mary got ready and hurried to a town in the hill country of Judah,
40 LIN Kuna, akotaki na ndako ya Zakari mpe apesaki Elizabeti mbote. BSB BSB: where she entered the home of Zechariah and greeted Elizabeth.
41 LIN Tango kaka Elizabeti ayokaki mbote ya Mari, mwana aninganaki kati na libumu na ye. Elizabeti atondisamaki na Molimo Mosantu BSB BSB: When Elizabeth heard Mary’s greeting, the baby leaped in her womb, and Elizabeth was filled with the Holy Spirit.
42 LIN mpe agangaki na mongongo makasi : — Ozali ya kopambolama kati na basi, mpe esengo na mwana oyo azali kati na libumu na yo ! BSB BSB: In a loud voice she exclaimed, “Blessed are you among women, and blessed is the fruit of your womb!
43 LIN Ngai nde nani mpo ete mama ya Nkolo na ngai aya epai na ngai ? BSB BSB: And why am I so honored, that the mother of my Lord should come to me?
44 LIN Pamba te, tango kaka nayoki mbote na yo, mwana aningani na esengo kati na libumu na ngai. BSB BSB: For as soon as the sound of your greeting reached my ears, the baby in my womb leaped for joy.
45 LIN Esengo na mwasi oyo andimaki ete Nkolo akokokisa elaka oyo apesaki ye ! BSB BSB: Blessed is she who has believed that the Lord’s word to her will be fulfilled.”
47 LIN mpe natondi na esengo mpo na Nzambe, Mobikisi na ngai, BSB BSB: and my spirit rejoices in God my Savior!
49 LIN pamba te Nzambe-Na-Nguya-Nyonso asaleli ngai makambo minene ; Kombo na Ye ezali Bule. BSB BSB: For the Mighty One has done great things for me. Holy is His name.
50 LIN Atalisaka boboto na Ye tango nyonso epai ya bato oyo batosaka Ye. BSB BSB: His mercy extends to those who fear Him, from generation to generation.
51 LIN Asali misala minene na nguya ya loboko na Ye, apanzi bato oyo batonda na lolendo, BSB BSB: He has performed mighty deeds with His arm; He has scattered those who are proud in the thoughts of their hearts.
52 LIN akitisi bakambi wuta na bakiti na bango ya bokonzi, kasi atomboli bato oyo bamikitisaka. BSB BSB: He has brought down rulers from their thrones, but has exalted the humble.
53 LIN Atondisi na biloko ya malamu bato oyo bazalaki na nzala, mpe azongisi bazwi maboko pamba. BSB BSB: He has filled the hungry with good things, but has sent the rich away empty.
54 LIN Solo, asungi Isalaele, mosali na Ye, abosani te kotalisa boboto na Ye, BSB BSB: He has helped His servant Israel, remembering to be merciful,
55 LIN ndenge alakaki yango epai ya bakoko na biso, epai ya Abrayami mpe epai ya bakitani na ye, mpo na tango nyonso. BSB BSB: as He promised to our fathers, to Abraham and his descendants forever.”
56 LIN Mari avandaki basanza pene misato elongo na Elizabeti ; sima, azongaki na ndako na ye. BSB BSB: Mary stayed with Elizabeth for about three months and then returned home.
57 LIN Wana eleko oyo Elizabeti asengelaki kobota ekokaki, abotaki mwana mobali. BSB BSB: When the time came for Elizabeth to have her child, she gave birth to a son.
58 LIN Baninga mpe bandeko ya Elizabeti bayokaki ete Nkolo asaleli ye ngolu monene, mpe basepelaki na ye elongo. BSB BSB: Her neighbors and relatives heard that the Lord had shown her great mercy, and they rejoiced with her.
59 LIN Na mokolo ya mwambe, sima na mbotama ya mwana, bakendeki kokatisa mwana ngenga ; balingaki kopesa ye kombo ya tata na ye, Zakari. BSB BSB: On the eighth day, when they came to circumcise the child, they were going to name him after his father Zechariah.
60 LIN Kasi mama na ye alobaki : — Te ! Kombo na ye ezali Yoane. BSB BSB: But his mother replied, “No! He shall be called John.”
61 LIN Kasi balobaki na ye : — Ezali na moto moko te, kati na libota na yo, oyo azali na kombo wana. BSB BSB: They said to her, “There is no one among your relatives who bears this name.”
62 LIN Bongo batunaki tata ya mwana, na nzela ya bilembo, mpo ete bayeba soki kombo nini alingaki kopesa na mwana. BSB BSB: So they made signs to his father to find out what he wanted to name the child.
63 LIN Zakari asengaki mwa libaya mpe akomaki : « Kombo na ye ezali Yoane. » Mpe bango nyonso bakamwaki. BSB BSB: Zechariah asked for a tablet and wrote, “His name is John.” And they were all amazed.
64 LIN Mbala moko, monoko ya Zakari efungwamaki mpe lolemo na ye ekangolamaki ; akomaki lisusu koloba mpe kokumisa Nzambe. BSB BSB: Immediately Zechariah’s mouth was opened and his tongue was released, and he began to speak, praising God.
65 LIN Baninga na bango nyonso ya pembeni batondaki na somo mpe bazalaki kolobela makambo yango nyonso, kati na mokili ya bangomba ya Yuda. BSB BSB: All their neighbors were filled with awe, and people throughout the hill country of Judea were talking about these events.
66 LIN Bato nyonso oyo bayokaki sango yango bazalaki kokamwa yango mpe komituna : « Yango mwana oyo akozala nani ? » Pamba te loboko ya Nkolo ezalaki elongo na ye. BSB BSB: And all who heard this wondered in their hearts and asked, “What then will this child become?” For the Lord’s hand was with him.
67 LIN Tata na ye, Zakari, atondisamaki na Molimo Mosantu mpe akomaki kosakola : BSB BSB: Then his father Zechariah was filled with the Holy Spirit and prophesied:
68 LIN « Tika ete Nkolo, Nzambe ya Isalaele, akumisama, pamba te ayei mpe akangoli bato na Ye ; BSB BSB: “Blessed be the Lord, the God of Israel, because He has visited and redeemed His people.
69 LIN abimiseli biso Mobikisi ya nguya, kati na libota ya Davidi, mosali na Ye ; BSB BSB: He has raised up a horn of salvation for us in the house of His servant David,
70 LIN akokisi elaka na Ye, oyo apesa wuta kala na nzela ya basakoli na Ye ya bule, BSB BSB: as He spoke through His holy prophets, those of ages past,
71 LIN lobiko liboso ya banguna na biso, mpe kokangolama wuta na maboko ya bayini na biso ; BSB BSB: salvation from our enemies and from the hand of all who hate us,
72 LIN atalisi boboto na Ye epai ya bakoko na biso mpe akanisi Boyokani na Ye ya bule ; BSB BSB: to show mercy to our fathers and to remember His holy covenant,
73 LIN akokiseli biso ndayi oyo alapaki epai ya Abrayami, koko na biso, BSB BSB: the oath He swore to our father Abraham, to grant us
74 LIN ete akokangola biso na maboko ya banguna na biso, mpe akopesa biso nzela ya kosalela Ye na kobanga te, BSB BSB: deliverance from hostile hands, that we may serve Him without fear,
75 LIN kati na bosantu mpe bosembo, liboso na Ye, mikolo nyonso ya bomoi na biso. BSB BSB: in holiness and righteousness before Him all the days of our lives.
76 LIN Bongo yo, mwana na ngai, bakobenga yo : mosakoli ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; pamba te okotambola na liboso ya Nkolo mpo na kobongisela Ye nzela BSB BSB: And you, child, will be called a prophet of the Most High; for you will go on before the Lord to prepare the way for Him,
77 LIN mpe mpo na koyebisa bato na Ye ete Nzambe akobikisa bango mpe akolimbisa masumu na bango, BSB BSB: to give to His people the knowledge of salvation through the forgiveness of their sins,
78 LIN mpo na mawa mpe boboto ya Nzambe na biso, oyo na nzela na yango moyi ya tongo ekongengela biso wuta na likolo, BSB BSB: because of the tender mercy of our God, by which the Dawn will visit us from on high,
79 LIN mpo na kopesa pole na bato nyonso oyo bavandi kati na molili mpe kati na elili ya kufa, mpe mpo na kotambolisa makolo na biso kati na nzela ya kimia. » BSB BSB: to shine on those who live in darkness and in the shadow of death, to guide our feet into the path of peace.”
80 LIN Mwana azalaki kokola, mpe molimo na ye ezalaki kokemba ; azalaki kovanda kati na bisobe kino na mokolo oyo ayaki komimonisa na miso ya bato ya Isalaele. BSB BSB: And the child grew and became strong in spirit; and he lived in the wilderness until the time of his public appearance to Israel.