Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.0.2
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Mark
Mark
16
LIN
BSB
A
a
Mark 16
16
Mark
Death and resurrection
Lingala Bible
Peter
, person
Magdalene
, place
Mary Magdalene
, person
Jesus
, person
Galilee
, place
Nazareth
, place
James
, person
Mary
, person
1 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tango mokolo ya Saba elekaki, Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari, mama ya Jake mpe Salome, basombaki mafuta ya solo kitoko mpo na kokende kokawusa nzoto ya Yesu mpo ete ebeba te.
BSB
BSB:
When the Sabbath was over, Mary Magdalene, Mary the mother of James, and Salome bought spices so they could go and anoint the body of Jesus.
2
LIN
Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, wana moyi ebandi kobima, bakendeki na kunda.
BSB
BSB:
Very early on the first day of the week, just after sunrise, they went to the tomb.
3
LIN
Bazalaki kotunana kati na bango : — Nani akotindikela biso libanga mpo ete elongwa na ekotelo ya kunda ?
BSB
BSB:
They were asking one another, “Who will roll away the stone from the entrance of the tomb?”
4
LIN
Mpe tango batombolaki miso, bamonaki ete libanga esilaki kotindikama mpe ezalaki lisusu te na ekotelo ya kunda ; nzokande, libanga yango ezalaki ya monene penza.
BSB
BSB:
But when they looked up, they saw that the stone had been rolled away, even though it was extremely large.
5
LIN
Sima na bango kokota kati na kunda, bamonaki elenge mobali moko, avandi na ngambo ya loboko ya mobali, alata nzambala ya pembe ; somo ekangaki bango.
BSB
BSB:
When they entered the tomb, they saw a young man dressed in a white robe sitting on the right side, and they were alarmed.
6
LIN
Kasi alobaki na bango : — Bobanga te ! Bozali koluka Yesu ya Nazareti, oyo babakaki na ekulusu ? Azali awa te, asili kosekwa. Botala esika oyo batiaki Ye.
BSB
BSB:
But he said to them, “Do not be alarmed. You are looking for Jesus the Nazarene, who was crucified. He has risen! He is not here! See the place where they put Him.
7
LIN
Bokende sik’oyo koyebisa Petelo mpe bayekoli mosusu : « Akei liboso na bino, na Galile ; ezali kuna nde bokomona Ye, ndenge kaka ayebisaki bino. »
BSB
BSB:
But go, tell His disciples and Peter, ‘He is going ahead of you into Galilee. There you will see Him, just as He told you.’”
8
LIN
Babimaki na lombangu mpe bakimaki mosika ya kunda ya Yesu, pamba te bango nyonso bazalaki kolenga na somo, mpe makanisi na bango epalanganaki. Balobaki eloko te na moto nyonso, pamba te bazalaki kobanga.
BSB
BSB:
So the women left the tomb and ran away, trembling and bewildered. And in their fear they did not say a word to anyone.
The ending of Mark
9
LIN
Na tongo ya mokolo ya liboso ya poso, tango Yesu asekwaki, abimelaki liboso Mari, moto ya mboka Magidala, oyo, kati na ye, Yesu abenganaki milimo mabe sambo.
BSB
BSB:
Early on the first day of the week, after Jesus had risen, He appeared first to Mary Magdalene, from whom He had driven out seven demons.
10
LIN
Bongo Mari akendeki koyebisa bato oyo batambolaki elongo na Yesu ; akutaki bango batondi na mawa mpe bazali kolela.
BSB
BSB:
She went and told those who had been with Him, who were mourning and weeping.
11
LIN
Kasi tango bayokaki ye koloba : « Yesu azali na bomoi, awuti kobimela ngai, » bandimaki ye te.
BSB
BSB:
And when they heard that Jesus was alive and she had seen Him, they did not believe it.
12
LIN
Sima na yango, Yesu abimelaki mibale kati na bango na lolenge mosusu, wana bazalaki kokende na mboka.
BSB
BSB:
After this, Jesus appeared in a different form to two of them as they walked along in the country.
13
LIN
Bazongaki mpe bayebisaki yango epai ya bayekoli mosusu ; kasi bayekoli yango bandimaki bango te.
BSB
BSB:
And they went back and reported it to the rest, but they did not believe them either.
14
LIN
Sima na yango, abimelaki bantoma zomi na moko, wana bazalaki kolia, mpe apamelaki bango mpo ete bazalaki na kondima te, mpe mpo ete bazalaki mitema mabanga ; pamba te bandimaki te bato oyo bamonaki Ye sima na lisekwa na Ye.
BSB
BSB:
Later, as they were eating, Jesus appeared to the Eleven and rebuked them for their unbelief and hardness of heart, because they did not believe those who had seen Him after He had risen.
15
LIN
Alobaki na bango : — Bokende na mokili mobimba, mpe boteya bato nyonso Sango Malamu.
BSB
BSB:
And He said to them,
“Go into all the world and preach the gospel to every creature.
16
LIN
Moto oyo akondima mpe akozwa libatisi akobika, kasi moto oyo akondima te akozwa etumbu.
BSB
BSB:
Whoever believes and is baptized will be saved, but whoever does not believe will be condemned.
17
LIN
Tala bilembo oyo ekolanda bato oyo bakondima : na Kombo na Ngai, bakobengana milimo mabe ; bakoloba nkota ya sika,
BSB
BSB:
And these signs will accompany those who believe: In My name they will drive out demons; they will speak in new tongues;
18
LIN
bakokanga banyoka na maboko na bango ; mpe soki bameli ngenge, ekosala bango pasi ata moke te ; bakotiela babeli maboko, mpe babeli bakobika na bokono na bango.
BSB
BSB:
they will pick up snakes with their hands, and if they drink any deadly poison, it will not harm them; they will lay their hands on the sick, and they will be made well.”
19
LIN
Sima na Nkolo Yesu koloba na bango, amemamaki kati na Likolo mpe avandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe.
BSB
BSB:
After the Lord Jesus had spoken to them, He was taken up into heaven and sat down at the right hand of God.
20
LIN
Bayekoli bakendeki koteya na bisika nyonso. Nkolo azalaki kosala elongo na bango mpe azalaki kokokisa liloba na Ye na nzela ya bilembo ya kokamwa oyo ezalaki kolanda liloba na Ye.
BSB
BSB:
And they went out and preached everywhere, and the Lord worked through them, confirming His word by the signs that accompanied it.
Chapter complete
You’ve read Mark 16
Chapter 16 of 16 in Mark
Up next
Luke 1
Read Luke 1
Back to Mark 15
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Mark 16
A question this chapter raises
Hasn’t the Bible been changed over the centuries?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Mark 15
Mark 16
Luke 1