Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.0.1
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Mark
Mark
15
LIN
BSB
A
a
Mark 15
15
Mark
Death and resurrection
Lingala Bible
Pilate
, person
Jesus
, person
Barabbas
, person
Elias
, person
Magdalene
, place
Mary Magdalene
, person
Joseph
, person
Joses
, person
13 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tango tongo etanaki, bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato, balakisi ya Mobeko mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda basanganaki mpo na kokata likambo. Bakangaki Yesu na basinga, bamemaki Ye mpe bakabaki Ye na maboko ya Pilato.
BSB
BSB:
Early in the morning, the chief priests, elders, scribes, and the whole Sanhedrin devised a plan. They bound Jesus, led Him away, and handed Him over to Pilate.
2
LIN
Pilato atunaki Yesu : — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ? Yesu azongisaki : — Olobi yango.
BSB
BSB:
So Pilate questioned Him, “Are You the King of the Jews?”
“You have said so,”
Jesus replied.
3
LIN
Bakonzi ya Banganga-Nzambe bazalaki kofunda Ye na makambo ebele.
BSB
BSB:
And the chief priests began to accuse Him of many things.
4
LIN
Pilato atunaki Ye lisusu : — Boni, ozali te na eyano ya kopesa, na makambo nyonso oyo bazali koloba mpo na kofunda yo ?
BSB
BSB:
Then Pilate questioned Him again, “Have You no answer? Look how many charges they are bringing against You!”
5
LIN
Kasi Yesu azongisaki ata liloba moko te ; mpe Pilato akamwaki makasi.
BSB
BSB:
But to Pilate’s amazement, Jesus made no further reply.
6
LIN
Na feti nyonso ya Pasika, azalaki kobimisa na boloko mokangami moko oyo bato bazalaki kosenga.
BSB
BSB:
Now it was Pilate’s custom at the feast to release to the people a prisoner of their choosing.
7
LIN
Na tango wana, moto oyo bazalaki kobenga « Barabasi » azalaki kati na boloko elongo na batomboki oyo bayeisaki mobulu kati na engumba mpe babomaki moto.
BSB
BSB:
And a man named Barabbas was imprisoned with the rebels who had committed murder during the insurrection.
8
LIN
Ebele ya bato bayaki mpe basengaki na Pilato ete asalela bango makambo oyo amesana kosalela bango mbala na mbala.
BSB
BSB:
So the crowd went up and began asking Pilate to keep his custom.
9
LIN
Pilato atunaki : — Bolingi nabimisela bino mokonzi ya Bayuda ?
BSB
BSB:
“Do you want me to release to you the King of the Jews?” Pilate asked.
10
LIN
Pilato ayebaki malamu ete ezali mpo na likunya nde bakonzi ya Banganga-Nzambe bakabaki Yesu na maboko na ye.
BSB
BSB:
For he knew it was out of envy that the chief priests had handed Jesus over.
11
LIN
Bakonzi ya Banganga-Nzambe batindikaki ebele ya bato mpo ete basenga na Pilato ete abimisela bango Barabasi longwa na boloko.
BSB
BSB:
But the chief priests stirred up the crowd to have him release Barabbas to them instead.
12
LIN
Pilato atunaki bango : — Nasala nini na moto oyo bozali kobenga mokonzi ya Bayuda ?
BSB
BSB:
So Pilate asked them again, “What then do you want me to do with the One you call the King of the Jews?”
13
LIN
Bagangaki lisusu : — Baka ye na ekulusu !
BSB
BSB:
And they shouted back, “Crucify Him!”
14
LIN
Pilato atunaki bango lisusu : — Mabe nini asali ? Kasi bakobaki kaka koganga makasi koleka : — Baka ye na ekulusu !
BSB
BSB:
“Why?” asked Pilate. “What evil has He done?” But they shouted all the louder, “Crucify Him!”
15
LIN
Lokola Pilato alingaki kosepelisa ebele ya bato, abimiselaki bango Barabasi longwa na boloko. Sima na kobetisa Yesu fimbu, Pilato apesaki Ye na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu.
BSB
BSB:
And wishing to satisfy the crowd, Pilate released Barabbas to them. But he had Jesus flogged, and handed Him over to be crucified.
16
LIN
Basoda bakumbaki Yesu kati na ndako ya moyangeli, na esambiselo, mpe basangisaki lisanga mobimba ya basoda.
BSB
BSB:
Then the soldiers led Jesus away into the palace (that is, the Praetorium) and called the whole company together.
17
LIN
Balatisaki Yesu nzambala ya motane mpe ekoti oyo basalaki na banzube ;
BSB
BSB:
They dressed Him in a purple robe, twisted together a crown of thorns, and set it on His head.
18
LIN
mpe babandaki kopesa ye mbote : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! »
BSB
BSB:
And they began to salute Him: “Hail, King of the Jews!”
19
LIN
Bazalaki kosalela lingenda moke mpo na kobeta Ye na moto, bazalaki kobwakela Ye soyi mpe kofukama mpo na kogumbama liboso na Ye.
BSB
BSB:
They kept striking His head with a staff and spitting on Him. And they knelt down and bowed before Him.
20
LIN
Sima na bango kosakanela Ye, balongolaki Ye nzambala ya motane, balatisaki Ye lisusu bilamba na Ye mpe bakumbaki Ye mpo na kobaka Ye na ekulusu.
BSB
BSB:
After they had mocked Him, they removed the purple robe and put His own clothes back on Him. Then they led Him out to crucify Him.
21
LIN
Bakangaki na makasi moleki nzela moko oyo awutaki na bilanga, mpo ete amema ekulusu ya Yesu ; kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene mpe tata ya Alekizandre mpe Rifisi.
BSB
BSB:
Now Simon of Cyrene, the father of Alexander and Rufus, was passing by on his way in from the country, and the soldiers forced him to carry the cross of Jesus.
22
LIN
Bamemaki Yesu na esika oyo babengaka « Gologota, » oyo elingi koloba : esika ya mokuwa ya moto,
BSB
BSB:
They brought Jesus to a place called Golgotha, which means The Place of the Skull.
23
LIN
bapesaki Ye masanga ya vino basangisa na mire, kasi amelaki yango te.
BSB
BSB:
There they offered Him wine mixed with myrrh, but He did not take it.
24
LIN
Babakaki Ye na ekulusu, mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke mpo na koyeba oyo moko na moko akozwa.
BSB
BSB:
And they crucified Him. They also divided His garments by casting lots to decide what each of them would take.
25
LIN
Babakaki Ye na ekulusu na ngonga ya libwa ya tongo.
BSB
BSB:
It was the third hour when they crucified Him.
26
LIN
Tala makomi oyo ezalaki kotalisa mpo na nini bakatelaki Ye etumbu : Mokonzi ya Bayuda.
BSB
BSB:
And the charge inscribed against Him read: THE KING OF THE JEWS.
27
LIN
Babomi mibale ya bato babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi. [
BSB
BSB:
Along with Jesus, they crucified two robbers, one on His right and one on His left.
28
LIN
Ezali boye nde ekokisamaki Makomi oyo ezali koloba : « Batangaki Ye na molongo ya bato ya mabe. »]
BSB
BSB:
Not in the BSB
Not in the earliest manuscripts
29
LIN
Baleki nzela bazalaki kofinga Ye na koningisa mito na bango ; bazalaki koloba : — Yo oyo okobuka Tempelo mpe okotonga yango lisusu na mikolo misato,
BSB
BSB:
And those who passed by heaped abuse on Him, shaking their heads and saying, “Aha! You who are going to destroy the temple and rebuild it in three days,
30
LIN
mibikisa yo moko mpe kita longwa na ekulusu !
BSB
BSB:
come down from the cross and save Yourself!”
31
LIN
Bakonzi ya Banganga-Nzambe elongo na balakisi ya Mobeko bazalaki mpe kotiola kati na bango : — Abikisaki bato mosusu, kasi ye moko akoki komibikisa te !
BSB
BSB:
In the same way, the chief priests and scribes mocked Him among themselves, saying, “He saved others, but He cannot save Himself!
32
LIN
Tika ete Klisto, Mokonzi ya Isalaele, akita sik’oyo longwa na ekulusu, mpo ete tomona mpe tondima ! Bato oyo babakamaki elongo na Yesu na ba-ekulusu bazalaki mpe kofinga Ye.
BSB
BSB:
Let the Christ, the King of Israel, come down now from the cross, so that we may see and believe!” And even those who were crucified with Him berated Him.
33
LIN
Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.
BSB
BSB:
From the sixth hour until the ninth hour darkness came over all the land.
34
LIN
Na ngonga yango ya misato ya pokwa, Yesu agangaki : — Eloi, Eloi, lema sabachtani ? Elingi koloba : « Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai ? »
BSB
BSB:
At the ninth hour, Jesus cried out in a loud voice,
“Eloi, Eloi, lema sabachthani?”
which means,
“My God, My God, why have You forsaken Me?”
35
LIN
Kati na bato oyo batelemaki wana, ndambo bayokaki Yesu ; boye bakomaki koloba : — Boyoka, azali kobenga Eliya !
BSB
BSB:
When some of those standing nearby heard this, they said, “Behold, He is calling Elijah.”
36
LIN
Moto moko akimaki mbangu, azindisaki eponze moko na vino ya ngayi, atiaki eponze yango na songe ya mwa nzete mpe apesaki yango Yesu mpo ete amela ; alobaki : — Totala soki Eliya akoya kokitisa ye.
BSB
BSB:
And someone ran and filled a sponge with sour wine. He put it on a reed and held it up for Jesus to drink, saying, “Leave Him alone. Let us see if Elijah comes to take Him down.”
37
LIN
Kasi Yesu agangaki makasi mpe akataki motema.
BSB
BSB:
But Jesus let out a loud cry and breathed His last.
38
LIN
Rido ya Tempelo epasukaki na biteni mibale, kobanda na likolo kino na se.
BSB
BSB:
And the veil of the temple was torn in two from top to bottom.
39
LIN
Mpe tango mokonzi ya basoda ya Rome, oyo atelemaki liboso ya Yesu, amonaki ndenge Yesu akufaki, alobaki : — Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe !
BSB
BSB:
When the centurion standing there in front of Jesus saw how He had breathed His last, he said, “Truly this man was the Son of God!”
40
LIN
Ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kotala na mosika. Kati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala ; Mari, mama ya Jake oyo ya elenge, ya Joze mpe ya Salome ;
BSB
BSB:
And there were also women watching from a distance. Among them were Mary Magdalene, Mary the mother of James the younger and of Joses, and Salome.
41
LIN
oyo bazalaki kolanda Yesu mpe kosunga Ye tango azalaki kati na Galile ; ezalaki mpe na basi mosusu ebele oyo bakendeki na Yelusalemi elongo na Yesu.
BSB
BSB:
These women had followed Jesus and ministered to Him while He was in Galilee, and there were many other women who had come up to Jerusalem with Him.
42
LIN
Wana pokwa ekomaki, lokola ezalaki mokolo ya komilengela mpo ete etikalaki ngonga moke mpo na kokota na mokolo ya Saba,
BSB
BSB:
Now it was already evening. Since it was Preparation Day (that is, the day before the Sabbath),
43
LIN
Jozefi, moto ya mboka Arimate, oyo azalaki moto ya lokumu kati na Likita-Monene ya Bayuda mpe azalaki kozela Bokonzi ya Nzambe, abangaki te kokende epai ya Pilato mpo na kosenga nzoto ya Yesu.
BSB
BSB:
Joseph of Arimathea, a prominent Council member who himself was waiting for the kingdom of God, boldly went to Pilate to ask for the body of Jesus.
44
LIN
Pilato akamwaki tango ayokaki ete Yesu asilaki kokufa ; abengaki mokonzi ya basoda mpo na kotuna ye soki solo Yesu asilaki kokufa.
BSB
BSB:
Pilate was surprised to hear that Jesus was already dead, so he summoned the centurion to ask if this was so.
45
LIN
Tango ayokaki na monoko ya mokonzi ya basoda ete ezali bongo, apesaki Jozefi ndingisa ya kokamata nzoto ya Yesu.
BSB
BSB:
When Pilate had confirmed it with the centurion, he granted the body to Joseph.
46
LIN
Jozefi asombaki liputa ya lino, akitisaki nzoto ya Yesu longwa na ekulusu, alingaki yango na liputa yango ; atiaki nzoto yango kati na kunda oyo batobolaki kati na libanga moko ya monene, mpe atindikaki libanga mosusu liboso ya ekotelo ya kunda yango.
BSB
BSB:
So Joseph bought a linen cloth, took down the body of Jesus, wrapped it in the cloth, and placed it in a tomb that had been cut out of the rock. Then he rolled a stone against the entrance to the tomb.
47
LIN
Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari, mama ya Joze, bazalaki kotala esika oyo akotia nzoto ya Yesu.
BSB
BSB:
Mary Magdalene and Mary the mother of Joseph saw where His body was placed.
Chapter complete
You’ve read Mark 15
Chapter 15 of 16 in Mark
Up next
Mark 16
Read Mark 16
Listen
Back to Mark 14
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Mark 15
A question this chapter raises
Did Jesus really die on the cross?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Mark 14
Mark 15
Mark 16