Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.42.7
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Mark
Mark
14
LIN
BSB
A
a
Mark 14
14
Mark
Death and resurrection
Lingala Bible
Jesus
, person
Peter
, person
Judas
, person
Galilee
, place
John
, person
Nazareth
, place
James
, person
Olives Mount
, place
3 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Wana etikalaki mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika mpe feti ya Mapa ezanga levire ebanda, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koluka ndenge nini kokanga Yesu na mayele mpo na koboma Ye ;
BSB
BSB:
Now the Passover and the Feast of Unleavened Bread were two days away, and the chief priests and scribes were looking for a covert way to arrest Jesus and kill Him.
2
LIN
pamba te balobaki : « Tosala yango te na tango ya feti, noki te bato bakotomboka. »
BSB
BSB:
“But not during the feast,” they said, “or there may be a riot among the people.”
3
LIN
Lokola Yesu azalaki na Betani, na ndako ya Simona oyo azalaki moto na maba, mwasi moko akotaki, wana Yesu azalaki na mesa. Na maboko na ye, azalaki na molangi ya alibatre etonda na malasi ya nar, oyo basangisa na eloko mosusu te mpe ya motuya makasi ; afungolaki molangi yango mpe asopaki malasi yango na moto ya Yesu.
BSB
BSB:
While Jesus was in Bethany reclining at the table in the home of Simon the Leper, a woman came with an alabaster jar of expensive perfume, made of pure nard. She broke open the jar and poured it on Jesus’ head.
4
LIN
Kati na bato oyo bazalaki wana, bamosusu basilikaki mpe balobaki : — Mpo na nini kobebisa malasi oyo na pamba kaka boye ?
BSB
BSB:
Some of those present, however, expressed their indignation to one another: “Why this waste of perfume?
5
LIN
Bakokaki ata koteka malasi yango na motuya ya mbongo ya bibende koleka nkama misato mpe kopesa mbongo yango epai ya babola ! Bazalaki kopamela mwasi yango makasi.
BSB
BSB:
It could have been sold for over three hundred denarii and the money given to the poor.” And they scolded her.
6
LIN
Kasi Yesu alobaki : — Botika ye ! Mpo na nini kotungisa ye ? Asali Ngai likambo moko ya malamu.
BSB
BSB:
But Jesus said,
“Leave her alone; why are you bothering her? She has done a beautiful deed to Me.
7
LIN
Bokozalaka na babola tango nyonso mpe bokoki tango nyonso kosalelaka bango bolamu oyo bolingi ; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te.
BSB
BSB:
The poor you will always have with you, and you can help them whenever you want. But you will not always have Me.
8
LIN
Mwasi oyo asali likambo oyo akoki, asili kosopela nzoto na Ngai malasi mpo na kobongisa kokundama na Ngai.
BSB
BSB:
She has done what she could to anoint My body in advance of My burial.
9
LIN
Nazali koloba na bino penza ya solo : Esika nyonso bakosakola Sango Malamu kati na mokili mobimba, bakobanda mpe kolobela likambo mwasi oyo awuti kosala, mpo na kokanisa ye.
BSB
BSB:
And truly I tell you, wherever the gospel is preached in all the world, what she has done will also be told in memory of her.”
10
LIN
Bongo Yuda Isikarioti, moko kati na bantoma zomi na mibale, akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpo na koteka Yesu epai na bango.
BSB
BSB:
Then Judas Iscariot, one of the Twelve, went to the chief priests to betray Jesus to them.
11
LIN
Tango bayokaki bongo, basepelaki makasi mpe balakaki kopesa ye mbongo. Boye, Yuda akomaki koluka libaku ya kokaba Yesu.
BSB
BSB:
They were delighted to hear this, and they promised to give him money. So Judas began to look for an opportunity to betray Jesus.
12
LIN
Na mokolo ya liboso ya feti ya Mapa ezanga levire, mokolo oyo bazalaki koboma mwana meme lokola mbeka ya Pasika, bayekoli batunaki Ye : — Esika nini olingi ete tokende kobongisela Yo bilei ya Pasika ?
BSB
BSB:
On the first day of the Feast of Unleavened Bread, when the Passover lamb was to be sacrificed, Jesus’ disciples asked Him, “Where do You want us to prepare for You to eat the Passover?”
13
LIN
Bongo, kati na bayekoli na Ye, Yesu atindaki mibale ; alobaki na bango : — Bokende kati na engumba, bokokutana na moto moko amemi eloku ya mayi ; bolanda ye
BSB
BSB:
So He sent two of His disciples and told them,
“Go into the city, and a man carrying a jug of water will meet you. Follow him,
14
LIN
mpe, tango akokota na ndako, boloba na nkolo ndako yango : « Moteyi azali kotuna yo : ‹ Wapi shambre na Ngai epai wapi nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai ? › »
BSB
BSB:
and whichever house he enters, say to the owner, ‘The Teacher asks: Where is My guest room, where I may eat the Passover with My disciples?’
15
LIN
Bongo ye akolakisa bino, na etaje ya suka, shambre moko ya monene, babongisa malamu mpe bakoki kosalela yango. Ezali kuna nde bokobongisa bilei ya Pasika mpo na biso.
BSB
BSB:
And he will show you a large upper room, furnished and ready. Make preparations for us there.”
16
LIN
Tango bayekoli bakendeki, bakotaki na engumba mpe bakutaki makambo nyonso ndenge kaka Yesu ayebisaki bango. Bongo babongisaki bilei ya Pasika.
BSB
BSB:
So the disciples left and went into the city, where they found everything as Jesus had described. And they prepared the Passover.
17
LIN
Tango pokwa ekomaki, Yesu ayaki elongo na bayekoli zomi na mibale.
BSB
BSB:
When evening came, Jesus arrived with the Twelve.
18
LIN
Wana bazalaki na mesa mpe bazalaki kolia, Yesu alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moko kati na bino, oyo azali kolia elongo na Ngai, akoteka Ngai.
BSB
BSB:
And while they were reclining and eating, Jesus said,
“Truly I tell you, one of you who is eating with Me will betray Me.”
19
LIN
Bayokaki mawa mingi, mpe bakomaki kotuna Ye, moko sima na moninga : — Ezali ngai ?
BSB
BSB:
They began to be grieved and to ask Him one after another, “Surely not I?”
20
LIN
Yesu azongisaki : — Ezali moko kati na bino, zomi na mibale, oyo azali kolia sani moko elongo na Ngai.
BSB
BSB:
He answered,
“It is one of the Twelve—the one who is dipping his hand into the bowl with Me.
21
LIN
Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge ekomama na tina na Ye ; kasi mawa na moto oyo akoteka Mwana na Moto ! Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango ete abotama te.
BSB
BSB:
The Son of Man will go just as it is written about Him, but woe to that man by whom He is betrayed! It would be better for him if he had not been born.”
22
LIN
Wana bazalaki kolia, Yesu azwaki lipa ; sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango, apesaki bango yango mpe alobaki : — Oyo ezali nzoto na Ngai ! Bozwa.
BSB
BSB:
While they were eating, Jesus took bread, spoke a blessing and broke it, and gave it to the disciples, saying,
“Take it; this is My body.”
23
LIN
Azwaki lisusu kopo ; mpe sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, apesaki bango yango, mpe bango nyonso bamelaki yango.
BSB
BSB:
Then He took the cup, gave thanks, and gave it to them, and they all drank from it.
24
LIN
Bongo alobaki na bango : — Oyo ezali makila na Ngai ya Boyokani, makila oyo esopani mpo na bato ebele.
BSB
BSB:
He said to them,
“This is My blood of the covenant, which is poured out for many.
25
LIN
Nazali koloba na bino penza ya solo : nakomela lisusu vino oyo te kino na mokolo oyo nakomela yango, ya sika, kati na Bokonzi ya Nzambe.
BSB
BSB:
Truly I tell you, I will no longer drink of the fruit of the vine until that day when I drink it anew in the kingdom of God.”
26
LIN
Sima na yango, bayembaki banzembo ; bongo babimaki mpo na kokende na ngomba ya banzete ya olive.
BSB
BSB:
And when they had sung a hymn, they went out to the Mount of Olives.
27
LIN
Yesu alobaki na bango : — Bino nyonso bokobungisa kondima, pamba te ekomama : « Nakobeta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. »
BSB
BSB:
Then Jesus said to them,
“You will all fall away, for it is written: ‘I will strike the Shepherd, and the sheep will be scattered.’
28
LIN
Kasi, sima na Ngai kosekwa, nakokende na Galile, liboso na bino.
BSB
BSB:
But after I have risen, I will go ahead of you into Galilee.”
29
LIN
Petelo alobaki na Ye : — Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima na bango, ngai nakotikala kokweyisa kondima na ngai te.
BSB
BSB:
Peter declared, “Even if all fall away, I never will.”
30
LIN
Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : lelo, kaka na butu ya lelo, liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana Ngai mbala misato.
BSB
BSB:
“Truly I tell you,”
Jesus replied,
“this very night, before the rooster crows twice, you will deny Me three times.”
31
LIN
Kasi Petelo akobaki kotia monoko makasi, alobaki : — Ata soki nasengeli kokufa elongo na Yo, nakowangana yo te. Mpe bango nyonso balobaki kaka ndenge moko.
BSB
BSB:
But Peter kept insisting, “Even if I have to die with You, I will never deny You.” And all the others said the same thing.
32
LIN
Tango bakomaki na esika oyo kombo na yango ezali Getisemane, Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Botikala awa, wana Ngai nakosambela.
BSB
BSB:
Then they came to a place called Gethsemane, and Jesus told His disciples,
“Sit here while I pray.”
33
LIN
Wana amemaki Petelo, Jake mpe Yoane, akomaki mawa-mawa mpe komitungisa ;
BSB
BSB:
He took with Him Peter, James, and John, and began to be deeply troubled and distressed.
34
LIN
alobaki na bango : — Motema na Ngai etondi na mawa pene nakufa ; botikala awa mpe bosenzela.
BSB
BSB:
Then He said to them,
“My soul is consumed with sorrow to the point of death. Stay here and keep watch.”
35
LIN
Wana akendeki mwa mosika, amikitisaki na mabele mpe azalaki kosambela Nzambe mpo ete, soki ekoki kosalema, tango wana ya pasi ekende mosika na Ye.
BSB
BSB:
Going a little farther, He fell to the ground and prayed that, if it were possible, the hour would pass from Him.
36
LIN
Azalaki kobondela : — Tata ! Epai na Yo, nyonso ekoki kosalema ! Longola kopo oyo ya pasi liboso na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.
BSB
BSB:
“Abba, Father,”
He said,
“all things are possible for You. Take this cup from Me. Yet not what I will, but what You will.”
37
LIN
Bongo azongaki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi. Alobaki na Petelo : — Simona, ozali kolala ? Okokaki te kosenzela mpo na ngonga moko ?
BSB
BSB:
Then Jesus returned and found them sleeping.
“Simon, are you asleep?”
He asked.
“Were you not able to keep watch for one hour?
38
LIN
Bosenzela mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama. Molimo ezalaka na posa makasi ya kosala malamu, kasi nzoto ezalaka na bolembu.
BSB
BSB:
Watch and pray so that you will not enter into temptation. For the spirit is willing, but the body is weak.”
39
LIN
Akendeki lisusu mwa mosika mpe abondelaki kaka ndenge moko.
BSB
BSB:
Again He went away and prayed, saying the same thing.
40
LIN
Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango lisusu balala pongi, pamba te bayokaki pongi makasi mpe miso na bango ekomaki kilo. Bayebaki te eyano ya kopesa Ye.
BSB
BSB:
And again Jesus returned and found them sleeping, for their eyes were heavy. And they did not know what to answer Him.
41
LIN
Azongaki mpo na mbala ya misato, mpe alobaki na bango : — Bozali kaka kokoba kolala pongi mpe kopema ? Esili ! Ngonga ekoki. Mwana na Moto akokabama na maboko ya bato ya masumu.
BSB
BSB:
When Jesus returned the third time, He said,
“Are you still sleeping and resting? That is enough! The hour has come. Look, the Son of Man is betrayed into the hands of sinners.
42
LIN
Botelema ; tokende. Moto oyo ateki Ngai azali koya.
BSB
BSB:
Rise, let us go. See, My betrayer is approaching!”
43
LIN
Wana Yesu azalaki nanu koloba, Yuda, moko kati na bayekoli zomi na mibale, akomaki elongo na bato ebele oyo basimbaki mipanga mpe banzete ; ezalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato nde batindaki bango.
BSB
BSB:
While Jesus was still speaking, Judas, one of the Twelve, arrived, accompanied by a crowd armed with swords and clubs, sent from the chief priests, scribes, and elders.
44
LIN
Moto oyo atekaki Yesu apesaki bango elembo moko : « Moto oyo ngai nakopesa beze, ezali nde ye ; bokokanga ye mpe bokomema ye na se ya bokengeli malamu. »
BSB
BSB:
Now the betrayer had arranged a signal with them: “The One I kiss is the man; arrest Him and lead Him away securely.”
45
LIN
Tango kaka Yuda akomaki, akendeki epai ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Moteyi ! Mpe apesaki Ye beze.
BSB
BSB:
Going directly to Jesus, he said, “Rabbi!” and kissed Him.
46
LIN
Mbala moko, basimbaki Yesu na makasi mpe bakangaki Ye.
BSB
BSB:
Then the men seized Jesus and arrested Him.
47
LIN
Bongo moko kati na bato oyo bazalaki wana abimisaki mopanga na ye wuta na ebombelo na yango, abetaki yango mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi.
BSB
BSB:
And one of the bystanders drew his sword and struck the servant of the high priest, cutting off his ear.
48
LIN
Yesu alobaki na bango : — Boni, nakomi motomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe na banzete ?
BSB
BSB:
Jesus asked the crowd,
“Have you come out with swords and clubs to arrest Me as you would an outlaw?
49
LIN
Nazalaki elongo na bino mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kopesa malakisi na Ngai, mpe bokangaki Ngai te. Kasi ezali kosalema bongo mpo ete Makomi ekokisama.
BSB
BSB:
Every day I was with you, teaching in the temple courts, and you did not arrest Me. But this has happened that the Scriptures would be fulfilled.”
50
LIN
Bayekoli na Ye nyonso basundolaki Ye mpe bakimaki.
BSB
BSB:
Then everyone deserted Him and fled.
51
LIN
Nzokande, elenge mobali moko azalaki kolanda Yesu ; alataki liputa ya pamba. Mpe tango bakangaki ye,
BSB
BSB:
One young man who had been following Jesus was wearing a linen cloth around his body. They caught hold of him,
52
LIN
asundolaki liputa mpe akimaki.
BSB
BSB:
but he pulled free of the linen cloth and ran away naked.
53
LIN
Bamemaki Yesu epai ya mokonzi ya Banganga-Nzambe epai wapi bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato mpe balakisi ya Mobeko, bango nyonso, basanganaki.
BSB
BSB:
They led Jesus away to the high priest, and all the chief priests, elders, and scribes assembled.
54
LIN
Petelo azalaki kolanda Yesu na mosika, kino kati na lopango ya ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; avandaki kuna elongo na bakengeli, pene ya moto, mpe azalaki koyetola moto.
BSB
BSB:
Peter followed Him at a distance, right into the courtyard of the high priest. And he sat with the officers and warmed himself by the fire.
55
LIN
Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli moko oyo ekobimisa polele mabe ya Yesu mpo ete bakoka kokatela Ye etumbu ya kufa, kasi bazalaki kozwa yango te ;
BSB
BSB:
Now the chief priests and the whole Sanhedrin were seeking testimony against Jesus to put Him to death, but they did not find any.
56
LIN
pamba te bato mingi bazalaki kokosela Ye makambo, kasi matatoli na bango ezalaki kokokana te.
BSB
BSB:
For many bore false witness against Jesus, but their testimony was inconsistent.
57
LIN
Mpo na kaka kokosela Ye makambo, bato mosusu bazalaki kotelema na koloba :
BSB
BSB:
Then some men stood up and testified falsely against Him:
58
LIN
« Toyokaki ye koloba : ‹ Ngai, nakobuka Tempelo oyo esalema na maboko ya bato ; mpe sima na mikolo misato, nakotonga Tempelo mosusu oyo ekosalema na maboko ya bato te. › »
BSB
BSB:
“We heard Him say, ‘I will destroy this man-made temple, and in three days I will build another that is made without hands.’”
59
LIN
Kasi atako bongo, litatoli na bango ezalaki kaka ya lokuta.
BSB
BSB:
But even their testimony was inconsistent.
60
LIN
Mokonzi ya Banganga-Nzambe atelemaki kati na mayangani mpe apesaki Yesu motuna : — Boni, ozali te na liloba ya kozongisa ? Olobi nini liboso ya makambo oyo bazali kofunda yo na yango ?
BSB
BSB:
So the high priest stood up before them and questioned Jesus, “Have You no answer? What are these men testifying against You?”
61
LIN
Kasi Yesu abatelaki kimia mpe apesaki ata eyano moko te. Mokonzi ya Banganga-Nzambe atunaki Ye lisusu : — Ozali Klisto, Mwana ya Ye oyo apambolama ?
BSB
BSB:
But Jesus remained silent and made no reply. Again the high priest questioned Him, “Are You the Christ, the Son of the Blessed One?”
62
LIN
Yesu azongisaki : — Iyo, ezali se bongo. Mpe bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya elongo na mapata ya Likolo.
BSB
BSB:
“I am,”
said Jesus,
“and you will see the Son of Man sitting at the right hand of Power and coming with the clouds of heaven.”
63
LIN
Bongo mokonzi ya Banganga-Nzambe apasolaki bilamba na ye mpe alobaki : — Mpo na nini koluka lisusu batatoli ?
BSB
BSB:
At this, the high priest tore his clothes and declared, “Why do we need any more witnesses?
64
LIN
Bino moko boyoki ndenge nini afingi Nzambe. Bokanisi nini mpo na yango ? Boye, bango nyonso bakatelaki Yesu etumbu, batatolaki ete abongi na kufa.
BSB
BSB:
You have heard the blasphemy. What is your verdict?” And they all condemned Him as deserving of death.
65
LIN
Bato mosusu bakomaki kobwakela Ye soyi, kozipa Ye elongi, kobeta Ye makofi na koloba na Ye : — Sakola ! Mpe bakengeli bazwaki Ye mpe babetaki Ye bambata.
BSB
BSB:
Then some of them began to spit on Him. They blindfolded Him, struck Him with their fists, and said to Him, “Prophesy!” And the officers received Him with slaps in His face.
66
LIN
Wana Petelo azalaki na se, kati na lopango ya kati, mwasi mosali moko ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ayaki wana,
BSB
BSB:
While Peter was in the courtyard below, one of the servant girls of the high priest came down
67
LIN
amonaki Petelo koyetola moto. Sima na ye kotala Petelo malamu, alobaki na ye : — Yo mpe ozalaki elongo na Yesu, moto ya Nazareti !
BSB
BSB:
and saw him warming himself there. She looked at Peter and said, “You also were with Jesus the Nazarene.”
68
LIN
Kasi Petelo awanganaki ; alobaki : — Nayebi te ! Nazali kutu kososola te makambo oyo ozali koloba ! Bongo abimaki mpe akendeki kotelema pembeni, na ekuke ya lopango ; mpe soso elelaki.
BSB
BSB:
But he denied it. “I do not know or even understand what you are talking about,” he said. Then he went out to the gateway, and the rooster crowed.
69
LIN
Tango mwasi mosali amonaki ye, alobaki lisusu na bato oyo bazalaki wana : — Moto oyo azali moko kati na bango !
BSB
BSB:
There the servant girl saw him and again said to those standing nearby, “This man is one of them.”
70
LIN
Petelo awanganaki lisusu. Sima na mwa tango moke, bato oyo bazalaki wana bazongelaki koloba na Petelo : — Ezali ya solo, yo mpe ozali moko kati na bango, mpe ozali moto ya Galile.
BSB
BSB:
But he denied it again. After a little while, those standing nearby said once more to Peter, “Surely you are one of them, for you too are a Galilean.”
71
LIN
Bongo Petelo abandaki kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe : — Nayebi te moto oyo bozali kolobela !
BSB
BSB:
But he began to curse and swear, “I do not know this man of whom you speak!”
72
LIN
Kaka na tango yango, soso elelaki mpo na mbala ya mibale. Bongo Petelo akanisaki maloba oyo Yesu alobaki na ye : « Liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana Ngai mbala misato. » Mpe alelaki makasi.
BSB
BSB:
And immediately the rooster crowed a second time. Then Peter remembered the word that Jesus had spoken to him:
“Before the rooster crows twice, you will deny Me three times.”
And he broke down and wept.
Chapter complete
You’ve read Mark 14
Chapter 14 of 16 in Mark
Up next
Mark 15
Read Mark 15
Listen
Back to Mark 13
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Mark 14
A question this chapter raises
Was Jesus a Muslim?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Mark 13
Mark 14
Mark 15