Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.3.3
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Luke
Luke
12
LIN
BSB
A
a
Luke 12
12
Luke
The journey to Jerusalem
Lingala Bible
Solomon
, person
Peter
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Na tango yango, lokola bankoto ebele ya bato basanganaki, kino bakomaki konyatana bango na bango, Yesu abandaki na koyebisa bayekoli na Ye : — Bosala keba na levire ya Bafarizeo, oyo ezali lokuta !
BSB
BSB:
In the meantime, a crowd of many thousands had gathered, so that they were trampling one another. Jesus began to speak first to His disciples:
“Beware of the leaven of the Pharisees, which is hypocrisy.
2
LIN
Eloko moko te ebombama ekozanga komonisama, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga koyebana.
BSB
BSB:
There is nothing concealed that will not be disclosed, and nothing hidden that will not be made known.
3
LIN
Nyonso oyo bokoloba kati na molili ekoyokana kati na pole ya mokolo, mpe nyonso oyo bokolobana na matoyi kati na bashambre ekosakolama wuta na likolo ya bandako.
BSB
BSB:
What you have spoken in the dark will be heard in the daylight, and what you have whispered in the inner rooms will be proclaimed from the housetops.
4
LIN
Balingami na Ngai, nazali koloba na bino : bobanga te bato oyo bakoki koboma nzoto mpe, na sima, bakoki kosala likambo mosusu te.
BSB
BSB:
I tell you, My friends, do not be afraid of those who kill the body and after that can do no more.
5
LIN
Nakolakisa bino nani oyo bosengeli kobanga : bobanga Ye oyo, sima na kufa, azali na bokonzi ya kobwaka kati na lifelo. Solo, nazali koloba na bino : Ye nde bosengeli kobanga.
BSB
BSB:
But I will show you whom you should fear: Fear the One who, after you have been killed, has authority to throw you into hell. Yes, I tell you, fear Him!
6
LIN
Boni, batekaka te bandeke mike mitano na motuya ya mbongo ya bibende mibale ? Nzokande, Nzambe abosanaka ata ndeke moko te kati na yango.
BSB
BSB:
Are not five sparrows sold for two pennies? Yet not one of them is forgotten by God.
7
LIN
Ayebi kutu ata motango ya suki na bino. Bobanga te ; boleki bandeke mike ebele na motuya.
BSB
BSB:
And even the very hairs of your head are all numbered. So do not be afraid; you are worth more than many sparrows.
8
LIN
Nazali koloba na bino : moto nyonso oyo, na miso ya bato, akotatola ete azali moto na Ngai, Mwana na Moto mpe akotatola liboso ya ba-anjelu ya Nzambe ete azali moto na Ye ;
BSB
BSB:
I tell you, everyone who confesses Me before men, the Son of Man will also confess him before the angels of God.
9
LIN
kasi ye oyo akowangana Ngai na miso ya bato, Ngai mpe nakowangana ye liboso ya ba-anjelu ya Nzambe.
BSB
BSB:
But whoever denies Me before men will be denied before the angels of God.
10
LIN
Moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Mwana na Moto akolimbisama, kasi ye oyo akofinga Molimo Mosantu akolimbisama te.
BSB
BSB:
And everyone who speaks a word against the Son of Man will be forgiven, but whoever blasphemes against the Holy Spirit will not be forgiven.
11
LIN
Tango bakokumba bino kati na bandako ya mayangani, liboso ya bakambi mpe bakonzi, bomitungisa te na koluka koyeba ndenge nini bokosamba mpe maloba nini bokoloba ;
BSB
BSB:
When you are brought before synagogues, rulers, and authorities, do not worry about how to defend yourselves or what to say.
12
LIN
pamba te Molimo Mosantu akolakisa bino, na tango yango, makambo oyo bosengeli koloba.
BSB
BSB:
For at that time the Holy Spirit will teach you what you should say.”
13
LIN
Moto moko kati na ebele ya bato alobaki na Yesu : — Moteyi, loba na ndeko na ngai ete akabola na ngai libula oyo tata atikelaki biso.
BSB
BSB:
Someone in the crowd said to Him, “Teacher, tell my brother to divide the inheritance with me.”
14
LIN
Yesu azongiselaki ye : — Molingami na Ngai, nani atie Ngai Mosambisi to Mokati makambo na bino ya libula ?
BSB
BSB:
But Jesus replied,
“Man, who appointed Me judge or executor between you?”
15
LIN
Bongo alobaki na bato nyonso : — Bosala keba ! Bomibatela malamu ete bokweya te na lokoso ya konduka bomengo ; pamba te, ezala kati na bofuluki, ezali bomengo te nde esalaka bomoi ya moto.
BSB
BSB:
And He said to them,
“Watch out! Guard yourselves against every form of greed, for one’s life does not consist in the abundance of his possessions.”
16
LIN
Mpe alobaki na bango lisese oyo : — Bilanga ya mozwi moko ebotaki bambuma ebele penza.
BSB
BSB:
Then He told them a parable:
“The ground of a certain rich man produced an abundance.
17
LIN
Akomaki kokanisa mpe komituna : « Nasala nini ? Nazali lisusu na esika te mpo na kobomba bambuma na ngai ya bilanga. »
BSB
BSB:
So he thought to himself, ‘What shall I do, since I have nowhere to store my crops?’
18
LIN
Bongo amilobelaki lisusu : « Nakosala boye : nakobuka bibombelo na ngai mpo na kotonga bibombelo oyo eleki minene, nakobomba kuna ble na ngai nyonso mpe biloko na ngai mosusu.
BSB
BSB:
Then he said, ‘This is what I will do: I will tear down my barns and will build bigger ones, and there I will store up all my grain and my goods.
19
LIN
Sima na yango, nakomilobela : ‹ Oh bomoi na ngai, otondi na biloko oyo ebombami mpo na mibu ebele ; pema na yo, lia, mela mpe sepela ! › »
BSB
BSB:
Then I will say to myself, “You have plenty of good things laid up for many years. Take it easy. Eat, drink, and be merry!”’
20
LIN
Kasi Nzambe alobaki na ye : « Zoba ! Na butu ya lelo kaka, okokufa. Bongo nani akokoma nkolo biloko nyonso oyo ondukaki mpo na yo moko ? »
BSB
BSB:
But God said to him, ‘You fool! This very night your life will be required of you. Then who will own what you have accumulated?’
21
LIN
Ekozala bongo mpo na moto nyonso oyo andukaka bomengo mpo na ye moko, kasi alukaka te kozala mozwi na miso ya Nzambe.
BSB
BSB:
This is how it will be for anyone who stores up treasure for himself but is not rich toward God.”
22
LIN
Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ?
BSB
BSB:
Then Jesus said to His disciples,
“Therefore I tell you, do not worry about your life, what you will eat, or about your body, what you will wear.
23
LIN
Pamba te bomoi eleki bilei na tina, mpe nzoto eleki bilamba na tina.
BSB
BSB:
For life is more than food, and the body more than clothes.
24
LIN
Botala bayanganga : elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ezali te na ebombelo bambuma to na ebombelo bilei ; kasi Nzambe aleisaka yango. Nzokande bino, boleki bandeke na motuya.
BSB
BSB:
Consider the ravens: They do not sow or reap, they have no storehouse or barn; yet God feeds them. How much more valuable you are than the birds!
25
LIN
Nani kati na bino, na nzela ya mitungisi na ye, akoki kobakisa ata ngonga moko na molayi ya bomoi na ye ?
BSB
BSB:
Who of you by worrying can add a single hour to his life?
26
LIN
Soki bokoki kosala te makambo oyo ya mike-mike, bongo mpo na nini komitungisa na tina na makambo mosusu ?
BSB
BSB:
So if you cannot do such a small thing, why do you worry about the rest?
27
LIN
Botala ndenge bafololo ya lisi ekolaka ! Esalaka te, etongaka bilamba te ; nzokande, nazali koloba na bino, ezala ye moko mokonzi Salomo, kati na nkembo na ye nyonso, atikalaki kolata te lokola moko kati na yango.
BSB
BSB:
Consider how the lilies grow: They do not labor or spin. Yet I tell you, not even Solomon in all his glory was adorned like one of these.
28
LIN
Soki Nzambe alatisaka bongo matiti oyo, lelo, ezali kati na bilanga, mpe, lobi, ekobwakama na moto, akozanga te kolatisa bino, bato ya kondima moke ?
BSB
BSB:
If that is how God clothes the grass of the field, which is here today and tomorrow is thrown into the furnace, how much more will He clothe you, O you of little faith!
29
LIN
Bomitungisaka te na tina na biloko ya kolia to ya komela, bolongola yango na makanisi na bino.
BSB
BSB:
And do not be concerned about what you will eat or drink. Do not worry about it.
30
LIN
Pamba te ezali bapagano ya mokili oyo nde balukaka-lukaka biloko wana nyonso. Tata na bino ayebi malamu ete bozali na bosenga na yango.
BSB
BSB:
For the Gentiles of the world strive after all these things, and your Father knows that you need them.
31
LIN
Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.
BSB
BSB:
But seek His kingdom, and these things will be added unto you.
32
LIN
Oh etonga moke, bobanga te ! Pamba te Tata na bino asepelaki kopesa bino Bokonzi !
BSB
BSB:
Do not be afraid, little flock, for your Father is pleased to give you the kingdom.
33
LIN
Boteka biloko na bino mpe bokaba epai ya babola mbongo oyo bokozwa. Bosala mpo na bolamu na bino mabenga oyo etobokaka te ; bonduka bomengo kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te, moyibi akoki kopusana te mpe nselele ekoki kobebisa te ;
BSB
BSB:
Sell your possessions and give to the poor. Provide yourselves with purses that will not wear out, an inexhaustible treasure in heaven, where no thief approaches and no moth destroys.
34
LIN
pamba te epai bomengo na bino ezali, kuna mpe motema na bino ekozala.
BSB
BSB:
For where your treasure is, there your heart will be also.
35
LIN
Bomilengela mpo na mosala mpe bobatela minda na bino ya kopela.
BSB
BSB:
Be dressed for service and keep your lamps burning.
36
LIN
Bozala lokola bato oyo bazali kozela bozongi ya nkolo na bango wuta na feti ya libala, mpo ete bafungolela ye ekuke tango kaka akoya mpe akobeta ekuke.
BSB
BSB:
Then you will be like servants waiting for their master to return from the wedding banquet, so that when he comes and knocks, they can open the door for him at once.
37
LIN
Esengo na basali oyo nkolo, tango akoya, akokuta bazali kosenzela ! Nazali koloba na bino penza ya solo : nkolo mpe akolata elamba na ye ya mosala, akovandisa bango na mesa, mpe akoya kopesa bango bilei.
BSB
BSB:
Blessed are those servants whom the master finds on watch when he returns. Truly I tell you, he will dress himself to serve and will have them recline at the table, and he himself will come and wait on them.
38
LIN
Ekozala penza esengo mpo na basali oyo nkolo akokuta bazali kosenzela, ezala ayei na ngonga ya midi ya butu to liboso ete tongo etana.
BSB
BSB:
Even if he comes in the second or third watch of the night and finds them alert, those servants will be blessed.
39
LIN
Kasi bososola malamu likambo oyo : soki nkolo ndako ayebaki ngonga oyo moyibi akoya, alingaki kopekisa ye kokota kati na ndako na ye.
BSB
BSB:
But understand this: If the homeowner had known at what hour the thief was coming, he would not have let his house be broken into.
40
LIN
Bino mpe bomilengela, pamba te Mwana na Moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa kutu te kozela Ye.
BSB
BSB:
You also must be ready, because the Son of Man will come at an hour you do not expect.”
41
LIN
Petelo atunaki Yesu : — Nkolo, ozali koloba lisese oyo mpo na biso to mpo na bato nyonso ?
BSB
BSB:
“Lord,” said Peter, “are You addressing this parable to us, or to everyone else as well?”
42
LIN
Nkolo azongisaki : — Nani mobateli bomengo ya sembo mpe ya mayele epai ya nani nkolo akopesa mokumba ya kokamba basali na ye mpo na kopesaka bango bilei na bango na tango oyo ekoki ?
BSB
BSB:
And the Lord answered,
“Who then is the faithful and wise manager, whom the master puts in charge of his servants to give them their portion at the proper time?
43
LIN
Esengo na mosali oyo nkolo na ye, tango akozonga, akokuta azali kosala bongo !
BSB
BSB:
Blessed is that servant whose master finds him doing so when he returns.
44
LIN
Nazali koloba na bino penza ya solo : nkolo na ye akopesa ye mokumba ya kobatela biloko na ye nyonso.
BSB
BSB:
Truly I tell you, he will put him in charge of all his possessions.
45
LIN
Kasi soki mosali yango amilobeli : « Nkolo na ngai awumeli mpo na kozonga, » mpe akomi kobeta basali mpe basi basali ; kolia, komela masanga mpe kolangwa,
BSB
BSB:
But suppose that servant says in his heart, ‘My master will be a long time in coming,’ and he begins to beat the menservants and maidservants, and to eat and drink and get drunk.
46
LIN
nkolo ya mosali yango akozonga na mokolo oyo ye, mosali, azali kozela ye te, mpe na ngonga oyo ayebi te. Boye akokata-kata ye na biteni mpe akotia ye esika moko na basali oyo bazangi bosembo.
BSB
BSB:
The master of that servant will come on a day he does not expect and at an hour he does not anticipate. Then he will cut him to pieces and assign him a place with the unbelievers.
47
LIN
Mosali oyo ayebi posa ya nkolo na ye, kasi amilengeli te to asali te kolanda posa ya nkolo na ye, akobetama fimbu ebele.
BSB
BSB:
That servant who knows his master’s will but does not get ready or follow his instructions will be beaten with many blows.
48
LIN
Kasi mosali oyo ayebi te posa ya nkolo na ye mpe asali makambo oyo ebongi na etumbu, akobetama fimbu moke. Na moto oyo bapesi mingi, bakosenga ye mpe mingi ; mpe bakotuna na moto na moto kolanda mokumba oyo bapesi ye : na moto oyo bapesi mingi, bakotuna ye mpe mingi ; mpe na moto oyo bapesi moke, bakotuna ye moke.
BSB
BSB:
But the one who unknowingly does things worthy of punishment will be beaten with few blows. From everyone who has been given much, much will be required; and from him who has been entrusted with much, even more will be demanded.
49
LIN
Nayei kotia moto na mokili, nazali na posa makasi ete moto yango emipelela.
BSB
BSB:
I have come to ignite a fire on the earth, and how I wish it were already kindled!
50
LIN
Kasi ezali na libatisi moko oyo nasengeli kozwa, mpe tala ndenge nini nakomi motema moto-moto mpo na kozela kokokisama na yango !
BSB
BSB:
But I have a baptism to undergo, and how distressed I am until it is accomplished!
51
LIN
Boni, bokanisi ete nayaki mpo na komema kimia na mokili ? Kimia te, bokabwani nde.
BSB
BSB:
Do you think that I have come to bring peace to the earth? No, I tell you, but division.
52
LIN
Pamba te, kobanda sik’oyo, bato mitano kati na libota moko bakokabwana : misato bakoyina mibale, mpe mibale bakoyina misato.
BSB
BSB:
From now on, five in one household will be divided, three against two and two against three.
53
LIN
Tata akoyina mwana na ye ya mobali, mpe mwana mobali akoyina tata na ye ; mama akoyina mwana na ye ya mwasi, mpe mwana mwasi akoyina mama na ye ; mama-bokilo akoyina mwasi ya mwana na ye ya mobali, mpe mwasi ya mwana mobali akoyina mama-bokilo na ye.
BSB
BSB:
They will be divided, father against son and son against father, mother against daughter and daughter against mother, mother-in-law against daughter-in-law and daughter-in-law against mother-in-law.”
54
LIN
Bongo alobaki lisusu na ebele ya bato : — Tango bomonaka mapata kobima na weste, bolobaka mbala moko : « Mvula elingi konoka, » mpe ekokisamaka bongo.
BSB
BSB:
Then Jesus said to the crowds,
“As soon as you see a cloud rising in the west, you say, ‘A shower is coming,’ and that is what happens.
55
LIN
Tango mopepe ya sude efulaka, bolobaka : « Molunge ekozala makasi penza, » mpe esalemaka bongo.
BSB
BSB:
And when the south wind blows, you say, ‘It will be hot,’ and it is.
56
LIN
Bato ya bilongi mibale ! Boyebi malamu kolimbola bilembo oyo bomonaka na mokili mpe na likolo, bongo mpo na nini bozali koyeba te kososola tango oyo ?
BSB
BSB:
You hypocrites! You know how to interpret the appearance of the earth and sky. Why don’t you know how to interpret the present time?
57
LIN
Mpo na nini bososolaka te, mpo na bino moko, makambo oyo ezali sembo ?
BSB
BSB:
And why don’t you judge for yourselves what is right?
58
LIN
Soki ozali kokende na esambiselo elongo na moto oyo afundi yo, sala nyonso mpo ete oyokana na ye, wana bozali nanu na nzela. Soki te, akokumba yo epai ya mosambisi, mosambisi akokaba yo na maboko ya bakengeli, mpe bakengeli bakobwaka yo kati na boloko.
BSB
BSB:
Make every effort to reconcile with your adversary while you are on your way to the magistrate. Otherwise, he may drag you off to the judge, and the judge may hand you over to the officer, and the officer may throw you into prison.
59
LIN
Nazali koloba na yo : okobima na boloko soki kaka ofuti niongo na yo kino na mbongo ya suka ya bibende.
BSB
BSB:
I tell you, you will not get out until you have paid the very last penny.”
Chapter complete
You’ve read Luke 12
Chapter 12 of 24 in Luke
Up next
Luke 13
Read Luke 13
Back to Luke 11
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Luke 12
A question this chapter raises
Did Jesus come to bring a sword, not peace?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Luke 11
Luke 12
Luke 13