Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.3.3
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Luke
Luke
13
LIN
BSB
A
a
Luke 13
13
Luke
The journey to Jerusalem
Lingala Bible
Jerusalem
, place
Jesus
, person
Abraham
, person
Jacob
, person
Isaac
, person
Pilate
, person
Herod
, person
Siloam
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Na tango wana, ndambo ya bato bayaki koyebisa Yesu ndenge nini Pilato abomaki bato ya Galile na ngonga oyo bazalaki kobonzela Nzambe bambeka.
BSB
BSB:
At that time some of those present told Jesus about the Galileans whose blood Pilate had mixed with their sacrifices.
2
LIN
Yesu alobaki na bango : — Bokanisi ete bato wana ya Galile bakufaki kufa ya somo mpo ete bazalaki bato minene ya masumu koleka bato nyonso mosusu ya Galile ?
BSB
BSB:
To this He replied,
“Do you think that these Galileans were worse sinners than all the other Galileans, because they suffered this way?
3
LIN
Nazali koloba na bino : Ezali bongo te ! Kasi soki bobongoli mitema te, bino mpe bokokufa bino nyonso.
BSB
BSB:
No, I tell you. But unless you repent, you too will all perish.
4
LIN
Bongo bato wana zomi na mwambe oyo bakufaki tango ndako molayi ya Siloe ekweyelaki bango, bokanisi ete bazalaki bato ya masumu koleka bavandi nyonso ya Yelusalemi ?
BSB
BSB:
Or those eighteen who were killed when the tower of Siloam collapsed on them: Do you think that they were more sinful than all the others living in Jerusalem?
5
LIN
Nazali koloba na bino : Ezali bongo te ! Soki bobongoli mitema te, bino mpe bokokufa bino nyonso.
BSB
BSB:
No, I tell you. But unless you repent, you too will all perish.”
6
LIN
Bongo alobaki lisese oyo : — Moto moko azalaki na nzete na ye ya figi kati na elanga na ye ya vino ; akendeki koluka bambuma na likolo ya nzete yango, kasi akutaki ata mbuma moko te.
BSB
BSB:
Then Jesus told this parable:
“A man had a fig tree that was planted in his vineyard. He went to look for fruit on it but did not find any.
7
LIN
Boye alobaki na mobateli elanga yango : « Tala, tokomi na mobu ya misato wuta nayaka koluka bambuma na likolo ya nzete oyo ya figi, mpe nazwi ata mbuma moko te. Kata yango ! Mpo na nini ekanga mabele pamba ? »
BSB
BSB:
So he said to the keeper of the vineyard, ‘Look, for the past three years I have come to search for fruit on this fig tree and haven’t found any. Therefore cut it down! Why should it use up the soil?’
8
LIN
Mobateli elanga azongiselaki ye : « Nkolo na ngai, tika yango lisusu mobu oyo ! Nakotimola mabele pembeni na yango mpe nakotia matiti ya kopola ;
BSB
BSB:
‘Sir,’ the man replied, ‘leave it alone again this year, until I dig around it and fertilize it.
9
LIN
tango mosusu ekobota mbuma na mobu oyo ezali koya. Soki eboti te, wana kata na yo yango. »
BSB
BSB:
If it bears fruit next year, fine. But if not, you can cut it down.’”
10
LIN
Mokolo moko ya Saba, Yesu azalaki koteya kati na ndako ya mayangani.
BSB
BSB:
One Sabbath Jesus was teaching in one of the synagogues,
11
LIN
Nzokande, ezalaki wana na mwasi moko oyo molimo mabe egumba ye mokongo, mpe azalaki kokoka te komisembola wuta mibu zomi na mwambe.
BSB
BSB:
and a woman there had been disabled by a spirit for eighteen years. She was hunched over and could not stand up straight.
12
LIN
Tango Yesu amonaki ye, abengaki ye wuta na liboso mpe alobaki na ye : — Mwasi, okangolami na pasi na yo !
BSB
BSB:
When Jesus saw her, He called her over and said,
“Woman, you are set free from your disability.”
13
LIN
Mpe Yesu atielaki ye maboko. Mbala moko, mwasi yango amisembolaki mpe akomaki kokumisa Nzambe.
BSB
BSB:
Then He placed His hands on her, and immediately she straightened up and began to glorify God.
14
LIN
Kasi mokambi ya ndako ya mayangani asilikaki mpo ete Yesu abikisi moto na mokolo ya Saba, mpe alobaki na ebele ya bato : — Ezali na mikolo motoba mpo na kosala mosala ! Ezali na mikolo yango nde bosengeli koya mpo ete babikisa bino, kasi na mokolo ya Saba te !
BSB
BSB:
But the synagogue leader was indignant that Jesus had healed on the Sabbath. “There are six days for work,” he told the crowd. “So come and be healed on those days and not on the Sabbath.”
15
LIN
Nkolo azongiselaki ye : — Bato ya bilongi mibale ! Nani kati na bino, na mokolo ya Saba, afungolaka te mpe amemaka te ngombe na ye to ane na ye, wuta na elielo, mpo ete ekende komela mayi ?
BSB
BSB:
“You hypocrites!”
the Lord replied.
“Does not each of you on the Sabbath untie his ox or donkey from the stall and lead it to water?
16
LIN
Mwasi oyo azali mokitani ya Abrayami ! Nzokande Satana asila kokanga ye minyololo mibu zomi na mwambe ! Boni, esengelaki te kokangola ye, na oyo ekanga ye, kaka mpo ete ezali mokolo ya Saba ?
BSB
BSB:
Then should not this daughter of Abraham, whom Satan has kept bound for eighteen long years, be released from her bondage on the Sabbath day?”
17
LIN
Tango alobaki bongo, bayini na Ye nyonso batondaki na soni ; kasi ebele ya bato bazalaki kosepela na bikamwa nyonso oyo azalaki kosala.
BSB
BSB:
When Jesus said this, all His adversaries were humiliated. And the whole crowd rejoiced at all the glorious things He was doing.
18
LIN
Bongo Yesu atunaki : — Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini ? Nakokanisa yango na nini ?
BSB
BSB:
Then Jesus asked,
“What is the kingdom of God like? To what can I compare it?
19
LIN
Bokonzi ya Nzambe ekokani na nkona ya mutarde oyo moto moko azwaki mpe alonaki kati na elanga na ye, ebimisaki moto mpe ekomaki nzete monene, bongo bandeke ya likolo eyaki kovanda na bitape na yango.
BSB
BSB:
It is like a mustard seed that a man tossed into his garden. It grew and became a tree, and the birds of the air nested in its branches.”
20
LIN
Yesu atunaki lisusu : — Nakokokanisa Bokonzi ya Nzambe na nini ?
BSB
BSB:
Again He asked,
“To what can I compare the kingdom of God?
21
LIN
Ekokani na levire oyo mwasi azwaki mpe asangisaki kati na bakilo pene tuku mibale na sambo ya farine, kino nyonso evimbaki.
BSB
BSB:
It is like leaven that a woman took and mixed into three measures of flour, until all of it was leavened.”
22
LIN
Yesu azalaki koleka na bingumba mpe na bamboka, azalaki koteya wana azalaki kokende na Yelusalemi.
BSB
BSB:
Then Jesus traveled throughout the towns and villages, teaching as He made His way toward Jerusalem.
23
LIN
Moto moko atunaki Ye : — Nkolo, bato moke kaka nde bakobika ? Yesu alobaki na bango :
BSB
BSB:
“Lord,” someone asked Him, “will only a few people be saved?” Jesus answered,
24
LIN
— Bosala makasi mpo na kokotela na ekuke ya moke ; pamba te, nazali koloba na bino, bato mingi bakoluka kokota, kasi bakokoka te.
BSB
BSB:
“Make every effort to enter through the narrow door. For many, I tell you, will try to enter and will not be able.
25
LIN
Tango Nkolo ndako akotelema mpe akokanga ekuke, bokotikala libanda, bokobanda kobeta ekuke mpe kobondela : « Nkolo, Nkolo, fungolela biso ! » Kasi Ye akozongisela bino : « Nayebi bino te, nayebi mpe esika bowuti te ! »
BSB
BSB:
After the master of the house gets up and shuts the door, you will stand outside knocking and saying, ‘Lord, open the door for us.’ But he will reply, ‘I do not know where you are from.’
26
LIN
Bongo bokoloba : « Toliaki mpe tomelaki mesa moko elongo na Yo, mpe oteyaki na babalabala na biso ! »
BSB
BSB:
Then you will say, ‘We ate and drank with you, and you taught in our streets.’
27
LIN
Kasi akozongisela bino : « Nayebi bino te, nayebi mpe esika bowuti te ! Bolongwa liboso na Ngai, bino nyonso, bato mabe ! »
BSB
BSB:
And he will answer, ‘I tell you, I do not know where you are from. Depart from me, all you evildoers.’
28
LIN
Kolela mpe koswa minu ekozala kuna, tango bokomona Abrayami, Izaki, Jakobi mpe basakoli nyonso kati na Bokonzi ya Nzambe ; kasi bino, bokobwakama libanda.
BSB
BSB:
There will be weeping and gnashing of teeth when you see Abraham, Isaac, Jacob, and all the prophets in the kingdom of God, but you yourselves are thrown out.
29
LIN
Bato bakowuta na Este mpe na Weste, na Nor mpe na Sude, mpe bakovanda na mesa kati na Bokonzi ya Nzambe.
BSB
BSB:
People will come from east and west and north and south, and will recline at the table in the kingdom of God.
30
LIN
Boye, kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.
BSB
BSB:
And indeed, some who are last will be first, and some who are first will be last.”
31
LIN
Kaka na tango yango, ndambo ya Bafarizeo bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na Ye : — Longwa awa, kende na yo esika mosusu, pamba te Erode akani koboma Yo !
BSB
BSB:
At that very hour, some Pharisees came to Jesus and told Him, “Leave this place and get away, because Herod wants to kill You.”
32
LIN
Yesu alobaki na bango : — Bokende koloba na mbwa wana ya zamba : « Nakokoba kobengana milimo mabe mpe kobikisa babeli, lelo mpe lobi ; mpe na mokolo ya misato, nakosilisa mosala na Ngai. »
BSB
BSB:
But Jesus replied,
“Go tell that fox, ‘Look, I will keep driving out demons and healing people today and tomorrow, and on the third day I will reach My goal.’
33
LIN
Kasi nasengeli kokoba mobembo na Ngai, lelo, lobi mpe lobi oyo ekolanda ; pamba te mosakoli moko te akokufa libanda ya Yelusalemi !
BSB
BSB:
Nevertheless, I must keep going today and tomorrow and the next day, for it is not admissible for a prophet to perish outside of Jerusalem.
34
LIN
Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu, kasi boboyaki.
BSB
BSB:
O Jerusalem, Jerusalem, who kills the prophets and stones those sent to her, how often I have longed to gather your children together as a hen gathers her chicks under her wings, but you were unwilling!
35
LIN
Sik’oyo, ndako na bino ezali kosundolama. Solo, nazali koloba na bino : Bokotikala komona Ngai lisusu te kino bokoloba : « Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! »
BSB
BSB:
Look, your house is left to you desolate. And I tell you that you will not see Me again until you say, ‘Blessed is He who comes in the name of the Lord.’”
Chapter complete
You’ve read Luke 13
Chapter 13 of 24 in Luke
Up next
Luke 14
Read Luke 14
Back to Luke 12
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Luke 13
A question this chapter raises
Are natural disasters God’s judgement?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Luke 12
Luke 13
Luke 14