Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.3.3
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Luke
Luke
14
LIN
BSB
A
a
Luke 14
14
Luke
The journey to Jerusalem
Lingala Bible
Jesus
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Mokolo moko ya Saba, Yesu akendeki kolia kati na ndako ya moko kati na bakambi ya Bafarizeo, mpe Bafarizeo bazalaki kotala Ye malamu.
BSB
BSB:
One Sabbath, Jesus went to eat in the home of a leading Pharisee, and those in attendance were watching Him closely.
2
LIN
Liboso na Ye, ezalaki na moto moko oyo azalaki kobela bokono ya kovimba nzoto.
BSB
BSB:
Right there before Him was a man with dropsy.
3
LIN
Yesu atunaki Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko : — Boni, mobeko na biso epesaka nzela ya kobikisa moto na mokolo ya Saba to te ?
BSB
BSB:
So Jesus asked the experts in the law and the Pharisees,
“Is it lawful to heal on the Sabbath or not?”
4
LIN
Kasi bavandaki kimia. Yesu asimbaki mobeli yango, abikisaki ye na bokono na ye mpe azongisaki ye.
BSB
BSB:
But they remained silent. Then Jesus took hold of the man, healed him, and sent him on his way.
5
LIN
Bongo atunaki bango : — Soki moko kati na bino azali na mwana to ngombe ; bongo, na mokolo ya Saba, akweyi to ekweyi kati na libulu, boni, bokobimisa te na lombangu mwana yango to ngombe yango ?
BSB
BSB:
And He asked them,
“Which of you whose son or ox falls into a pit on the Sabbath day will not immediately pull him out?”
6
LIN
Bakokaki te kopesa Ye eyano.
BSB
BSB:
And they were unable to answer these questions.
7
LIN
Tango Yesu amonaki ndenge nini bato oyo babengamaki na feti bazalaki kopona bisika ya lokumu, alobaki na bango lisese oyo :
BSB
BSB:
When Jesus noticed how the guests chose the places of honor, He told them a parable:
8
LIN
« Soki moto abengisi yo na feti ya libala, kokende komivandisa te na esika ya lokumu, pamba te, kati na bato oyo babengami na feti yango, ekoki kozala na moto oyo aleki yo na lokumu.
BSB
BSB:
“When you are invited to a wedding banquet, do not sit in the place of honor, in case someone more distinguished than you has been invited.
9
LIN
Soki esalemi bongo, moto oyo abengisi bino mibale akoya koloba na yo : ‹ Tikela moto oyo kiti na yo ! › Bongo, na soni nyonso, okokende kozwa esika ya suka.
BSB
BSB:
Then the host who invited both of you will come and tell you, ‘Give this man your seat.’ And in humiliation, you will have to take the last place.
10
LIN
Kasi soki babengisi yo na feti, kende na yo kovanda na esika ya suka, mpo ete, tango moto oyo abengisi yo akoya, aloba na yo : ‹ Molingami na ngai, yaka kovanda na esika oyo eleki malamu ! › Boye, okopesamela lokumu na miso ya bato nyonso oyo babengami na feti.
BSB
BSB:
But when you are invited, go and sit in the last place, so that your host will come and tell you, ‘Friend, move up to a better place.’ Then you will be honored in front of everyone at the table with you.
11
LIN
Solo, moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe moto oyo amikitisaka, bakotombola ye. »
BSB
BSB:
For everyone who exalts himself will be humbled, and the one who humbles himself will be exalted.”
12
LIN
Bongo Yesu alobaki na moto oyo abengisaki Ye : — Soki osali feti mpo ete bato baya kolia, kobengisa te balingami na yo, bandeko na yo, baboti na yo to bazwi oyo bazalaka pene na yo ; noki te bango mpe bakobengisa yo mpo na kozongisela yo, na nzela wana, bolamu oyo osalaki mpo na bango.
BSB
BSB:
Then Jesus said to the man who had invited Him,
“When you host a dinner or a banquet, do not invite your friends or brothers or relatives or rich neighbors. Otherwise, they may invite you in return, and you will be repaid.
13
LIN
Kasi Soki osali feti, bengisa babola, bakufi miso, bakakatani mpe ba-ebosono ;
BSB
BSB:
But when you host a banquet, invite the poor, the crippled, the lame, and the blind,
14
LIN
mpe Nzambe akopambola yo. Atako bakoki te kozongisela yo bolamu oyo osali mpo na bango, kasi Nzambe akofuta niongo na mokolo oyo bato ya sembo bakosekwa.
BSB
BSB:
and you will be blessed. Since they cannot repay you, you will be repaid at the resurrection of the righteous.”
15
LIN
Tango moko kati na babengami ayokaki bongo, alobaki na Yesu : — Esengo na moto oyo akolia na feti kati na Bokonzi ya Nzambe !
BSB
BSB:
When one of those reclining with Him heard this, he said to Jesus, “Blessed is everyone who will eat at the feast in the kingdom of God.”
16
LIN
Yesu azongiselaki ye : — Moto moko asalaki feti monene mpe abengisaki bato ebele.
BSB
BSB:
But Jesus replied,
“A certain man prepared a great banquet and invited many guests.
17
LIN
Tango ngonga ya kolia ekokaki, atindaki mosali na ye kokende koloba na bato oyo babengamaki : « Boya, pamba te nyonso esili kobongisama sik’oyo. »
BSB
BSB:
When it was time for the banquet, he sent his servant to tell those who had been invited, ‘Come, for everything is now ready.’
18
LIN
Kasi bango nyonso bakomaki kosenga bolimbisi ndenge moko. Moto ya liboso alobaki : « Nawuti kosomba elanga, nasengeli kokende kotala yango ; nabondeli yo, limbisa ngai ! »
BSB
BSB:
But one after another they all began to make excuses. The first one said, ‘I have bought a field, and I need to go see it. Please excuse me.’
19
LIN
Moto ya mibale alobaki : « Nawuti kosomba bangombe zomi, nasengeli komeka yango ; nabondeli yo, limbisa ngai ! »
BSB
BSB:
Another said, ‘I have bought five yoke of oxen, and I am going to try them out. Please excuse me.’
20
LIN
Moto mosusu alobaki : « Nawuti kobala mwasi ; nakoki koya te. »
BSB
BSB:
Still another said, ‘I have married a wife, so I cannot come.’
21
LIN
Mosali azongaki mpe ayebisaki makambo nyonso epai ya nkolo na ye. Nkolo ndako asilikaki makasi mpe atindaki mosali na ye : « Kende noki na banzela, na babalabala ya engumba, mpe memela ngai babola, ba-ebosono, bakakatani mpe bakufi miso. »
BSB
BSB:
The servant returned and reported all this to his master. Then the owner of the house became angry and said to his servant, ‘Go out quickly into the streets and alleys of the city, and bring in the poor, the crippled, the blind, and the lame.’
22
LIN
Sima na mwa tango, mosali ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, nasali ndenge otindaki ngai ; kasi bisika ezali nanu. »
BSB
BSB:
‘Sir,’ the servant replied, ‘what you ordered has been done, and there is still room.’
23
LIN
Nkolo alobaki na mosali na ye : « Kende lisusu na banzela mpe na babalabala ya engumba, tinda bango na makasi mpo ete bakota, mpe ndako na ngai etonda na bato.
BSB
BSB:
So the master told his servant, ‘Go out to the highways and hedges and compel them to come in, so that my house will be full.
24
LIN
Pamba te, nazali koloba na yo : moko te kati na bato oyo babengamaki akolia biloko ya feti na ngai. »
BSB
BSB:
For I tell you, not one of those men who were invited will taste my banquet.’”
25
LIN
Ebele ya bato bazalaki kokende elongo na Yesu. Yesu abalukaki mpo na kotala bango mpe alobaki :
BSB
BSB:
Now large crowds were traveling with Jesus, and He turned and said to them,
26
LIN
— Soki moto ayei epai na Ngai, kasi alingi Ngai te koleka tata na ye, mama na ye, mwasi na ye, bana na ye, bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, mpe ezala ata bomoi na ye moko, moto ya ndenge wana akoki te kozala moyekoli na Ngai.
BSB
BSB:
“If anyone comes to Me and does not hate his father and mother and wife and children and brothers and sisters—yes, even his own life—he cannot be My disciple.
27
LIN
Mpe moto nyonso oyo amemaka ekulusu na ye te mpe alandaka Ngai te akoki te kozala moyekoli na Ngai.
BSB
BSB:
And whoever does not carry his cross and follow Me cannot be My disciple.
28
LIN
Soki moko kati na bino alingi kotonga ndako molayi, boni, bokovanda nanu te mpe bokoluka nanu te koyeba motuya mpo na kotala soki bozali na mbongo ya kokoka mpo na kosilisa misala ya kotonga ndako yango ?
BSB
BSB:
Which of you, wishing to build a tower, does not first sit down and count the cost to see if he has the resources to complete it?
29
LIN
Pamba te, soki sima na bino kotia moboko, bokoki lisusu te kosilisa kotonga ndako yango, bato nyonso oyo bakobanda komona yango bakobanda koseka bino mpe koloba :
BSB
BSB:
Otherwise, if he lays the foundation and is unable to finish the work, everyone who sees it will ridicule him,
30
LIN
« Botala moto oyo ! Abandaki mosala ya kotonga ndako, kasi azangaki makoki ya kosilisa yango. »
BSB
BSB:
saying, ‘This man could not finish what he started to build.’
31
LIN
Ndenge moko, soki mokonzi moko alingi kokende kobundisa mokonzi mosusu, boni, akovanda nanu te mpe akotala nanu te soki, elongo na basoda na ye nkoto zomi, akoki kobundisa mokonzi oyo, elongo na basoda nkoto tuku mibale, azali koya kobundisa ye ?
BSB
BSB:
Or what king on his way to war with another king will not first sit down and consider whether he can engage with ten thousand men the one coming against him with twenty thousand?
32
LIN
Soki amoni ete akokoka te, wana monguna na ye azali nanu mosika, akotindela ye bato mpo na kosenga kimia.
BSB
BSB:
And if he is unable, he will send a delegation while the other king is still far off, to ask for terms of peace.
33
LIN
Boye, kati na bino, moto nyonso oyo akoki kokabwana te na biloko na ye nyonso akoki te kozala moyekoli na Ngai.
BSB
BSB:
In the same way, any one of you who does not give up everything he has cannot be My disciple.
34
LIN
Mungwa ezali malamu ; kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bakozongisa lisusu elengi na yango ?
BSB
BSB:
Salt is good, but if the salt loses its savor, with what will it be seasoned?
35
LIN
Ekozala lisusu na tina moko te, ezala mpo na mabele to mpo na kobongisa bilanga ; kasi bakobwaka yango. Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !
BSB
BSB:
It is fit neither for the soil nor for the manure pile, and it is thrown out. He who has ears to hear, let him hear.”
Chapter complete
You’ve read Luke 14
Chapter 14 of 24 in Luke
Up next
Luke 15
Read Luke 15
Back to Luke 13
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Luke 14
A question this chapter raises
Did Jesus really tell us to hate our parents?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Luke 13
Luke 14
Luke 15