Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.6.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Luke
Luke
18
LIN
BSB
A
a
Luke 18
18
Luke
The journey to Jerusalem
Lingala Bible
Jesus
, person
David
, person
Jerusalem
, place
Peter
, person
Jericho
, place
Nazareth
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Yesu alobaki na bayekoli na Ye lisese moko mpo na kolakisa bango ete basengeli kosambelaka tango nyonso, na kolemba te.
BSB
BSB:
Then Jesus told them a parable about their need to pray at all times and not lose heart:
2
LIN
Alobaki : — Kati na engumba moko, ezalaki na mosambisi moko oyo azalaki kotosa Nzambe te, mpe azalaki komemia bato te.
BSB
BSB:
“In a certain town there was a judge who neither feared God nor respected men.
3
LIN
Kati na engumba yango, ezalaki mpe na mwasi moko akufisa mobali ; azalaki koya mbala na mbala epai ya mosambisi yango mpo na koloba na ye : « Longisa ngai liboso ya monguna na ngai. »
BSB
BSB:
And there was a widow in that town who kept appealing to him, ‘Give me justice against my adversary.’
4
LIN
Wuta tango molayi, mosambisi yango aboyaki. Kasi suka na suka, amilobelaki : « Atako natosaka Nzambe te mpe namemiaka bato te,
BSB
BSB:
For a while he refused, but later he said to himself, ‘Though I neither fear God nor respect men,
5
LIN
kasi lokola motungisi ya mwasi oyo akufisa mobali eleki ndelo, nakolongisa ye kaka, mpo ete akoba te koyaka tango nyonso kino kozangisa ngai kimia. »
BSB
BSB:
yet because this widow keeps pestering me, I will give her justice. Otherwise, she will wear me out with her perpetual requests.’”
6
LIN
Nkolo abakisaki : — Boyoka maloba ya mosambisi mabe oyo !
BSB
BSB:
And the Lord said,
“Listen to the words of the unjust judge.
7
LIN
Boni, Nzambe akolongisa te baponami na Ye, tango bagangaka epai na Ye butu mpe moyi ? Boni, akozelisa bango ?
BSB
BSB:
Will not God bring about justice for His elect who cry out to Him day and night? Will He delay in helping them?
8
LIN
Nazali koloba na bino : akolongisa bango noki. Nzokande, ekozala ndenge nini tango Mwana na Moto akoya ! Boni, akokuta kondima kati na mokili ?
BSB
BSB:
I tell you, He will promptly carry out justice on their behalf. Nevertheless, when the Son of Man comes, will He find faith on earth?”
9
LIN
Epai ya bato oyo bamimonaki bato ya sembo mpe batiolaki bato mosusu, Yesu alobaki lisusu lisese oyo :
BSB
BSB:
To some who trusted in their own righteousness and viewed others with contempt, He also told this parable:
10
LIN
— Bato mibale bakendeki na Tempelo mpo na kosambela : moko azalaki Mofarizeo ; mpe mosusu, mofutisi mpako.
BSB
BSB:
“Two men went up to the temple to pray. One was a Pharisee and the other a tax collector.
11
LIN
Mofarizeo abendanaki ye moko na pembeni mpe asambelaki : « Oh Nzambe, nazali kotonda Yo, mpo ete nazali te lokola bato mosusu oyo bazali miyibi, bato mabe, bato na bikobo to mpe lokola mofutisi mpako oyo.
BSB
BSB:
The Pharisee stood by himself and prayed, ‘God, I thank You that I am not like other men—swindlers, evildoers, adulterers—or even like this tax collector.
12
LIN
Nakilaka bilei mbala mibale na poso mpe napesaka eteni ya zomi ya nyonso oyo nazwaka. »
BSB
BSB:
I fast twice a week and pay tithes of all that I acquire.’
13
LIN
Kasi mofutisi mpako atelemaki mwa mosika ; amekaki ata te kotombola miso na ye na likolo, kasi atiaki loboko na ye na tolo mpe alobaki : « Oh Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te nazali moto ya masumu ! »
BSB
BSB:
But the tax collector stood at a distance, unwilling even to lift up his eyes to heaven. Instead, he beat his breast and said, ‘God, have mercy on me, a sinner!’
14
LIN
Nazali koloba na bino : mofutisi mpako azongaki na ndako na ye sima na Nzambe kokomisa ye moto ya sembo, kasi Mofarizeo te. Pamba te moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.
BSB
BSB:
I tell you, this man, rather than the Pharisee, went home justified. For everyone who exalts himself will be humbled, but the one who humbles himself will be exalted.”
15
LIN
Bato bazalaki mpe komema bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko. Tango bayekoli bamonaki bongo, bapamelaki bango.
BSB
BSB:
Now people were even bringing their babies to Jesus for Him to place His hands on them. And when the disciples saw this, they rebuked those who brought them.
16
LIN
Kasi Yesu abengaki bana mpe alobaki : — Botika bana mike baya epai na Ngai ; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bana mike.
BSB
BSB:
But Jesus called the children to Him and said,
“Let the little children come to Me, and do not hinder them! For the kingdom of God belongs to such as these.
17
LIN
Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango.
BSB
BSB:
Truly I tell you, anyone who does not receive the kingdom of God like a little child will never enter it.”
18
LIN
Mokambi moko ya Bayuda atunaki na Yesu : — Moteyi malamu, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko ?
BSB
BSB:
Then a certain ruler asked Him, “Good Teacher, what must I do to inherit eternal life?”
19
LIN
Yesu azongisaki : — Mpo na nini ozali kobenga Ngai « Moteyi malamu ? » Moko te azali malamu, longola kaka Ye moko Nzambe.
BSB
BSB:
“Why do you call Me good?”
Jesus replied.
“No one is good except God alone.
20
LIN
Oyebi mibeko oyo : « Okosalaka ekobo te, okobomaka te, okoyibaka te, okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo, okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu. »
BSB
BSB:
You know the commandments: ‘Do not commit adultery, do not murder, do not steal, do not bear false witness, honor your father and mother.’”
21
LIN
Mokambi yango azongisaki : — Natosaka nyonso wana wuta bolenge na ngai.
BSB
BSB:
“All these I have kept from my youth,” he said.
22
LIN
Sima na Yesu koyoka bongo, alobaki na ye : — Ozangi eloko moko. Teka biloko na yo nyonso, kabola mbongo oyo okozwa epai ya babola, mpe okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.
BSB
BSB:
On hearing this, Jesus told him,
“You still lack one thing: Sell everything you own and give to the poor, and you will have treasure in heaven. Then come, follow Me.”
23
LIN
Tango mokambi ya Bayuda ayokaki bongo, akomaki mawa-mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.
BSB
BSB:
But when the ruler heard this, he became very sad, because he was extremely wealthy.
24
LIN
Yesu atalaki ye mpe alobaki : — Ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe !
BSB
BSB:
Seeing the man’s sadness, Jesus said,
“How hard it is for the rich to enter the kingdom of God!
25
LIN
Nzokande, eleki pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga ; kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.
BSB
BSB:
Indeed, it is easier for a camel to pass through the eye of a needle than for a rich man to enter the kingdom of God.”
26
LIN
Bato oyo bayokaki Ye koloba bongo batunaki : — Bongo nani penza akoki kobikisama ?
BSB
BSB:
Those who heard this asked, “Who then can be saved?”
27
LIN
Yesu azongisaki : — Oyo ekoki kosalema te elongo na bato, ekoki kosalema elongo na Nzambe.
BSB
BSB:
But Jesus said,
“What is impossible with man is possible with God.”
28
LIN
Petelo alobaki na Yesu : — Nkolo, totiki nyonso oyo tozalaki na yango mpo na kolanda Yo !
BSB
BSB:
“Look,” said Peter, “we have left all we had to follow You.”
29
LIN
Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo atiki ndako na ye, mwasi na ye, bandeko na ye, baboti na ye to bana na ye, mpo na kozwa Bokonzi ya Nzambe lokola litomba,
BSB
BSB:
“Truly I tell you,”
Jesus replied,
“no one who has left home or wife or brothers or parents or children for the sake of the kingdom of God
30
LIN
akozwa, na tango oyo, biloko mingi koleka ; mpe na tango oyo ezali koya, bomoi ya seko.
BSB
BSB:
will fail to receive many times more in this age—and in the age to come, eternal life.”
31
LIN
Yesu abendaki na pembeni bayekoli na Ye zomi na mibale mpe alobaki na bango : — Tozali kokende na Yelusalemi ; makambo nyonso oyo basakoli bakoma na tina na Mwana na Moto ekokokisama.
BSB
BSB:
Then Jesus took the Twelve aside and said to them,
“Look, we are going up to Jerusalem, and everything the prophets have written about the Son of Man will be fulfilled.
32
LIN
Bakokaba Ye na maboko ya bapagano, bakoseka Ye, bakofinga Ye, bakobwakela Ye soyi,
BSB
BSB:
He will be delivered over to the Gentiles and will be mocked and insulted and spit upon.
33
LIN
bakobeta Ye fimbu mpe bakoboma Ye ; mpe, na mokolo ya misato, akosekwa.
BSB
BSB:
They will flog Him and kill Him, and on the third day He will rise again.”
34
LIN
Bayekoli basosolaki ata eloko moko te kati na makambo yango ; ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpe bayebaki te makambo oyo Yesu azalaki kolobela.
BSB
BSB:
But the disciples did not understand any of these things. The meaning was hidden from them, and they did not comprehend what He was saying.
35
LIN
Wana Yesu akomaki pene ya Jeriko, ezalaki na mokufi miso pembeni ya nzela, azalaki ya kovanda mpe azalaki kosenga-senga.
BSB
BSB:
As Jesus drew near to Jericho, a blind man was sitting beside the road, begging.
36
LIN
Tango ayokaki makelele ya ebele ya bato oyo bazali koleka, atunaki : — Likambo nini oyo ezali kosalema ?
BSB
BSB:
When he heard the crowd going by, he asked what was happening.
37
LIN
Balobaki na ye : — Yesu ya Nazareti azali koleka !
BSB
BSB:
“Jesus of Nazareth is passing by,” they told him.
38
LIN
Agangaki : — Yesu, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !
BSB
BSB:
So he called out, “Jesus, Son of David, have mercy on me!”
39
LIN
Bato oyo bazalaki liboso bapamelaki ye mpe balobaki na ye ete akanga monoko ; kasi, ye, agangaki lisusu makasi koleka : — Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !
BSB
BSB:
Those who led the way admonished him to be silent, but he cried out all the louder, “Son of David, have mercy on me!”
40
LIN
Yesu atelemaki mpe atindaki ete bamemela Ye mokufi miso yango. Tango akomaki pene na Ye, Yesu atunaki ye :
BSB
BSB:
Jesus stopped and directed that the man be brought to Him. When he had come near, Jesus asked him,
41
LIN
— Olingi nasala nini mpo na yo ? Mokufi miso azongisaki : — Nkolo, nalingi komona.
BSB
BSB:
“What do you want Me to do for you?”
“Lord,” he said, “let me see again.”
42
LIN
Yesu alobaki na ye : — Mona ! Kondima na yo ebikisi yo.
BSB
BSB:
“Receive your sight!”
Jesus replied.
“Your faith has healed you.”
43
LIN
Mpe mbala moko, akomaki komona, mpe alandaki Yesu, na kokumisa Nzambe. Tango bato nyonso bamonaki bongo, bango mpe bakumisaki Nzambe.
BSB
BSB:
Immediately he received his sight and followed Jesus, glorifying God. And all the people, when they saw it, gave praise to God.
Chapter complete
You’ve read Luke 18
Chapter 18 of 24 in Luke
Up next
Luke 19
Read Luke 19
Back to Luke 17
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Luke 18
A question this chapter raises
Why doesn’t God answer my prayers?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Luke 17
Luke 18
Luke 19