Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.5.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Luke
Luke
17
LIN
BSB
A
a
Luke 17
17
Luke
The journey to Jerusalem
Lingala Bible
Lot
, person
Jesus
, person
Noah
, person
Jerusalem
, place
Samaria
, place
Galilee
, place
Sodom
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Makambo oyo ebetisaka bato mabaku ekoki kozanga te ; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka !
BSB
BSB:
Jesus said to His disciples,
“It is inevitable that stumbling blocks will come, but woe to the one through whom they come!
2
LIN
Ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo, na kingo mpe kobwaka ye na ebale, na esika ya kotika ye kokweyisa na masumu moko kati na bana mike oyo.
BSB
BSB:
It would be better for him to have a millstone hung around his neck and to be thrown into the sea than to cause one of these little ones to stumble.
3
LIN
Bosala penza keba mpo na bolamu na bino ! Soki ndeko na yo asali yo mabe, pamela ye ; mpe soki ayoki mawa mpo na mabe yango, limbisa ye.
BSB
BSB:
Watch yourselves. If your brother sins, rebuke him; and if he repents, forgive him.
4
LIN
Mpe soki, na mokolo moko, asali yo mabe mbala sambo, mpe ayei epai na yo mbala sambo koloba na yo : « Nayoki mawa mpo na mabe na ngai, » limbisa ye !
BSB
BSB:
Even if he sins against you seven times in a day, and seven times returns to say, ‘I repent,’ you must forgive him.”
5
LIN
Bantoma balobaki na Nkolo : — Bakisa kondima na biso !
BSB
BSB:
The apostles said to the Lord, “Increase our faith!”
6
LIN
Nkolo azongisaki : — Soki bozali na kondima oyo ezali moke lokola mbuma ya mutarde, bokoki koloba na nzete oyo : « Pikolama na esika oyo mpe kende komilona kati na ebale, » mpe ekotosa bino.
BSB
BSB:
And the Lord answered,
“If you have faith the size of a mustard seed, you can say to this mulberry tree, ‘Be uprooted and planted in the sea,’ and it will obey you.
7
LIN
Nani kati na bino, soki azali na mosali bilanga to na mobateli bibwele, akoloba na ye tango azongi wuta na bilanga : « Yaka noki, vanda na mesa mpo ete olia ? »
BSB
BSB:
Which of you whose servant comes in from plowing or shepherding in the field will say to him, ‘Come at once and sit down to eat’?
8
LIN
Boni, akoloba na ye te : « Lambela ngai bilei, lata bilamba na yo ya mosala mpo na kotiela ngai biloko na mesa, kino nasilisa kolia mpe komela ; sima na yango nde yo mpe okoki kolia mpe komela ? »
BSB
BSB:
Instead, won’t he tell him, ‘Prepare my meal and dress yourself to serve me while I eat and drink, and afterward you may eat and drink’?
9
LIN
Boni, akozongisela mosali wana matondi mpo ete asali mosala oyo atindaki ye ?
BSB
BSB:
Does he thank the servant because he did what he was told?
10
LIN
Ndenge moko mpe mpo na bino : soki bosali nyonso oyo batindi bino, boloba : « Tozali basali ya pamba, tokokisi kaka mokumba na biso. »
BSB
BSB:
So you also, when you have done everything commanded of you, should say, ‘We are unworthy servants; we have only done our duty.’”
11
LIN
Wana Yesu azalaki kokende na Yelusalemi, alekaki na mondelo kati na Samari mpe na Galile.
BSB
BSB:
While Jesus was on His way to Jerusalem, He was passing between Samaria and Galilee.
12
LIN
Lokola azalaki kokota na mboka moko, bato na maba zomi bayaki kokutana na Ye ; batelemaki na mosika
BSB
BSB:
As He entered one of the villages, He was met by ten lepers. They stood at a distance
13
LIN
mpe babandaki kobelela Ye na mongongo makasi : — Mokonzi, Yesu, yokela biso mawa !
BSB
BSB:
and raised their voices, shouting, “Jesus, Master, have mercy on us!”
14
LIN
Tango Yesu amonaki bango, alobaki : — Bokende komilakisa epai ya Banganga-Nzambe ! Wana bazalaki kokende kuna, bakomaki peto.
BSB
BSB:
When Jesus saw them, He said,
“Go, show yourselves to the priests.”
And as they were on their way, they were cleansed.
15
LIN
Tango moko kati na bango amonaki ete abiki na bokono na ye, azongaki na kokumisa Nzambe na mongongo makasi.
BSB
BSB:
When one of them saw that he was healed, he came back, praising God in a loud voice.
16
LIN
Afukamaki na makolo ya Yesu, elongi kino na se, mpe azongiselaki Ye matondi. Moto yango azalaki moto ya Samari.
BSB
BSB:
He fell facedown at Jesus’ feet in thanksgiving to Him—and he was a Samaritan.
17
LIN
Bongo Yesu atunaki : — Boni, bango nyonso zomi bakomi peto te ? Wapi bato mosusu libwa ?
BSB
BSB:
“Were not all ten cleansed?”
Jesus asked.
“Where then are the other nine?
18
LIN
Moko te azongi mpo na kopesa Nzambe nkembo, longola kaka mopaya oyo ?
BSB
BSB:
Was no one found except this foreigner to return and give glory to God?”
19
LIN
Bongo alobaki na moto yango ya Samari : — Telema mpe kende ; kondima na yo ebikisi yo !
BSB
BSB:
Then Jesus said to him,
“Rise and go; your faith has made you well!”
20
LIN
Mokolo moko, Bafarizeo batunaki Yesu : — Bokonzi ya Nzambe ekoya tango nini ? Yesu azongiselaki bango : — Bokonzi ya Nzambe ekoya te na lolenge ete bato bamona yango.
BSB
BSB:
When asked by the Pharisees when the kingdom of God would come, Jesus replied,
“The kingdom of God will not come with observable signs.
21
LIN
Bakoloba te : « Ezali awa » to « Ezali kuna, » pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali kati na bino.
BSB
BSB:
Nor will people say, ‘Look, here it is,’ or ‘There it is.’ For you see, the kingdom of God is in your midst.”
22
LIN
Bongo alobaki na bayekoli na Ye : — Tango ezali koya, tango oyo bokozala na posa makasi ya komona ata mokolo moko kati na mikolo ya Mwana na Moto, kasi bokomona yango te.
BSB
BSB:
Then He said to the disciples,
“The time is coming when you will long to see one of the days of the Son of Man, but you will not see it.
23
LIN
Bakoloba na bino : « Azali awa ! » to « Azali kuna ! » Bolanda bango te !
BSB
BSB:
People will tell you, ‘Look, there He is!’ or ‘Look, here He is!’ Do not go out or chase after them.
24
LIN
Pamba te, na mokolo na Ye, Mwana na Moto akozala lokola mokalikali oyo epeli mpe engengisi likolo longwa na este kino na weste.
BSB
BSB:
For just as the lightning flashes and lights up the sky from one end to the other, so will be the Son of Man in His day.
25
LIN
Kasi liboso ete mokolo yango ekoma, asengeli komona pasi mingi, mpe bato ya ekeke oyo basengeli koboya Ye.
BSB
BSB:
But first He must suffer many things and be rejected by this generation.
26
LIN
Ndenge esalemaki na tango ya Noa, ndenge wana mpe ekosalema na tango ya Mwana na Moto :
BSB
BSB:
Just as it was in the days of Noah, so also will it be in the days of the Son of Man:
27
LIN
bato bazalaki kolia, komela, kobala mpe kobalisa, kino na mokolo oyo Noa akotaki na masuwa ; bongo mpela eyaki mpe ebomaki bango nyonso.
BSB
BSB:
People were eating and drinking, marrying and being given in marriage, up to the day Noah entered the ark. Then the flood came and destroyed them all.
28
LIN
Ezalaki mpe bongo na tango ya Loti : bato bazalaki kolia, komela, kosomba, koteka, kolona mpe kotonga.
BSB
BSB:
It was the same in the days of Lot: People were eating and drinking, buying and selling, planting and building.
29
LIN
Kasi na mokolo oyo Loti abimaki wuta na Sodome, mvula ya moto mpe ya fofolo ekitaki wuta na likolo mpe ebomaki bango nyonso.
BSB
BSB:
But on the day Lot left Sodom, fire and sulfur rained down from heaven and destroyed them all.
30
LIN
Ekozala mpe bongo, na mokolo oyo Mwana na Moto akomonana.
BSB
BSB:
It will be just like that on the day the Son of Man is revealed.
31
LIN
Na mokolo yango, moto oyo akozala na likolo ya ndako na ye asengeli te kokita mpo na kozwa biloko kati na ndako na ye, mpe moto oyo akozala kati na bilanga na ye asengeli te kozonga na ndako mpo na likambo songolo.
BSB
BSB:
On that day, let no one on the housetop come down to retrieve his possessions. Likewise, let no one in the field return for anything he has left behind.
32
LIN
Bokanisa makambo oyo ekomelaki mwasi ya Loti !
BSB
BSB:
Remember Lot’s wife!
33
LIN
Moto oyo akoluka kobatela bomoi na ye akobungisa yango, mpe moto oyo akobungisa bomoi na ye akobatela yango.
BSB
BSB:
Whoever tries to save his life will lose it, but whoever loses his life will preserve it.
34
LIN
Nazali koloba na bino : na butu wana, bato mibale bakozala na likolo ya mbeto moko : moko akokamatama, mpe mosusu akotikala ;
BSB
BSB:
I tell you, on that night two people will be in one bed: one will be taken and the other left.
35
LIN
basi mibale bakozala konika bambuma elongo : moko akokamatama, mpe mosusu akotikala ; [
BSB
BSB:
Two women will be grinding grain together: one will be taken and the other left.”
36
LIN
mibali mibale bakozala kati na elanga moko : moko akokamatama, mpe mosusu akotikala.]
BSB
BSB:
Not in the BSB
Not in the earliest manuscripts
37
LIN
Bayekoli batunaki Yesu : — Nkolo, makambo yango ekosalema wapi ? Yesu azongiselaki bango : — Epai ebembe ezali, kuna nde bandeke oyo eliaka bibembe ekosangana.
BSB
BSB:
“Where, Lord?” they asked. Jesus answered,
“Wherever there is a carcass, there the vultures will gather.”
Chapter complete
You’ve read Luke 17
Chapter 17 of 24 in Luke
Up next
Luke 18
Read Luke 18
Back to Luke 16
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Luke 17
A question this chapter raises
Isn’t the Trinity a contradiction?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Luke 16
Luke 17
Luke 18