Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.4.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Luke
Luke
16
LIN
BSB
A
a
Luke 16
16
Luke
The journey to Jerusalem
Lingala Bible
Abraham
, person
Lazarus
, person
Moses
, person
John
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Mozwi moko azalaki na mobateli bomengo ; bongo bafundaki ye epai ya mozwi ete azali kosakana na biloko na ye.
BSB
BSB:
Jesus also said to His disciples,
“There was a rich man whose manager was accused of wasting his possessions.
2
LIN
Mozwi abengaki ye mpo na kotuna ye : « Makambo nini nazali koyoka na tina na yo ? Yebisa ngai ndenge nini obateli bomengo na ngai ; pamba te, kobanda lelo, okozala lisusu mobateli bomengo na ngai te. »
BSB
BSB:
So he called him in to ask, ‘What is this I hear about you? Turn in an account of your management, for you cannot be manager any longer.’
3
LIN
Mobateli bomengo amilobelaki : « Nasala nini sik’oyo ? Mokonzi na ngai azali kolongola ngai na mosala ? Nazali na makasi te ya kotimola mabele, mpe nakoyoka soni mpo na kokoma kosenga-senga.
BSB
BSB:
The manager said to himself, ‘What shall I do, now that my master is taking away my position? I am too weak to dig and too ashamed to beg.
4
LIN
Ah ! Nasosoli sik’oyo likambo oyo nakoki kosala mpo ete, tango nakozala lisusu na mosala te, bato bayamba ngai kati na bandako na bango. »
BSB
BSB:
I know what I will do so that after my removal from management, people will welcome me into their homes.’
5
LIN
Boye, abengaki bato nyonso oyo bazalaki na niongo ya mokonzi na ye ; atunaki na moto ya liboso : « Osengeli kofuta boni lokola niongo epai ya mokonzi na ngai ? »
BSB
BSB:
And he called in each one of his master’s debtors. ‘How much do you owe my master?’ he asked the first.
6
LIN
Moto yango azongisaki : « Batono tuku mibale ya mafuta. » Mobateli bomengo alobaki na ye : « Zwa mokanda na yo ya niongo, vanda noki, mpe koma mokanda mosusu ya nyonso ya bangungulu zomi. »
BSB
BSB:
‘A hundred measures of olive oil,’ he answered. ‘Take your bill,’ said the manager, ‘sit down quickly, and write fifty.’
7
LIN
Atunaki na moto mosusu : « Osengeli kofuta boni lokola niongo epai ya mokonzi na ngai ? » Azongisaki : « Basaki nkama moko ya ble. » Mobateli bomengo alobaki na ye : « Zwa mokanda na yo ya niongo, mpe koma mokanda mosusu ya nyonso ya basaki tuku mwambe. »
BSB
BSB:
Then he asked another, ‘And how much do you owe?’ ‘A hundred measures of wheat,’ he replied. ‘Take your bill and write eighty,’ he told him.
8
LIN
Mokonzi akumisaki mobateli mabe wana ya bomengo mpo na mayele oyo asalaki na yango. Pamba te bato ya mokili oyo, bazali na mayele koleka bana ya pole.
BSB
BSB:
The master commended the dishonest manager because he had acted shrewdly. For the sons of this age are more shrewd in dealing with their own kind than are the sons of light.
9
LIN
Nalobi na bino : bosalela bomengo ya mabe mpo na kotonga bondeko na bato mosusu ; mpo ete tango ekosila, bayamba bino kati na bivandelo ya seko.
BSB
BSB:
I tell you, use worldly wealth to make friends for yourselves so that when it is gone, they will welcome you into eternal dwellings.
10
LIN
Moto oyo azali sembo na makambo mike, akoki mpe kozala sembo na makambo minene ; mpe moto oyo azali sembo te na makambo mike, akozala mpe sembo te na makambo minene.
BSB
BSB:
Whoever is faithful with very little will also be faithful with much, and whoever is dishonest with very little will also be dishonest with much.
11
LIN
Boye soki bozali sembo te na bobateli bomengo oyo ezwami na banzela ya lokuta, nani akopesa bino bomengo ya solo ?
BSB
BSB:
So if you have not been faithful with worldly wealth, who will entrust you with true riches?
12
LIN
Mpe soki bozali sembo te na bobateli biloko ya moto mosusu, nani akopesa bino biloko oyo esengeli kozala ya bino moko ?
BSB
BSB:
And if you have not been faithful with the belongings of another, who will give you belongings of your own?
13
LIN
Mosali moko te akoki kosalela bankolo mibale, pamba te akoyina moko mpe akolinga mosusu to akokangama na moko mpe akoboya mosusu. Bokoki te kosalela mbala moko Nzambe mpe mbongo.
BSB
BSB:
No servant can serve two masters. Either he will hate the one and love the other, or he will be devoted to the one and despise the other. You cannot serve both God and money.”
14
LIN
Wana Bafarizeo bazalaki koyoka Yesu koloba makambo wana nyonso, bazalaki koseka Ye, pamba te bazalaki na lokoso ya mbongo.
BSB
BSB:
The Pharisees, who were lovers of money, heard all of this and were scoffing at Jesus.
15
LIN
Kasi Yesu alobaki na bango : — Bino, bozali penza bato oyo bomilakisaka na miso ya bato mosusu lokola nde bozali bato ya sembo, nzokande Nzambe ayebi mitema na bino ; pamba te oyo bato bamonaka motuya makasi, Nzambe ayokaka yango nkele.
BSB
BSB:
So He said to them,
“You are the ones who justify yourselves before men, but God knows your hearts. For what is prized among men is detestable before God.
16
LIN
Tango ya Mibeko mpe ya Basakoli ewumelaki kino na Yoane Mobatisi ; kasi wuta Yoane Mobatisi ayaki, Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali koteyama, mpe moto nyonso azali kobunda na kondima mpo na kokota kuna.
BSB
BSB:
The Law and the Prophets were proclaimed until John. Since that time, the gospel of the kingdom of God is being preached, and everyone is forcing his way into it.
17
LIN
Ezali penza pete mpo na Likolo mpe mabele kolimwa ; kasi mpo na Mibeko, ezali penza pasi mpo na nkoma na yango oyo eleki moke kolongwa.
BSB
BSB:
But it is easier for heaven and earth to pass away than for a single stroke of a pen to drop out of the Law.
18
LIN
Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala mpe abali mwasi mosusu asali ekobo, mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongoli na libala asali mpe ekobo.
BSB
BSB:
Anyone who divorces his wife and marries another woman commits adultery, and he who marries a divorced woman commits adultery.
19
LIN
Ezalaki na mozwi moko oyo azalaki kolata bilamba ya motane makasi mpe ya lino ya kitoko, bongo azalaki kobika bomoi ya bisengo mikolo nyonso.
BSB
BSB:
Now there was a rich man dressed in purple and fine linen, who lived each day in joyous splendor.
20
LIN
Na liboso ya ekuke ya ndako na ye, mobola moko atandamaki wana, kombo na ye ezalaki Lazare, nzoto na ye mobimba etonda na bapota ;
BSB
BSB:
And a beggar named Lazarus lay at his gate, covered with sores
21
LIN
azalaki koluka ata kolia biloko oyo ezalaki kokweya longwa na mesa ya mozwi, kasi ezalaki bambwa nde ezalaki koya kolembola bapota na ye.
BSB
BSB:
and longing to be fed with the crumbs that fell from the rich man’s table. Even the dogs came and licked his sores.
22
LIN
Mokolo moko, mobola yango akufaki, mpe ba-anjelu bamemaki ye epai ya Abrayami. Mozwi mpe akufaki, mpe bakundaki ye.
BSB
BSB:
One day the beggar died and was carried by the angels to Abraham’s side. And the rich man also died and was buried.
23
LIN
Kati na mboka ya bakufi, mozwi azalaki konyokwama na pasi makasi ; boye atombolaki miso mpe amonaki, na mosika, Abrayami elongo na Lazare avanda pembeni na ye.
BSB
BSB:
In Hades, where he was in torment, he looked up and saw Abraham from afar, with Lazarus by his side.
24
LIN
Mozwi akomaki koganga : « Tata Abrayami, yokela ngai mawa ! Tinda Lazare ete atia songe ya mosapi na ye kati na mayi mpo ete atangisela ngai mayi na lolemo, pamba te nazali koyoka pasi makasi kati na moto oyo. »
BSB
BSB:
So he cried out, ‘Father Abraham, have mercy on me and send Lazarus to dip the tip of his finger in water and cool my tongue. For I am in agony in this fire.’
25
LIN
Kasi Abrayami azongisaki : « Mwana na ngai, kanisa ete, wana ozalaki na bomoi, ozwaki bolamu ebele, kasi Lazare azwaki nde pasi ebele. Sik’oyo awa, azali kozwa kobondisama na ye ; kasi yo, okomi na pasi.
BSB
BSB:
But Abraham answered, ‘Child, remember that during your lifetime you received your good things, while Lazarus received bad things. But now he is comforted here, while you are in agony.
26
LIN
Lisusu, libulu moko monene ekaboli biso mpe bino, mpo ete moto nyonso oyo alingi kolongwa awa epai biso tozali mpo na kokende epai na bino, akoka te ; mpe ete moto nyonso oyo alingi kokatisa libulu yango longwa kuna epai bino bozali mpo na koya awa epai na biso, akoka mpe te. »
BSB
BSB:
And besides all this, a great chasm has been fixed between us and you, so that even those who wish cannot cross from here to you, nor can anyone cross from there to us.’
27
LIN
Mozwi alobaki : « Tata, nasengi na yo, tinda Lazare epai ya libota na ngai,
BSB
BSB:
‘Then I beg you, father,’ he said, ‘send Lazarus to my father’s house,
28
LIN
pamba te nazali na bandeko mitano. Tika ete akende kokebisa bango mpo ete, bango mpe, bakoma awa te, kati na esika oyo ya pasi ! »
BSB
BSB:
for I have five brothers. Let him warn them, so that they will not also end up in this place of torment.’
29
LIN
Abrayami azongisaki : « Bandeko na yo bazali na Moyize mpe basakoli ; tika ete bayoka bango ! »
BSB
BSB:
But Abraham replied, ‘They have Moses and the Prophets; let your brothers listen to them.’
30
LIN
Mozwi alobaki lisusu : « Te, tata Abrayami ! Kasi soki moto moko awuti na mboka ya bakufi mpe akei epai na bango, bakobongola mitema ! »
BSB
BSB:
‘No, father Abraham,’ he said, ‘but if someone is sent to them from the dead, they will repent.’
31
LIN
Abrayami alobaki na ye : « Soki baboyi koyoka Moyize mpe basakoli, bakondima mpe kaka te ata soki moto moko alamuki kati na bakufi. »
BSB
BSB:
Then Abraham said to him, ‘If they do not listen to Moses and the Prophets, they will not be persuaded even if someone rises from the dead.’”
Chapter complete
You’ve read Luke 16
Chapter 16 of 24 in Luke
Up next
Luke 17
Read Luke 17
Back to Luke 15
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Luke 16
A question this chapter raises
If God exists, why is he so hidden?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Luke 15
Luke 16
Luke 17