Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.6.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Luke
Luke
22
LIN
BSB
A
a
Luke 22
22
Luke
Death, resurrection and ascension
Lingala Bible
Peter
, person
Jesus
, person
Judas
, person
Israel
, person
John
, person
Olives Mount
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Wana feti ya Mapa ezanga levire, feti oyo babengaka Pasika, ekomaki pene,
BSB
BSB:
Now the Feast of Unleavened Bread, called the Passover, was approaching,
2
LIN
bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koluka ndenge nini koboma Yesu, pamba te bazalaki kobanga bato.
BSB
BSB:
and the chief priests and scribes were looking for a way to put Jesus to death, for they feared the people.
3
LIN
Bongo Satana akotaki kati na Yuda oyo bazalaki kobenga « Isikarioti » mpe azalaki moko kati na bantoma zomi na mibale.
BSB
BSB:
Then Satan entered Judas Iscariot, who was one of the Twelve.
4
LIN
Boye, Yuda akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakonzi ya bakengeli ya Tempelo mpo na kobongisa elongo na bango ndenge nini akoteka Yesu epai na bango.
BSB
BSB:
And Judas went to discuss with the chief priests and temple officers how he might betray Jesus to them.
5
LIN
Basepelaki mingi mpe bayokanaki ete bakopesa ye mbongo.
BSB
BSB:
They were delighted and agreed to give him money.
6
LIN
Yuda andimaki mpe akomaki koluka libaku malamu ya kokaba Yesu na maboko na bango, na ndenge ete ebele ya bato bayeba te.
BSB
BSB:
Judas consented, and began to look for an opportunity to betray Jesus to them in the absence of a crowd.
7
LIN
Awa ekomaki mokolo ya feti ya Mapa ezanga levire, mokolo oyo basengeli koboma mpate lokola mbeka ya Pasika,
BSB
BSB:
Then came the day of Unleavened Bread on which the Passover lamb was to be sacrificed.
8
LIN
Yesu atindaki Petelo mpe Yoane ; alobaki na bango : — Bokende kobongisela biso bilei ya Pasika.
BSB
BSB:
Jesus sent Peter and John, saying,
“Go and make preparations for us to eat the Passover.”
9
LIN
Batunaki Ye : — Esika nini olingi ete tobongisa yango ?
BSB
BSB:
“Where do You want us to prepare it?” they asked.
10
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Tango bokokota na engumba, bokokutana na mobali moko amemi eloku ya mayi. Bolanda ye kino na ndako epai wapi akokota.
BSB
BSB:
He answered,
“When you enter the city, a man carrying a jug of water will meet you. Follow him to the house he enters,
11
LIN
Mpe boloba na nkolo ndako : « Moteyi atuni : ‹ Wapi shambre epai wapi nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai ? › »
BSB
BSB:
and say to the owner of that house, ‘The Teacher asks: Where is the guest room, where I may eat the Passover with My disciples?’
12
LIN
Akolakisa bino, na etaje, shambre moko ya monene babongisa malamu ; ezali kuna nde bokobongisa bilei ya Pasika.
BSB
BSB:
And he will show you a large upper room, already furnished. Make preparations there.”
13
LIN
Bakendeki, bakutaki makambo nyonso ndenge kaka Yesu ayebisaki bango mpe babongisaki bilei ya Pasika.
BSB
BSB:
So they went and found it just as Jesus had told them. And they prepared the Passover.
14
LIN
Tango ngonga ekokaki, Yesu avandaki na mesa elongo na bantoma.
BSB
BSB:
When the hour had come, Jesus reclined at the table with His apostles.
15
LIN
Alobaki na bango : — Nayokaki posa makasi ya kolia Pasika oyo elongo na bino liboso ete namona pasi,
BSB
BSB:
And He said to them,
“I have eagerly desired to eat this Passover with you before My suffering.
16
LIN
pamba te, nazali koloba na bino : nakolia yango lisusu te kino tina na yango ekokokisama penza kati na Bokonzi ya Nzambe.
BSB
BSB:
For I tell you that I will not eat it again until it is fulfilled in the kingdom of God.”
17
LIN
Sima na Ye kozwa kopo, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe alobaki : — Bokamata kopo oyo mpe bokabola yango kati na bino,
BSB
BSB:
After taking the cup, He gave thanks and said,
“Take this and divide it among yourselves.
18
LIN
pamba te nazali koloba na bino : nakomela lisusu te vino kowuta na bambuma ya vino, kino Bokonzi ya Nzambe eya.
BSB
BSB:
For I tell you that I will not drink of the fruit of the vine from now on until the kingdom of God comes.”
19
LIN
Bongo, azwaki lipa mpe, sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki bango yango ; alobaki : — Oyo ezali nzoto na Ngai, epesami mpo na bino ! Bosalaka boye mpo na kokanisa Ngai.
BSB
BSB:
And He took the bread, gave thanks and broke it, and gave it to them, saying,
“This is My body, given for you; do this in remembrance of Me.”
20
LIN
Sima na Ye kolia, asalaki mpe bongo mpo na kopo ; alobaki : — Kopo oyo ezali Boyokani ya sika kati na makila na Ngai, makila oyo esopani mpo na bino.
BSB
BSB:
In the same way, after supper He took the cup, saying,
“This cup is the new covenant in My blood, which is poured out for you.
21
LIN
Nzokande, moto oyo azali koteka Ngai azali awa, azali kolia mesa moko elongo na Ngai.
BSB
BSB:
Look! The hand of My betrayer is with Mine on the table.
22
LIN
Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge Nzambe akata ; kasi mawa na moto oyo azali koteka Ye.
BSB
BSB:
Indeed, the Son of Man will go as it has been determined, but woe to that man who betrays Him.”
23
LIN
Bongo bantoma bakomaki kotunana bango na bango mpo na koluka koyeba soki nani kati na bango akosala likambo yango.
BSB
BSB:
Then they began to question among themselves which of them was going to do this.
24
LIN
Tembe moko ebimaki kati na bayekoli mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene.
BSB
BSB:
A dispute also arose among the disciples as to which of them should be considered the greatest.
25
LIN
Yesu alobaki na bango : — Bakonzi ya bikolo bakonzaka yango, mpe bayangeli na yango balingaka ete babenga bango bato malamu.
BSB
BSB:
So Jesus declared,
“The kings of the Gentiles lord it over them, and those in authority over them call themselves benefactors.
26
LIN
Kasi esengeli te kozala bongo kati na bino. Nzokande, tika ete moto oyo aleki monene kati na bino azala lokola leki ya suka, mpe moto oyo azali kokamba azala lokola moto oyo azali kotia bilei na mesa.
BSB
BSB:
But you shall not be like them. Instead, the greatest among you should be like the youngest, and the one who leads like the one who serves.
27
LIN
Pamba te nani aleki monene ? Ye oyo avandi na mesa to ye oyo azali kotia bilei na mesa ? Ezali te oyo avandi na mesa ? Kasi Ngai nazali kati na bino lokola moto oyo azali kotia bilei na mesa.
BSB
BSB:
For who is greater, the one who reclines at the table or the one who serves? Is it not the one who reclines? But I am among you as one who serves.
28
LIN
Bino nde bato oyo botikali ya kokangama na Ngai kati na pasi na Ngai.
BSB
BSB:
You are the ones who have stood by Me in My trials.
29
LIN
Mpe lokola Tata na Ngai apesaki Ngai bokonzi, Ngai mpe nazali kopesa bino bokonzi,
BSB
BSB:
And I bestow on you a kingdom, just as My Father has bestowed one on Me,
30
LIN
mpo ete bokoka kolia mpe komela na mesa na Ngai kati na Bokonzi na Ngai, mpe ete bokoka kovanda na bakiti ya bokonzi mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.
BSB
BSB:
so that you may eat and drink at My table in My kingdom and sit on thrones, judging the twelve tribes of Israel.
31
LIN
Simona, Simona, Satana asengi koyungola bino ndenge bayungolaka ble.
BSB
BSB:
Simon, Simon, Satan has asked to sift all of you like wheat.
32
LIN
Kasi nasambeli mpo na yo, mpo ete kondima na yo ekweya te. Mpe sima na yo kozonga epai na Ngai, lendisa bandeko na yo.
BSB
BSB:
But I have prayed for you, Simon, that your faith will not fail. And when you have turned back, strengthen your brothers.”
33
LIN
Kasi Petelo azongisaki : — Nkolo, nandimi kokota boloko to kokufa elongo na Yo.
BSB
BSB:
“Lord,” said Peter, “I am ready to go with You even to prison and to death.”
34
LIN
Yesu alobaki na ye : — Petelo, nazali koloba na yo : lelo, liboso ete soso elela, okowangana mbala misato ete oyebi Ngai te.
BSB
BSB:
But Jesus replied,
“I tell you, Peter, the rooster will not crow today until you have denied three times that you know Me.”
35
LIN
Bongo Yesu atunaki bango : — Tango natindaki bino maboko pamba, mbongo te, sakosi te, basandale te ; boni, bozangaki eloko ? Bazongisaki : — Tozangaki eloko te.
BSB
BSB:
Then Jesus asked them,
“When I sent you out without purse or bag or sandals, did you lack anything?”
“Nothing,” they answered.
36
LIN
Alobaki na bango : — Kasi, sik’oyo, tika ete moto oyo azali na mbongo azwa yango, oyo azali na sakosi azwa yango, oyo azangi mopanga ateka elamba na ye mpo na kosomba yango !
BSB
BSB:
“Now, however,”
He told them,
“the one with a purse should take it, and likewise a bag; and the one without a sword should sell his cloak and buy one.
37
LIN
Ekomama : « Batangaki Ye elongo na babomi bato ; » mpe nazali koloba na bino : makambo yango esengeli kokokisama kati na Ngai.
BSB
BSB:
For I tell you that this Scripture must be fulfilled in Me: ‘And He was numbered with the transgressors.’ For what is written about Me is reaching its fulfillment.”
38
LIN
Bayekoli balobaki : — Nkolo, tala mipanga mibale. Yesu azongisaki : — Ekoki !
BSB
BSB:
So they said, “Look, Lord, here are two swords.”
“That is enough,”
He answered.
39
LIN
Yesu abimaki mpe akendeki lokola momesano na ngomba ya banzete ya olive, mpe bayekoli na Ye balandaki Ye.
BSB
BSB:
Jesus went out as usual to the Mount of Olives, and the disciples followed Him.
40
LIN
Tango akomaki na esika yango, alobaki na bango : — Bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama.
BSB
BSB:
When He came to the place, He told them,
“Pray that you will not enter into temptation.”
41
LIN
Akendeki mwa mosika na bango, afukamaki mpe asambelaki boye :
BSB
BSB:
And He withdrew about a stone’s throw beyond them, where He knelt down and prayed,
42
LIN
« Tata, soki olingi, longola kopo oyo ya pasi liboso na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo. » [
BSB
BSB:
“Father, if You are willing, take this cup from Me. Yet not My will, but Yours be done.”
The angel and the sweat like drops of blood
43
LIN
Anjelu moko awutaki na Likolo, abimelaki Ye mpe alendisaki Ye.
BSB
BSB:
Then an angel from heaven appeared to Him and strengthened Him.
44
LIN
Lokola azalaki koyoka somo makasi, asambelaki lisusu makasi koleka, kino motoki na Ye ekomaki lokola matanga ya makila oyo ekomaki kokweya na mabele.]
BSB
BSB:
And in His anguish, He prayed more earnestly, and His sweat became like drops of blood falling to the ground.
45
LIN
Tango asilisaki kosambela, atelemaki, akendeki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi, mpo ete batondaki na mawa.
BSB
BSB:
When Jesus rose from prayer and returned to the disciples, He found them asleep, exhausted from sorrow.
46
LIN
Atunaki bango : — Mpo na nini bozali kolala ? Botelema mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama.
BSB
BSB:
“Why are you sleeping?”
He asked.
“Get up and pray so that you will not enter into temptation.”
47
LIN
Wana Yesu azalaki nanu koloba, ebele ya bato bayaki ; mpe moto oyo bazalaki kobenga « Yuda, » moko kati na bayekoli zomi na mibale, azalaki liboso na bango. Apusanaki pene ya Yesu mpo na koyamba Ye,
BSB
BSB:
While He was still speaking, a crowd arrived, led by the man called Judas, one of the Twelve. He approached Jesus to kiss Him.
48
LIN
kasi Yesu atunaki ye : — Yuda, ozali penza koteka Mwana na Moto na nzela ya beze ?
BSB
BSB:
But Jesus asked him,
“Judas, are you betraying the Son of Man with a kiss?”
49
LIN
Tango bato oyo bazalaki elongo na Yesu bamonaki makambo oyo ezali kosalema, batunaki Ye : — Nkolo, tobeta bango na nzela ya mipanga na biso ?
BSB
BSB:
Those around Jesus saw what was about to happen and said, “Lord, should we strike with our swords?”
50
LIN
Mpe moko kati na bango abetaki mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mopanga mpe akataki ye litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali.
BSB
BSB:
And one of them struck the servant of the high priest, cutting off his right ear.
51
LIN
Kasi Yesu alobaki : — Boye lisusu te ! Yesu asimbaki litoyi ya mobali yango mpe abikisaki ye.
BSB
BSB:
But Jesus answered,
“No more of this!”
And He touched the man’s ear and healed him.
52
LIN
Bongo Yesu alobaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe, na bakonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe na bakambi ya bato, oyo bayaki kokanga Ye : — Boni, nakomi mokambi ya batomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe banzete ?
BSB
BSB:
Then Jesus said to the chief priests, temple officers, and elders who had come for Him,
“Have you come out with swords and clubs as you would against an outlaw?
53
LIN
Nazalaki elongo na bino mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo, mpe bokangaki Ngai te. Kasi ezali ngonga na bino, ngonga oyo bokonzi ya molili ezali kokonza.
BSB
BSB:
Every day I was with you in the temple courts, and you did not lay a hand on Me. But this hour belongs to you and to the power of darkness.”
54
LIN
Bakangaki Yesu, bamemaki Ye kati na ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. Petelo azalaki kolanda na mosika.
BSB
BSB:
Then they seized Jesus, led Him away, and took Him into the house of the high priest. And Peter followed at a distance.
55
LIN
Mpe tango bapelisaki moto na kati-kati ya lopango mpe bavandaki lisanga, Petelo mpe avandaki elongo na bango.
BSB
BSB:
When those present had kindled a fire in the middle of the courtyard and sat down together, Peter sat down among them.
56
LIN
Mwasi mosali moko amonaki Petelo avandi wana pembeni ya moto. Sima na ye kotala Petelo malamu, alobaki : — Tata oyo azalaki elongo na Yesu !
BSB
BSB:
A servant girl saw him seated in the firelight and looked intently at him. “This man also was with Him,” she said.
57
LIN
Kasi Petelo awanganaki mpe alobaki : — Mwasi, nayebi ye te.
BSB
BSB:
But Peter denied it. “Woman, I do not know Him,” he said.
58
LIN
Sima na mwa tango moke, moto mosusu amonaki Petelo mpe alobaki : — Yo mpe ozali moko kati na bango ! Petelo azongisaki : — Tata, nazali moko te kati na bango.
BSB
BSB:
A short time later, someone else saw him and said, “You also are one of them.” But Peter said, “Man, I am not.”
59
LIN
Sima na ngonga moko, moto mosusu alobaki na molende : — Ezali ya solo ! Tata oyo azalaki elongo na ye, pamba te azali moto ya Galile.
BSB
BSB:
About an hour later, another man insisted, “Certainly this man was with Him, for he too is a Galilean.”
60
LIN
Kasi Petelo azongisaki : — Nayebi te makambo oyo ozali kolobela ! Wana azalaki nanu koloba, soso elelaki.
BSB
BSB:
“Man, I do not know what you are talking about,” Peter replied. And immediately, while he was still speaking, the rooster crowed.
61
LIN
Nkolo abalukaki mpe atalaki Petelo ; mpe Petelo akanisaki maloba oyo Nkolo alobaki na ye : « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. »
BSB
BSB:
And the Lord turned and looked at Peter. Then Peter remembered the word that the Lord had spoken to him:
“Before the rooster crows today, you will deny Me three times.”
62
LIN
Abimaki mpe alelaki makasi na libanda.
BSB
BSB:
And he went outside and wept bitterly.
63
LIN
Bato oyo bazalaki kokengela Yesu babandaki koseka mpe kobeta Ye.
BSB
BSB:
The men who were holding Jesus began to mock Him and beat Him.
64
LIN
Bazipaki Ye elongi mpe basengaki na makasi : — Sakola : Nani abeti Yo ?
BSB
BSB:
They blindfolded Him and kept demanding, “Prophesy! Who hit You?”
65
LIN
Mpe balobaki na Ye maloba mabe ebele mpo na kofinga Ye.
BSB
BSB:
And they said many other blasphemous things against Him.
66
LIN
Tango tongo etanaki, bakambi ya bato, elongo na bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko, basanganaki mpe basengaki ete bamema Yesu liboso ya Likita-Monene na bango.
BSB
BSB:
At daybreak the council of the elders of the people, both the chief priests and scribes, met together. They led Jesus into their Sanhedrin and said,
67
LIN
Balobaki : — Soki ozali Klisto, yebisa biso. Yesu azongisaki : — Ata nayebisi bino, bokondima na bino kaka Ngai te ;
BSB
BSB:
“If You are the Christ, tell us.” Jesus answered,
“If I tell you, you will not believe.
68
LIN
mpe soki Ngai napesi bino motuna, bokopesa na bino mpe Ngai eyano te.
BSB
BSB:
And if I ask you a question, you will not answer.
69
LIN
Kasi kobanda sik’oyo, Mwana na Moto akovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.
BSB
BSB:
But from now on the Son of Man will be seated at the right hand of the power of God.”
70
LIN
Bango nyonso batunaki : — Ozali Mwana na Nzambe ? Yesu azongisaki : — Bino nde bolobi ete nazali Mwana na Nzambe.
BSB
BSB:
So they all asked, “Are You then the Son of God?” He replied,
“You say that I am.”
71
LIN
Bongo balobaki : — Mpo na nini koluka matatoli mosusu ? Toyoki yango na monoko na ye moko.
BSB
BSB:
“Why do we need any more testimony?” they declared. “We have heard it for ourselves from His own lips.”
Chapter complete
You’ve read Luke 22
Chapter 22 of 24 in Luke
Up next
Luke 23
Read Luke 23
Back to Luke 21
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Luke 22
A question this chapter raises
Did Jesus come to bring a sword, not peace?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Luke 21
Luke 22
Luke 23