Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.7.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Luke
Luke
23
LIN
BSB
A
a
Luke 23
23
Luke
Death, resurrection and ascension
Lingala Bible
Jesus
, person
Pilate
, person
Herod
, person
Galilee
, place
Jerusalem
, place
Judea
, place
Arimathea
, place
Caesar
, person
6 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Bato nyonso oyo bazalaki kati na mayangani batelemaki mpe bamemaki Yesu liboso ya Pilato ;
BSB
BSB:
Then the whole council rose and led Jesus away to Pilate.
2
LIN
mpe kuna, bakomaki kofunda Ye : — Tala moto oyo azali kotia mobulu kati na ekolo na biso ! Tokuti ye azali kopekisa bato kofuta mpako ya Sezare, mpe azali lisusu komibenga Klisto, Mokonzi !
BSB
BSB:
And they began to accuse Him, saying, “We found this man subverting our nation, forbidding payment of taxes to Caesar, and proclaiming Himself to be Christ, a King.”
3
LIN
Pilato atunaki Yesu : — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ? Yesu azongisaki : — Olobi yango.
BSB
BSB:
So Pilate asked Him, “Are You the King of the Jews?”
“You have said so,”
Jesus replied.
4
LIN
Pilato alobaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe na ebele ya bato : — Namoni mabe moko te epai ya moto oyo.
BSB
BSB:
Then Pilate said to the chief priests and the crowds, “I find no basis for a charge against this man.”
5
LIN
Kasi batiaki kaka molende mpe balobaki : — Te ! Azali kotombokisa bato ya Yuda mobimba na nzela ya mateya na Ye ; abandaki yango na Galile kino akomi awa.
BSB
BSB:
But they kept insisting, “He stirs up the people all over Judea with His teaching. He began in Galilee and has come all the way here.”
6
LIN
Tango Pilato ayokaki bongo, atunaki soki Yesu azali moto ya Galile.
BSB
BSB:
When Pilate heard this, he asked if the man was a Galilean.
7
LIN
Wana ayokaki ete Yesu azali moto ya mboka oyo ezalaki na se ya bokonzi ya Erode, atindaki Ye epai ya Erode, pamba te Erode azalaki kati na Yelusalemi na mikolo wana.
BSB
BSB:
And learning that Jesus was under Herod’s jurisdiction, he sent Him to Herod, who himself was in Jerusalem at that time.
8
LIN
Erode asepelaki mingi tango amonaki Yesu, pamba te, wuta kala, azalaki koluka komona Ye mpo ete ayokaki basango mingi na tina na Ye, mpe azalaki kolikya komona Yesu kosala likamwisi.
BSB
BSB:
When Herod saw Jesus, he was greatly pleased. He had wanted to see Him for a long time, because he had heard about Him and was hoping to see Him perform a miracle.
9
LIN
Apesaki ye mituna ebele, kasi Yesu apesaki ye ata eyano moko te.
BSB
BSB:
Herod questioned Jesus at great length, but He gave no answer.
10
LIN
Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki kaka wana mpe bazalaki kopelisa moto na maloba mabe mpo na kokweyisa Yesu.
BSB
BSB:
Meanwhile, the chief priests and scribes stood there, vehemently accusing Him.
11
LIN
Erode mpe basoda na ye basekaki mpe batiolaki Yesu ; balatisaki Ye elamba ya kitoko makasi mpe bazongisaki Ye epai ya Pilato.
BSB
BSB:
And even Herod and his soldiers ridiculed and mocked Him. Dressing Him in a fine robe, they sent Him back to Pilate.
12
LIN
Nzokande, Erode mpe Pilato bazalaki banguna wuta kala ; kasi na mokolo wana, bakomaki balingami.
BSB
BSB:
That day Herod and Pilate became friends; before this time they had been enemies.
13
LIN
Pilato abengisaki bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya Bayuda mpe bato nyonso ; alobaki na bango :
BSB
BSB:
Then Pilate called together the chief priests, the rulers, and the people,
14
LIN
— Bomemelaki ngai moto oyo mpe bofundaki ye ete azali kotombokisa bato. Napesi ye mituna liboso na bino mpe nazwi ye na mabe ata moko te kati na nyonso oyo bofundelaki ye.
BSB
BSB:
and said to them, “You brought me this man as one who was inciting the people to rebellion. I have examined Him here in your presence and found Him not guilty of your charges against Him.
15
LIN
Erode mpe azwaki ye na mabe ata moko te, yango wana azongisaki ye epai na biso. Boye, ndenge bokoki komona, moto oyo asali mabe ata moko te oyo ekoki kosala ete azwa etumbu ya kufa.
BSB
BSB:
Neither has Herod, for he sent Him back to us. As you can see, He has done nothing deserving of death.
16
LIN
Na bongo, nakobetisa ye kaka fimbu mpe, sima, nakotika ye. [
BSB
BSB:
Therefore I will punish Him and release Him.”
17
LIN
Nzokande, na bafeti nyonso, Pilato azalaki kobimisela bango mokangami moko.]
BSB
BSB:
Not in the BSB
Not in the earliest manuscripts
18
LIN
Bato nyonso bagangaki : — Boma moto oyo ! Bimisela biso Barabasi !
BSB
BSB:
But they all cried out in unison: “Away with this man! Release Barabbas to us!”
19
LIN
Barabasi akangamaki na boloko mpo ete abimisaki mobulu kati na engumba mpe abomaki moto.
BSB
BSB:
(Barabbas had been imprisoned for an insurrection in the city, and for murder.)
20
LIN
Lokola azalaki na posa ya kotika Yesu, Pilato atunaki bango lisusu.
BSB
BSB:
Wanting to release Jesus, Pilate addressed them again,
21
LIN
Kasi bakobaki koganga : — Baka ye na ekulusu ! Baka ye na ekulusu !
BSB
BSB:
but they kept shouting, “Crucify Him! Crucify Him!”
22
LIN
Pilato atunaki bango lisusu, mpo na mbala ya misato : — Mpo na nini ? Mabe nini tata oyo asali ? Ngai nazwi ye na mabe ata moko te, oyo ekoki kosala ete azwa etumbu ya kufa. Boye, nakobetisa ye kaka fimbu ; sima, nakotika ye.
BSB
BSB:
A third time he said to them, “What evil has this man done? I have found in Him no offense worthy of death. So after I punish Him, I will release Him.”
23
LIN
Kasi bakobaki kaka kosenga, na koganga makasi koleka, ete babaka Yesu na ekulusu ; mpe suka na suka, koganga na bango elongaki.
BSB
BSB:
But they were insistent, demanding with loud voices for Jesus to be crucified. And their clamor prevailed.
24
LIN
Pilato azwaki mokano ya kokokisa oyo basengaki ;
BSB
BSB:
So Pilate sentenced that their demand be met.
25
LIN
abimiselaki bango moto oyo basengaki, oyo akangamaki na boloko mpo na mobulu mpe mpo ete abomaki moto, mpe akabaki Yesu na maboko na bango mpo ete basala Ye nyonso oyo balingi.
BSB
BSB:
As they had requested, he released the one imprisoned for insurrection and murder, and he handed Jesus over to their will.
26
LIN
Wana basoda bazalaki kokumba Yesu, bakangaki mobali moko, kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene, oyo awutaki na bilanga ; batiaki ekulusu na mokongo na ye mpo ete amema yango sima na Yesu.
BSB
BSB:
As the soldiers led Him away, they seized Simon of Cyrene on his way in from the country, and they put the cross on him to carry behind Jesus.
27
LIN
Bato ebele balandaki Yesu. Kati na bango, ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kolelalela mpe komitungisa mingi mpo na Ye.
BSB
BSB:
A great number of people followed Him, including women who kept mourning and wailing for Him.
28
LIN
Yesu abalukaki mpo na kotala basi mpe alobaki : — Bana basi ya Yelusalemi, bolela mpo na Ngai te ; bolela nde mpo na bino moko mpe mpo na bana na bino.
BSB
BSB:
But Jesus turned to them and said,
“Daughters of Jerusalem, do not weep for Me, but weep for yourselves and for your children.
29
LIN
Pamba te, na mikolo oyo ekoya, bakoloba : « Esengo na basi oyo bazali na bana te, oyo babota te mpe bamelisa bana mabele te ! »
BSB
BSB:
Look, the days are coming when people will say, ‘Blessed are the barren women, the wombs that never bore, and breasts that never nursed!’
30
LIN
Bongo bakoloba na bangomba milayi : « Bokweyela biso ! » Mpe bakoloba na bangomba mikuse : « Bozipa biso ! »
BSB
BSB:
At that time ‘they will say to the mountains, “Fall on us!” and to the hills, “Cover us!”’
31
LIN
Pamba te soki bato bazali kosala makambo ya boye na nzete ya mobesu, ekozala ndenge nini na nzete ya kokawuka ?
BSB
BSB:
For if men do these things while the tree is green, what will happen when it is dry?”
32
LIN
Bamemaki mpe mibali mosusu mibale, babomi bato, mpo na koboma bango elongo na Yesu.
BSB
BSB:
Two others, who were criminals, were also led away to be executed with Jesus.
33
LIN
Tango bakomaki na esika oyo babengaka « Gologota, » babakaki kuna Yesu elongo na babomi mibale wana ya bato : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
BSB
BSB:
When they came to the place called The Skull, they crucified Him there, along with the criminals, one on His right and the other on His left.
“Father, forgive them”
34
LIN
Yesu alobaki : — Tata, limbisa bango mpo ete bayebi te makambo oyo bazali kosala . Mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke.
BSB
BSB:
Then Jesus said,
“Father, forgive them, for they do not know what they are doing.”
And they divided up His garments by casting lots.
35
LIN
Bato batelemaki wana, bazalaki kotala ; mpe bakambi batiolaki Ye, balobaki : — Abikisaki bato mosusu ; tika ete amibikisa ye moko, soki penza azali Klisto, Moponami ya Nzambe !
BSB
BSB:
The people stood watching, and the rulers sneered at Him, saying, “He saved others; let Him save Himself if He is the Christ of God, the Chosen One.”
36
LIN
Basoda mpe bakendeki mpe batiolaki Ye ; bapesaki Ye vino ya ngayi
BSB
BSB:
The soldiers also mocked Him and came up to offer Him sour wine.
37
LIN
mpe balobaki : — Soki ozali penza mokonzi ya Bayuda, mibikisa yo moko !
BSB
BSB:
“If You are the King of the Jews,” they said, “save Yourself!”
38
LIN
Na likolo ya moto ya Yesu, ezalaki na makomi oyo : Moto oyo azali Mokonzi ya Bayuda.
BSB
BSB:
Above Him was posted an inscription: THIS IS THE KING OF THE JEWS.
39
LIN
Moko kati na babomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu atiolaki Ye : — Boni, ozali Klisto te ? Mibikisa yo moko mpe bikisa biso !
BSB
BSB:
One of the criminals who hung there heaped abuse on Him. “Are You not the Christ?” he said. “Save Yourself and us!”
40
LIN
Kasi mobomi bato mosusu apamelaki ye : — Ozali kobanga Nzambe te mpo ete ozali na se ya etumbu ya ndenge moko na oyo ya Ye !
BSB
BSB:
But the other one rebuked him, saying, “Do you not even fear God, since you are under the same judgment?
41
LIN
Biso, tozwi penza etumbu na ndenge ya bosembo, pamba te tozali kozwa mbano ya misala mabe na biso ; kasi tata oyo asali ata mabe moko te.
BSB
BSB:
We are punished justly, for we are receiving what our actions deserve. But this man has done nothing wrong.”
42
LIN
Bongo alobaki lisusu : — Yesu, kanisa ngai tango okokota kati na Bokonzi na Yo.
BSB
BSB:
Then he said, “Jesus, remember me when You come into Your kingdom!”
43
LIN
Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : lelo, okozala elongo na Ngai kati na Paradizo.
BSB
BSB:
And Jesus said to him,
“Truly I tell you, today you will be with Me in Paradise.”
44
LIN
Na ngonga pene ya midi, molili ekotaki na mokili mobimba kino na ngonga ya misato ya pokwa,
BSB
BSB:
It was now about the sixth hour, and darkness came over all the land until the ninth hour.
45
LIN
pamba te moyi etikaki kongenga, mpe rido monene ya Tempelo epasukaki na kati-kati.
BSB
BSB:
The sun was darkened, and the veil of the temple was torn down the middle.
46
LIN
Yesu agangaki na mongongo makasi : — Tata, nazongisi molimo na Ngai kati na maboko na Yo. Sima na Ye koloba bongo, akataki motema.
BSB
BSB:
Then Jesus called out in a loud voice,
“Father, into Your hands I commit My Spirit.”
And when He had said this, He breathed His last.
47
LIN
Tango mokonzi ya basoda ya Rome amonaki makambo oyo eleki, akumisaki Nzambe mpe alobaki : — Moto oyo azalaki penza sembo !
BSB
BSB:
When the centurion saw what had happened, he gave glory to God, saying, “Surely this was a righteous man.”
48
LIN
Tango bato nyonso oyo basanganaki wana, mpo na kotala makambo oyo ezali kosalema, bamonaki makambo oyo ekweyi, batiaki maboko na bango na batolo na bango mpe bazongaki.
BSB
BSB:
And when all the people who had gathered for this spectacle saw what had happened, they returned home beating their breasts.
49
LIN
Kasi bato nyonso oyo bayebaki Yesu, mpe basi oyo balandaki Ye longwa na Galile, batelemaki na mosika mpe bazalaki kotala ndenge makambo ezali koleka.
BSB
BSB:
But all those who knew Jesus, including the women who had followed Him from Galilee, stood at a distance watching these things.
50
LIN
Kati na Likita-Monene ya Bayuda, ezalaki na moto moko, kombo na ye « Jozefi. » Azalaki moto malamu mpe moto ya sembo,
BSB
BSB:
Now there was a Council member named Joseph, a good and righteous man,
51
LIN
mpe andimaki te mikano mpe misala ya bato mosusu ya Likita-Monene ; azalaki moto ya mboka Arimate, engumba ya Bayuda, mpe azalaki kozela Bokonzi ya Nzambe.
BSB
BSB:
who had not consented to their decision or action. He was from the Judean town of Arimathea and was waiting for the kingdom of God.
52
LIN
Akendeki epai ya Pilato mpo na kosenga nzoto ya Yesu.
BSB
BSB:
He went to Pilate to ask for the body of Jesus.
53
LIN
Bongo akitisaki nzoto yango longwa na ekulusu, alingaki yango na liputa ya lino, mpe atiaki yango kati na kunda oyo batobolaki kati na libanga moko ya monene epai wapi batikalaki nanu kokunda ata moto moko te.
BSB
BSB:
Then he took it down, wrapped it in a linen cloth, and placed it in a tomb cut into the rock, where no one had yet been laid.
54
LIN
Ezalaki mokolo ya komilengela, wana Saba elingaki kobanda.
BSB
BSB:
It was Preparation Day, and the Sabbath was beginning.
55
LIN
Basi oyo bawutaki na Galile elongo na Yesu balandaki Jozefi, bamonaki kunda mpe ndenge nini atiaki nzoto ya Yesu kati na kunda yango.
BSB
BSB:
The women who had come with Jesus from Galilee followed, and they saw the tomb and how His body was placed.
56
LIN
Sima, bazongaki epai na bango mpe babongisaki mafuta ya solo kitoko mpe malasi. Kasi bapemaki na mokolo ya Saba, kolanda ndenge mobeko ezalaki kosenga.
BSB
BSB:
Then they returned to prepare spices and perfumes. And they rested on the Sabbath, according to the commandment.
Chapter complete
You’ve read Luke 23
Chapter 23 of 24 in Luke
Up next
Luke 24
Read Luke 24
Back to Luke 22
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Luke 23
A question this chapter raises
Isn’t the New Testament antisemitic?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Luke 22
Luke 23
Luke 24