Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.9.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Luke
Luke
24
LIN
BSB
A
a
Luke 24
24
Luke
Death, resurrection and ascension
Lingala Bible
Jesus
, person
Jerusalem
, place
Moses
, person
Peter
, person
Israel
, person
Galilee
, place
Nazareth
, place
Magdalene
, place
7 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, basi bakendeki na kunda mpe bamemaki mafuta ya solo kitoko oyo balambaki.
BSB
BSB:
On the first day of the week, very early in the morning, the women came to the tomb, bringing the spices they had prepared.
2
LIN
Libanga oyo ekangaki ekotelo ya kunda, bakutaki yango etindikama mosika na ekotelo ya kunda.
BSB
BSB:
They found the stone rolled away from the tomb,
3
LIN
Bakotaki, kasi bamonaki te nzoto ya Nkolo Yesu.
BSB
BSB:
but when they entered, they did not find the body of the Lord Jesus.
4
LIN
Wana bazalaki nanu komitungisa mpo na likambo yango, bato mibale babimelaki bango, balata bilamba oyo ezali kongenga makasi.
BSB
BSB:
While they were puzzling over this, suddenly two men in radiant apparel stood beside them.
5
LIN
Basi yango babangaki, bakitisaki bilongi na bango na ngambo ya mabele ; kasi bato wana mibale balobaki na bango : — Mpo na nini bozali koluka kati na bakufi Ye oyo azali na bomoi ?
BSB
BSB:
As the women bowed their faces to the ground in terror, the two men asked them, “Why do you look for the living among the dead?
6
LIN
Azali lisusu awa te, asekwi. Bokanisa makambo oyo ayebisaki bino, wana azalaki nanu kati na Galile :
BSB
BSB:
He is not here; He has risen! Remember how He told you while He was still in Galilee:
7
LIN
« Esengeli ete bakaba Mwana na Moto na maboko ya bato ya masumu ; esengeli ete babaka Ye na ekulusu ; mpe esengeli ete asekwa sima na mikolo misato. »
BSB
BSB:
‘The Son of Man must be delivered into the hands of sinful men, and be crucified, and on the third day rise again.’”
8
LIN
Boye, bakanisaki maloba ya Yesu.
BSB
BSB:
Then they remembered His words.
9
LIN
Tango bazongaki longwa na kunda, bayebisaki makambo wana nyonso epai ya bayekoli zomi na moko mpe epai ya baninga na bango nyonso.
BSB
BSB:
And when they returned from the tomb, they reported all these things to the Eleven and to all the others.
10
LIN
Ezalaki : Mari, moto ya mboka Magidala ; Jane mpe Mari, mama ya Jake. Baninga na bango mosusu ya basi bayebisaki mpe makambo yango epai ya bantoma,
BSB
BSB:
It was Mary Magdalene, Joanna, Mary the mother of James, and the other women with them who told this to the apostles.
11
LIN
kasi bazwaki maloba ya basi yango lokola maloba ezanga tina, mpe bandimaki bango te.
BSB
BSB:
But their words seemed like nonsense to them, and they did not believe the women.
12
LIN
Kasi Petelo atelemaki mpe apotaki mbangu kino na kunda. Agunzamaki mpo na kotala, amonaki kaka biteni ya elamba ya lino elala yango moko. Alongwaki kuna mpe azongaki, akamwaki makasi makambo oyo ewutaki kosalema.
BSB
BSB:
Peter, however, got up and ran to the tomb. And after bending down and seeing only the linen cloths, he went away, wondering to himself what had happened.
13
LIN
Nzokande, kaka na mokolo yango, mibale kati na bango bazalaki kokende na mboka moko oyo kombo na yango ezalaki « Emausi. » Mboka yango ezalaki mosika na Yelusalemi, na bakilometele pene zomi na mibale.
BSB
BSB:
That same day two of them were going to a village called Emmaus, about seven miles from Jerusalem.
14
LIN
Bazalaki kosolola na tina na makambo nyonso oyo ewuti kosalema.
BSB
BSB:
They were talking with each other about everything that had happened.
15
LIN
Wana bazalaki kosolola mpe kotiana tembe mpo na makambo yango, Yesu asanganaki na bango mpe akomaki kokende na bango nzela moko.
BSB
BSB:
And as they talked and deliberated, Jesus Himself came up and walked along with them.
16
LIN
Kasi lokola miso na bango ezalaki ya kozipama, bakokaki te kososola ete ezali Yesu.
BSB
BSB:
But their eyes were kept from recognizing Him.
17
LIN
Alobaki na bango : — Makambo nini bozali kotiana na yango tembe na kotambola ? Batelemaki, bilongi mawa-mawa.
BSB
BSB:
He asked them,
“What are you discussing so intently as you walk along?”
They stood still, with sadness on their faces.
18
LIN
Moko kati na bango, kombo na ye « Kleopasi, » alobaki na Ye : — Kati na bavandi nyonso ya Yelusalemi, yo moko kaka oyebi te makambo oyo ewuti kosalema mikolo oyo !
BSB
BSB:
One of them, named Cleopas, asked Him, “Are You the only visitor to Jerusalem who does not know the things that have happened there in recent days?”
19
LIN
Yesu atunaki bango : — Makambo nini ? Bazongisaki : — Ezali makambo oyo etali Yesu ya Nazareti : azalaki mosakoli moko ya nguya, na misala mpe na maloba, liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato nyonso.
BSB
BSB:
“What things?”
He asked. “The events involving Jesus of Nazareth,” they answered. “This man was a prophet, powerful in speech and action before God and all the people.
20
LIN
Kasi bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi na biso bakabaki Ye mpo ete bakatela Ye etumbu ya kufa, mpe babakaki Ye na ekulusu.
BSB
BSB:
Our chief priests and rulers delivered Him up to the sentence of death, and they crucified Him.
21
LIN
Tozalaki kolikya ete Ye nde akokangola Isalaele. Kasi longola nyonso wana, lelo ezali mokolo ya misato wuta makambo wana esalemaki.
BSB
BSB:
But we were hoping He was the One who would redeem Israel. And besides all this, it is the third day since these things took place.
22
LIN
Lisusu, ndambo ya basi kati na biso bakamwisi biso makasi ; bakendeki na kunda na tongo-tongo,
BSB
BSB:
Furthermore, some of our women astounded us. They were at the tomb early this morning,
23
LIN
kasi bamonaki nzoto na Ye te, mpe bayaki koyebisa biso ete bamonaki ba-anjelu kobimela bango mpe koyebisa bango ete Yesu azali na bomoi.
BSB
BSB:
but they did not find His body. They came and told us they had seen a vision of angels, who said that Jesus was alive.
24
LIN
Ndambo kati na baninga na biso bakendeki na kunda, mpe makambo oyo bamonaki kuna ekokani penza na oyo basi balobaki, kasi bamonaki Yesu te.
BSB
BSB:
Then some of our companions went to the tomb and found it just as the women had described. But Him they did not see.”
25
LIN
Yesu alobaki na bango : — Ah ! Bozali penza bazoba ! Tala ndenge mitema na bino ezali penza mabanga ! Bozali penza kondima te makambo nyonso oyo basakoli baloba !
BSB
BSB:
Then Jesus said to them,
“O foolish ones, and slow of heart to believe all that the prophets have spoken!
26
LIN
Boni, Klisto asengelaki te komona pasi ndenge wana mpo ete akota kati na nkembo na Ye ?
BSB
BSB:
Was it not necessary for the Christ to suffer these things and then to enter His glory?”
27
LIN
Bongo Yesu alimbolelaki bango makambo nyonso oyo ekomama kati na Makomi, kobanda na Moyize kino na basakoli nyonso.
BSB
BSB:
And beginning with Moses and all the Prophets, He explained to them what was written in all the Scriptures about Himself.
28
LIN
Tango bakomaki pene ya mboka epai wapi bazalaki kokende, Yesu asalaki lokola nde azali kokende mosika.
BSB
BSB:
As they approached the village where they were headed, He seemed to be going farther.
29
LIN
Kasi bango babondelaki Ye makasi : — Vanda elongo na biso, pamba te pokwa esili kokoma, mpe butu elingi kokota. Boye Yesu akotaki na ndako mpo na kovanda elongo na bango.
BSB
BSB:
But they pleaded with Him, “Stay with us, for it is nearly evening and the day is almost over.” So He went in to stay with them.
30
LIN
Tango avandaki na mesa elongo na bango, akamataki lipa, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango na biteni, mpe apesaki bango yango.
BSB
BSB:
While He was reclining at the table with them, He took bread, spoke a blessing and broke it, and gave it to them.
31
LIN
Mbala moko, miso na bango efungwamaki mpe basosolaki ete ezali Yesu, kasi alimwaki na miso na bango.
BSB
BSB:
Then their eyes were opened and they recognized Jesus—and He disappeared from their sight.
32
LIN
Batunanaki : — Boni, mitema na biso etondaki na esengo te wana azalaki kosolola na biso na nzela mpe kolimbolela biso Makomi ?
BSB
BSB:
They asked each other, “Were not our hearts burning within us as He spoke with us on the road and opened the Scriptures to us?”
33
LIN
Kaka na tango yango, batelemaki mpe bazongaki na Yelusalemi epai wapi bakutaki bayekoli zomi na moko basangana elongo na baninga na bango,
BSB
BSB:
And they got up that very hour and returned to Jerusalem. There they found the Eleven and those with them, gathered together
34
LIN
oyo balobaki na bango : — Ezali ya solo, Nkolo asekwi ; abimelaki Simona !
BSB
BSB:
and saying, “The Lord has indeed risen and has appeared to Simon!”
35
LIN
Bango mibale mpe bayebisaki makambo oyo ekomelaki bango na nzela mpe ndenge nini basosolaki Yesu tango akataki lipa na biteni.
BSB
BSB:
Then the two told what had happened on the road, and how they had recognized Jesus in the breaking of the bread.
36
LIN
Wana bazalaki nanu kosolola na tina na makambo yango, Yesu ayaki kotelema na kati-kati na bango mpe alobaki : — Tika ete kimia ezala na bino !
BSB
BSB:
While they were describing these events, Jesus Himself stood among them and said,
“Peace be with you.”
37
LIN
Babangaki mpe somo ekangaki bango, pamba te bakanisaki ete bamoni elima.
BSB
BSB:
But they were startled and frightened, thinking they had seen a spirit.
38
LIN
Yesu atunaki bango : — Mpo na nini bozali kobanga ? Mpe mpo na nini bozali na tembe kati na mitema na bino ?
BSB
BSB:
“Why are you troubled,”
Jesus asked,
“and why do doubts arise in your hearts?
39
LIN
Botala maboko mpe makolo na Ngai ; ezali penza Ngai. Bosimba Ngai mpe botala ! Elima ezalaka na mosuni te, ezalaka mpe na mikuwa te ; nzokande, bozali komona malamu ete, Ngai, nazali na yango.
BSB
BSB:
Look at My hands and My feet. It is I Myself. Touch Me and see—for a spirit does not have flesh and bones, as you see I have.”
40
LIN
Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko mpe makolo na Ye.
BSB
BSB:
And when He had said this, He showed them His hands and feet.
41
LIN
Lokola bakokaki nanu kondima te mpo ete batondisamaki na esengo mpe bazalaki kokamwa mingi, Yesu atunaki bango : — Bozali awa na eloko ya kolia ?
BSB
BSB:
While they were still in disbelief because of their joy and amazement, He asked them,
“Do you have anything here to eat?”
42
LIN
Bapesaki Ye eteni ya mbisi bakalinga.
BSB
BSB:
So they gave Him a piece of broiled fish,
43
LIN
Azwaki yango mpe aliaki yango na miso na bango.
BSB
BSB:
and He took it and ate it in front of them.
44
LIN
Bongo alobaki na bango : — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »
BSB
BSB:
Jesus said to them,
“These are the words I spoke to you while I was still with you: Everything must be fulfilled that is written about Me in the Law of Moses, the Prophets, and the Psalms.”
45
LIN
Bongo afungolaki bango mayele mpo ete bakoka kososola Makomi.
BSB
BSB:
Then He opened their minds to understand the Scriptures.
46
LIN
Alobaki na bango : — Tala makambo oyo ekomama : « Klisto akomona pasi, mpe akosekwa kati na bakufi na mokolo ya misato ;
BSB
BSB:
And He told them,
“This is what is written: The Christ will suffer and rise from the dead on the third day,
47
LIN
mpe, na Kombo na Ye, bakoteya bato ya bikolo nyonso, kobanda na Yelusalemi, ete babongola mitema mpo ete bazwa bolimbisi ya masumu. »
BSB
BSB:
and in His name repentance and forgiveness of sins will be proclaimed to all nations, beginning in Jerusalem.
48
LIN
Bino nde bozali batatoli ya makambo yango.
BSB
BSB:
You are witnesses of these things.
49
LIN
Ngai nakotindela bino Molimo oyo Tata na Ngai alakaki ; boye bino, botikala awa, kati na engumba oyo, kino bokotondisama na nguya ya Likolo.
BSB
BSB:
And behold, I am sending the promise of My Father upon you. But remain in the city until you have been clothed with power from on high.”
50
LIN
Yesu amemaki bango na libanda ya engumba, pene ya Betani ; mpe kuna, atombolaki maboko mpe apambolaki bango.
BSB
BSB:
When Jesus had led them out as far as Bethany, He lifted up His hands and blessed them.
51
LIN
Wana azalaki kopambola bango, akabwanaki na bango mpe amemamaki kati na Likolo.
BSB
BSB:
While He was blessing them, He left them and was carried up into heaven.
52
LIN
Bongo bagumbamelaki Ye mpe bazongaki na Yelusalemi na esengo makasi.
BSB
BSB:
And they worshiped Him and returned to Jerusalem with great joy,
53
LIN
Mpe kuna na Yelusalemi, bazalaki kovanda tango nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kokumisa Nzambe.
BSB
BSB:
praising God continually in the temple.
Chapter complete
You’ve read Luke 24
Chapter 24 of 24 in Luke
Up next
John 1
Read John 1
Back to Luke 23
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Luke 24
A question this chapter raises
Did Jesus really rise from the dead?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Luke 23
Luke 24
John 1