Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.0.3
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Luke
Luke
3
LIN
BSB
A
a
Luke 3
3
Luke
Preparation and ministry in Galilee
Lingala Bible
John
, person
Jesus
, person
Abraham
, person
Herod
, person
Jacob
, person
David
, person
Judah
, person
Jordan
, place
52 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tango Tibere Sezare akokisaki mibu zomi na mitano na bokonzi, Ponse Pilato azalaki moyangeli ya Yuda ; Erode azalaki moyangeli ya Galile ; Filipo, ndeko mobali ya Erode, azalaki moyangeli ya Itureya mpe ya Trakonitide ; mpe Lisaniasi azalaki moyangeli ya Abilene.
BSB
BSB:
In the fifteenth year of the reign of Tiberius Caesar, while Pontius Pilate was governor of Judea, Herod tetrarch of Galilee, his brother Philip tetrarch of Ituraea and Trachonitis, and Lysanias tetrarch of Abilene,
2
LIN
Ana mpe Kayifa bazalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe. Na mobu yango, Nzambe alobaki na Yoane, mwana mobali ya Zakari, kati na esobe.
BSB
BSB:
during the high priesthood of Annas and Caiaphas, the word of God came to John son of Zechariah in the wilderness.
3
LIN
Yoane akomaki kotambola na etuka mobimba, zingazinga ya moluka Yordani ; na mateya na ye, azalaki koloba : « Bobongola mitema na bino, bozwa libatisi, mpe Nzambe akolimbisa masumu na bino. »
BSB
BSB:
He went into all the region around the Jordan, preaching a baptism of repentance for the forgiveness of sins,
4
LIN
Boye nde ekokisamaki, makambo oyo mosakoli Ezayi akomaki kati na buku na ye : « Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe : ‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo, bosembolela Ye banzela ya mike !
BSB
BSB:
as it is written in the book of the words of Isaiah the prophet: “A voice of one calling in the wilderness, ‘Prepare the way for the Lord, make straight paths for Him.
5
LIN
Mabwaku nyonso ekotondisama, bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse ekokitisama, babalabala oyo ezali nyoka-nyoka ekosembolama, banzela ya mabulu-mabulu ekobongisama,
BSB
BSB:
Every valley shall be filled in, and every mountain and hill made low. The crooked ways shall be made straight, and the rough ways smooth.
6
LIN
mpe bato nyonso bakomona lobiko ya Nzambe. › »
BSB
BSB:
And all humanity will see God’s salvation.’”
7
LIN
Yoane alobaki na ebele ya bato oyo bayaki epai na ye mpo ete abatisa bango : « Bana ya banyoka, nani alakisaki bino kokima kanda oyo ezali koya ?
BSB
BSB:
Then John said to the crowds coming out to be baptized by him, “You brood of vipers, who warned you to flee from the coming wrath?
8
LIN
Bolakisa na nzela ya bizaleli ete bobongoli mitema, mpe bokoma te komilobela : ‹ Abrayami azali koko na biso ! › Pamba te, nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.
BSB
BSB:
Produce fruit, then, in keeping with repentance. And do not begin to say to yourselves, ‘We have Abraham as our father.’ For I tell you that out of these stones God can raise up children for Abraham.
9
LIN
Epasola esili kobongisama mpo na kokata banzete wuta na misisa, mpe nzete nyonso oyo ebotaka bambuma ya malamu te ekokatama mpe ekobwakama na moto. »
BSB
BSB:
The axe lies ready at the root of the trees, and every tree that does not produce good fruit will be cut down and thrown into the fire.”
10
LIN
Ebele ya bato batunaki ye : — Tosengeli kosala nini ?
BSB
BSB:
The crowds asked him, “What then should we do?”
11
LIN
Yoane azongiselaki bango : — Tika ete moto oyo azali na kazaka mibale apesa moko na moto oyo azangi kazaka, mpe tika ete moto oyo azali na bilei akabola na bato oyo bazangi bilei.
BSB
BSB:
John replied, “Whoever has two tunics should share with him who has none, and whoever has food should do the same.”
12
LIN
Bafutisi mpako mpe bayaki mpo ete babatisa bango ; batunaki Yoane : — Moteyi, tosengeli kosala nini ?
BSB
BSB:
Even tax collectors came to be baptized. “Teacher,” they asked, “what should we do?”
13
LIN
Azongiselaki bango : — Tango bofutisaka mpako, bobakisaka mbongo mosusu te na likolo ya oyo esengeli kofutama.
BSB
BSB:
“Collect no more than you are authorized,” he answered.
14
LIN
Basoda mpe batunaki ye : — Bongo biso, tosengeli kosala nini ? Yoane azongiselaki bango : — Bobotola mbongo ya bato te mpe bokosela bato makambo te ; kasi bosepela kaka na lifuti na bino.
BSB
BSB:
Then some soldiers asked him, “And what should we do?” “Do not take money by force or false accusation,” he said. “Be content with your wages.”
15
LIN
Lokola bato bazalaki kozela na elikya makasi, moko na moko azalaki komituna na se ya motema soki Yoane te nde azali Masiya.
BSB
BSB:
The people were waiting expectantly and were all wondering in their hearts if John could be the Christ.
16
LIN
Yoane azongiselaki bango : — Ngai nazali kobatisa bino na mayi ; kasi ezali na Moto moko oyo azali koya, aleki ngai na nguya, mpe ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe na moto.
BSB
BSB:
John answered all of them: “I baptize you with water, but One more powerful than I will come, the straps of whose sandals I am not worthy to untie. He will baptize you with the Holy Spirit and with fire.
17
LIN
Asimbi kiyungulu na loboko na Ye mpo na kopetola etando na Ye mpe mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye ; kasi akotumba matiti oyo ekotikala na nzela ya moto oyo ekufaka te.
BSB
BSB:
His winnowing fork is in His hand to clear His threshing floor and to gather the wheat into His barn; but He will burn up the chaff with unquenchable fire.”
18
LIN
Yoane azalaki lisusu kolendisa bato mpe koteya bango Sango Malamu na nzela ya maloba mosusu ebele.
BSB
BSB:
With these and many other exhortations, John proclaimed the good news to the people.
19
LIN
Kasi Yoane apamelaki mokonzi Erode mpo ete azwaki na libala Erodiade, mwasi ya ndeko na ye, mpe mpo ete asalaki lisusu mabe ebele.
BSB
BSB:
But when he rebuked Herod the tetrarch regarding his brother’s wife Herodias and all the evils he had done,
20
LIN
Na likolo ya mabe nyonso oyo Erode asalaki, abakisaki lisusu mabe ya kokanga Yoane kati na boloko.
BSB
BSB:
Herod added this to them all: He locked John up in prison.
21
LIN
Wana bato nyonso bazalaki kokende kozwa libatisi, Yesu mpe azwaki libatisi. Mpe wana Yesu azalaki kosambela, Likolo efungwamaki,
BSB
BSB:
When all the people were being baptized, Jesus was baptized too. And as He was praying, heaven was opened,
22
LIN
mpe Molimo Mosantu akitelaki Ye na lolenge ya nzoto, lokola ebenga. Bongo mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo : « Ozali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Yo mingi. »
BSB
BSB:
and the Holy Spirit descended on Him in a bodily form like a dove. And a voice came from heaven: “You are My beloved Son; in You I am well pleased.”
23
LIN
Yesu azalaki na mibu pene tuku misato ya mbotama tango abandaki mosala na Ye. Bato bazalaki kokanisa ete azali mwana mobali ya Jozefi ; Jozefi, mwana mobali ya Eli ;
BSB
BSB:
Jesus Himself was about thirty years old when He began His ministry. He was regarded as the son of Joseph, the son of Heli,
24
LIN
Eli, mwana mobali ya Matati ; Matati, mwana mobali ya Levi ; Levi, mwana mobali ya Meliki ; Meliki, mwana mobali ya Yanai ; Yanai, mwana mobali ya Jozefi ;
BSB
BSB:
the son of Matthat, the son of Levi, the son of Melchi, the son of Jannai, the son of Joseph,
25
LIN
Jozefi, mwana mobali ya Matatiasi ; Matatiasi, mwana mobali ya Amosi ; Amosi, mwana mobali ya Naumi ; Naumi, mwana mobali ya Esili ; Esili, mwana mobali ya Nagai ;
BSB
BSB:
the son of Mattathias, the son of Amos, the son of Nahum, the son of Esli, the son of Naggai,
26
LIN
Nagai, mwana mobali ya Maati ; Maati, mwana mobali ya Matatiasi ; Matatiasi, mwana mobali ya Semeini ; Semeini, mwana mobali ya Yoze ; Yoze, mwana mobali ya Yoda ;
BSB
BSB:
the son of Maath, the son of Mattathias, the son of Semein, the son of Josech, the son of Joda,
27
LIN
Yoda, mwana mobali ya Yoanani ; Yoanani, mwana mobali ya Reza ; Reza, mwana mobali ya Zorobabeli ; Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli ; Shealitieli, mwana mobali ya Neri ;
BSB
BSB:
the son of Joanan, the son of Rhesa, the son of Zerubbabel, the son of Shealtiel, the son of Neri,
28
LIN
Neri, mwana mobali ya Meliki ; Meliki, mwana mobali ya Adi ; Adi, mwana mobali ya Kosami ; Kosami, mwana mobali ya Elimadami ; Elimadami, mwana mobali ya Eri ;
BSB
BSB:
the son of Melchi, the son of Addi, the son of Cosam, the son of Elmadam, the son of Er,
29
LIN
Eri, mwana mobali ya Jozue ; Jozue, mwana mobali ya Eliezeri ; Eliezeri, mwana mobali ya Yorimi ; Yorimi, mwana mobali ya Matati ; Matati, mwana mobali ya Levi ;
BSB
BSB:
the son of Joshua, the son of Eliezer, the son of Jorim, the son of Matthat, the son of Levi,
30
LIN
Levi, mwana mobali ya Simeoni ; Simeoni, mwana mobali ya Yuda ; Yuda, mwana mobali ya Jozefi ; Jozefi, mwana mobali ya Yonami ; Yonami, mwana mobali ya Eliakimi ;
BSB
BSB:
the son of Simeon, the son of Judah, the son of Joseph, the son of Jonam, the son of Eliakim,
31
LIN
Eliakimi, mwana mobali ya Meleya ; Meleya, mwana mobali ya Mena ; Mena, mwana mobali ya Matata ; Matata, mwana mobali ya Natani ; Natani, mwana mobali ya Davidi ;
BSB
BSB:
the son of Melea, the son of Menna, the son of Mattatha, the son of Nathan, the son of David,
32
LIN
Davidi, mwana mobali ya Izayi ; Izayi, mwana mobali ya Obedi ; Obedi, mwana mobali ya Boazi ; Boazi, mwana mobali ya Salimoni ; Salimoni, mwana mobali ya Nashoni ;
BSB
BSB:
the son of Jesse, the son of Obed, the son of Boaz, the son of Sala, the son of Nahshon,
33
LIN
Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi ; Aminadabi, mwana mobali ya Adimini ; Adimini, mwana mobali ya Arini ; Arini, mwana mobali ya Etsironi ; Etsironi, mwana mobali ya Peretsi ; Peretsi, mwana mobali ya Yuda ;
BSB
BSB:
the son of Amminadab, the son of Admin, the son of Arni, the son of Hezron, the son of Perez, the son of Judah,
34
LIN
Yuda, mwana mobali ya Jakobi ; Jakobi, mwana mobali ya Izaki ; Izaki, mwana ya Abrayami ; Abrayami, mwana mobali ya Tera ; Tera, mwana mobali ya Naori ;
BSB
BSB:
the son of Jacob, the son of Isaac, the son of Abraham, the son of Terah, the son of Nahor,
35
LIN
Naori, mwana mobali ya Serugi ; Serugi, mwana mobali ya Rewu ; Rewu, mwana mobali ya Pelegi ; Pelegi, mwana mobali ya Eberi ; Eberi, mwana mobali ya Shela ;
BSB
BSB:
the son of Serug, the son of Reu, the son of Peleg, the son of Eber, the son of Shelah,
36
LIN
Shela, mwana mobali ya Kayinami ; Kayinami, mwana mobali ya Aripakishadi ; Aripakishadi, mwana mobali ya Semi ; Semi, mwana mobali ya Noa ; Noa, mwana mobali ya Lemeki ;
BSB
BSB:
the son of Cainan, the son of Arphaxad, the son of Shem, the son of Noah, the son of Lamech,
37
LIN
Lemeki, mwana mobali ya Matusalemi ; Matusalemi, mwana mobali ya Enoki ; Enoki, mwana mobali ya Yeredi ; Yeredi, mwana mobali ya Malaleeli ; Malaleeli, mwana mobali ya Kenani ;
BSB
BSB:
the son of Methuselah, the son of Enoch, the son of Jared, the son of Mahalalel, the son of Cainan,
38
LIN
Kenani, mwana mobali ya Enoshi ; Enoshi, mwana mobali ya Seti ; Seti, mwana mobali ya Adamu ; Adamu, mwana mobali ya Nzambe.
BSB
BSB:
the son of Enosh, the son of Seth, the son of Adam, the son of God.
Chapter complete
You’ve read Luke 3
Chapter 3 of 24 in Luke
Up next
Luke 4
Read Luke 4
Back to Luke 2
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Luke 3
A question this chapter raises
Why do Matthew and Luke give different genealogies of Jesus?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Luke 2
Luke 3
Luke 4