Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.0.3
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Luke
Luke
4
LIN
BSB
A
a
Luke 4
4
Luke
Preparation and ministry in Galilee
Lingala Bible
Jesus
, person
Galilee
, place
Israel
, person
Elias
, person
Nazareth
, place
Capernaum
, place
Jerusalem
, place
Jordan
, place
9 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Yesu atondisamaki na Molimo Mosantu, alongwaki na Yordani, mpe Molimo amemaki Ye kati na esobe
BSB
BSB:
Then Jesus, full of the Holy Spirit, returned from the Jordan and was led by the Spirit into the wilderness,
2
LIN
epai wapi Satana amekaki Ye mikolo tuku minei. Na mikolo wana, alia eloko moko te ; mpe tango mikolo yango elekaki, ayokaki nzala.
BSB
BSB:
where for forty days He was tempted by the devil. He ate nothing during those days, and when they had ended, He was hungry.
3
LIN
Satana alobaki na Ye : — Soki ya solo ozali penza Mwana na Nzambe, loba na libanga ete ebongwana lipa.
BSB
BSB:
The devil said to Him, “If You are the Son of God, tell this stone to become bread.”
4
LIN
Yesu azongiselaki ye : — Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te. »
BSB
BSB:
But Jesus answered,
“It is written: ‘Man shall not live on bread alone.’”
5
LIN
Satana amemaki Yesu na esika moko ya likolo makasi, alakisaki Ye mbala moko bokonzi nyonso ya mokili.
BSB
BSB:
Then the devil led Him up to a high place and showed Him in an instant all the kingdoms of the world.
6
LIN
Satana alobaki na Yesu : — Nakopesa yo bokonzi oyo nyonso mpe nkembo na yango, pamba te epesamela ngai, mpe nakoki kopesa yango na moto nyonso oyo nalingi.
BSB
BSB:
“I will give You authority over all these kingdoms and all their glory,” he said. “For it has been relinquished to me, and I can give it to anyone I wish.
7
LIN
Soki kaka ogumbameli ngai, nyonso ekokoma ya yo.
BSB
BSB:
So if You worship me, it will all be Yours.”
8
LIN
Yesu azongiselaki ye : — Ekomama : « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo, mpe okosambelaka kaka Ye. »
BSB
BSB:
But Jesus answered,
“It is written: ‘Worship the Lord your God and serve Him only.’”
9
LIN
Bongo Satana amemaki Ye na Yelusalemi, atelemisaki Ye na songe ya Tempelo mpe alobaki na Ye : — Soki ozali penza Mwana na Nzambe, mibwaka na se ;
BSB
BSB:
Then the devil led Him to Jerusalem and set Him on the pinnacle of the temple. “If You are the Son of God,” he said, “throw Yourself down from here.
10
LIN
pamba te ekomama : « Akopesa mitindo na ba-anjelu na Ye na tina na yo mpo ete babatela Yo malamu.
BSB
BSB:
For it is written: ‘He will command His angels concerning You to guard You carefully,
11
LIN
Mpe bakomema Yo na maboko na bango mpo ete lokolo na Yo etutana na libanga te. »
BSB
BSB:
and they will lift You up in their hands, so that You will not strike Your foot against a stone.’”
12
LIN
Yesu azongisaki : — Ekomama : « Okomeka te Yawe, Nzambe na yo. »
BSB
BSB:
But Jesus answered,
“It also says, ‘Do not put the Lord your God to the test.’”
13
LIN
Tango Satana asilisaki komeka Yesu na lolenge nyonso, akendeki mosika na Ye kino na mokolo oyo ekatama.
BSB
BSB:
When the devil had finished every temptation, he left Him until an opportune time.
14
LIN
Yesu azongaki na Galile, atonda na nguya ya Molimo ; mpe basango na tina na Ye epanzanaki kati na etuka wana mobimba.
BSB
BSB:
Jesus returned to Galilee in the power of the Spirit, and the news about Him spread throughout the surrounding region.
15
LIN
Azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, mpe bato nyonso bazalaki kokumisa Ye.
BSB
BSB:
He taught in their synagogues and was glorified by everyone.
16
LIN
Akendeki na Nazareti epai wapi akolaki ; mpe na mokolo ya Saba, akotaki na ndako ya mayangani, ndenge ezalaki momesano na ye. Atelemaki mpo na kotanga,
BSB
BSB:
Then Jesus came to Nazareth, where He had been brought up. As was His custom, He entered the synagogue on the Sabbath. And when He stood up to read,
17
LIN
mpe bapesaki Ye buku ya mosakoli Ezayi. Afungolaki yango mpe amonaki esika epai wapi bakoma :
BSB
BSB:
the scroll of the prophet Isaiah was handed to Him. Unrolling it, He found the place where it was written:
18
LIN
« Molimo ya Nkolo azali likolo na Ngai, pamba te apakoli Ngai mafuta mpo na kosakola Sango Malamu epai ya babola ; atindi Ngai kosakola bonsomi epai ya bakangami, koyebisa bakufi miso ete bakomona lisusu, kokangola bato oyo bazali konyokwama
BSB
BSB:
“The Spirit of the Lord is on Me, because He has anointed Me to preach good news to the poor. He has sent Me to proclaim liberty to the captives and recovery of sight to the blind, to release the oppressed,
19
LIN
mpe kosakola mobu ya ngolu ya Nkolo. »
BSB
BSB:
to proclaim the year of the Lord’s favor.”
20
LIN
Bongo akangaki buku yango, azongisaki yango epai ya mosali ya ndako ya mayangani mpe avandaki. Miso ya bato nyonso kati na ndako ya mayangani ekomaki kotala Ye.
BSB
BSB:
Then He rolled up the scroll, returned it to the attendant, and sat down. The eyes of everyone in the synagogue were fixed on Him,
21
LIN
Bongo akomaki koloba na bango : — Makomi oyo bowuti koyoka ekokisami lelo !
BSB
BSB:
and He began by saying,
“Today this Scripture is fulfilled in your hearing.”
22
LIN
Bato nyonso balobaki makambo ya malamu na tina na Ye mpe bakamwaki mingi maloba ya ngolu oyo ezalaki kobima na monoko na Ye ; bakomaki komituna : — Boni, Ye azali mwana ya Jozefi te ?
BSB
BSB:
All spoke well of Him and marveled at the gracious words that came from His lips. “Isn’t this the son of Joseph?” they asked.
23
LIN
Yesu alobaki na bango : — Nayebi malamu ete bokoloba na Ngai lisese oyo : « Monganga, mibikisa yo moko ! » Mpe bokoloba na Ngai : « Sala mpe awa, kati na engumba na Yo, makambo oyo toyokaki ete osalaki yango kati na Kapernawumi ! »
BSB
BSB:
Jesus said to them,
“Surely you will quote this proverb to Me: ‘Physician, heal yourself! Do here in Your hometown what we have heard that You did in Capernaum.’”
24
LIN
Abakisaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : « Mosakoli moko te andimamaka kati na ekolo na ye.
BSB
BSB:
Then He added,
“Truly I tell you, no prophet is accepted in his hometown.
25
LIN
Nazali koloba na bino penza ya solo : ezalaki na basi ebele bakufisa mibali kati na Isalaele, na tango ya Eliya, tango likolo ekangamaki mibu misato mpe basanza motoba, mpe nzala makasi ezalaki kati na ekolo mobimba.
BSB
BSB:
But I tell you truthfully that there were many widows in Israel in the time of Elijah, when the sky was shut for three and a half years and great famine swept over all the land.
26
LIN
Nzokande, Eliya atindamaki te epai ya moko kati na bango, kasi atindamaki kaka epai ya mwasi moko akufisa mobali mpe azalaki kovanda na mboka Sarepita, kati na ekolo Sidoni.
BSB
BSB:
Yet Elijah was not sent to any of them, but to the widow of Zarephath in Sidon.
27
LIN
Mpe na tango ya mosakoli Elize, bato na maba bazalaki ebele kati na Isalaele, kasi moko te kati na bango apetolamaki, longola kaka Namani, moto ya Siri. »
BSB
BSB:
And there were many lepers in Israel in the time of Elisha the prophet. Yet not one of them was cleansed—only Naaman the Syrian.”
28
LIN
Bato nyonso oyo bazalaki kati na ndako ya mayangani basilikaki makasi tango bayokaki bongo ;
BSB
BSB:
On hearing this, all the people in the synagogue were enraged.
29
LIN
batelemaki, bakumbaki Yesu na libanda ya engumba, mpe bamemaki Ye kino na songe ya ngomba epai wapi batongaki engumba na bango, mpo ete babwaka Ye na se.
BSB
BSB:
They got up, drove Him out of the town, and led Him to the brow of the hill on which the town was built, in order to throw Him over the cliff.
30
LIN
Kasi Yesu alekaki na kati-kati na bango mpe akobaki mobembo na Ye.
BSB
BSB:
But Jesus passed through the crowd and went on His way.
31
LIN
Bongo Yesu akendeki na Kapernawumi, engumba ya Galile, mpe ateyaki kuna bato na mokolo ya Saba.
BSB
BSB:
Then He went down to Capernaum, a town in Galilee, and on the Sabbath He began to teach the people.
32
LIN
Bakamwaki makasi malakisi na Ye, pamba te maloba na Ye ezalaki na bokonzi.
BSB
BSB:
They were astonished at His teaching, because His message had authority.
33
LIN
Kati na ndako ya mayangani, ezalaki na mobali moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe. Agangaki na mongongo makasi :
BSB
BSB:
In the synagogue there was a man possessed by the spirit of an unclean demon. He cried out in a loud voice,
34
LIN
— Ah Yesu ya Nazareti, likambo nini kati na biso na Yo ? Oyei mpo na kobebisa biso ? Nayebi nani oyo Yo ozali : Mosantu ya Nzambe !
BSB
BSB:
“Ha! What do You want with us, Jesus of Nazareth? Have You come to destroy us? I know who You are—the Holy One of God!”
35
LIN
Yesu atelemelaki molimo mabe yango mpe apesaki yango mitindo : — Kanga monoko na yo ! Bima kati na moto oyo ! Molimo mabe ebwakaki moto yango na mabele, liboso ya bato nyonso, ebimaki kati na ye mpe esalaki ye ata mabe moko te.
BSB
BSB:
But Jesus rebuked the demon.
“Be silent!”
He said.
“Come out of him!”
At this, the demon threw the man down before them all and came out without harming him.
36
LIN
Bato nyonso bakamwaki mpe bakomaki kotunana : — Oyo ezali lisusu maloba nini ! Azali kopesa mitindo epai ya milimo mabe, na bokonzi mpe na nguya nyonso, mpe yango ezali kobima !
BSB
BSB:
All the people were overcome with amazement and asked one another, “What is this message? With authority and power He commands the unclean spirits, and they come out!”
37
LIN
Mpe sango na tina na Yesu epanzanaki na bamboka ya etuka mobimba.
BSB
BSB:
And the news about Jesus spread throughout the surrounding region.
38
LIN
Yesu abimaki na ndako ya mayangani mpe akendeki na ndako ya Simona. Mama-bokilo ya Simona azalaki kobela fievele makasi. Basengaki na Yesu ete abikisa ye.
BSB
BSB:
After Jesus had left the synagogue, He went to the home of Simon, whose mother-in-law was suffering from a high fever. So they appealed to Jesus on her behalf,
39
LIN
Yesu agumbamaki pembeni na ye, apesaki mitindo na fievele, mpe fievele esilaki. Kaka na tango yango, mama-bokilo ya Simona atelemaki mpe akomaki kobongisela bango bilei.
BSB
BSB:
and He stood over her and rebuked the fever, and it left her. And she got up at once and began to serve them.
40
LIN
Na pokwa, bato nyonso oyo bazalaki na babeli ya bokono ya ndenge na ndenge bamemaki bango epai ya Yesu. Yesu atielaki moko na moko kati na bango maboko mpe abikisaki bango.
BSB
BSB:
At sunset, all who were ill with various diseases were brought to Jesus, and laying His hands on each one, He healed them.
41
LIN
Milimo mabe mpe ebimaki kati na bato ebele na koganga : « Ozali solo Mwana na Nzambe ! » Kasi Yesu apesaki yango mitindo ete eloba te, pamba te eyebaki ete Yesu azali Klisto.
BSB
BSB:
Demons also came out of many people, shouting, “You are the Son of God!” But He rebuked the demons and would not allow them to speak, because they knew He was the Christ.
42
LIN
Tango tongo etanaki, Yesu abimaki na ndako yango mpe akendeki na esika moko epai wapi azalaki kaka Ye moko. Ebele ya bato bazalaki koluka Ye ; mpe tango bakomaki na esika oyo azalaki, bamekaki kokangama na Ye mpe kopekisa Ye kotika bango.
BSB
BSB:
At daybreak, Jesus went out to a solitary place, and the crowds were looking for Him. They came to Him and tried to keep Him from leaving.
43
LIN
Kasi Yesu alobaki na bango : — Nasengeli mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai ya bingumba mosusu, pamba te ezali mpo na yango nde Nzambe atindaki Ngai.
BSB
BSB:
But Jesus told them,
“I must preach the good news of the kingdom of God to the other towns as well, because that is why I was sent.”
44
LIN
Mpe Yesu akobaki koteya kati na bandako ya mayangani ya Yuda.
BSB
BSB:
And He continued to preach in the synagogues of Judea.
Chapter complete
You’ve read Luke 4
Chapter 4 of 24 in Luke
Up next
Luke 5
Read Luke 5
Back to Luke 3
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Luke 4
A question this chapter raises
Did Jesus travel to India in his “lost years”?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Luke 3
Luke 4
Luke 5