Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.0.3
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Luke
Luke
5
LIN
BSB
A
a
Luke 5
5
Luke
Preparation and ministry in Galilee
Lingala Bible
Jesus
, person
Simon
, person
Levi
, person
Jerusalem
, place
Moses
, person
John
, person
Galilee
, place
Judea
, place
4 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Mokolo moko, wana Yesu azalaki pene ya ebale ya Genezareti, ebele ya bato batondaki pembeni na Ye mpo na koyoka Liloba na Nzambe.
BSB
BSB:
On one occasion, while Jesus was standing by the Lake of Gennesaret with the crowd pressing in on Him to hear the word of God,
2
LIN
Amonaki babwato mibale pembeni ya ebale ; ezali balobi mbisi nde bakitaki longwa na babwato yango mpo na kosukola minyama na bango.
BSB
BSB:
He saw two boats at the edge of the lake. The fishermen had left them and were washing their nets.
3
LIN
Moko kati na babwato yango ezalaki ya Simona. Yesu amataki na bwato yango mpe asengaki na Simona ete apusa yango mwa mosika longwa na mokili. Bongo avandaki mpe abandaki koteya bato wuta na bwato.
BSB
BSB:
Jesus got into the boat belonging to Simon and asked him to put out a little from shore. And sitting down, He taught the people from the boat.
4
LIN
Tango asilisaki koteya, alobaki na Simona : — Pusa bwato epai mayi ezali penza mozindo, mpe bobwaka minyama na mayi mpo na koloba bambisi.
BSB
BSB:
When Jesus had finished speaking, He said to Simon,
“Put out into deep water and let down your nets for a catch.”
5
LIN
Simona azongiselaki Ye : — Moteyi, tosali butu mobimba, tozwi ata eloko moko te. Kasi lokola olobi bongo, nakobwaka minyama.
BSB
BSB:
“Master,” Simon replied, “we have worked hard all night without catching anything. But because You say so, I will let down the nets.”
6
LIN
Tango basalaki bongo, bazwaki bambisi ebele, kutu minyama na bango ebandaki kopasuka.
BSB
BSB:
When they had done so, they caught such a large number of fish that their nets began to tear.
7
LIN
Boye babengaki baninga na bango, oyo bazalaki kati na bwato mosusu mpo ete baya kosalisa bango. Baninga yango bayaki, batondisaki babwato nyonso mibale, mpe ekomaki kozinda.
BSB
BSB:
So they signaled to their partners in the other boat to come and help them, and they came and filled both boats so full that they began to sink.
8
LIN
Tango Simona Petelo amonaki bongo, afukamaki na mabolongo ya Yesu mpe alobaki : — Nkolo, zala mosika na ngai, pamba te nazali moto ya masumu !
BSB
BSB:
When Simon Peter saw this, he fell at Jesus’ knees. “Go away from me, Lord,” he said, “for I am a sinful man.”
9
LIN
Somo monene ekangaki Simona mpe baninga na ye nyonso, likolo ya motango ya bambisi oyo bazwaki.
BSB
BSB:
For he and his companions were astonished at the catch of fish they had taken,
10
LIN
Ndenge moko mpe mpo na Jake mpe Yoane, bana mibali ya Zebede, oyo bazalaki baninga ya mosala ya Simona. Bongo Yesu alobaki na Simona : — Kobanga te ! Kobanda lelo, okokoma koloba nde bato.
BSB
BSB:
and so were his partners James and John, the sons of Zebedee.
“Do not be afraid,”
Jesus said to Simon.
“From now on you will catch men.”
11
LIN
Boye bamemaki babwato na mokili, batikaki nyonso mpe balandaki Yesu.
BSB
BSB:
And when they had brought their boats ashore, they left everything and followed Him.
12
LIN
Mokolo mosusu, wana Yesu azalaki kati na moko ya bingumba, moto moko atonda na maba na nzoto abimaki. Tango amonaki Yesu, afukamaki liboso na Ye elongi kino na mabele mpe abondelaki Ye : — Nkolo, soki olingi, komisa ngai peto.
BSB
BSB:
While Jesus was in one of the towns, a man came along who was covered with leprosy. When he saw Jesus, he fell facedown and begged Him, “Lord, if You are willing, You can make me clean.”
13
LIN
Yesu asembolaki loboko na Ye, asimbaki ye mpe alobaki : — Solo, nalingi yango, koma peto ! Mbala moko, maba esilaki.
BSB
BSB:
Jesus reached out His hand and touched the man.
“I am willing,”
He said.
“Be clean!”
And immediately the leprosy left him.
14
LIN
Yesu apesaki ye mitindo : — Koloba na moto moko te makambo oyo ekomeli yo, kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe, mpo na kopetolama na yo, pesa likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko, mpo ete ezala litatoli mpo na bango.
BSB
BSB:
“Do not tell anyone,”
Jesus instructed him.
“But go, show yourself to the priest and present the offering Moses prescribed for your cleansing, as a testimony to them.”
15
LIN
Sango na tina na Yesu ezalaki kaka kopanzana se kopanzana, mpe bato ebele bazalaki koya kosangana mpo na koyoka Ye mpe mpo na kobikisama na bokono na bango.
BSB
BSB:
But the news about Jesus spread all the more, and great crowds came to hear Him and to be healed of their sicknesses.
16
LIN
Kasi mbala mingi, Yesu azalaki kokende na bisika epai wapi azalaki kaka Ye moko mpo na kosambela.
BSB
BSB:
Yet He frequently withdrew to the wilderness to pray.
17
LIN
Mokolo moko, wana Yesu azalaki koteya, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bayaki kovanda wana ; bawutaki na bamboka nyonso ya Galile, na Yuda mpe na Yelusalemi. Mpe nguya ya Nkolo ezalaki elongo na Yesu mpo na kobikisa babeli.
BSB
BSB:
One day Jesus was teaching, and the Pharisees and teachers of the law were sitting there. People had come from Jerusalem and from every village of Galilee and Judea, and the power of the Lord was present for Him to heal the sick.
18
LIN
Ndambo ya mibali bayaki, bamemaki ebosono moko na tsipoyi ; balukaki nzela ya kokotisa ye kati na ndako mpo na kotia ye liboso ya Yesu.
BSB
BSB:
Just then some men came carrying a paralyzed man on a mat. They tried to bring him inside to set him before Jesus,
19
LIN
Kasi lokola bamonaki te nzela ya kokotisa ye kati na ndako, pamba te bato bazalaki ebele, bamataki na likolo ya ndako, batobolaki lidusu mpe bakitisaki ye, elongo na tsipoyi na ye, na kati-kati ya ebele ya bato, liboso ya Yesu.
BSB
BSB:
but they could not find a way through the crowd. So they went up on the roof and lowered him on his mat through the tiles into the middle of the crowd, right in front of Jesus.
20
LIN
Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki : — Molingami na Ngai, masumu na yo elimbisami !
BSB
BSB:
When Jesus saw their faith, He said,
“Friend, your sins are forgiven.”
21
LIN
Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bakomaki kokanisa : — Moto oyo azali komimona penza nani mpo ete abimisa maloba ya kotiola Nzambe ? Nani akoki kolimbisa masumu soki kaka Ye moko Nzambe te ?
BSB
BSB:
But the scribes and Pharisees began thinking to themselves, “Who is this man who speaks blasphemy? Who can forgive sins but God alone?”
22
LIN
Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, atunaki bango : — Mpo na nini bozali kokanisa biloko oyo kati na mitema na bino ?
BSB
BSB:
Knowing what they were thinking, Jesus replied,
“Why are you thinking these things in your hearts?
23
LIN
Likambo nini eleki pete mpo na koloba : « Masumu na yo elimbisami » to « telema mpe tambola ? »
BSB
BSB:
Which is easier: to say, ‘Your sins are forgiven,’ or to say, ‘Get up and walk’?
24
LIN
Kasi nalingi boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili. Bongo alobaki na ebosono : « Nalobi na yo : Telema, kamata tsipoyi na yo mpe kende na ndako na yo ! »
BSB
BSB:
But so that you may know that the Son of Man has authority on the earth to forgive sins…”
He said to the paralytic,
“I tell you, get up, pick up your mat, and go home.”
25
LIN
Mbala moko, atelemaki liboso na bango, akamataki tsipoyi oyo bazalaki kolalisa ye na yango, azongaki na ndako na ye na kokumisa Nzambe.
BSB
BSB:
And immediately the man stood up before them, took what he had been lying on, and went home glorifying God.
26
LIN
Awa bato nyonso bakamwaki, bakomaki kokumisa Nzambe ; awa mpe somo ekangaki bango, bakomaki koloba : « Lelo penza, tomoni makambo ya kokamwa ! »
BSB
BSB:
Everyone was taken with amazement and glorified God. They were filled with awe and said, “We have seen remarkable things today.”
27
LIN
Sima na yango, Yesu abimaki mpe amonaki mofutisi mpako moko, kombo na ye « Levi. » Levi azalaki ya kovanda na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako. Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. »
BSB
BSB:
After this, Jesus went out and saw a tax collector named Levi sitting at the tax booth.
“Follow Me,”
He told him,
28
LIN
Levi atelemaki, atikaki biloko nyonso mpe alandaki Yesu.
BSB
BSB:
and Levi got up, left everything, and followed Him.
29
LIN
Bongo Levi asalaki feti monene, kati na ndako na ye, mpo na lokumu ya Yesu ; bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu bazalaki kolia mesa moko elongo na bango.
BSB
BSB:
Then Levi hosted a great banquet for Jesus at his house. A large crowd of tax collectors was there, along with others who were eating with them.
30
LIN
Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bazalaki lingomba moko elongo na bango bakomaki koyimayima mpe balobaki na bayekoli ya Yesu : — Mpo na nini bozali kolia mpe komela mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ?
BSB
BSB:
But the Pharisees and their scribes complained to Jesus’ disciples, “Why do you eat and drink with tax collectors and sinners?”
31
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te, ezali babeli nde bazalaka na posa na ye.
BSB
BSB:
Jesus answered,
“It is not the healthy who need a doctor, but the sick.
32
LIN
Nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu mpo ete babongola mitema.
BSB
BSB:
I have not come to call the righteous, but sinners, to repentance.”
33
LIN
Bafarizeo balobaki na Yesu : — Mpo na nini bayekoli ya Yoane mpe bayekoli ya Bafarizeo bakilaka bilei mbala na mbala mpe bamipesaka na mabondeli ; kasi bayekoli na yo, mosala na bango kaka kolia mpe komela ?
BSB
BSB:
Then they said to Him, “John’s disciples and those of the Pharisees frequently fast and pray, but Yours keep on eating and drinking.”
34
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Boni, bokoki solo kosenga na bato oyo babengami na feti ya libala ete bakila bilei wana mobali ya libala azali nanu elongo na bango ?
BSB
BSB:
Jesus replied,
“Can you make the guests of the bridegroom fast while He is with them?
35
LIN
Tango ezali koya, oyo mobali ya libala akozala lisusu te elongo na bango ; ekozala na tango wana nde bakokila bilei.
BSB
BSB:
But the time will come when the bridegroom will be taken from them; then they will fast.”
36
LIN
Yesu alobaki na bango lisusu lisese oyo : — Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala ; soki te, akopasola na pamba elamba ya sika mpe kitendi ya sika ekobalana te na elamba ya kala.
BSB
BSB:
He also told them a parable:
“No one tears a piece of cloth from a new garment and sews it on an old one. If he does, he will tear the new garment as well, and the patch from the new will not match the old.
37
LIN
Moto moko mpe te atiaka vino ya sika kati na bambeki ya kala ; soki te, vino ya sika ekopasola bambeki mpe ekosopana, mpe bambeki ekobeba libela.
BSB
BSB:
And no one pours new wine into old wineskins. If he does, the new wine will burst the skins, the wine will spill, and the wineskins will be ruined.
38
LIN
Nzokande, esengeli kaka kotia vino ya sika kati na bambeki ya sika.
BSB
BSB:
Instead, new wine is poured into new wineskins.
39
LIN
Mpe moto moko te alingaka komela vino ya sika soki awuti komela vino ya kala, pamba te balobaka : « Vino ya kala eleki kitoko. »
BSB
BSB:
And no one after drinking old wine wants new, for he says, ‘The old is better.’”
Chapter complete
You’ve read Luke 5
Chapter 5 of 24 in Luke
Up next
Luke 6
Read Luke 6
Back to Luke 4
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Luke 5
A question this chapter raises
Isn’t belief in God just wishful thinking?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Luke 4
Luke 5
Luke 6