Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.1.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Luke
Luke
6
LIN
BSB
A
a
Luke 6
6
Luke
Preparation and ministry in Galilee
Lingala Bible
Jesus
, person
David
, person
Jerusalem
, place
Peter
, person
Judea
, place
Tyre
, place
John
, person
Sidon
, place
12 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Mokolo moko ya Saba, wana Yesu azalaki kotambola kati na bilanga ya ble, bayekoli na Ye babandaki kobuka ble ; mpe, sima na bango kolongola yango baposo na maboko, baliaki bambuma na yango.
BSB
BSB:
One Sabbath Jesus was passing through the grainfields, and His disciples began to pick the heads of grain, rub them in their hands, and eat them.
2
LIN
Ndambo ya Bafarizeo batunaki : — Mpo na nini bozali kosala likambo oyo epekisami kosalema na mokolo ya Saba ?
BSB
BSB:
But some of the Pharisees asked, “Why are you doing what is unlawful on the Sabbath?”
3
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Botanga nanu te makambo oyo Davidi asalaki tango ye elongo na baninga na ye bazalaki na nzala ?
BSB
BSB:
Jesus replied,
“Have you not read what David did when he and his companions were hungry?
4
LIN
Akotaki kati na Ndako ya Nzambe, akamataki mapa oyo ebulisama mpo na Nzambe, aliaki yango mpe apesaki yango epai ya baninga na ye. Nzokande, Banganga-Nzambe kaka nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango.
BSB
BSB:
He entered the house of God, took the consecrated bread and gave it to his companions, and ate what is lawful only for the priests to eat.”
5
LIN
Yesu alobaki na bango lisusu : — Mwana na Moto azali Mokonzi ya mokolo ya Saba.
BSB
BSB:
Then Jesus declared,
“The Son of Man is Lord of the Sabbath.”
6
LIN
Mokolo mosusu ya Saba, Yesu akotaki kati na ndako ya mayangani mpe abandaki koteya. Ezalaki kuna na moto moko akufa loboko ya mobali.
BSB
BSB:
On another Sabbath Jesus entered the synagogue and was teaching, and a man was there whose right hand was withered.
7
LIN
Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bazalaki kolandela Yesu mpo na kotala soki akobikisa moto na mokolo ya Saba, mpo ete bazwa likambo ya kofunda Ye.
BSB
BSB:
Looking for a reason to accuse Jesus, the scribes and Pharisees were watching Him closely to see if He would heal on the Sabbath.
8
LIN
Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, alobaki na moto oyo akufa loboko : — Telema mpe pusana na liboso ya bato nyonso ! Moto yango atelemaki mpe apusanaki na liboso ya bato nyonso.
BSB
BSB:
But Jesus knew their thoughts and said to the man with the withered hand,
“Get up and stand among us.”
So he got up and stood there.
9
LIN
Bongo Yesu alobaki na bato mosusu : — Nazali kotuna bino : nini epesamela nzela ya kosala na mokolo ya Saba : kosala bolamu to kosala mabe, kobikisa moto to kotika ye kokufa ?
BSB
BSB:
Then Jesus said to them,
“I ask you, which is lawful on the Sabbath: to do good or to do evil, to save life or to destroy it?”
10
LIN
Yesu atalaki moko na moko kati na bango mpe alobaki na moto oyo akufa loboko : — Sembola loboko na yo ! Moto yango asembolaki loboko, mpe loboko na ye ebikaki.
BSB
BSB:
And after looking around at all of them, He said to the man,
“Stretch out your hand.”
He did so, and it was restored.
11
LIN
Kasi balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo basilikaki makasi mpe bakomaki kolobana mpo na koluka likambo oyo bakoki kosala Yesu.
BSB
BSB:
But the scribes and Pharisees were filled with rage and began to discuss with one another what they might do to Jesus.
12
LIN
Kaka na mikolo wana, Yesu amataki likolo ya ngomba mpo na kosambela ; asalaki kuna butu mobimba, azali kosambela Nzambe.
BSB
BSB:
In those days Jesus went out to the mountain to pray, and He spent the night in prayer to God.
13
LIN
Na tongo, abengaki bayekoli na Ye pene na Ye mpe aponaki bato zomi na mibale kati na bango, ba-oyo akomaki kobenga « bantoma. » Ezalaki :
BSB
BSB:
When daylight came, He called His disciples to Him and chose twelve of them, whom He also designated as apostles:
14
LIN
Simona oyo Yesu apesaki kombo « Petelo ; » Andre, ndeko na ye ; Jake, Yoane, Filipo, Bartelemi ;
BSB
BSB:
Simon, whom He named Peter, and his brother Andrew; James and John; Philip and Bartholomew;
15
LIN
Matayo, Toma ; Jake, mwana mobali ya Alife, Simona oyo azalaki moko kati na lisanga ya Bazelote ;
BSB
BSB:
Matthew and Thomas; James son of Alphaeus and Simon called the Zealot;
16
LIN
Yuda, mwana mobali ya Jake, mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.
BSB
BSB:
Judas son of James, and Judas Iscariot, who became a traitor.
17
LIN
Yesu akitaki elongo na bango wuta na ngomba, mpe batelemaki na esika moko ya polele epai wapi bayekoli na Ye bazalaki ebele elongo na bato mosusu ebele oyo bawutaki na Yuda mobimba, na Yelusalemi mpe na bamboka ya Tiri mpe ya Sidoni, oyo ezalaki pembeni-pembeni ya ebale monene.
BSB
BSB:
Then Jesus came down with them and stood on a level place. A large crowd of His disciples was there, along with a great number of people from all over Judea, Jerusalem, and the seacoast of Tyre and Sidon.
18
LIN
Bayaki mpo na koyoka Ye mpe mpo na kobikisama na bokono na bango. Ba-oyo milimo mabe ezalaki kotungisa bakangolamaki.
BSB
BSB:
They had come to hear Him and to be healed of their diseases, and those troubled by unclean spirits were healed.
19
LIN
Bato nyonso balukaki kosimba Ye, pamba te nguya moko ezalaki kobima kati na Ye mpe ezalaki kobikisa bato nyonso.
BSB
BSB:
The entire crowd was trying to touch Him, because power was coming from Him and healing them all.
20
LIN
Bongo Yesu atalaki bayekoli na Ye mpe alobaki : « Esengo na bino oyo bozali babola, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bino !
BSB
BSB:
Looking up at His disciples, Jesus said:
“Blessed are you who are poor, for yours is the kingdom of God.
21
LIN
Esengo na bino oyo bozali na nzala sik’oyo, pamba te bokotonda ! Esengo na bino oyo bozali kolela sik’oyo, pamba te bokoseka !
BSB
BSB:
Blessed are you who hunger now, for you will be filled. Blessed are you who weep now, for you will laugh.
22
LIN
Esengo na bino tango bato bazali koyina bino, tango bazali kobengana bino, tango bazali kofinga bino, mpe tango bato bazali kosambwisa kombo na bino, likolo na Mwana na Moto !
BSB
BSB:
Blessed are you when people hate you, and when they exclude you and insult you and reject your name as evil because of the Son of Man.
23
LIN
Tango makambo yango ekokokisama, bosepela mpe bozala na esengo, pamba te lifuti na bino ezali monene kati na Likolo. Ezalaki mpe kaka ndenge wana nde batata na bango banyokolaki basakoli.
BSB
BSB:
Rejoice in that day and leap for joy, because great is your reward in heaven. For their fathers treated the prophets in the same way.
24
LIN
Kasi mawa na bino oyo bozali bazwi, pamba te bosili kozwa kobondisama na bino !
BSB
BSB:
But woe to you who are rich, for you have already received your comfort.
25
LIN
Mawa na bino oyo bozali ya kotonda sik’oyo, pamba te bokozala na nzala ! Mawa na bino oyo bozali koseka sik’oyo, pamba te bokozala na mawa mpe bokolela !
BSB
BSB:
Woe to you who are well fed now, for you will hunger. Woe to you who laugh now, for you will mourn and weep.
26
LIN
Mawa na bino soki bato nyonso bazali koloba malamu na tina na bino, pamba te ezali ndenge wana nde bakoko na bango basalaki basakoli ya lokuta !
BSB
BSB:
Woe to you when all men speak well of you, for their fathers treated the false prophets in the same way.
27
LIN
Kasi, na bino oyo bozali koyoka Ngai, nalobi : Bolingaka banguna na bino mpe bosalelaka bayini na bino bolamu.
BSB
BSB:
But to those of you who will listen, I say: Love your enemies, do good to those who hate you,
28
LIN
Bopambolaka bato oyo balakelaka bino mabe, mpe bobondelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.
BSB
BSB:
bless those who curse you, pray for those who mistreat you.
29
LIN
Soki moto abeti yo mbata na litama moko, pesa ye mpe litama mosusu. Soki moto abotoli yo kazaka na yo, tika ye azwa lisusu elamba na yo.
BSB
BSB:
If someone strikes you on one cheek, turn to him the other also. And if someone takes your cloak, do not withhold your tunic as well.
30
LIN
Pesa na moto nyonso oyo asengi yo ; mpe soki moto akamati eloko na yo, kosenga te ete azongisela yo yango.
BSB
BSB:
Give to everyone who asks you, and if anyone takes what is yours, do not demand it back.
31
LIN
Oyo bolingaka ete bato mosusu basalela bino, bino mpe bosalaka yango mpo na bango.
BSB
BSB:
Do to others as you would have them do to you.
32
LIN
Soki bolingaka kaka bato oyo balingaka bino, litomba nini bokozwa ? Bato ya masumu mpe balingaka bato oyo balingaka bango.
BSB
BSB:
If you love those who love you, what credit is that to you? Even sinners love those who love them.
33
LIN
Mpe soki bosalaka bolamu epai ya bato oyo basalaka bino bolamu, litomba nini bokozwa ? Bato ya masumu mpe basalaka bongo.
BSB
BSB:
If you do good to those who do good to you, what credit is that to you? Even sinners do the same.
34
LIN
Soki bodefisaka kaka na bato oyo bozali na elikya ete bakoki kofuta bino niongo oyo bodefisaka bango, litomba nini bokozwa ? Bato ya masumu mpe badefisaka baninga na bango, bato ya masumu, na elikya ete bakofuta bango niongo yango.
BSB
BSB:
And if you lend to those from whom you expect repayment, what credit is that to you? Even sinners lend to sinners, expecting to be repaid in full.
35
LIN
Kasi bolingaka banguna na bino, bosalelaka bango bolamu, bodefisaka na kozanga kolikya ete bakofuta bino niongo. Na bongo, bokozwa litomba monene mpe bokozala bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; pamba te azali malamu mpo na bato oyo bandimaka te bolamu oyo basaleli bango, mpe azali malamu mpo na bato mabe.
BSB
BSB:
But love your enemies, do good to them, and lend to them, expecting nothing in return. Then your reward will be great, and you will be sons of the Most High; for He is kind to the ungrateful and wicked.
36
LIN
Boyokelaka bato mawa, ndenge kaka Tata na bino ayokelaka bato mawa.
BSB
BSB:
Be merciful, just as your Father is merciful.
37
LIN
Bosambisaka te, mpe bakosambisa bino te ; bokatelaka bato etumbu te, mpe bakokatela bino etumbu te ; bolimbisaka, mpe bakolimbisa bino ;
BSB
BSB:
Do not judge, and you will not be judged. Do not condemn, and you will not be condemned. Forgive, and you will be forgiven.
38
LIN
bopesaka, mpe bakopesa bino ; bakosopa kati na mabenga na bino biloko oyo eleki ebele, oyo bakofina mpe bakoningisa malamu kino ekokoma kosopana. Pamba te bakomeka bino na emekelo kaka oyo bosalelaka mpo na komeka bato mosusu. »
BSB
BSB:
Give, and it will be given to you. A good measure, pressed down, shaken together, and running over will be poured into your lap. For with the measure you use, it will be measured back to you.”
39
LIN
Yesu alobaki na bango lisusu lisese oyo : « Boni, mokufi miso akoki kotambolisa mokufi miso mosusu ? Boni, bango mibale bakokweya te kati na libulu ?
BSB
BSB:
Jesus also told them a parable:
“Can a blind man lead a blind man? Will they not both fall into a pit?
40
LIN
Moyekoli alekaka molakisi na ye te, kasi moyekoli nyonso oyo bateyi malamu akozala lokola molakisi na ye.
BSB
BSB:
A disciple is not above his teacher, but everyone who is fully trained will be like his teacher.
41
LIN
Mpo na nini ozali kotala mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo, wana ozali komona te nzete oyo ezali kati na liso na yo moko ?
BSB
BSB:
Why do you look at the speck in your brother’s eye but fail to notice the beam in your own eye?
42
LIN
Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo : ‹ Ndeko na ngai, tika ete nalongola yo mwa lititi oyo ezali kati na liso na yo, › wana ozali kokoka komona te nzete oyo ezali kati na liso na yo moko. Bolole ! Banda nanu kolongola nzete oyo ezali kati na liso na yo, bongo okomona malamu mpo ete okoka kolongola mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo.
BSB
BSB:
How can you say, ‘Brother, let me take the speck out of your eye,’ while you yourself fail to see the beam in your own eye? You hypocrite! First take the beam out of your own eye, and then you will see clearly to remove the speck from your brother’s eye.
43
LIN
Nzete ya malamu ebotaka te bambuma ya mabe, mpe nzete ya mabe ebotaka te bambuma ya malamu.
BSB
BSB:
No good tree bears bad fruit, nor does a bad tree bear good fruit.
44
LIN
Nzete nyonso eyebanaka na mbuma na yango : na nzete ya nzube, babukaka bambuma ya figi te ; mpe na nzete ya sende, balongolaka bambuma ya vino te.
BSB
BSB:
For each tree is known by its own fruit. Indeed, figs are not gathered from thornbushes, nor grapes from brambles.
45
LIN
Moto malamu abimisaka bolamu kowuta na makambo malamu oyo etondi kati na motema na ye, mpe moto mabe abimisaka mabe kowuta na makambo mabe oyo etondi kati na motema na ye. Pamba te monoko elobaka kolanda makambo oyo etondi kati na motema.
BSB
BSB:
The good man brings good things out of the good treasure of his heart, and the evil man brings evil things out of the evil treasure of his heart. For out of the overflow of the heart the mouth speaks.
46
LIN
Mpo na nini bobengaka Ngai ‹ Nkolo ! Nkolo ! › kasi bosalaka te makambo oyo nayebisaka bino ?
BSB
BSB:
Why do you call Me ‘Lord, Lord,’ but do not do what I say?
47
LIN
Moto nyonso oyo ayaka epai na Ngai, ayokaka maloba na Ngai mpe atiaka yango na misala, nazali kolakisa bino soki akokani na nani :
BSB
BSB:
I will show you what he is like who comes to Me and hears My words and acts on them:
48
LIN
akokani na moto oyo, mpo na kotonga ndako, atimolaki mabele, akitaki penza na mozindo mpe atongaki moboko ya ndako yango na likolo ya libanga ; tango mpela eyaki, mayi emataki makasi mpe emibwakaki na ndako yango kasi ekokaki te kobuka yango, pamba te etongamaki malamu.
BSB
BSB:
He is like a man building a house, who dug down deep and laid his foundation on the rock. When the flood came, the torrent crashed against that house but could not shake it, because it was well built.
49
LIN
Kasi moto oyo ayokaka maloba na Ngai mpe atiaka yango te na misala akokani na moto oyo atongaki ndako na likolo ya mabele, ezanga moboko ; tango kaka mpela emibwakaki na ndako, ndako yango ekweyaki mbala moko mpe epanzanaki. »
BSB
BSB:
But the one who hears My words and does not act on them is like a man who built his house on ground without a foundation. The torrent crashed against that house, and immediately it fell—and great was its destruction!”
Chapter complete
You’ve read Luke 6
Chapter 6 of 24 in Luke
Up next
Luke 7
Read Luke 7
Back to Luke 5
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Luke 6
A question this chapter raises
Was Jesus wrong about Abiathar (Mark 2:26)?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Luke 5
Luke 6
Luke 7