Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.1.1
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Luke
Luke
7
LIN
BSB
A
a
Luke 7
7
Luke
Preparation and ministry in Galilee
Lingala Bible
John
, person
Jesus
, person
Simon
, person
Israel
, person
Judea
, place
Capernaum
, place
Nain
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Sima na Yesu koloba makambo oyo nyonso epai ya bato, akotaki na Kapernawumi.
BSB
BSB:
When Jesus had concluded His discourse in the hearing of the people, He went to Capernaum.
2
LIN
Kuna, mosali moko ya mokonzi ya basoda azalaki kobela mpe akomaki pene ya kokufa. Mokonzi yango ya basoda azalaki kolinga mingi mosali na ye.
BSB
BSB:
There a highly valued servant of a centurion was sick and about to die.
3
LIN
Tango mokonzi ya basoda ayokaki sango na tina na Yesu, atindaki ndambo ya bampaka ya Bayuda epai na Yesu mpo na kosenga na Ye ete akende kobikisa mosali ya mokonzi ya basoda.
BSB
BSB:
When the centurion heard about Jesus, he sent some Jewish elders to ask Him to come and heal his servant.
4
LIN
Tango bakomaki epai ya Yesu, babondelaki Ye makasi ; balobaki : — Tata wana abongi penza ete osalela ye likambo oyo asengi epai na Yo,
BSB
BSB:
They came to Jesus and pleaded with Him earnestly, “This man is worthy to have You grant this,
5
LIN
pamba te alingaka ekolo na biso, mpe ye nde atongaki ndako na biso ya mayangani.
BSB
BSB:
for he loves our nation and has built our synagogue.”
6
LIN
Boye Yesu akendeki elongo na bango. Kasi tango akomaki pene ya ndako, mokonzi ya basoda atindaki baninga na ye koloba na Yesu : — Nkolo, komitungisa na Yo te, pamba te nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai.
BSB
BSB:
So Jesus went with them. But when He was not far from the house, the centurion sent friends with the message: “Lord, do not trouble Yourself, for I am not worthy to have You come under my roof.
7
LIN
Ezali mpe mpo na yango nde namimonaki ete nabongi te mpo na koya epai na Yo. Kasi loba kaka liloba moko, mpe mosali na ngai akobika na bokono na ye.
BSB
BSB:
That is why I did not consider myself worthy to come to You. But just say the word, and my servant will be healed.
8
LIN
Pamba te ngai moko mpe nazali na se ya bakonzi oyo baleki ngai, mpe ezali na basoda oyo bazali na se ya bokonzi na ngai. Soki nalobi na moko : « Kende, » akendaka ; mpe na mosusu : « Yaka, » ayaka ; bongo soki nalobi na mowumbu na ngai : « Sala mosala oyo, » asalaka yango.
BSB
BSB:
For I myself am a man under authority, with soldiers under me. I tell one to go, and he goes, and another to come, and he comes. I tell my servant to do something, and he does it.”
9
LIN
Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki ye mingi ; bongo abalukaki epai ya ebele ya bato oyo bazalaki kolanda Ye mpe alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : ezala kati na Isalaele, natikali nanu komona te kondima ya boye.
BSB
BSB:
When Jesus heard this, He marveled at the centurion. Turning to the crowd following Him, He said,
“I tell you, not even in Israel have I found such great faith.”
10
LIN
Tango bato oyo mokonzi ya basoda atindaki bazongaki na ndako, bakutaki mosali yango nzoto kolongono.
BSB
BSB:
And when the messengers returned to the house, they found the servant in good health.
11
LIN
Sima na yango, Yesu akendeki na engumba moko na kombo Nayini ; bayekoli na Ye elongo na ebele ya bato balandaki Ye.
BSB
BSB:
Soon afterward, Jesus went to a town called Nain. His disciples went with Him, accompanied by a large crowd.
12
LIN
Wana akomaki pene ya ekuke ya engumba, akutanaki na bato bazali kokende kokunda mwana mobali moko oyo awutaki kokufa : azalaki mwana kaka moko ya mwasi moko akufisa mobali. Mpe bato mingi ya engumba yango bazalaki elongo na mwasi yango.
BSB
BSB:
As He approached the town gate, He saw a dead man being carried out, the only son of his mother, and she was a widow. And a large crowd from the town was with her.
13
LIN
Tango kaka Nkolo amonaki mwasi yango, ayokelaki ye mawa mingi mpe alobaki na ye : — Kolela te !
BSB
BSB:
When the Lord saw her, He had compassion on her and said,
“Do not weep.”
14
LIN
Apusanaki mpe asimbaki tsipoyi oyo bazalaki komema na yango mwana oyo akufaki, mpe bato oyo bazalaki komema yango batelemaki. Yesu alobaki : — Elenge mobali, nalobi na yo, lamuka !
BSB
BSB:
Then He went up and touched the coffin, and those carrying it stood still.
“Young man,”
He said,
“I tell you, get up!”
15
LIN
Moto oyo akufaki avandaki mpe abandaki koloba ; mpe Yesu azongisaki ye epai ya mama na ye.
BSB
BSB:
And the dead man sat up and began to speak! Then Jesus gave him back to his mother.
16
LIN
Bato nyonso batondaki na kobanga, bakomaki kokumisa Nzambe mpe koloba : — Mosakoli moko ya monene abimi kati na biso. Nzambe ayei kosunga bato na Ye !
BSB
BSB:
A sense of awe swept over all of them, and they glorified God. “A great prophet has appeared among us!” they said. “God has visited His people!”
17
LIN
Sango oyo na tina na Yesu epanzanaki kati na Yuda mpe kati na bamboka ya zingazinga.
BSB
BSB:
And the news about Jesus spread throughout Judea and all the surrounding region.
18
LIN
Bayekoli ya Yoane bayebisaki makambo wana nyonso epai ya nkolo na bango. Yoane abengaki bayekoli na ye, mibale kati na bango,
BSB
BSB:
Then John’s disciples informed him about all these things.
19
LIN
mpe atindaki bango epai ya Nkolo Yesu mpo na kotuna : — Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu ?
BSB
BSB:
So John called two of his disciples and sent them to ask the Lord, “Are You the One who was to come, or should we look for someone else?”
20
LIN
Tango bakomaki epai ya Yesu, balobaki na Ye : — Yoane Mobatisi atindi biso epai na Yo mpo ete totuna : « Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu ? »
BSB
BSB:
When the men came to Jesus, they said, “John the Baptist sent us to ask, ‘Are You the One who was to come, or should we look for someone else?’”
21
LIN
Kaka na tango, Yesu abikisaki bato ebele na bokono, na pasi mpe na milimo mabe, mpe afungolaki miso ya bakufi miso ebele.
BSB
BSB:
At that very hour Jesus healed many people of their diseases, afflictions, and evil spirits, and He gave sight to many who were blind.
22
LIN
Boye, Yesu azongiselaki bayekoli oyo Yoane atindaki : — Bokende koyebisa Yoane makambo oyo bomoni mpe oyo boyoki : bakufi miso bazali komona, bakufi matoyi bazali koyoka, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi bazali kosekwa, mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.
BSB
BSB:
So He replied,
“Go back and report to John what you have seen and heard: The blind receive sight, the lame walk, the lepers are cleansed, the deaf hear, the dead are raised, and the good news is preached to the poor.
23
LIN
Esengo na moto oyo akokweyisa kondima na ye te likolo na Ngai !
BSB
BSB:
Blessed is the one who does not fall away on account of Me.”
24
LIN
Tango bato oyo Yoane atindaki bazongaki, Yesu akomaki koloba na ebele ya bato na tina na Yoane : — Eloko nini bokendeki kotala kati na esobe ? Mwa nzete oyo mopepe ezalaki koningisa epai na epai ?
BSB
BSB:
After John’s messengers had left, Jesus began to speak to the crowds about John:
“What did you go out into the wilderness to see? A reed swaying in the wind?
25
LIN
Soki te, bokendeki penza kotala nini ? Moto moko alata bilamba ya kitoko ? Te ! Bato oyo balataka bilamba ya kitoko mpe bamisepelisaka kati na bozwi na bango bavandaka kati na bandako ya bakonzi.
BSB
BSB:
Otherwise, what did you go out to see? A man dressed in fine clothes? Look, those who wear elegant clothing and live in luxury are found in palaces.
26
LIN
Kasi nani bino bokendeki penza kotala ? Mosakoli ? Iyo, nazali koloba na bino, mpe aleki kutu ata mosakoli.
BSB
BSB:
What then did you go out to see? A prophet? Yes, I tell you, and more than a prophet.
27
LIN
Yoane azali moto oyo Makomi ezali koloba boye na tina na ye : « Nakotinda ntoma na Ngai liboso na Yo, oyo akobongisela Yo nzela. »
BSB
BSB:
This is the one about whom it is written: ‘Behold, I will send My messenger ahead of You, who will prepare Your way before You.’
28
LIN
Nazali koloba na bino : kati na bato oyo babotama na mwasi, moko te aleki Yoane na monene ; nzokande, ye oyo aleki moke kati na Bokonzi ya Nzambe aleki Yoane Mobatisi na monene.
BSB
BSB:
I tell you, among those born of women there is no one greater than John, yet even the least in the kingdom of God is greater than he.”
29
LIN
Bato nyonso elongo na bafutisi mpako oyo bayokaki maloba na Yesu bandimaki ete nzela ya Nzambe ezali sembo, pamba te Yoane abatisaki bango
BSB
BSB:
All the people who heard this, even the tax collectors, acknowledged God’s justice. For they had received the baptism of John.
30
LIN
Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko baboyaki mokano ya Nzambe mpo na bango, pamba te baboyaki ete Yoane abatisa bango.
BSB
BSB:
But the Pharisees and experts in the law rejected God’s purpose for themselves, because they had not been baptized by John.
31
LIN
Boye Yesu alobaki : — Na nani penza nakokokanisa bato ya ekeke oyo ? Bakokani penza na banani ?
BSB
BSB:
“To what, then, can I compare the men of this generation? What are they like?
32
LIN
Bakokani penza na bana mike oyo bavandi na esika oyo bato ebele bakutanaka mpe bazali koganga, bamoko na bamosusu : « Tobetaki baflite, kasi bobinaki te ; toyembelaki bino banzembo ya matanga, kasi bolelaki te ! »
BSB
BSB:
They are like children sitting in the marketplace and calling out to one another: ‘We played the flute for you, and you did not dance; we sang a dirge, and you did not weep.’
33
LIN
Pamba te, tango Yoane Mobatisi ayaki, azalaki kolia mapa te mpe azalaki komela vino te, mpe bolobaki : « Azali na molimo mabe kati na ye ! »
BSB
BSB:
For John the Baptist came neither eating bread nor drinking wine, and you say, ‘He has a demon!’
34
LIN
Mwana na Moto ayaki, azali kolia, azali komela, mpe bozali koloba : « Azali na lokoso ya kolia mpe ya komela masanga, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu ! »
BSB
BSB:
The Son of Man came eating and drinking, and you say, ‘Look at this glutton and drunkard, a friend of tax collectors and sinners!’
35
LIN
Kasi bato nyonso oyo bayambaka Bwanya ya Nzambe batalisaka ete ezali sembo.
BSB
BSB:
But wisdom is vindicated by all her children.”
36
LIN
Mofarizeo moko abengisaki Yesu mpo ete alia mesa moko elongo na ye. Yesu akendeki na ndako ya Mofarizeo yango mpe avandaki na mesa mpo na kolia.
BSB
BSB:
Then one of the Pharisees invited Jesus to eat with him, and He entered the Pharisee’s house and reclined at the table.
37
LIN
Nzokande, kati na engumba yango, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki kobika bomoi ya masumu. Tango ayokaki ete Yesu azali kolia na ndako ya Mofarizeo, ayaki wana na molangi ya alibatre etonda na malasi,
BSB
BSB:
When a sinful woman from that town learned that Jesus was dining there, she brought an alabaster jar of perfume.
38
LIN
atelemaki na sima ya Yesu, na makolo na Ye ; azalaki kolela mpe, na mpinzoli na ye, akomaki kopolisa makolo ya Yesu. Bongo apangusaki makolo yango na nzela ya suki na ye, apesaki yango beze mpe asopelaki yango malasi.
BSB
BSB:
As she stood behind Him at His feet weeping, she began to wet His feet with her tears and wipe them with her hair. Then she kissed His feet and anointed them with the perfume.
39
LIN
Tango Mofarizeo oyo abengisaki Yesu amonaki bongo, amilobelaki : — Soki moto oyo azali mosakoli, alingaki koyeba soki mwasi oyo azali kosimba Ye azali nani, mpe soki azali mwasi ya lolenge nini : moto ya masumu.
BSB
BSB:
When the Pharisee who had invited Jesus saw this, he said to himself, “If this man were a prophet, He would know who this is and what kind of woman is touching Him—for she is a sinner!”
40
LIN
Yesu alobaki na ye : — Simona, nazali na likambo ya koyebisa yo. Mofarizeo azongisaki : — Moteyi, loba yango.
BSB
BSB:
But Jesus answered him,
“Simon, I have something to tell you.”
“Tell me, Teacher,” he said.
41
LIN
Yesu alobaki : — Moto moko adefisaki bato mibale mbongo. Moto ya liboso asengelaki kozongisa mbongo ya bibende nkama mitano, mpe oyo ya mibale, mbongo ya bibende tuku mitano.
BSB
BSB:
“Two men were debtors to a certain moneylender. One owed him five hundred denarii, and the other fifty.
42
LIN
Kasi lokola, kati na bango mibale, moko te azalaki na mbongo ya kozongisa, modefisi alimbisaki bango mpo ete bafuta lisusu niongo yango te. Na makanisi na yo, nani kati na bango mibale akolinga modefisi koleka ?
BSB
BSB:
When they were unable to repay him, he forgave both of them. Which one, then, will love him more?”
43
LIN
Simona azongisaki : — Nakanisi ete ezali moto oyo balimbisi niongo ya mbongo oyo eleki ebele. Yesu alobaki na ye : — Okati malamu !
BSB
BSB:
“I suppose the one who was forgiven more,” Simon replied.
“You have judged correctly,”
Jesus said.
44
LIN
Bongo abalukaki epai ya mwasi, mpe alobaki na Simona : — Omoni mwasi oyo ? Tango nakotaki na ndako na yo, opesaki Ngai mayi te ya kosukola makolo na Ngai ; kasi ye, apolisi yango na mpinzoli na ye mpe apangusi yango na nzela ya suki na ye.
BSB
BSB:
And turning toward the woman, He said to Simon,
“Do you see this woman? When I entered your house, you did not give Me water for My feet, but she wet My feet with her tears and wiped them with her hair.
45
LIN
Opesaki Ngai beze te ; kasi ye, banda nakotaki awa, atiki te kopesa makolo na Ngai beze.
BSB
BSB:
You did not greet Me with a kiss, but she has not stopped kissing My feet since I arrived.
46
LIN
Opakolaki Ngai mafuta te na moto ; kasi ye, asopeli makolo na Ngai malasi.
BSB
BSB:
You did not anoint My head with oil, but she has anointed My feet with perfume.
47
LIN
Yango wana, nazali koloba na yo : ebele ya masumu na ye elimbisami, lokola atalisi bolingo monene. Kasi moto oyo balimbisaki niongo moke azali kotalisa bolingo moke.
BSB
BSB:
Therefore I tell you, her many sins have been forgiven, for she has loved much. But he who has been forgiven little loves little.”
48
LIN
Bongo Yesu alobaki na mwasi : — Masumu na yo elimbisami.
BSB
BSB:
Then Jesus said to her,
“Your sins are forgiven.”
49
LIN
Bato mosusu oyo babengamaki elongo na Ye bakomaki koloba, bango na bango : — Moto oyo azali penza nani, oyo akomi ata kolimbisa masumu ?
BSB
BSB:
But those at the table began to say to themselves, “Who is this who even forgives sins?”
50
LIN
Kasi Yesu alobaki na mwasi yango : — Kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia !
BSB
BSB:
And Jesus told the woman,
“Your faith has saved you; go in peace.”
Chapter complete
You’ve read Luke 7
Chapter 7 of 24 in Luke
Up next
Luke 8
Read Luke 8
Back to Luke 6
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Luke 7
Ask Study Help
Ask anything about Luke 7
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Luke 6
Luke 7
Luke 8