Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v2.2.0
Skip to content
Opened
en
Today
Ask
Read
Journey
More
Luke
Luke
8
LIN
BSB
A
a
Luke 8
8
Luke
Preparation and ministry in Galilee
Lingala Bible
Jesus
, person
Peter
, person
Gerasa
, place
Galilee
, place
John
, person
Herod
, person
James
, person
Magdalene
, place
5 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Sima na yango, Yesu atambolaki na bingumba mpe na bamboka, azalaki koteya mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Bayekoli nyonso zomi na mibale bazalaki elongo na Ye,
BSB
BSB:
Soon afterward, Jesus traveled from one town and village to another, preaching and proclaiming the good news of the kingdom of God. The Twelve were with Him,
2
LIN
bakisa ndambo ya basi oyo bakangolamaki na milimo mabe mpe babikisamaki na bokono : Mari, moto ya Magidala, oyo kati na ye, Yesu abenganaki milimo mabe sambo ;
BSB
BSB:
as well as some women who had been healed of evil spirits and infirmities: Mary called Magdalene, from whom seven demons had gone out,
3
LIN
Jane, mwasi ya Shuza oyo azalaki kobatela biloko ya Erode ; Suzana ; mpe basi mosusu ebele. Basi yango bazalaki kosalisa mpe kosunga Yesu mpe bayekoli na Ye, na nzela ya biloko na bango moko.
BSB
BSB:
Joanna the wife of Herod’s household manager Chuza, Susanna, and many others. These women were ministering to them out of their own means.
4
LIN
Wana ebele ya bato bazalaki kosangana, mpe bato oyo bazalaki kowuta na bingumba bazalaki koya epai ya Ye, alobaki na bango lisese oyo :
BSB
BSB:
While a large crowd was gathering and people were coming to Jesus from town after town, He told them this parable:
5
LIN
— Moloni moko akendeki kolona na elanga na ye. Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela ; baleki nzela banyataki-nyataki yango, mpe bandeke ya likolo eliaki yango.
BSB
BSB:
“A farmer went out to sow his seed. And as he was sowing, some seed fell along the path, where it was trampled, and the birds of the air devoured it.
6
LIN
Ndambo mosusu ekweyaki na mabele etonda na mabanga ; tango kaka ebandaki kobimisa mito, mito ekawukaki, pamba te ezalaki na mayi te.
BSB
BSB:
Some fell on rocky ground, and when it came up, the seedlings withered because they had no moisture.
7
LIN
Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube ; banzube ekolaki nzela moko na yango mpe efinaki-finaki mito na yango.
BSB
BSB:
Other seed fell among thorns, which grew up with it and choked the seedlings.
8
LIN
Kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu, ebimisaki mito oyo ekolaki mpe ekomaki banzete : nkona moko na moko ebotaki bambuma nkama moko. Tango Yesu asilisaki koloba bongo, agangaki : — Tika ete moto nyonso oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !
BSB
BSB:
Still other seed fell on good soil, where it sprang up and produced a crop—a hundredfold.”
As Jesus said this, He called out,
“He who has ears to hear, let him hear.”
9
LIN
Bayekoli ya Yesu batunaki Ye ndimbola ya lisese yango.
BSB
BSB:
Then His disciples asked Him what this parable meant.
10
LIN
Azongiselaki bango : — Boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Nzambe epesameli nde na bino ; kasi epai ya bato mosusu, nazali koloba na masese, mpo ete, atako bakoki kotala, bamona te ; mpe atako bakoki koyoka, basosola te.
BSB
BSB:
He replied,
“The knowledge of the mysteries of the kingdom of God has been given to you, but to others I speak in parables, so that, ‘though seeing, they may not see; though hearing, they may not understand.’
11
LIN
Tala ndimbola ya lisese yango : Nkona ezali Liloba na Nzambe.
BSB
BSB:
Now this is the meaning of the parable: The seed is the word of God.
12
LIN
Nkona oyo ekweyaki pembeni ya nzela ezali bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe, kasi Satana ayaka kolongola yango kati na mitema na bango mpo ete bandima te mpe babikisama te.
BSB
BSB:
The seeds along the path are those who hear, but the devil comes and takes away the word from their hearts, so that they may not believe and be saved.
13
LIN
Nkona oyo ekweyaki na mabele etonda na mabanga ezali bato oyo bayokaka Liloba mpe bayambaka yango na esengo, kasi batikaka yango te kozwa misisa : bandimaka kaka mpo na mwa tango moke ; soki komekama eyei, basundolaka mbala moko kondima.
BSB
BSB:
The seeds on rocky ground are those who hear the word and receive it with joy, but they have no root. They believe for a season, but in the time of testing, they fall away.
14
LIN
Nkona oyo ekweyaki kati na banzube ezali bato oyo, sima na koyoka Liloba, bamitikaka ete, na etamboli na bango, mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo, bomengo mpe bisengo ya mokili efinafina bango, mpe ete babota te bambuma.
BSB
BSB:
The seeds that fell among the thorns are those who hear, but as they go on their way, they are choked by the worries, riches, and pleasures of this life, and their fruit does not mature.
15
LIN
Nkona oyo ekweyaki na mabele ya malamu ezali bato oyo, na mitema ya sembo mpe ya malamu, bayokaka Liloba, babatelaka yango, bayikaka mpiko mpe babotaka bambuma.
BSB
BSB:
But the seeds on good soil are those with a noble and good heart, who hear the word, cling to it, and by persevering produce a crop.
16
LIN
Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini to na se ya mbeto ; atiaka yango nde na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete bato oyo bazali kokota na ndako bamona pole na yango.
BSB
BSB:
No one lights a lamp and covers it with a jar or puts it under a bed. Instead, he sets it on a stand, so those who enter can see the light.
17
LIN
Pamba te eloko moko te ebombama ekozanga kobima na pole, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga koyebana to kobima na pole.
BSB
BSB:
For there is nothing hidden that will not be disclosed, and nothing concealed that will not be made known and brought to light.
18
LIN
Boye, bosala keba na lolenge na bino ya koyoka ! Pamba te, na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu ; kasi na ye oyo azangi, bakobotola ata oyo azali kokanisa ete azali na yango.
BSB
BSB:
Pay attention, therefore, to how you listen. Whoever has will be given more, but whoever does not have, even what he thinks he has will be taken away from him.”
19
LIN
Mama mpe bandeko mibali ya Yesu bayaki kotala Yesu, kasi bakokaki te kokoma pene na Ye mpo na ebele ya ebele.
BSB
BSB:
Then Jesus’ mother and brothers came to see Him, but they were unable to reach Him because of the crowd.
20
LIN
Moto moko ayebisaki Ye : — Mama na yo mpe bandeko na yo ya mibali batelemi libanda, bazali na posa ya komona yo.
BSB
BSB:
He was told, “Your mother and brothers are standing outside, wanting to see You.”
21
LIN
Kasi Yesu azongisaki : — Mama na Ngai mpe bandeko na Ngai, ezali bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batiaka yango na misala.
BSB
BSB:
But He replied,
“My mother and brothers are those who hear the word of God and carry it out.”
22
LIN
Mokolo moko, Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale. Bongo bamataki na bwato mpe bakendeki.
BSB
BSB:
One day Jesus said to His disciples,
“Let us cross to the other side of the lake.”
So He got into a boat with them and set out.
23
LIN
Wana bayekoli bazalaki koluka nkayi, Yesu alalaki pongi. Mopepe moko ya makasi epepaki kati na ebale ; bwato ekomaki kotonda na mayi, mpe bakomaki na likama monene.
BSB
BSB:
As they sailed, He fell asleep, and a windstorm came down on the lake, so that the boat was being swamped, and they were in great danger.
24
LIN
Bayekoli bapusanaki mpe balamusaki Ye na koganga : — Moteyi, Moteyi, tozali kokufa ! Yesu alamukaki mpe apesaki mitindo na mopepe mpe mbonge ; bongo ekitaki, mpe kimia ezongaki.
BSB
BSB:
The disciples went and woke Him, saying, “Master, Master, we are perishing!” Then Jesus got up and rebuked the wind and the raging waters, and they subsided, and all was calm.
25
LIN
Yesu atunaki bayekoli na Ye : — Wapi kondima na bino ? Kasi bango, batondaki na somo mpe bakamwaki, bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani ? Azali kopesa mitindo ata na mipepe mpe na mayi, mpe yango ezali kotosa ye ! »
BSB
BSB:
“Where is your faith?”
He asked. Frightened and amazed, they asked one another, “Who is this? He commands even the winds and the water, and they obey Him!”
26
LIN
Bakomaki na etuka ya Geraza oyo ezali na ngambo mosusu ya ebale, etalana na Galile.
BSB
BSB:
Then they sailed to the region of the Gerasenes, across the lake from Galilee.
27
LIN
Tango Yesu anyataki mabele, mobali moko abimaki na engumba mpe ayaki kokutana na Ye ; azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Wuta kala, azalaki lisusu te kolata bilamba mpe kovanda na ndako, kasi akomaki kovanda kati na bakunda.
BSB
BSB:
When Jesus stepped ashore, He was met by a demon-possessed man from the town. For a long time this man had not worn clothing or lived in a house, but he stayed in the tombs.
28
LIN
Tango amonaki Yesu, agangaki mpe amibwakaki na makolo na Ye, na koganga na mongongo makasi koleka : — Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, olingi nini epai na ngai ? Nabondeli Yo, kotungisa ngai te !
BSB
BSB:
When the man saw Jesus, he cried out and fell down before Him, shouting in a loud voice, “What do You want with me, Jesus, Son of the Most High God? I beg You not to torture me!”
29
LIN
Pamba te Yesu apesaki mitindo na molimo ya mbindo ete ebima kati na mobali oyo ekangaki wuta kala. Mpe atako bakangaki ye minyololo na maboko mpe makolo mpe bazalaki kokengela ye, kasi abukaki minyololo yango, mpe molimo mabe ekumbaki ye na bisika oyo azalaki kaka ye moko.
BSB
BSB:
For Jesus had commanded the unclean spirit to come out of the man. Many times it had seized him, and though he was bound with chains and shackles, he had broken the chains and been driven by the demon into solitary places.
30
LIN
Yesu atunaki ye : — Kombo na yo nani ? Azongisaki : — Ngulupa. Pamba te milimo mabe ebele ekotaki kati na ye.
BSB
BSB:
“What is your name?”
Jesus asked. “Legion,” he replied, because many demons had gone into him.
31
LIN
Bongo milimo mabe yango ezalaki kosenga na Yesu ete atinda yango te kati na libulu ya mozindo.
BSB
BSB:
And the demons kept begging Jesus not to order them to go into the Abyss.
32
LIN
Nzokande, etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia kuna na ngomba. Milimo mabe esengaki na Yesu ete atika yango kokota kati na bangulu ; mpe Yesu apesaki yango nzela.
BSB
BSB:
There on the hillside a large herd of pigs was feeding. So the demons begged Jesus to let them enter the pigs, and He gave them permission.
33
LIN
Milimo mabe ebimaki kati na mobali yango, mpe ekotaki kati na bangulu. Mbala moko, etonga ya bangulu ekitaki mbangu longwa na ngomba kino kati na ebale mpe ezindaki.
BSB
BSB:
Then the demons came out of the man and went into the pigs, and the herd rushed down the steep bank into the lake and was drowned.
34
LIN
Tango bakengeli ya bangulu bamonaki likambo oyo ewuti kosalema, bakimaki mpe bakendeki kopesa sango kati na engumba mpe na bilanga.
BSB
BSB:
When those tending the pigs saw what had happened, they ran off and reported this in the town and countryside.
35
LIN
Bato babimaki mpo na koya kotala likambo oyo esalemi. Tango bakomaki epai ya Yesu, bamonaki mobali, oyo milimo mabe ebimaki kati na ye, alata bilamba, avandi na makolo ya Yesu na mayele na ye ya kokoka ; boye somo ekangaki bango.
BSB
BSB:
So the people went out to see what had happened. They came to Jesus and found the man whom the demons had left, sitting at Jesus’ feet, clothed and in his right mind; and they were afraid.
36
LIN
Ba-oyo bamonaki likambo oyo ewuti kosalema bayebisaki bato ndenge nini moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe akangolamaki.
BSB
BSB:
Meanwhile, those who had seen it reported how the demon-possessed man had been healed.
37
LIN
Bongo bato nyonso ya etuka ya bato ya Geraza basengaki na Yesu ete alongwa na etuka na bango, pamba te somo ekangaki bango. Boye Yesu amataki na bwato mpe akendeki.
BSB
BSB:
Then all the people of the region of the Gerasenes asked Jesus to depart from them, because great fear had taken hold of them. So He got into the boat and started back.
38
LIN
Mobali oyo akangolamaki na milimo mabe asengaki kokende elongo na Ye, kasi Yesu azongisaki ye na koloba :
BSB
BSB:
The man whom the demons had left begged to go with Jesus. But He sent him away, saying,
39
LIN
— Zonga na libota na yo mpe tatola makambo nyonso oyo Nzambe asali mpo na yo. Boye mobali yango akendeki mpe atatolaki na engumba mobimba, makambo nyonso oyo Yesu asalaki mpo na ye.
BSB
BSB:
“Return home and describe how much God has done for you.”
So the man went away and proclaimed all over the town how much Jesus had done for him.
40
LIN
Tango Yesu azongaki, ebele ya bato bayambaki Ye, pamba te bango nyonso bazalaki kozela Ye.
BSB
BSB:
When Jesus returned, the crowd welcomed Him, for they had all been waiting for Him.
41
LIN
Mobali moko oyo kombo na ye ezalaki Jairisi, mokambi ya ndako ya mayangani, ayaki, amibwakaki na makolo ya Yesu mpe abondelaki Ye ete akende na ndako na ye,
BSB
BSB:
Just then a synagogue leader named Jairus came and fell at Jesus’ feet. He begged Him to come to his house,
42
LIN
pamba te mwana na ye kaka moko ya mwasi, ya mibu pene zomi na mibale ya mbotama, akomaki pene ya kokufa. Wana Yesu azalaki kokende, ebele ya bato bazalaki kotutana-tutana na Ye na bangambo nyonso.
BSB
BSB:
because his only daughter, who was about twelve, was dying. As Jesus went with him, the crowds pressed around Him,
43
LIN
Nzokande, ezalaki wana na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale ; mpe asilisaki bozwi na ye nyonso epai ya minganga, kasi moko te alongaki kobikisa ye na bokono yango.
BSB
BSB:
including a woman who had suffered from bleeding for twelve years. She had spent all her money on physicians, but no one was able to heal her.
44
LIN
Adusolaki kino ayaki kotelema na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye ; mpe mbala moko, makila na ye etikaki kotanga.
BSB
BSB:
She came up behind Jesus and touched the fringe of His cloak, and immediately her bleeding stopped.
45
LIN
Yesu atunaki : — Nani asimbi Ngai ? Lokola moto ata moko te andimaki, Petelo alobaki na Yesu : — Moteyi, ebele ya bato bazali kofinana-finana mpe kotutana-tutana na Yo.
BSB
BSB:
“Who touched Me?”
Jesus asked. But they all denied it. “Master,” said Peter, “the people are crowding and pressing against You.”
46
LIN
Kasi Yesu alobaki : — Moto moko asimbi Ngai ; nayebi ete nguya ebimi kati na Ngai.
BSB
BSB:
But Jesus declared,
“Someone touched Me, for I know that power has gone out from Me.”
47
LIN
Awa mwasi yango amonaki ete azali ya kobombama te, akendeki na kolenga, amibwakaki na makolo ya Yesu mpe alobaki na miso ya bato nyonso mpo na nini asimbaki Yesu mpe ndenge nini abiki mbala moko na bokono na ye.
BSB
BSB:
Then the woman, seeing that she could not escape notice, came trembling and fell down before Him. In the presence of all the people, she explained why she had touched Him and how she had immediately been healed.
48
LIN
Kasi Yesu alobaki na ye : — Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia.
BSB
BSB:
“Daughter,”
said Jesus,
“your faith has healed you. Go in peace.”
49
LIN
Wana Yesu azalaki nanu koloba, moto moko ayaki wuta na ndako ya Jairisi, mokambi ya ndako ya mayangani, mpe alobaki : — Mwana na yo ya mwasi akufi. Kotungisa lisusu Moteyi te.
BSB
BSB:
While He was still speaking, someone arrived from the house of the synagogue leader. “Your daughter is dead,” he told Jairus. “Do not bother the Teacher anymore.”
50
LIN
Lokola Yesu ayokaki ye koloba bongo, alobaki na Jairisi : — Kobanga te ! Ndima kaka, mpe akobika na bokono na ye.
BSB
BSB:
But Jesus overheard them and said to Jairus,
“Do not be afraid; just believe, and she will be healed.”
51
LIN
Tango Yesu akomaki na ndako ya Jairisi, atikaki moto moko te kokota elongo na Ye, longola kaka Petelo, Yoane, Jake, tata mpe mama ya mwana.
BSB
BSB:
When He entered the house, He did not allow anyone to go in with Him except Peter, John, James, and the child’s father and mother.
52
LIN
Bato nyonso bazalaki kolela mpe koyoka mawa mpo na mwana yango. Kasi Yesu alobaki : — Bokata kolela ; akufi te, azali nde ya kolala !
BSB
BSB:
Meanwhile, everyone was weeping and mourning for her. But Jesus said,
“Stop weeping; she is not dead but asleep.”
53
LIN
Bato basekaki Yesu, wana bayebaki ete asilaki kokufa.
BSB
BSB:
And they laughed at Him, knowing that she was dead.
54
LIN
Kasi Yesu asimbaki ye na loboko mpe alobaki : — Mwana na Ngai, lamuka !
BSB
BSB:
But Jesus took her by the hand and called out,
“Child, get up!”
55
LIN
Pema ya bomoi ezongaki kati na mwana ; mpe mbala moko, atelemaki. Bongo Yesu atindaki bango kopesa ye eloko ya kolia.
BSB
BSB:
Her spirit returned, and at once she got up. And He directed that she be given something to eat.
56
LIN
Baboti na ye bakamwaki, kasi Yesu apekisaki bango koloba na moto ata moko te likambo oyo ewuti kosalema.
BSB
BSB:
Her parents were astounded, but Jesus ordered them not to tell anyone what had happened.
Chapter complete
You’ve read Luke 8
Chapter 8 of 24 in Luke
Up next
Luke 9
Read Luke 9
Back to Luke 7
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Luke 8
A question this chapter raises
Was Jesus married?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Luke 7
Luke 8
Luke 9