Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.42.4
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Mark
Mark
11
LIN
BSB
A
a
Mark 11
11
Mark
Jerusalem
Lingala Bible
Jesus
, person
Jerusalem
, place
Bethany
, place
John
, person
David
, person
Peter
, person
Olives Mount
, place
Bethphage
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Wana bazalaki kopusana pene ya Yelusalemi, bakomaki na Betifaje mpe Betani oyo ezalaki pene ya ngomba ya banzete ya olive, Yesu atindaki bayekoli na Ye mibale,
BSB
BSB:
As they approached Jerusalem and came to Bethphage and Bethany at the Mount of Olives, Jesus sent out two of His disciples
2
LIN
alobaki na bango : — Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino. Tango kaka bokokota na mboka yango, bokomona mwana ya ane bakanga na singa, oyo moto ata moko te asila kosalela ; bofungola yango mpe bomema yango awa.
BSB
BSB:
and said to them,
“Go into the village ahead of you, and as soon as you enter it, you will find a colt tied there, on which no one has ever sat. Untie it and bring it here.
3
LIN
Soki moto moko atuni bino : « Mpo na nini bozali kofungola yango ? » Bozongisela ye : « Nkolo azali na bosenga na yango. » Mpe na mbala moko, akotinda yango awa.
BSB
BSB:
If anyone asks, ‘Why are you doing this?’ tell him, ‘The Lord needs it and will return it shortly.’”
4
LIN
Bakendeki mpe bakutaki mwana ya ane ekangama na libanda, pembeni ya ekuke ; mpe bafungolaki yango.
BSB
BSB:
So they went and found the colt outside in the street, tied at a doorway. They untied it,
5
LIN
Ndambo ya bato oyo bazalaki wana batunaki : — Nini ezwi bino mpo ete bofungola mwana oyo ya ane ?
BSB
BSB:
and some who were standing there asked, “Why are you untying the colt?”
6
LIN
Bayekoli bazongiselaki bango ndenge kaka Yesu alobaki na bango, mpe bato yango batikaki bayekoli kokende elongo na yango.
BSB
BSB:
The disciples answered as Jesus had instructed them, and the people gave them permission.
7
LIN
Bamemaki mwana yango ya ane epai ya Yesu, batandaki bilamba na bango na mokongo na yango ; mpe Yesu avandaki na likolo na yango.
BSB
BSB:
Then they led the colt to Jesus and threw their cloaks over it, and He sat on it.
8
LIN
Bato ebele batandaki bilamba na bango na nzela ; bamosusu batandaki bitape ya mobesu, oyo bawutaki kokata na likolo ya banzete kati na bilanga.
BSB
BSB:
Many in the crowd spread their cloaks on the road, while others spread branches they had cut from the fields.
9
LIN
Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga : « Ozana ! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo !
BSB
BSB:
The ones who went ahead and those who followed were shouting: “Hosanna!” “Blessed is He who comes in the name of the Lord!”
10
LIN
Tika ete bokonzi oyo eyei epambolama, bokonzi ya Davidi, tata na biso ! Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! »
BSB
BSB:
“Blessed is the coming kingdom of our father David!” “Hosanna in the highest!”
11
LIN
Tango kaka Yesu akotaki na Yelusalemi, akendeki kati na Tempelo. Mpe kuna, atalaki na bokebi ndenge makambo nyonso ezalaki kosalema ; kasi lokola tango elekaki, abimaki mpe akendeki na Betani elongo na bayekoli na Ye zomi na mibale.
BSB
BSB:
Then Jesus entered Jerusalem and went into the temple courts. He looked around at everything, but since it was already late, He went out to Bethany with the Twelve.
12
LIN
Mokolo oyo elandaki, wana bazalaki kotika Betani, Yesu ayokaki nzala.
BSB
BSB:
The next day, when they had left Bethany, Jesus was hungry.
13
LIN
Na mosika, amonaki nzete moko ya figi etonda na makasa ; apusanaki pene na yango mpo na kotala soki ezali na mbuma. Kasi tango akomaki pene, amonaki kaka makasa mpo ete ezalaki eleko ya bambuma ya figi te.
BSB
BSB:
Seeing in the distance a fig tree in leaf, He went to see if there was any fruit on it. But when He reached it, He found nothing on it except leaves, since it was not the season for figs.
14
LIN
Yesu alobaki na nzete yango : « Tika ete, mpo na libela, moto moko te alia lisusu mbuma kowuta na yo ! » Bayekoli na Ye bayokaki Ye koloba maloba yango.
BSB
BSB:
Then He said to the tree,
“May no one ever eat of your fruit again.”
And His disciples heard this statement.
15
LIN
Tango bakomaki na Yelusalemi, Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo mpe akomaki kobengana bato oyo bazalaki koteka mpe kosomba kati na Tempelo ; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo mpe bakiti ya ba-oyo bazalaki koteka bibenga ;
BSB
BSB:
When they arrived in Jerusalem, Jesus entered the temple courts and began to drive out those who were buying and selling there. He overturned the tables of the money changers and the seats of those selling doves.
16
LIN
mpe apesaki nzela te na bato oyo bazalaki kotambola kati na lopango ya tempelo ete bamema biloko.
BSB
BSB:
And He would not allow anyone to carry merchandise through the temple courts.
17
LIN
Bongo akomaki koteya bango : « Boni, ekomama te : ‹ Ndako na Ngai ekobengama Ndako ya losambo mpo na bikolo nyonso ? › Kasi bino, bokomisaki yango penza nganda ya miyibi ! »
BSB
BSB:
Then Jesus began to teach them, and He declared,
“Is it not written: ‘My house will be called a house of prayer for all the nations’? But you have made it ‘a den of robbers.’”
18
LIN
Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bayokaki makambo yango mpe bakomaki koluka nzela ya koboma Ye ; bazalaki kobanga Ye, pamba te ebele ya bato bazalaki kokamwa malakisi na Ye.
BSB
BSB:
When the chief priests and scribes heard this, they looked for a way to kill Him. For they were afraid of Him, because the whole crowd was astonished at His teaching.
19
LIN
Tango pokwa ekomaki, Yesu mpe bayekoli na Ye babimaki na engumba.
BSB
BSB:
And when evening came, Jesus and His disciples went out of the city.
20
LIN
Na tongo ya mokolo oyo elandaki, wana bazalaki koleka, bamonaki ete nzete ya figi ekawuki kino na misisa.
BSB
BSB:
As they were walking back in the morning, they saw the fig tree withered from its roots.
21
LIN
Petelo akanisaki likambo oyo esalemaki mpe alobaki na Yesu : — Moteyi, tala ! Nzete ya figi oyo olakelaki mabe ekawuki !
BSB
BSB:
Peter remembered it and said, “Look, Rabbi! The fig tree You cursed has withered.”
22
LIN
Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Bozala na kondima kati na Nzambe.
BSB
BSB:
“Have faith in God,”
Jesus said to them.
23
LIN
Nazali koloba na bino penza ya solo : soki moto alobi na ngomba wana : « Longwa wana mpe mibwaka na ebale ; » soki atie tembe te kati na motema na ye, kasi andimi ete makambo oyo alobi ekosalema, solo, akomona yango kokokisama.
BSB
BSB:
“Truly I tell you that if anyone says to this mountain, ‘Be lifted up and thrown into the sea,’ and has no doubt in his heart but believes that it will happen, it will be done for him.
24
LIN
Yango wana nazali koloba na bino : eloko nyonso oyo bokosenga wana bozali kosambela, bondima ete bosili kozwa yango mpe bokomona yango kokokisama.
BSB
BSB:
Therefore I tell you, whatever you ask for in prayer, believe that you have received it, and it will be yours.
25
LIN
Mpe tango botelemaka mpo na kosambela, soki bozali na likambo oyo bozwaki na yango moto songolo, bolimbisa ye mpo ete Tata na bino, oyo azali na Likolo alimbisa mpe masumu na bino. [
BSB
BSB:
And when you stand to pray, if you hold anything against another, forgive it, so that your Father in heaven will forgive your trespasses as well.”
26
LIN
Kasi soki bolimbisi te, Tata na bino oyo azali kati na Likolo mpe akolimbisa masumu na bino te.]
BSB
BSB:
Not in the BSB
Not in the earliest manuscripts
27
LIN
Bakendeki lisusu na Yelusalemi. Wana Yesu azalaki kotambola kati na lopango ya Tempelo, bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato bapusanaki pene na Ye mpe batunaki Ye :
BSB
BSB:
After their return to Jerusalem, Jesus was walking in the temple courts, and the chief priests, scribes, and elders came up to Him.
28
LIN
— Na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo ? Mpe nani apesi Yo bokonzi ya kosala yango ?
BSB
BSB:
“By what authority are You doing these things?” they asked. “And who gave You the authority to do them?”
29
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Nazali kotuna bino motuna moko kaka. Bopesa Ngai nanu eyano, bongo Ngai nakoyebisa bino soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.
BSB
BSB:
“I will ask you one question,”
Jesus replied,
“and if you answer Me, I will tell you by what authority I am doing these things.
30
LIN
Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato ? Boyebisa Ngai !
BSB
BSB:
John’s baptism—was it from heaven or from men? Answer Me!”
31
LIN
Bakomaki kokabola makanisi bango na bango : « Soki tolobi ete ewutaki na Nzambe, akotuna biso lisusu : bongo mpo na nini bondimaki ye te ?
BSB
BSB:
They deliberated among themselves what they should answer: “If we say, ‘From heaven,’ He will ask, ‘Why then did you not believe him?’
32
LIN
Soki mpe tolobi ete ewutaki na bato, wana… » Solo, bazalaki kobanga bato, pamba te bato nyonso bazalaki kozwa Yoane lokola mosakoli.
BSB
BSB:
But if we say, ‘From men’...” they were afraid of the people, for they all held that John truly was a prophet.
33
LIN
Boye, bazongiselaki Yesu : — Toyebi te ! Yesu mpe alobaki na bango : — Ngai mpe, nakoyebisa bino te soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.
BSB
BSB:
So they answered, “We do not know.” And Jesus replied,
“Neither will I tell you by what authority I am doing these things.”
Chapter complete
You’ve read Mark 11
Chapter 11 of 16 in Mark
Up next
Mark 12
Read Mark 12
Listen
Back to Mark 10
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Mark 11
A question this chapter raises
Why did Jesus curse a fig tree?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Mark 10
Mark 11
Mark 12