Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.42.4
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Mark
Mark
12
LIN
BSB
A
a
Mark 12
12
Mark
Jerusalem
Lingala Bible
Jesus
, person
David
, person
Caesar
, person
Israel
, person
Moses
, person
Abraham
, person
Isaac
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Bongo Yesu akomaki koloba na bango na masese : — Moto moko alonaki elanga ya vino, atongaki lopango zingazinga na yango, atimolaki ekamolelo bambuma ya vino mpe atongaki ndako molayi ya bakengeli. Sima, apesaki elanga yango na maboko ya basali mpo ete bakoma kofutela yango, mpe akendeki na mobembo.
BSB
BSB:
Then Jesus began to speak to them in parables:
“A man planted a vineyard. He put a wall around it, dug a wine vat, and built a watchtower. Then he rented it out to some tenants and went away on a journey.
2
LIN
Tango eleko ya kobuka bambuma ekokaki, atindaki mosali moko epai ya bafuteli elanga, mpo ete akende kokongola epai na bango ndambo ya bambuma kowuta na elanga ya vino.
BSB
BSB:
At harvest time, he sent a servant to the tenants to collect his share of the fruit of the vineyard.
3
LIN
Kasi bafuteli elanga bakangaki ye, babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba.
BSB
BSB:
But they seized the servant, beat him, and sent him away empty-handed.
4
LIN
Atindelaki bango mosali mosusu ; babetaki-betaki ye na moto mpe basambwisaki ye.
BSB
BSB:
Then he sent them another servant, and they struck him over the head and treated him shamefully.
5
LIN
Atindaki lisusu mosali mosusu ; oyo wana, babomaki ye. Bongo, na sima, atindaki lisusu bato ebele ; kasi babetaki bamoko, mpe babomaki bamosusu.
BSB
BSB:
He sent still another, and this one they killed. He sent many others; some they beat and others they killed.
6
LIN
Nkolo elanga atikalaki kaka na moto moko ya kotinda : mwana na ye ya bolingo. Atindaki ye na suka na bango nyonso mpe amilobelaki : « Solo, bakotosa mwana na ngai. »
BSB
BSB:
Finally, having one beloved son, he sent him to them. ‘They will respect my son,’ he said.
7
LIN
Kasi bafuteli elanga balobanaki bango na bango : « Tala mokitani ya libula ya elanga ! Boya, toboma ye mpo ete libula ya elanga ekoma ya biso ! »
BSB
BSB:
But the tenants said to one another, ‘This is the heir. Come, let us kill him, and the inheritance will be ours.’
8
LIN
Bakangaki ye, babomaki ye mpe babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino.
BSB
BSB:
So they seized the son, killed him, and threw him out of the vineyard.
9
LIN
Boye, nkolo elanga ya vino akosala nini ? Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga wana mpe akopesa elanga yango ya vino na maboko ya bafuteli mosusu.
BSB
BSB:
What then will the owner of the vineyard do? He will come and kill those tenants and give the vineyard to others.
10
LIN
Nanu botanga Makomi oyo te : « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba ?
BSB
BSB:
Have you never read this Scripture: ‘The stone the builders rejected has become the cornerstone.
11
LIN
Ezali Nkolo nde alingaki bongo, mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso ! »
BSB
BSB:
This is from the Lord, and it is marvelous in our eyes’?”
12
LIN
Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato bazalaki koluka nzela ya kokanga Yesu, pamba te basosolaki ete alobaki lisese wana mpo na bango. Kasi lokola babangaki bato, batikaki Ye ; mpe moto na moto akendeki.
BSB
BSB:
At this, the leaders sought to arrest Jesus, for they knew that He had spoken this parable against them. But fearing the crowd, they left Him and went away.
13
LIN
Sima, batindelaki Yesu ndambo ya Bafarizeo mpe ndambo ya bato ya lisanga ya Erode mpo na koluka kokanga Ye na motambo ya maloba na Ye moko.
BSB
BSB:
Later, they sent some of the Pharisees and Herodians to catch Jesus in His words.
14
LIN
Tango bakomaki epai na Ye, balobaki : — Moteyi, toyebi ete ozali moto ya sembo mpe obangaka bato te, pamba te oponaka bilongi te, kasi oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe. Boni, Mobeko na biso epesi solo nzela ya kofuta mpako ya Sezare to te ? Tosengeli penza kofuta yango ?
BSB
BSB:
“Teacher,” they said, “we know that You are honest and seek favor from no one. Indeed, You are impartial and teach the way of God in accordance with the truth. Is it lawful to pay taxes to Caesar or not? Should we pay them or not?”
15
LIN
Kasi lokola Yesu ayebaki ete bazali bato ya bilongi mibale, alobaki na bango : — Mpo na nini bozali kotiela Ngai motambo ? Bomemela Ngai mbongo moko ya ebende, mpo ete namona yango.
BSB
BSB:
But Jesus saw through their hypocrisy and said,
“Why are you testing Me? Bring Me a denarius to inspect.”
16
LIN
Bamemelaki Ye yango, mpe atunaki bango : — Elilingi ya nani mpe makomi ya nani bozali komona awa ? Bazongisaki : — Ya Sezare.
BSB
BSB:
So they brought it, and He asked them,
“Whose image is this? And whose inscription?”
“Caesar’s,” they answered.
17
LIN
Yesu alobaki na bango : — Bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare ; mpe bopesa na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe ! Bakamwaki mingi eyano ya Yesu.
BSB
BSB:
Then Jesus told them,
“Give to Caesar what is Caesar’s, and to God what is God’s.”
And they marveled at Him.
18
LIN
Bongo Basaduseo, ba-oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai na Yesu mpe batunaki Ye :
BSB
BSB:
Then the Sadducees, who say there is no resurrection, came to Jesus and questioned Him:
19
LIN
— Moteyi, Moyize akomaki mpo na biso ete soki ndeko mobali ya moto moko akufi mpe atiki mwasi, kasi aboti na ye bana te, moto wana asengeli kobala mwasi oyo ndeko na ye atiki mpo ete abotela ndeko yango bana.
BSB
BSB:
“Teacher, Moses wrote for us that if a man’s brother dies and leaves a wife but no children, the man is to marry his brother’s widow and raise up offspring for him.
20
LIN
Nzokande, ezalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko mobali ya liboso abalaki mwasi mpe akufaki, kasi abotaki bana te.
BSB
BSB:
Now there were seven brothers. The first one married and died, leaving no children.
21
LIN
Ndeko ya mibale abalaki mwasi yango kaka ; kasi ye mpe akufaki, atikalaki kobota bana te. Esalemaki kaka bongo na ndeko ya misato kino na oyo ya sambo :
BSB
BSB:
Then the second one married the widow, but he also died and left no children. And the third did likewise.
22
LIN
bandeko nyonso sambo batikalaki kobota bana te. Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki.
BSB
BSB:
In this way, none of the seven left any children. And last of all, the woman died.
23
LIN
Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani kati na bandeko nyonso sambo, pamba te bango nyonso sambo babalaki ye ?
BSB
BSB:
In the resurrection, then, whose wife will she be? For all seven were married to her.”
24
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Bozali kati na libunga, pamba te boyebi Makomi te, mpe boyebi nguya ya Nzambe te.
BSB
BSB:
Jesus said to them,
“Aren’t you mistaken, because you do not know the Scriptures or the power of God?
25
LIN
Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, bakobala lisusu te ; kasi bakozala lokola ba-anjelu kati na Likolo.
BSB
BSB:
When the dead rise, they will neither marry nor be given in marriage. Instead, they will be like the angels in heaven.
26
LIN
Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, botikala nanu kotanga te kati na buku ya Moyize, makambo oyo Nzambe alobaki na ye na tina na nzete oyo ezalaki kopela moto kasi ezalaki kozika te : « Nazali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi ? »
BSB
BSB:
But concerning the dead rising, have you not read about the burning bush in the Book of Moses, how God told him, ‘I am the God of Abraham, the God of Isaac, and the God of Jacob’?
27
LIN
Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi azali Nzambe ya bato ya bomoi. Bozali penza kati na libunga monene.
BSB
BSB:
He is not the God of the dead, but of the living. You are badly mistaken!”
28
LIN
Moko kati na balakisi ya Mobeko, oyo ayokaki bango kotiana tembe mpe amonaki ete Yesu azongiselaki bango biyano ya malamu, apusanaki pene na Yesu mpe atunaki : — Mobeko nini eleki monene kati ya mibeko nyonso ?
BSB
BSB:
Now one of the scribes had come up and heard their debate. Noticing how well Jesus had answered them, he asked Him, “Which commandment is the most important of all?”
29
LIN
Yesu azongisaki : — Tala Mobeko oyo eleki monene : « Isalaele, yoka malamu ! Yawe azali Nzambe na biso, Yawe azali kaka moko.
BSB
BSB:
Jesus replied,
“This is the most important: ‘Hear, O Israel, the Lord our God, the Lord is One.
30
LIN
Okolinga Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso. »
BSB
BSB:
Love the Lord your God with all your heart and with all your soul and with all your mind and with all your strength.’
31
LIN
Tala mobeko oyo elandi : « Okolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. » Mobeko ya motuya koleka mibeko wana mibale ezali te.
BSB
BSB:
The second is this: ‘Love your neighbor as yourself.’ No other commandment is greater than these.”
32
LIN
Bongo molakisi ya Mobeko alobaki na ye : — Moteyi, olobi malamu ; olobi solo ete Nzambe azali kaka moko, mosusu azali te.
BSB
BSB:
“Right, Teacher,” the scribe replied. “You have stated correctly that God is One and there is no other but Him,
33
LIN
Kolinga Ye na motema na yo mobimba, na mayele na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso, mpe kolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka, yango nde ezali na tina mingi koleka bambeka ya kotumba mpe makabo nyonso.
BSB
BSB:
and to love Him with all your heart and with all your understanding and with all your strength, and to love your neighbor as yourself. This is more important than all burnt offerings and sacrifices.”
34
LIN
Tango Yesu amonaki ete molakisi ya Mobeko azongisi eyano na ndenge ya mayele, alobaki na ye : — Ozali mosika te ya Bokonzi ya Nzambe. Mpe moto ata moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna.
BSB
BSB:
When Jesus saw that the man had answered wisely, He said,
“You are not far from the kingdom of God.”
And no one dared to question Him any further.
35
LIN
Wana Yesu azalaki koteya kati na lopango ya Tempelo, atunaki : — Ndenge nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Klisto azali Mwana ya Davidi ?
BSB
BSB:
While Jesus was teaching in the temple courts, He asked,
“How can the scribes say that the Christ is the Son of David?
36
LIN
Pamba te Davidi, ye moko, alobaki boye na nzela ya Molimo Mosantu : « Yawe alobaki na Nkolo na ngai : ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino natia banguna na Yo na se ya matambe na Yo. › »
BSB
BSB:
Speaking by the Holy Spirit, David himself declared: ‘The Lord said to my Lord, “Sit at My right hand until I put Your enemies under Your feet.”’
37
LIN
Soki ye moko Davidi azali kobenga Ye « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye ? Ebele ya bato bazalaki koyoka Ye na esengo.
BSB
BSB:
David himself calls Him ‘Lord.’ So how can He be David’s son?”
And the large crowd listened to Him with delight.
38
LIN
Wana azalaki koteya, Yesu alobaki : — Bosala keba na balakisi ya Mobeko ! Balingaka kotambola na banzambala ya milayi ; balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka ;
BSB
BSB:
In His teaching Jesus also said,
“Watch out for the scribes. They like to walk around in long robes, to receive greetings in the marketplaces,
39
LIN
balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti ;
BSB
BSB:
and to have the chief seats in the synagogues and the places of honor at banquets.
40
LIN
bayibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali, mpe basalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Bakozwa etumbu oyo eleki makasi.
BSB
BSB:
They defraud widows of their houses, and for a show make lengthy prayers. These men will receive greater condemnation.”
41
LIN
Yesu avandaki liboso ya kitunga ya makabo mpe azalaki kotala ndenge bato bazalaki kotia mbongo kati na kitunga ya makabo. Bazwi ebele bazalaki kotia mbongo ebele.
BSB
BSB:
As Jesus was sitting opposite the treasury, He watched the crowd putting money into it. And many rich people put in large amounts.
42
LIN
Mwasi mobola moko akufisa mobali ayaki mpe atiaki mbongo mibale ya bibende, oyo ezalaki na motuya moke penza.
BSB
BSB:
Then one poor widow came and put in two small copper coins, which amounted to a small fraction of a denarius.
43
LIN
Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : mwasi mobola oyo akufisa mobali apesi koleka bato nyonso oyo bawuti kotia mbongo kati na kitunga ya makabo.
BSB
BSB:
Jesus called His disciples to Him and said,
“Truly I tell you, this poor widow has put more than all the others into the treasury.
44
LIN
Pamba te bato nyonso bazwi kati na mbongo oyo bazali na yango na tina te, mpo na kotia kati na kitunga ya makabo ; kasi ye, kati na kokelela na ye, atie bozwi na ye nyonso, nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobika na yango.
BSB
BSB:
For they all contributed out of their surplus, but she out of her poverty has put in all she had to live on.”
Chapter complete
You’ve read Mark 12
Chapter 12 of 16 in Mark
Up next
Mark 13
Read Mark 13
Listen
Back to Mark 11
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Mark 12
A question this chapter raises
Doesn’t “the LORD is one” rule out the Trinity?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Mark 11
Mark 12
Mark 13