Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.7
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Mark
Mark
2
LIN
BSB
A
a
Mark 2
2
Mark
Ministry in Galilee
Lingala Bible
Jesus
, person
David
, person
John
, person
Abiathar
, person
Capernaum
, place
Levi
, person
Alphaeus
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Sima na mwa mikolo, Yesu azongaki lisusu na Kapernawumi. Tango bato bayokaki ete azali na ndako,
BSB
BSB:
A few days later Jesus went back to Capernaum. And when the people heard that He was home,
2
LIN
bayaki ebele kosangana kati na ndako yango kino esika ezalaki lisusu te, ezala na liboso ya ekuke, mpe Yesu ateyaki bango Sango Malamu.
BSB
BSB:
they gathered in such large numbers that there was no more room, not even outside the door, as Jesus spoke the word to them.
3
LIN
Bato mosusu bamemelaki Ye ebosono oyo bato minei batomboli.
BSB
BSB:
Then a paralytic was brought to Him, carried by four men.
4
LIN
Lokola balongaki te kokomisa ebosono yango kino na esika oyo Yesu azalaki, pamba te bato bazalaki ebele penza, bamataki likolo ya mwanza ya ndako kino na esika oyo Yesu azalaki mpe batobolaki lidusu. Bongo na nzela ya lidusu yango, bakitisaki na tsipoyi ebosono yango.
BSB
BSB:
Since they were unable to get to Jesus through the crowd, they uncovered the roof above Him, made an opening, and lowered the paralytic on his mat.
5
LIN
Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono : — Mwana na Ngai, masumu na yo elimbisami.
BSB
BSB:
When Jesus saw their faith, He said to the paralytic,
“Son, your sins are forgiven.”
6
LIN
Kasi ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bazalaki wana bakomaki kolobaloba na se ya mitema :
BSB
BSB:
But some of the scribes were sitting there and thinking in their hearts,
7
LIN
« Mpo na nini moto oyo azali koloba bongo ? Azali kotiola Nzambe ! Nani akoki kolimbisa masumu soki kaka Ye moko Nzambe te ? »
BSB
BSB:
“Why does this man speak like this? He is blaspheming! Who can forgive sins but God alone?”
8
LIN
Mbala moko, kati na molimo na Ye, Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki na bango : — Mpo na nini mitema na bino ezali kokanisa bongo ?
BSB
BSB:
At once Jesus knew in His spirit that they were thinking this way within themselves.
“Why are you thinking these things in your hearts?”
He asked.
9
LIN
Likambo nini eleki pete mpo na koloba na ebosono : « Masumu na yo elimbisami to telema, kamata tsipoyi na yo mpe tambola ? »
BSB
BSB:
“Which is easier: to say to a paralytic, ‘Your sins are forgiven,’ or to say, ‘Get up, pick up your mat, and walk’?
10
LIN
Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili. Bongo alobaki na ebosono :
BSB
BSB:
But so that you may know that the Son of Man has authority on earth to forgive sins...”
He said to the paralytic,
11
LIN
— Nalobi na yo : Telema, kamata tsipoyi na yo mpe zonga na ndako na yo.
BSB
BSB:
“I tell you, get up, pick up your mat, and go home.”
12
LIN
Mbala moko, atelemaki, akamataki tsipoyi na ye mpe abimaki na miso ya bato nyonso. Bato nyonso bakamwaki makasi mpe bakomaki kokumisa Nzambe na maloba oyo : « Totikala nanu komona likambo ya boye te ! »
BSB
BSB:
And immediately the man got up, picked up his mat, and walked out in front of them all. As a result, they were all astounded and glorified God, saying, “We have never seen anything like this!”
13
LIN
Yesu abimaki lisusu mpe akendeki pembeni ya ebale. Bato ebele bayaki epai na Ye mpe ateyaki bango.
BSB
BSB:
Once again Jesus went out beside the sea. All the people came to Him, and He taught them there.
14
LIN
Wana azalaki kotambola, amonaki Levi, mwana mobali ya Alife, avandi na ndako ya mosala epai wapi bafutaka mpako. Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. » Levi atelemaki mpe alandaki Ye.
BSB
BSB:
As He was walking along, He saw Levi son of Alphaeus sitting at the tax booth.
“Follow Me,”
He told him, and Levi got up and followed Him.
15
LIN
Wana Yesu azalaki kolia na ndako ya Levi, bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu ya masumu bazalaki kolia mesa moko na Yesu elongo na bayekoli na Ye ; pamba te bato ebele penza bazalaki kolanda Ye.
BSB
BSB:
While Jesus was dining at Levi’s house, many tax collectors and sinners were eating with Him and His disciples—for there were many who followed Him.
16
LIN
Tango balakisi ya Mobeko ya lingomba ya Bafarizeo bamonaki Yesu kolia mesa moko na bato ya masumu mpe bafutisi mpako, batunaki bayekoli na Ye : — Mpo na nini azali kolia mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ?
BSB
BSB:
When the scribes who were Pharisees saw Jesus eating with these people, they asked His disciples, “Why does He eat with tax collectors and sinners?”
17
LIN
Tango Yesu ayokaki bongo, alobaki na bango : — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te ; ezali babeli nde bazalaka na posa na ye. Nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu.
BSB
BSB:
On hearing this, Jesus told them,
“It is not the healthy who need a doctor, but the sick. I have not come to call the righteous, but sinners.”
18
LIN
Nzokande bayekoli ya Yoane mpe Bafarizeo bazalaki kokila bilei. Bongo bato bayaki kotuna Yesu : — Mpo na nini bayekoli ya Yoane mpe Bafarizeo bakilaka bilei, kasi bayekoli na yo bakilaka bilei te ?
BSB
BSB:
Now John’s disciples and the Pharisees were often fasting. So people came to Jesus and asked, “Why don’t Your disciples fast like John’s disciples and those of the Pharisees?”
19
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Ndenge nini bato oyo babengami na feti ya libala bakoki kokila bilei, wana mobali ya libala azali nanu elongo na bango ? Tango nyonso mobali ya libala azali elongo na bango, bakoki kokila bilei te.
BSB
BSB:
Jesus replied,
“How can the guests of the bridegroom fast while He is with them? As long as He is with them, they cannot fast.
20
LIN
Kasi tango ezali koya oyo bakolongola mobali ya libala kati na bango ; mpe ekozala na tango wana nde bakokila bilei.
BSB
BSB:
But the time will come when the bridegroom will be taken from them; then they will fast.
21
LIN
Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala, noki te eteni ya elamba ya sika ekopasola elamba ya kala mpe ekosala lidusu ya monene koleka.
BSB
BSB:
No one sews a patch of unshrunk cloth on an old garment. If he does, the new piece will pull away from the old, and a worse tear will result.
22
LIN
Moto moko te atiaka vino ya sika kati na bambeki ya kala, noki te vino ya sika ekopasola bambeki ; vino ekosopana mpe bambeki ekopasuka. Nzokande, batiaka kaka vino ya sika kati na bambeki ya sika !
BSB
BSB:
And no one pours new wine into old wineskins. If he does, the wine will burst the skins, and both the wine and the wineskins will be ruined. Instead, new wine is poured into new wineskins.”
23
LIN
Ezalaki mokolo moko, Yesu azalaki kotambola kati na elanga ya ble ; ezalaki mokolo ya Saba. Wana bazalaki kotambola, bayekoli na Ye bazalaki kobuka ble.
BSB
BSB:
One Sabbath Jesus was passing through the grainfields, and His disciples began to pick the heads of grain as they walked along.
24
LIN
Bafarizeo balobaki na Yesu : — Mpo na nini bayekoli na Yo bazali kosala likambo oyo epekisami kosalema na mokolo ya Saba ?
BSB
BSB:
So the Pharisees said to Him, “Look, why are they doing what is unlawful on the Sabbath?”
25
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Botanga nanu te makambo oyo Davidi asalaki tango ye elongo na baninga na ye bazalaki na nzala mpe bazangaki bilei ?
BSB
BSB:
Jesus replied,
“Have you never read what David did when he and his companions were hungry and in need?
26
LIN
Akotaki kati na Ndako ya Nzambe wana Abiatari azalaki mokonzi ya Banganga-Nzambe, aliaki mapa oyo ebulisama mpo na Nzambe mpe apesaki yango epai ya bato na ye ; nzokande, kaka Banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango.
BSB
BSB:
During the high priesthood of Abiathar, he entered the house of God and ate the consecrated bread, which was lawful only for the priests. And he gave some to his companions as well.”
27
LIN
Bongo alobaki na bango lisusu : — Mokolo ya Saba esalema mpo na moto, kasi moto asalema te mpo na mokolo ya Saba.
BSB
BSB:
Then Jesus declared,
“The Sabbath was made for man, not man for the Sabbath.
28
LIN
Yango wana, Mwana na Moto azali mpe Mokonzi ya mokolo ya Saba.
BSB
BSB:
Therefore, the Son of Man is Lord even of the Sabbath.”
Chapter complete
You’ve read Mark 2
Chapter 2 of 16 in Mark
Up next
Mark 3
Read Mark 3
Listen
Back to Mark 1
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Mark 2
A question this chapter raises
Did Jesus ever claim to be God?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Mark 1
Mark 2
Mark 3