Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.7
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Mark
Mark
3
LIN
BSB
A
a
Mark 3
3
Mark
Ministry in Galilee
Lingala Bible
Jerusalem
, place
Jesus
, person
Jordan
, place
Peter
, person
Galilee
, place
Judea
, place
Tyre
, place
John
, person
14 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Yesu akotaki lisusu na ndako ya mayangani epai wapi ezalaki na moto moko akufa loboko.
BSB
BSB:
Once again Jesus entered the synagogue, and a man with a withered hand was there.
2
LIN
Boye bato bazalaki kotala soki Yesu akobikisa ye na mokolo ya Saba mpo na kofunda Ye.
BSB
BSB:
In order to accuse Jesus, they were watching to see if He would heal on the Sabbath.
3
LIN
Bongo Yesu alobaki na moto oyo akufa loboko : — Telema na liboso ya bato nyonso.
BSB
BSB:
Then Jesus said to the man with the withered hand,
“Stand up among us.”
4
LIN
Atunaki bango : — Nini epesamela nzela ya kosala na mokolo ya Saba : kosala bolamu to kosala mabe, kobikisa moto to kotika ye kokufa ? Kasi babatelaki kimia.
BSB
BSB:
And He asked them,
“Which is lawful on the Sabbath: to do good or to do evil, to save life or to destroy it?”
But they were silent.
5
LIN
Yesu atalaki bango na mawa mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo ete mitema na bango ezalaki makasi lokola libanga. Yesu alobaki na moto yango : — Sembola loboko na yo ! Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebikaki.
BSB
BSB:
Jesus looked around at them with anger and sorrow at their hardness of heart. Then He said to the man,
“Stretch out your hand.”
So he stretched it out, and it was restored.
6
LIN
Mbala moko, Bafarizeo babimaki mpe bakendeki koyokana na bato ya lisanga ya Erode mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu.
BSB
BSB:
At this, the Pharisees went out and began plotting with the Herodians how they might kill Jesus.
7
LIN
Tango Yesu alongwaki kuna, akendeki na ebale elongo na bayekoli na Ye, mpe bato ebele penza balandaki Ye wuta na Galile, na Yuda,
BSB
BSB:
So Jesus withdrew with His disciples to the sea, accompanied by a large crowd from Galilee, Judea,
8
LIN
na Yelusalemi, na Idume mpe na ngambo ya Yordani. Boye tango bato oyo bazalaki na bamboka ya zingazinga ya Tiri mpe ya Sidoni bayokaki sango ya makambo nyonso oyo Yesu azalaki kosala, bango mpe bayaki ebele penza epai na Ye.
BSB
BSB:
Jerusalem, Idumea, the region beyond the Jordan, and the vicinity of Tyre and Sidon. The large crowd came to Him when they heard what great things He was doing.
9
LIN
Boye Yesu atindaki bayekoli ete babongisela Ye bwato moko mpo ete bato bafinafina Ye te.
BSB
BSB:
Jesus asked His disciples to have a boat ready for Him so that the crowd would not crush Him.
10
LIN
Lokola azalaki kobikisa bato ebele, bato oyo bazalaki na pasi bakomaki kowelela koya epai na Ye mpo na koluka kosimba Ye.
BSB
BSB:
For He had healed so many that all who had diseases were pressing forward to touch Him.
11
LIN
Tango bato oyo bazalaki na milimo mabe bazalaki komona Ye, bazalaki kogumbama liboso na Ye mpe koganga : — Yo ozali solo Mwana na Nzambe !
BSB
BSB:
And when the unclean spirits saw Him, they fell down before Him and cried out, “You are the Son of God!”
12
LIN
Kasi Yesu azalaki kopamela milimo yango ete emeka te koloba na tina na Ye.
BSB
BSB:
But He warned them sternly not to make Him known.
13
LIN
Yesu amataki likolo ya ngomba, abengaki bato oyo azalaki na bosenga na bango, mpe bakendeki epai na Ye.
BSB
BSB:
Then Jesus went up on the mountain and called for those He wanted, and they came to Him.
14
LIN
Kati na bango, aponaki bato zomi na mibale oyo akomaki kobenga « bantoma, » mpo ete bazala elongo na Ye mpe mpo ete bakende koteya Sango Malamu ;
BSB
BSB:
He appointed twelve of them, whom He designated as apostles, to accompany Him, to be sent out to preach,
15
LIN
mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe.
BSB
BSB:
and to have authority to drive out demons.
16
LIN
Tala bakombo ya bato zomi na mibale oyo aponaki : Simona oyo Yesu apesaki kombo « Petelo ; »
BSB
BSB:
These are the twelve He appointed: Simon (whom He named Peter),
17
LIN
Jake, mwana mobali ya Zebede, mpe Yoane, ndeko na ye, ba-oyo Yesu apesaki kombo « Boanerijesi » oyo elingi koloba : bana ya kake ;
BSB
BSB:
James son of Zebedee and his brother John (whom He named Boanerges, meaning “Sons of Thunder”),
18
LIN
Andre, Filipo, Bartelemi, Matayo, Toma, Jake, mwana mobali ya Alife ; Tade, Simona oyo azalaki moko kati na lisanga ya Bazelote,
BSB
BSB:
Andrew, Philip, Bartholomew, Matthew, Thomas, James son of Alphaeus, Thaddaeus, Simon the Zealot,
19
LIN
mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.
BSB
BSB:
and Judas Iscariot, who betrayed Jesus.
20
LIN
Tango Yesu akotaki na ndako, bato ebele bayaki lisusu kosangana wana, mpe esalaki ete Ye elongo na bayekoli na Ye bazangaki ata tango mpo na kolia.
BSB
BSB:
Then Jesus went home, and once again a crowd gathered, so that He and His disciples could not even eat.
21
LIN
Tango bandeko ya libota na Ye bayokaki bongo, bayaki mpo na kozwa Ye na makasi, pamba te bazalaki koloba : — Akomi na bokono ya liboma.
BSB
BSB:
When His family heard about this, they went out to take custody of Him, saying, “He is out of His mind.”
22
LIN
Balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi balobaki : — Azali na molimo ya Belizebule kati na ye mpe azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe.
BSB
BSB:
And the scribes who had come down from Jerusalem were saying, “He is possessed by Beelzebul,” and, “By the prince of the demons He drives out demons.”
23
LIN
Yesu abengaki bango mpe alobaki na bango na masese : — Ndenge nini Satana akoki kobengana Satana ?
BSB
BSB:
So Jesus called them together and began to speak to them in parables:
“How can Satan drive out Satan?
24
LIN
Soki bokonzi moko ekabwani, bokonzi yango ekowumela te.
BSB
BSB:
If a kingdom is divided against itself, it cannot stand.
25
LIN
Soki libota moko ekabwani, libota yango ekowumela te ;
BSB
BSB:
If a house is divided against itself, it cannot stand.
26
LIN
mpe soki Satana amibundisi mpe akabwani na ye moko, akowumela te, mpe suka na ye emonani.
BSB
BSB:
And if Satan is divided and rises against himself, he cannot stand; his end has come.
27
LIN
Pamba te moto moko te akoki kokota na ndako ya elombe mpo na kobotola biloko na ye soki liboso akangi ye te na basinga. Ezali kaka soki asali bongo nde akoki kobotola biloko na ye ya ndako.
BSB
BSB:
Indeed, no one can enter a strong man’s house to steal his possessions unless he first ties up the strong man. Then he can plunder his house.
28
LIN
Nazali koloba na bino penza ya solo : masumu mpe maloba nyonso ya mabe oyo bato bakoki kofinga na yango Nzambe ekolimbisama ;
BSB
BSB:
Truly I tell you, the sons of men will be forgiven all sins and blasphemies, as many as they utter.
29
LIN
kasi moto nyonso oyo akofinga Molimo Mosantu akolimbisama te, akomema mokumba ya lisumu yango mpo na libela.
BSB
BSB:
But whoever blasphemes against the Holy Spirit will never be forgiven; he is guilty of eternal sin.”
30
LIN
Yesu alobaki bongo, mpo ete bazalaki koloba : « Azali na molimo mabe ! »
BSB
BSB:
Jesus made this statement because they were saying, “He has an unclean spirit.”
31
LIN
Mama mpe bandeko mibali ya Yesu bayaki, batelemaki libanda mpe batindaki moto kobenga Yesu.
BSB
BSB:
Then Jesus’ mother and brothers came and stood outside. They sent someone in to summon Him,
32
LIN
Bato ebele penza bavandaki pembeni na Ye. Mpe bayaki koloba na Ye : — Mama mpe bandeko na yo ya mibali bazali libanda, bazali koluka yo. Yesu azongisaki :
BSB
BSB:
and a crowd was sitting around Him. “Look,” He was told, “Your mother and brothers are outside, asking for You.”
33
LIN
— Nani mama na Ngai ? Banani bandeko na Ngai ?
BSB
BSB:
But Jesus replied,
“Who are My mother and My brothers?”
34
LIN
Atalaki bato oyo bavandaki pembeni na Ye mpe alobaki : — Botala mama na Ngai mpe bandeko na Ngai !
BSB
BSB:
Looking at those seated in a circle around Him, He said,
“Here are My mother and My brothers!
35
LIN
Moto nyonso oyo asalaka mokano ya Nzambe, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.
BSB
BSB:
For whoever does the will of God is My brother and sister and mother.”
Chapter complete
You’ve read Mark 3
Chapter 3 of 16 in Mark
Up next
Mark 4
Read Mark 4
Listen
Back to Mark 2
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Mark 3
A question this chapter raises
Did Jesus really do miracles?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Mark 2
Mark 3
Mark 4