Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.39.2
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Matt
Matthew
11
LIN
BSB
A
a
Matthew 11
11
Matthew
Ministry in Galilee: words and deeds
Lingala Bible
John
, person
Jesus
, person
Tyre
, place
Sodom
, place
Sidon
, place
Elias
, person
Capernaum
, place
Bethsaida
, place
1 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tango Yesu asilisaki kopesa mitindo epai ya bayekoli na Ye zomi na mibale, alongwaki wana, akendeki koteya mpe kopanza Sango Malamu kati na bingumba na bango.
BSB
BSB:
After Jesus had finished instructing His twelve disciples, He went on from there to teach and preach in their cities.
2
LIN
Wana Yoane Mobatisi azalaki kati na boloko, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo Klisto azalaki kosala ; atindaki bayekoli na ye
BSB
BSB:
Meanwhile John heard in prison about the works of Christ, and he sent his disciples
3
LIN
kotuna epai ya Yesu : — Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu ?
BSB
BSB:
to ask Him, “Are You the One who was to come, or should we look for someone else?”
4
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Bokende koyebisa Yoane makambo oyo bozali komona mpe koyoka :
BSB
BSB:
Jesus replied,
“Go back and report to John what you hear and see:
5
LIN
bakufi miso bazali komona, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi matoyi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.
BSB
BSB:
The blind receive sight, the lame walk, the lepers are cleansed, the deaf hear, the dead are raised, and the good news is preached to the poor.
6
LIN
Esengo na moto oyo akokweyisa kondima na ye te likolo na Ngai !
BSB
BSB:
Blessed is the one who does not fall away on account of Me.”
7
LIN
Wana bayekoli ya Yoane bazalaki kozonga, Yesu akomaki koloba na ebele ya bato na tina na Yoane ; atunaki bango : — Eloko nini bokendeki kotala kati na esobe ? Mwa nzete oyo mopepe ezalaki koningisa epai na epai ?
BSB
BSB:
As John’s disciples were leaving, Jesus began to speak to the crowds about John:
“What did you go out into the wilderness to see? A reed swaying in the wind?
8
LIN
Soki mwa nzete yango te, bokendeki penza kotala nini ? Moto moko alati bilamba ya kitoko ? Te ! Bato oyo balataka bilamba ya kitoko bavandaka na bandako ya bakonzi.
BSB
BSB:
Otherwise, what did you go out to see? A man dressed in fine clothes? Look, those who wear fine clothing are found in kings’ palaces.
9
LIN
Kasi bino, bokendeki penza kotala nini kati na esobe ? Mosakoli ? Solo, nazali koloba na bino penza ya solo : aleki kutu ata mosakoli.
BSB
BSB:
What then did you go out to see? A prophet? Yes, I tell you, and more than a prophet.
10
LIN
Pamba te, azali moto oyo bakoma na tina na ye : « Nakotinda ntoma na Ngai liboso na Yo mpo na kobongisela Yo nzela. »
BSB
BSB:
This is the one about whom it is written: ‘Behold, I will send My messenger ahead of You, who will prepare Your way before You.’
11
LIN
Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo babotama na mwasi, moko te aleki Yoane Mobatisi na monene ; nzokande, ye oyo aleki moke kati na Bokonzi ya Likolo aleki Yoane Mobatisi na monene.
BSB
BSB:
Truly I tell you, among those born of women there has risen no one greater than John the Baptist. Yet even the least in the kingdom of heaven is greater than he.
12
LIN
Wuta na tango oyo Yoane Mobatisi azalaki koteya kino sik’oyo, kokota na Bokonzi ya Likolo ezali likambo ya koyika mpiko, mpe ezali kaka bato oyo bazali kobunda na kondima nde bazali kokota kuna.
BSB
BSB:
From the days of John the Baptist until now, the kingdom of heaven has been subject to violence, and the violent lay claim to it.
13
LIN
Pamba te basakoli nyonso mpe Mobeko basakolaki yango bango nyonso kino na tango ya Yoane.
BSB
BSB:
For all the Prophets and the Law prophesied until John.
14
LIN
Mpe, soki bokoki kondima, boyeba ete ye nde azali Eliya oyo asengeli koya.
BSB
BSB:
And if you are willing to accept it, he is the Elijah who was to come.
15
LIN
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !
BSB
BSB:
He who has ears, let him hear.
16
LIN
Na nani penza nakokokanisa bato ya ekeke oyo ? Bakokani penza na bana mike oyo bavandi na esika oyo bato ebele bakutanaka mpe bazali koganga epai ya bamosusu :
BSB
BSB:
To what can I compare this generation? They are like children sitting in the marketplaces and calling out to others:
17
LIN
« Tobetaki baflite, kasi bobinaki te ; toyembelaki bino banzembo ya matanga, kasi bolelaki-lelaki te. »
BSB
BSB:
‘We played the flute for you, and you did not dance; we sang a dirge, and you did not mourn.’
18
LIN
Pamba te, tango Yoane ayaki, azalaki kolia te mpe azalaki komela vino te ; mpe balobaki : « Azali na molimo mabe kati na ye ! »
BSB
BSB:
For John came neither eating nor drinking, and they say, ‘He has a demon!’
19
LIN
Mpe awa Mwana na Moto mpe ayei, azali kolia mpe azali komela ; kasi bazali koloba : « Azali na lokoso ya kolia mpe azali molangwi masanga, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu. » Nzokande, misala ya bwanya etalisaka solo ete ezali sembo.
BSB
BSB:
The Son of Man came eating and drinking, and they say, ‘Look at this glutton and drunkard, a friend of tax collectors and sinners!’ But wisdom is vindicated by her actions.”
20
LIN
Bongo Yesu apamelaki bingumba epai wapi asalaki mingi kati na bikamwa na Ye, pamba te bavandi na yango babongolaki mitema te.
BSB
BSB:
Then Jesus began to denounce the cities in which most of His miracles had been performed, because they did not repent.
21
LIN
Alobaki : — Mawa na yo, Korazini ! Mawa na yo, Betisaida ! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele bavandi na yango babongolaki mitema wuta kala, mpe mbele batalisaki yango na kolata basaki mpe na komipakola putulu !
BSB
BSB:
“Woe to you, Chorazin! Woe to you, Bethsaida! For if the miracles that were performed in you had been performed in Tyre and Sidon, they would have repented long ago in sackcloth and ashes.
22
LIN
Yango wana, nazali koloba na bino : na mokolo ya kosambisama, etumbu na bino ekozala makasi koleka etumbu ya Tiri mpe Sidoni.
BSB
BSB:
But I tell you, it will be more bearable for Tyre and Sidon on the day of judgment than for you.
23
LIN
Mpe yo, Kapernawumi, okanisi ete okotombolama kino na Likolo ? Te ! Okokitisama kino na mboka ya bakufi ! Pamba te, soki bikamwa oyo esalemaki kati na yo esalemaki kati na Sodome, mbele Sodome ezali kowumela kino na mokolo ya lelo.
BSB
BSB:
And you, Capernaum, will you be lifted up to heaven? No, you will be brought down to Hades! For if the miracles that were performed in you had been performed in Sodom, it would have remained to this day.
24
LIN
Yango wana, nazali koloba na bino : na mokolo ya kosambisama, etumbu na yo ekozala makasi koleka etumbu mokili ya Sodome.
BSB
BSB:
But I tell you that it will be more bearable for Sodom on the day of judgment than for you.”
25
LIN
Kaka na tango yango, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te, obombaki makambo oyo mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike !
BSB
BSB:
At that time Jesus declared,
“I praise You, Father, Lord of heaven and earth, because You have hidden these things from the wise and learned, and revealed them to little children.
26
LIN
Iyo, Tata, pamba te, kati na boboto na Yo, olingaki ete esalema bongo !
BSB
BSB:
Yes, Father, for this was well-pleasing in Your sight.
27
LIN
Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi Mwana longola kaka Tata, mpe moko te ayebi Tata longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.
BSB
BSB:
All things have been entrusted to Me by My Father. No one knows the Son except the Father, and no one knows the Father except the Son and those to whom the Son chooses to reveal Him.
28
LIN
Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba ; Ngai, nakopesa bino bopemi.
BSB
BSB:
Come to Me, all you who are weary and burdened, and I will give you rest.
29
LIN
Bozwa ekangiseli na Ngai, bomema yango mpe boyekola epai na Ngai, pamba te nazali na motema ya boboto mpe ya komikitisa, bongo milimo na bino ekozwa bopemi.
BSB
BSB:
Take My yoke upon you and learn from Me, for I am gentle and humble in heart, and you will find rest for your souls.
30
LIN
Solo, ekangiseli na Ngai ezali pasi te, mpe mokumba na Ngai ezali pepele.
BSB
BSB:
For My yoke is easy and My burden is light.”
Chapter complete
You’ve read Matthew 11
Chapter 11 of 28 in Matthew
Up next
Matthew 12
Read Matthew 12
Listen
Back to Matthew 10
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Matthew 11
A question this chapter raises
Did Jesus really do miracles?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Matthew 10
Matthew 11
Matthew 12