Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.39.3
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Matt
Matthew
12
LIN
BSB
A
a
Matthew 12
12
Matthew
Ministry in Galilee: words and deeds
Lingala Bible
Jesus
, person
Jonah
, person
David
, person
Solomon
, person
Isaiah
, person
Queen of Sheba
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Na tango wana, Yesu alekaki kati na bilanga ya ble na mokolo ya Saba. Lokola bayekoli na Ye bakomaki na nzala, babandaki kobuka ble mpe kolia yango.
BSB
BSB:
At that time Jesus went through the grainfields on the Sabbath. His disciples were hungry and began to pick the heads of grain and eat them.
2
LIN
Tango Bafarizeo bamonaki bongo, balobaki na Yesu : — Tala bayekoli na Yo ! Bazali kosala likambo oyo epekisami kosalema na mokolo ya Saba.
BSB
BSB:
When the Pharisees saw this, they said to Him, “Look, Your disciples are doing what is unlawful on the Sabbath.”
3
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Botanga nanu te makambo oyo Davidi asalaki tango ye elongo na baninga na ye bazalaki na nzala,
BSB
BSB:
Jesus replied,
“Have you not read what David did when he and his companions were hungry?
4
LIN
ndenge nini akotaki kati na Ndako ya Nzambe ; mpe, ye elongo na bato na ye, baliaki mapa oyo ebulisama ; nzokande, ezala ye to bato na ye, moko te azalaki na ndingisa ya kolia yango ; kaka Banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango ?
BSB
BSB:
He entered the house of God, and he and his companions ate the consecrated bread, which was not lawful for them to eat, but only for the priests.
5
LIN
Botikala mpe nanu kotanga te kati na Mobeko ete, na mokolo ya Saba, Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Tempelo babukaka mobeko ya Saba, kasi bakweyaka na mbeba te mpo na yango ?
BSB
BSB:
Or haven’t you read in the Law that on the Sabbath the priests in the temple break the Sabbath and yet are innocent?
6
LIN
Nzokande, Ngai, nazali koloba na bino ete ezali awa na moto moko oyo azali monene koleka Tempelo !
BSB
BSB:
But I tell you that One greater than the temple is here.
7
LIN
Ah soki bososolaki ndimbola ya maloba oyo : « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » bokokaki kopamela te bato oyo mpo ete basali mabe te !
BSB
BSB:
If only you had known the meaning of ‘I desire mercy, not sacrifice,’ you would not have condemned the innocent.
8
LIN
Pamba te Mwana na Moto azali Mokonzi ya mokolo ya Saba.
BSB
BSB:
For the Son of Man is Lord of the Sabbath.”
9
LIN
Sima na Yesu kolongwa na esika yango, akendeki na ndako na bango ya mayangani
BSB
BSB:
Moving on from there, Jesus entered their synagogue,
10
LIN
epai wapi ezalaki na moto moko akufa loboko. Bafarizeo batunaki Yesu : — Boni, mibeko epesa nzela ya kobikisa bato na mokolo ya Saba ? Batunaki Ye bongo, pamba te bazalaki koluka likambo mpo na kofunda Ye.
BSB
BSB:
and a man with a withered hand was there. In order to accuse Jesus, they asked Him, “Is it lawful to heal on the Sabbath?”
11
LIN
Kasi Yesu azongiselaki bango : — Nani kati na bino, soki azali kaka na meme moko, mpe meme yango ekweyi kati na libulu, akokita te kati na libulu, na mokolo ya Saba, mpo na kobimisa yango ?
BSB
BSB:
He replied,
“If one of you has a sheep and it falls into a pit on the Sabbath, will he not take hold of it and lift it out?
12
LIN
Nzokande, moto azali na motuya koleka meme ! Boye, kosala bolamu na mokolo ya Saba endimama na mobeko.
BSB
BSB:
How much more valuable is a man than a sheep! Therefore it is lawful to do good on the Sabbath.”
13
LIN
Bongo, alobaki na moto yango : — Sembola loboko na yo. Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebongaki, ekomaki malamu lokola loboko mosusu.
BSB
BSB:
Then Jesus said to the man,
“Stretch out your hand.”
So he stretched it out, and it was restored to full use, just like the other.
14
LIN
Bafarizeo babimaki mpe bakabolaki makanisi kati na bango mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu.
BSB
BSB:
But the Pharisees went out and plotted how they might kill Jesus.
15
LIN
Wana Yesu asosolaki ete basali mabongisi ya koboma Ye, alongwaki na esika yango. Bato ebele balandaki Ye, mpe abikisaki babeli nyonso.
BSB
BSB:
Aware of this, Jesus withdrew from that place. Large crowds followed Him, and He healed them all,
16
LIN
Kasi apekisaki bango kobeta ata lisolo na tina na Ye.
BSB
BSB:
warning them not to make Him known.
17
LIN
Asalaki bongo mpo ete maloba ya mosakoli Ezayi ekokisama :
BSB
BSB:
This was to fulfill what was spoken through the prophet Isaiah:
18
LIN
« Tala mosali na Ngai, oyo naponi ; molingami na Ngai, mosali oyo nalingaka mingi, oyo asalaka esengo na Ngai. Nakopesa Ye Molimo na Ngai, mpe akosakola bosembo epai ya bikolo ya bapaya.
BSB
BSB:
“Here is My Servant, whom I have chosen, My beloved, in whom My soul delights. I will put My Spirit on Him, and He will proclaim justice to the nations.
19
LIN
Akoswana te mpe akoganga te, bakoyoka mongongo na Ye te na babalabala.
BSB
BSB:
He will not quarrel or cry out; no one will hear His voice in the streets.
20
LIN
Akobuka te mwa nzete ya kolemba oyo egumbama mpe akoboma te mwinda oyo elingi kokufa kino akosala ete bosembo elonga
BSB
BSB:
A bruised reed He will not break, and a smoldering wick He will not extinguish, till He leads justice to victory.
21
LIN
mpe bikolo nyonso ya bapaya etia elikya na Kombo na Ye. »
BSB
BSB:
In His name the nations will put their hope.”
22
LIN
Bongo bamemelaki Yesu moto moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe, azalaki mokufi miso mpe azalaki koloba te. Yesu abikisaki ye ; boye moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba mpe komona.
BSB
BSB:
Then a demon-possessed man who was blind and mute was brought to Jesus, and He healed the man so that he could speak and see.
23
LIN
Bato nyonso bakamwaki mpe bazalaki koloba : — Boni, moto oyo azali mwana ya Davidi te ?
BSB
BSB:
The crowds were astounded and asked, “Could this be the Son of David?”
24
LIN
Kasi tango Bafarizeo bayokaki maloba oyo ezalaki kolobama na tina na Yesu, balobaki : — Moto oyo azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, mokonzi ya milimo mabe.
BSB
BSB:
But when the Pharisees heard this, they said, “Only by Beelzebul, the prince of demons, does this man drive out demons.”
25
LIN
Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, alobaki na bango : — Bokonzi nyonso oyo bavandi na yango bakomi kobunda bango na bango ekobebisama ; engumba nyonso to ndako nyonso oyo bato na yango bazali lisusu na bomoko te ekowumela te.
BSB
BSB:
Knowing their thoughts, Jesus said to them,
“Every kingdom divided against itself will be laid waste, and every city or household divided against itself will not stand.
26
LIN
Soki Satana abengani Satana, wana akomi nde komibundisa ye moko ; bongo bokonzi na ye ekowumela ndenge nini ?
BSB
BSB:
If Satan drives out Satan, he is divided against himself. How then can his kingdom stand?
27
LIN
Mpe soki, Ngai, nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, bayekoli na bino babenganaka yango na nguya ya nani ? Yango wana, bayekoli na bino bakozala bango moko basambisi na bino.
BSB
BSB:
And if I drive out demons by Beelzebul, by whom do your sons drive them out? So then, they will be your judges.
28
LIN
Kasi soki ezali na nguya ya Molimo ya Nzambe nde Ngai nazali kobengana milimo mabe, wana Bokonzi ya Nzambe esili kokoma kino epai na bino.
BSB
BSB:
But if I drive out demons by the Spirit of God, then the kingdom of God has come upon you.
29
LIN
Ndenge nini moto akoki kokota na ndako ya elombe mpe koyiba biloko na ye ya ndako soki akangi nanu elombe yango te na basinga ? Nzokande, soki akangi ye na basinga, wana akoki solo koyiba biloko nyonso oyo ezali kati na ndako na ye.
BSB
BSB:
Or again, how can anyone enter a strong man’s house and steal his possessions, unless he first ties up the strong man? Then he can plunder his house.
30
LIN
Moto oyo azali elongo na Ngai te azali monguna na Ngai, mpe moto oyo asangisaka te elongo na Ngai apanzaka.
BSB
BSB:
He who is not with Me is against Me, and he who does not gather with Me scatters.
31
LIN
Yango wana, nazali koloba na bino penza ya solo : lisumu nyonso mpe makambo mabe nyonso oyo bato bakoki koloba na tina na Nzambe ekolimbisama ; kasi moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Molimo Mosantu akolimbisama te.
BSB
BSB:
Therefore I tell you, every sin and blasphemy will be forgiven men, but the blasphemy against the Spirit will not be forgiven.
32
LIN
Moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Mwana na Moto akolimbisama ; kasi moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Molimo Mosantu akolimbisama te, ezala na bomoi na ye awa na se to na bomoi oyo ekoya.
BSB
BSB:
Whoever speaks a word against the Son of Man will be forgiven, but whoever speaks against the Holy Spirit will not be forgiven, either in this age or in the one to come.
33
LIN
Nzete ya malamu ebotaka mpe bambuma ya malamu, nzete ya mabe ebotaka mpe bambuma ya mabe ; pamba te nzete eyebanaka na mbuma na yango.
BSB
BSB:
Make a tree good and its fruit will be good, or make a tree bad and its fruit will be bad, for a tree is known by its fruit.
34
LIN
Libota ya banyoka ! Bokokoka ndenge nini koloba makambo ya malamu awa bozali bato mabe ? Pamba te maloba ya moto etalisaka lolenge ya motema na ye :
BSB
BSB:
You brood of vipers, how can you who are evil say anything good? For out of the overflow of the heart the mouth speaks.
35
LIN
moto malamu alobaka makambo ya malamu kowuta na motema malamu na ye, mpe moto mabe alobaka makambo ya mabe kowuta na motema mabe na ye.
BSB
BSB:
The good man brings good things out of his good store of treasure, and the evil man brings evil things out of his evil store of treasure.
36
LIN
Nzokande, Ngai, nazali koloba na bino : na mokolo ya kosambisama, bato bakosamba mpo na maloba ezanga tina, oyo babimisaki.
BSB
BSB:
But I tell you that men will give an account on the day of judgment for every careless word they have spoken.
37
LIN
Pamba te ezali na nzela ya maloba na yo moko kaka nde bakolongisa yo to bakokweyisa yo.
BSB
BSB:
For by your words you will be acquitted, and by your words you will be condemned.”
38
LIN
Bongo ndambo ya balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo balobaki na Ye : — Moteyi, tolingi komona yo kosala elembo moko.
BSB
BSB:
Then some of the scribes and Pharisees said to Him, “Teacher, we want to see a sign from You.”
39
LIN
Yesu azongisaki : — Oh bato ya ekeke oyo ! Bazali bato mabe mpe bazangi botosi na miso ya Nzambe, kasi bazali mpe kosenga elembo ! Bakopesamela elembo mosusu te longola kaka elembo ya mosakoli Yona.
BSB
BSB:
Jesus replied,
“A wicked and adulterous generation demands a sign, but none will be given it except the sign of the prophet Jonah.
40
LIN
Pamba te, ndenge Yona avandaki kati na libumu ya mbisi monene mikolo misato mpe babutu misato, ndenge wana mpe Mwana na Moto akosala mikolo misato mpe babutu misato na se ya mabele.
BSB
BSB:
For as Jonah was three days and three nights in the belly of the great fish, so the Son of Man will be three days and three nights in the heart of the earth.
41
LIN
Na mokolo ya kosambisama, bato ya Ninive bakotelema mpe bakokatela bato ya ekeke oyo etumbu, pamba te babongolaki mitema na bango tango bayokaki mateya ya Yona ; nzokande, ezali awa na Moto oyo aleki Yona.
BSB
BSB:
The men of Nineveh will stand at the judgment with this generation and condemn it; for they repented at the preaching of Jonah, and now One greater than Jonah is here.
42
LIN
Na mokolo ya kosambisama, mwasi mokonzi ya sude akotelema elongo na bato ya ekeke oyo mpe akokatela bango etumbu, pamba te awutaki mosika, na suka ya mokili, mpe ayaki mpo na koyoka maloba ya bwanya ya Salomo ; nzokande, ezali awa na Moto oyo aleki Salomo.
BSB
BSB:
The Queen of the South will rise at the judgment with this generation and condemn it; for she came from the ends of the earth to hear the wisdom of Solomon, and now One greater than Solomon is here.
43
LIN
Soki molimo mabe ebimi kati na moto, ekendaka koyengayenga na bisika ekawuka mpo na koluka esika ya kopema. Kasi soki ezwi esika yango te,
BSB
BSB:
When an unclean spirit comes out of a man, it passes through arid places seeking rest and does not find it.
44
LIN
emilobelaka : « Eleki malamu mpo na ngai kozonga na ndako oyo natikaki. » Tango molimo mabe yango ezongaka ekutaka ndako yango polele, bakombola mpe babongisa malamu,
BSB
BSB:
Then it says, ‘I will return to the house I left.’ On its return, it finds the house vacant, swept clean, and put in order.
45
LIN
ekokende lisusu kozwa milimo mosusu sambo oyo eleki yango na mabe, mpe ekoya elongo na yango mpo na kokota na elulu mpe kovanda kuna. Boye, bomoi ya moto yango ekokoma lisusu mabe koleka ndenge ezalaki liboso. Ekozala mpe bongo mpo na bato mabe ya ekeke oyo.
BSB
BSB:
Then it goes and brings with it seven other spirits more wicked than itself, and they go in and dwell there. And the final plight of that man is worse than the first. So will it be with this wicked generation.”
46
LIN
Wana Yesu azalaki nanu koloba na bato, mama na Ye mpe bandeko na Ye ya mibali batelemaki libanda mpe bazalaki koluka kosolola na Ye.
BSB
BSB:
While Jesus was still speaking to the crowds, His mother and brothers stood outside, wanting to speak to Him.
47
LIN
Bongo moto moko ayebisaki Yesu : — Mama mpe bandeko na yo ya mibali batelemi libanda, bazali na posa ya kosolola na yo.
BSB
BSB:
Someone told Him, “Look, Your mother and brothers are standing outside, wanting to speak to You.”
48
LIN
Kasi Yesu azongiselaki ye : — Nani mama na Ngai, mpe banani bandeko na Ngai ?
BSB
BSB:
But Jesus replied,
“Who is My mother, and who are My brothers?”
49
LIN
Bongo Yesu atalisaki loboko na Ye na ngambo ya bayekoli na Ye mpe alobaki : — Mama na Ngai mpe bandeko na Ngai, bango oyo !
BSB
BSB:
Pointing to His disciples, He said,
“Here are My mother and My brothers.
50
LIN
Pamba te moto nyonso oyo asalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.
BSB
BSB:
For whoever does the will of My Father in heaven is My brother and sister and mother.”
Chapter complete
You’ve read Matthew 12
Chapter 12 of 28 in Matthew
Up next
Matthew 13
Read Matthew 13
Listen
Back to Matthew 11
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Matthew 12
A question this chapter raises
Does the Old Testament name or foretell Muhammad?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Matthew 11
Matthew 12
Matthew 13