Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.39.3
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Matt
Matthew
13
LIN
BSB
A
a
Matthew 13
13
Matthew
Ministry in Galilee: words and deeds
Lingala Bible
Jesus
, person
Isaiah
, person
Mary
, person
James
, person
Jude
, person
Joseph
, person
Simon
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Mokolo yango kaka, Yesu abimaki na ndako mpe akendeki kovanda pembeni ya ebale.
BSB
BSB:
That same day Jesus went out of the house and sat by the sea.
2
LIN
Lokola ebele ya bato bazingelaki Ye, Yesu amataki na bwato mpe avandaki kati na yango, wana bato nyonso batelemaki na mokili.
BSB
BSB:
Such large crowds gathered around Him that He got into a boat and sat down, while all the people stood on the shore.
3
LIN
Azwaki maloba mpe akomaki koteya bango makambo ebele na masese ; azalaki koloba : — Moloni moko akendeki kolona na elanga na ye.
BSB
BSB:
And He told them many things in parables, saying,
“A farmer went out to sow his seed.
4
LIN
Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela ; bandeke eyaki mpe eliaki yango.
BSB
BSB:
And as he was sowing, some seed fell along the path, and the birds came and devoured it.
5
LIN
Ndambo mosusu ekweyaki na esika etonda na mabanga, esika oyo mabele ezalaki mingi te, ebimisaki mito noki mpo ete mabele yango ezalaki na bozindo te ;
BSB
BSB:
Some fell on rocky ground, where it did not have much soil. It sprang up quickly because the soil was shallow.
6
LIN
kasi tango moyi ebimaki, mito yango ezikaki mpe ekawukaki mpo ete ezalaki na misisa te.
BSB
BSB:
But when the sun rose, the seedlings were scorched, and they withered because they had no root.
7
LIN
Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube, banzube ekolaki mpe efinaki-finaki mwa banzete na yango ;
BSB
BSB:
Other seed fell among thorns, which grew up and choked the seedlings.
8
LIN
kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu mpe ebotaki bambuma : nkona moko ebotaki bambuma nkama moko ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu, bambuma tuku misato.
BSB
BSB:
Still other seed fell on good soil and produced a crop—a hundredfold, sixtyfold, or thirtyfold.
9
LIN
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !
BSB
BSB:
He who has ears, let him hear.”
10
LIN
Bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe batunaki Ye : — Mpo na nini ozali koloba na bango na masese ?
BSB
BSB:
Then the disciples came to Jesus and asked, “Why do You speak to the people in parables?”
11
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Ezali mpo ete boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Likolo epesameli nde na bino, kasi na bango te.
BSB
BSB:
He replied,
“The knowledge of the mysteries of the kingdom of heaven has been given to you, but not to them.
12
LIN
Na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu mpe akokoma na bofuluki ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.
BSB
BSB:
Whoever has will be given more, and he will have an abundance. Whoever does not have, even what he has will be taken away from him.
13
LIN
Tala mpo na nini nazali koloba na bango na masese : ezali mpo ete atako bazali kotala, bamona te ; mpe atako bazali koyoka, basosola te.
BSB
BSB:
This is why I speak to them in parables: ‘Though seeing, they do not see; though hearing, they do not hear or understand.’
14
LIN
Maloba oyo mosakoli Ezayi asakola mpo na bango ekokisami : « Matoyi na bino ekoyoka na pamba, kasi bokososola te ; miso na bino ekotala na pamba, kasi bokomona te !
BSB
BSB:
In them the prophecy of Isaiah is fulfilled: ‘You will be ever hearing but never understanding; you will be ever seeing but never perceiving.
15
LIN
Pamba te mitema ya bato oyo ezali mabanga ; bakangi penza matoyi mpe miso na bango, noki te miso na bango emona, matoyi na bango eyoka, mitema na bango esosola, mpe babongola mitema, mpe Ngai nabikisa bango. »
BSB
BSB:
For this people’s heart has grown callous; they hardly hear with their ears, and they have closed their eyes. Otherwise they might see with their eyes, hear with their ears, understand with their hearts, and turn, and I would heal them.’
16
LIN
Nzokande bino, bozali bato ya esengo, pamba te miso na bino ezali komona, mpe matoyi na bino ezali koyoka.
BSB
BSB:
But blessed are your eyes because they see, and your ears because they hear.
17
LIN
Nazali koloba na bino penza ya solo : basakoli ebele mpe bato ebele ya sembo balukaki komona makambo oyo bino bozali komona, kasi bamonaki yango te ; batondaki na posa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka, kasi bayokaki yango te.
BSB
BSB:
For truly I tell you, many prophets and righteous men longed to see what you see but did not see it, and to hear what you hear but did not hear it.
18
LIN
Boyoka ndimbola ya lisese ya moloni :
BSB
BSB:
Consider, then, the parable of the sower:
19
LIN
Soki moto ayoki Liloba na tina na Bokonzi ya Likolo mpe asosoli yango te, Satana ayaka kolongola oyo elonamaka kati na motema ya moto yango. Yango nde ndimbola ya nkona oyo ekweyi pembeni ya nzela.
BSB
BSB:
When anyone hears the message of the kingdom but does not understand it, the evil one comes and snatches away what was sown in his heart. This is the seed sown along the path.
20
LIN
Nkona oyo ekweyi na mabele etonda na mabanga ezali moto oyo ayoki Liloba mpe ayambi yango mbala moko na esengo.
BSB
BSB:
The seed sown on rocky ground is the one who hears the word and at once receives it with joy.
21
LIN
Kasi mpo ete azwi nanu misisa te kati na kondima, akowumela kaka mpo na mwa tango moke. Soki kaka, likolo ya Liloba, pasi to minyoko ekweyeli ye, asundoli mbala moko kondima na ye.
BSB
BSB:
But since he has no root, he remains for only a season. When trouble or persecution comes because of the word, he quickly falls away.
22
LIN
Nkona oyo ekweyi kati na banzube ezali moto oyo ayoki Liloba, kasi baposa mabe ya mokili mpe lokoso ya bomengo efini-fini Liloba kati na ye. Boye akotikala mpe kobota bambuma te.
BSB
BSB:
The seed sown among the thorns is the one who hears the word, but the worries of this life and the deceitfulness of wealth choke the word, and it becomes unfruitful.
23
LIN
Nkona oyo ekweyi na mabele ya malamu ezali moto oyo ayoki Liloba mpe asosoli yango malamu ; bongo akobota bambuma : epai ya moko, bambuma ekoki komonana nkama moko ; epai ya mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe epai ya mosusu lisusu, bambuma tuku misato.
BSB
BSB:
But the seed sown on good soil is the one who hears the word and understands it. He indeed bears fruit and produces a crop—a hundredfold, sixtyfold, or thirtyfold.”
24
LIN
Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : « Bokonzi ya Likolo ekokani na moto oyo alonaki nkona ya malamu kati na elanga na ye.
BSB
BSB:
Jesus put before them another parable:
“The kingdom of heaven is like a man who sowed good seed in his field.
25
LIN
Wana bato nyonso balalaki pongi, monguna na ye ayaki, alonaki matiti mabe kati na elanga na ye ya ble mpe akendeki.
BSB
BSB:
But while everyone was asleep, his enemy came and sowed weeds among the wheat, and slipped away.
26
LIN
Tango ble ebandaki kobota mpe kobimisa mito ya bambuma, matiti mabe mpe ekolaki.
BSB
BSB:
When the wheat sprouted and bore grain, then the weeds also appeared.
27
LIN
Basali ya nkolo elanga bayaki mpe balobaki : ‹ Mokonzi ; boni, olonaki te nkona ya malamu kati na elanga na yo ? Bongo matiti mabe oyo, ewuti wapi ? ›
BSB
BSB:
The owner’s servants came to him and said, ‘Sir, didn’t you sow good seed in your field? Where then did the weeds come from?’
28
LIN
Nkolo elanga azongisaki : ‹ Ezali monguna nde asali bongo ! › Basali batunaki lisusu : ‹ Olingi tokende kopikola yango ? ›
BSB
BSB:
‘An enemy did this,’ he replied. So the servants asked him, ‘Do you want us to go and pull them up?’
29
LIN
Nkolo elanga azongisaki : ‹ Bokende te ! Pamba te wana bokobanda kolongola matiti mabe, bokoki mpe kopikola ble elongo na yango.
BSB
BSB:
‘No,’ he said, ‘if you pull the weeds now, you might uproot the wheat with them.
30
LIN
Botika nyonso mibale ekola esika moko kino na tango ya kobuka bambuma. Ezali na tango wana nde nakoloba na bato oyo babukaka bambuma : Bolongola liboso matiti mabe, bokanga yango maboke-maboke mpe botumba yango ; kasi bobuka ble mpe botia yango na ebombelo na Ngai ya bambuma. › »
BSB
BSB:
Let both grow together until the harvest. At that time I will tell the harvesters: First collect the weeds and tie them in bundles to be burned; then gather the wheat into my barn.’”
31
LIN
Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : « Bokonzi ya Likolo ekokani na nkona ya mutarde oyo moto moko azwaki mpe alonaki kati na elanga na ye.
BSB
BSB:
He put before them another parable:
“The kingdom of heaven is like a mustard seed that a man took and planted in his field.
32
LIN
Nkona yango eleki bankona nyonso na moke ; kasi soki ekoli, elekaka bandunda nyonso ya elanga na molayi mpe ekomaka monene ; ebimisaka bitape minene oyo esalaka ete bandeke ya likolo etonga zala na yango na bitape na yango. »
BSB
BSB:
Although it is the smallest of all seeds, yet it grows into the largest of garden plants and becomes a tree, so that the birds of the air come and nest in its branches.”
33
LIN
Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : « Bokonzi ya Likolo ekokani na levire oyo mwasi azwaki mpe asangisaki kati na bakilo pene tuku mibale na sambo ya farine, kino nyonso evimbaki. »
BSB
BSB:
He told them still another parable:
“The kingdom of heaven is like leaven that a woman took and mixed into three measures of flour, until all of it was leavened.”
34
LIN
Yesu azalaki kosalela masese mpo na koloba makambo wana nyonso epai ya ebele ya bato ; mpe na tango nyonso oyo azalaki koloba na bango, azangaki te kosalela masese.
BSB
BSB:
Jesus spoke all these things to the crowds in parables. He did not tell them anything without using a parable.
35
LIN
Ezalaki ndenge wana nde maloba ya mosakoli ekokisamaki : « Nakofungola monoko mpo na koyebisa bango makambo na masese, nakosakola makambo oyo ebombama wuta na ebandeli ya mokili. »
BSB
BSB:
So was fulfilled what was spoken through the prophet: “I will open My mouth in parables; I will utter things hidden since the foundation of the world.”
36
LIN
Bongo Yesu atikaki ebele ya bato mpe akotaki na ndako. Bayekoli na Ye bayaki epai na Ye mpe batunaki Ye : — Pesa biso ndimbola ya lisese ya matiti mabe kati na elanga.
BSB
BSB:
Then Jesus dismissed the crowds and went into the house. His disciples came to Him and said, “Explain to us the parable of the weeds in the field.”
37
LIN
Yesu azongisaki : — Moloni nkona ya malamu, ezali Mwana na Moto.
BSB
BSB:
He replied,
“The One who sows the good seed is the Son of Man.
38
LIN
Elanga ezali mokili, nkona ya malamu ezali bana ya Bokonzi ya Likolo, mpe matiti mabe ezali bana ya Satana ;
BSB
BSB:
The field is the world, and the good seed represents the sons of the kingdom. The weeds are the sons of the evil one,
39
LIN
monguna oyo alonaki matiti mabe ezali Satana, tango ya kobuka mbuma ezali suka ya mokili ; bongo bato oyo babukaka bambuma, ezali ba-anjelu.
BSB
BSB:
and the enemy who sows them is the devil. The harvest is the end of the age, and the harvesters are angels.
40
LIN
Ndenge bapikolaka matiti mabe mpe batumbaka yango na moto, ndenge wana mpe ekozala na suka ya mokili :
BSB
BSB:
As the weeds are collected and burned in the fire, so will it be at the end of the age.
41
LIN
Mwana na Moto akotinda ba-anjelu na Ye ; bongo bakolongola kati na Bokonzi na Ye, nyonso oyo etindikaka bato mosusu na kosala masumu mpe bato oyo basalaka mabe.
BSB
BSB:
The Son of Man will send out His angels, and they will weed out of His kingdom every cause of sin and all who practice lawlessness.
42
LIN
Bakobwaka bango na fulu ya moto makasi epai wapi ekozala kolela mpe koswa minu.
BSB
BSB:
And they will throw them into the fiery furnace, where there will be weeping and gnashing of teeth.
43
LIN
Bongo bato ya sembo bakongenga lokola moyi kati na Bokonzi ya Tata na bango. Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !
BSB
BSB:
Then the righteous will shine like the sun in the kingdom of their Father. He who has ears, let him hear.
44
LIN
Bokonzi ya Likolo ekokani na eloko ya talo oyo babomba kati na elanga ; soki moto moko amoni yango, akobomba yango lisusu ; mpe na esengo wana, akokende koteka biloko na ye nyonso mpo na kosomba elanga wana.
BSB
BSB:
The kingdom of heaven is like treasure hidden in a field. When a man found it, he hid it again, and in his joy he went and sold all he had and bought that field.
45
LIN
Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na moto ya mombongo, oyo alukaka bapawuni ya kitoko.
BSB
BSB:
Again, the kingdom of heaven is like a merchant in search of fine pearls.
46
LIN
Soki amoni mayaka moko ya talo makasi, akokende koteka biloko na ye nyonso mpo na kosomba yango.
BSB
BSB:
When he found one very precious pearl, he went away and sold all he had and bought it.
47
LIN
Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na monyama oyo balobi mbisi babwaki na ebale mpe ekangi bambisi ya ndenge na ndenge.
BSB
BSB:
Once again, the kingdom of heaven is like a net that was cast into the sea and caught all kinds of fish.
48
LIN
Soki etondi, balobi mbisi bakobimisa yango na mokili, bakovanda mpe bakotia bambisi ya malamu kati na bitunga mpe bakobwaka oyo ya mabe.
BSB
BSB:
When it was full, the men pulled it ashore. Then they sat down and sorted the good fish into containers, but threw the bad away.
49
LIN
Ekozala mpe ndenge wana na suka ya mokili : ba-anjelu bakoya kokabola bato mabe kati na bato ya sembo,
BSB
BSB:
So will it be at the end of the age: The angels will come and separate the wicked from the righteous
50
LIN
bongo bakobwaka bato mabe kati na fulu ya moto makasi epai wapi ekozala kolela mpe koswa minu.
BSB
BSB:
and throw them into the fiery furnace, where there will be weeping and gnashing of teeth.
51
LIN
Boni, bososoli makambo oyo nyonso ? Bazongisaki : — Iyo !
BSB
BSB:
Have you understood all these things?”
“Yes,” they answered.
52
LIN
Bongo, Yesu alobaki na bango : — Yango wana, molakisi nyonso ya mibeko, oyo akomi moyekoli ya makambo ya Bokonzi ya Likolo akokani na nkolo ndako oyo azali kobimisa na ebombelo bomengo na ye : biloko ya sika mpe biloko ya kala.
BSB
BSB:
Then He told them,
“For this reason, every scribe who has been discipled in the kingdom of heaven is like a homeowner who brings out of his storeroom new treasures as well as old.”
53
LIN
Sima na Yesu koloba masese wana, alongwaki na esika yango
BSB
BSB:
When Jesus had finished these parables, He withdrew from that place.
54
LIN
mpe azongaki kati na engumba na Ye ; akomaki koteya bato kati na ndako na bango ya mayangani, mpe bango bazalaki kokamwa makasi mpe komituna : « Bwanya mpe nguya ya kosala bikamwa oyo azwi yango wapi ?
BSB
BSB:
Coming to His hometown, He taught the people in their synagogue, and they were astonished. “Where did this man get such wisdom and miraculous powers?” they asked.
55
LIN
Ezali ye te mwana ya mosali mabaya ? Mama na ye, kombo na ye ezali Mari te ? Jake, Jozefi, Simona mpe Jide bazali bandeko na ye ya mibali te ?
BSB
BSB:
“Isn’t this the carpenter’s son? Isn’t His mother’s name Mary, and aren’t His brothers James, Joseph, Simon, and Judas?
56
LIN
Bongo bandeko na ye ya basi, bango nyonso bazali awa elongo na biso te ? Azwi makambo oyo nyonso wapi ? »
BSB
BSB:
Aren’t all His sisters with us as well? Where then did this man get all these things?”
57
LIN
Boye, azalaki libaku mpo na kondima na bango. Kasi Yesu alobaki na bango : — Ezali kaka kati na ekolo na ye mpe kati na ndako na ye nde Mosakoli azwaka lokumu te.
BSB
BSB:
And they took offense at Him. But Jesus said to them,
“Only in his hometown and in his own household is a prophet without honor.”
58
LIN
Mpe asalaki kuna bikamwa mingi te mpo ete bazalaki kondima Ye te.
BSB
BSB:
And He did not do many miracles there, because of their unbelief.
Chapter complete
You’ve read Matthew 13
Chapter 13 of 28 in Matthew
Up next
Matthew 14
Read Matthew 14
Listen
Back to Matthew 12
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Matthew 13
A question this chapter raises
What about the Inquisition?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Matthew 12
Matthew 13
Matthew 14