Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.39.3
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Matt
Matthew
14
LIN
BSB
A
a
Matthew 14
14
Matthew
Ministry in Galilee: words and deeds
Lingala Bible
Jesus
, person
John
, person
Herod
, person
Peter
, person
Herodias
, person
Gennesaret
, place
Philip
, person
Salome
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Na tango wana, sango na tina na Yesu epanzanaki makasi mpe ekomaki kino na matoyi ya Erode, moyangeli ya Galile.
BSB
BSB:
At that time Herod the tetrarch heard the reports about Jesus
2
LIN
Alobaki na basali na ye : — Ezali penza Yoane Mobatisi ! Asekwi kati na bakufi ; yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa.
BSB
BSB:
and said to his servants, “This is John the Baptist; he has risen from the dead! That is why miraculous powers are at work in him.”
3
LIN
Nzokande, Erode amipeselaki mitindo ete bazwa Yoane, bakanga ye minyololo mpe babwaka ye kati na boloko, likolo ya Erodiade, mwasi ya Filipo, ndeko mobali ya Erode ;
BSB
BSB:
Now Herod had arrested John and bound him and put him in prison on account of Herodias, his brother Philip’s wife,
4
LIN
pamba te Yoane azalaki koloba na ye : « Ozali na ndingisa te ya kosangisa na ye nzoto mpo ete azali mwasi na yo te. »
BSB
BSB:
because John had been telling him, “It is not lawful for you to have her.”
5
LIN
Boye, Erode akomaki koluka nzela ya koboma Yoane, kasi azalaki kobanga bato mpo ete bazalaki kozwa Yoane lokola mosakoli.
BSB
BSB:
Although Herod wanted to kill John, he was afraid of the people, because they regarded John as a prophet.
6
LIN
Nzokande, na mokolo ya kosepela mbotama ya Erode, mwana mwasi ya Erodiade abinaki liboso ya babengami na feti yango mpe asepelisaki Erode makasi.
BSB
BSB:
On Herod’s birthday, however, the daughter of Herodias danced before them and pleased Herod
7
LIN
Boye, Erode alakaki mwasi yango, na nzela ya ndayi, ete akopesa ye nyonso oyo akosenga.
BSB
BSB:
so much that he promised with an oath to give to her whatever she asked.
8
LIN
Lokola mama akotisaki makanisi mabe kati na mwana, mwana mwasi alobaki na Erode : « Pesa ngai awa, na sani, moto ya Yoane Mobatisi. »
BSB
BSB:
Prompted by her mother, she said, “Give me here on a platter the head of John the Baptist.”
9
LIN
Tango mokonzi ayokaki eloko oyo mwana mwasi asengaki, ayokaki mawa mingi na motema ; kasi mpo na ndayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo abengisaki na feti, apesaki mitindo ete bapesa ye moto yango.
BSB
BSB:
The king was grieved, but because of his oaths and his guests, he ordered that her wish be granted
10
LIN
Atindaki moto moko ete akende kokata moto ya Yoane kati na boloko.
BSB
BSB:
and sent to have John beheaded in the prison.
11
LIN
Bamemaki, na sani, moto ya Yoane Mobatisi mpe bapesaki yango epai ya mwana mwasi, mpe mwana mwasi amemaki yango epai ya mama na ye.
BSB
BSB:
John’s head was brought in on a platter and presented to the girl, who carried it to her mother.
12
LIN
Bayekoli ya Yoane bayaki kozwa nzoto na ye mpe bakundaki yango ; sima na yango, bakendeki kopesa sango epai ya Yesu.
BSB
BSB:
Then John’s disciples came and took his body and buried it. And they went and informed Jesus.
13
LIN
Tango Yesu ayokaki sango yango, azwaki bwato mpo na kokende kati na esobe, na esika oyo akozala kaka Ye moko. Wana ebele ya bato bayokaki bongo, babimaki na bamboka na bango mpe balandaki Yesu na makolo.
BSB
BSB:
When Jesus heard about John, He withdrew by boat privately to a solitary place. But the crowds found out about it and followed Him on foot from the towns.
14
LIN
Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango. Boye, abandaki kobikisa bandeko na bango, oyo bazalaki kobela.
BSB
BSB:
When He stepped ashore and saw a large crowd, He had compassion on them and healed their sick.
15
LIN
Na pokwa, bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe balobaki na Ye : — Esika oyo ezali esobe, mpe ngonga epusani makasi ! Zongisa bango mpo ete bakende komisombela biloko ya kolia kati na bamboka ya zingazinga.
BSB
BSB:
When evening came, the disciples came to Him and said, “This is a desolate place, and the hour is already late. Dismiss the crowds so they can go to the villages and buy themselves some food.”
16
LIN
Kasi Yesu alobaki na bango : — Bazali na tina na kokende kuna te ! Bopesa bango bino moko biloko ya kolia.
BSB
BSB:
“They do not need to go away,”
Jesus replied.
“You give them something to eat.”
17
LIN
Bayekoli bazongisaki : — Tozali kaka na mapa mitano mpe bambisi mibale.
BSB
BSB:
“We have here only five loaves of bread and two fish,” they answered.
18
LIN
Yesu alobaki : — Boya na yango awa epai na Ngai.
BSB
BSB:
“Bring them here to Me,”
Jesus said.
19
LIN
Yesu apesaki mitindo na bato ete bavanda na matiti ; azwaki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai ya bato.
BSB
BSB:
And He directed the crowds to sit down on the grass. Taking the five loaves and the two fish and looking up to heaven, He spoke a blessing. Then He broke the loaves and gave them to the disciples, and the disciples gave them to the people.
20
LIN
Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale.
BSB
BSB:
They all ate and were satisfied, and the disciples picked up twelve basketfuls of broken pieces that were left over.
21
LIN
Bato oyo baliaki bazalaki mibali pene nkoto mitano, longola basi mpe bana.
BSB
BSB:
About five thousand men were fed, besides women and children.
22
LIN
Mbala moko, Yesu atindaki bayekoli na Ye ete bamata na bwato mpe bakende liboso na Ye, na ngambo mosusu ya ebale, wana akozongisa bato.
BSB
BSB:
Immediately Jesus made the disciples get into the boat and go on ahead of Him to the other side, while He dismissed the crowds.
23
LIN
Sima na Ye kozongisa bato, amataki na ngomba mpo na kosambela na esika oyo azalaki kaka Ye moko. Kino na pokwa, azalaki wana kaka Ye moko.
BSB
BSB:
After He had dismissed them, He went up on the mountain by Himself to pray. When evening came, He was there alone,
24
LIN
Nzokande, kaka na tango yango, wana bwato ekomaki mosika, na molayi ya bametele koleka nkama moko longwa na mokili, mbonge ekomaki koningisa bwato yango makasi, pamba te mopepe ezalaki kobeta na ndenge ya kozongisa bwato na sima.
BSB
BSB:
but the boat was already far from land, buffeted by the waves because the wind was against it.
25
LIN
Wana tongo ekomaki pene ya kotana, Yesu atambolaki likolo ya mayi ya ebale mpo na kolanda bango, mpe alingaki kutu koleka bango.
BSB
BSB:
During the fourth watch of the night, Jesus went out to them, walking on the sea.
26
LIN
Tango bayekoli bamonaki Yesu azali kotambola likolo ya mayi ya ebale, somo makasi ekangaki bango mpe bakomaki koloba : — Elima ! Elima ! Elima ! Bagangaki mpo na somo.
BSB
BSB:
When the disciples saw Him walking on the sea, they were terrified. “It’s a ghost!” they said, and cried out in fear.
27
LIN
Kasi, mbala moko, Yesu alobaki na bango : — Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali nde Ngai !
BSB
BSB:
But Jesus spoke up at once:
“Take courage! It is I. Do not be afraid.”
28
LIN
Petelo alobaki na Ye : — Nkolo, soki ezali penza Yo, loba na ngai ete naya kokutana na Yo likolo ya mayi.
BSB
BSB:
“Lord, if it is You,” Peter replied, “command me to come to You on the water.”
29
LIN
Yesu alobaki na ye : — Yaka. Mbala moko, Petelo akitaki na bwato mpe atambolaki na likolo ya mayi mpo na kokende kokutana na Yesu.
BSB
BSB:
“Come,”
said Jesus. Then Peter got down out of the boat, walked on the water, and came toward Jesus.
30
LIN
Kasi tango amonaki ndenge mopepe ezali kopepa makasi, akomaki na somo mpe, lokola akomaki kozinda, agangaki : — Nkolo, bikisa ngai !
BSB
BSB:
But when he saw the strength of the wind, he was afraid and, beginning to sink, cried out, “Lord, save me!”
31
LIN
Mbala moko, Yesu asembolaki loboko epai na ye, asimbaki ye mpe alobaki na ye : — Moto na kondima moke, mpo na nini otie tembe ?
BSB
BSB:
Immediately Jesus reached out His hand and took hold of Peter.
“You of little faith,”
He said,
“why did you doubt?”
32
LIN
Tango bamataki na bwato, mopepe ekitaki.
BSB
BSB:
And when they had climbed back into the boat, the wind died down.
33
LIN
Bato oyo bazalaki kati na bwato bagumbamelaki Yesu mpe balobaki : — Ya solo, ozali Mwana na Nzambe !
BSB
BSB:
Then those who were in the boat worshiped Him, saying, “Truly You are the Son of God!”
34
LIN
Sima na bango kokatisa ebale, bakomaki na mabele ya Genezareti.
BSB
BSB:
When they had crossed over, they landed at Gennesaret.
35
LIN
Tango bavandi ya esika wana basosolaki ete ezali Yesu, bapanzaki sango kati na etuka mobimba ; mpe bamemelaki Ye babeli nyonso.
BSB
BSB:
And when the men of that place recognized Jesus, they sent word to all the surrounding region. People brought all the sick to Him
36
LIN
Basengaki na Ye ete apesa babeli nzela ya kosimba ata singa ya songe ya elamba na Ye. Mpe bato nyonso oyo balongaki kosimba yango babikaki na bokono na bango.
BSB
BSB:
and begged Him just to let them touch the fringe of His cloak. And all who touched Him were healed.
Chapter complete
You’ve read Matthew 14
Chapter 14 of 28 in Matthew
Up next
Matthew 15
Read Matthew 15
Listen
Back to Matthew 13
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Matthew 14
A question this chapter raises
Is it wrong to doubt?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Matthew 13
Matthew 14
Matthew 15