Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.39.3
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Matt
Matthew
15
LIN
BSB
A
a
Matthew 15
15
Matthew
Ministry in Galilee: words and deeds
Lingala Bible
Jesus
, person
Israel
, person
David
, person
Jerusalem
, place
Peter
, person
Isaiah
, person
Tyre
, place
Sidon
, place
2 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na Ye :
BSB
BSB:
Then some Pharisees and scribes came to Jesus from Jerusalem and asked,
2
LIN
— Mpo na nini bayekoli na yo bazali kotosa te bokoko na biso ? Pamba te basukolaka maboko na bango te liboso ya kolia.
BSB
BSB:
“Why do Your disciples break the tradition of the elders? They do not wash their hands before they eat.”
3
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Bongo bino, mpo na nini botosaka te mibeko ya Nzambe, kasi botosaka kaka bokoko na bino ?
BSB
BSB:
Jesus replied,
“And why do you break the command of God for the sake of your tradition?
4
LIN
Solo, Nzambe alobaki : « Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu ; mpe moto oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe asengeli na etumbu ya kufa. »
BSB
BSB:
For God said, ‘Honor your father and mother’ and ‘Anyone who curses his father or mother must be put to death.’
5
LIN
Kasi bino, bolobaka : « Moto nyonso oyo alobi na tata na ye to na mama na ye : ‹ Lisungi oyo nalingaki kopesa yo, nabonzi yango lokola likabo epai ya Nzambe, ›
BSB
BSB:
But you say that if anyone says to his father or mother, ‘Whatever you would have received from me is a gift devoted to God,’
6
LIN
abuki te mobeko ya kopesa tata na ye mpe mama na ye lokumu. » Ezali ndenge wana penza nde bozali kokomisa pamba Liloba na Nzambe mpo na kotombola bokoko na bino !
BSB
BSB:
he need not honor his father or mother with it. Thus you nullify the word of God for the sake of your tradition.
7
LIN
Bato ya bilongi mibale ! Ezayi asakola penza malamu na tina na bino :
BSB
BSB:
You hypocrites! Isaiah prophesied correctly about you:
8
LIN
« Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai ;
BSB
BSB:
‘These people honor Me with their lips, but their hearts are far from Me.
9
LIN
basambelaka Ngai kaka na pamba, mateya na bango ezali kaka mibeko ya bomoto. »
BSB
BSB:
They worship Me in vain; they teach as doctrine the precepts of men.’”
10
LIN
Yesu abengaki ebele ya bato wana mpe alobaki na bango : — Boyoka mpe bososola makambo oyo :
BSB
BSB:
Jesus called the crowd to Him and said,
“Listen and understand.
11
LIN
eloko oyo ekotaka na monoko ya moto ekomisaka moto mbindo te, kasi ezali eloko oyo ebimaka na monoko nde ekomisaka moto mbindo.
BSB
BSB:
A man is not defiled by what enters his mouth, but by what comes out of it.”
12
LIN
Bongo bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe bayebisaki Ye : — Boni, oyebi te ete maloba oyo olobi ebetisi Bafarizeo mabaku ?
BSB
BSB:
Then the disciples came to Him and said, “Are You aware that the Pharisees were offended when they heard this?”
13
LIN
Yesu azongisaki : — Nkona nyonso oyo Tata na Ngai ya Likolo alonaki te ekopikolama.
BSB
BSB:
But Jesus replied,
“Every plant that My heavenly Father has not planted will be pulled up by its roots.
14
LIN
Botika bango ; bazali bakufi miso oyo bazali kotambolisa bakufi miso mosusu. Nzokande, soki mokufi miso azali kotambolisa mokufi miso mosusu, bango mibale bakokweya solo kati na libulu.
BSB
BSB:
Disregard them! They are blind guides. If a blind man leads a blind man, both will fall into a pit.”
15
LIN
Petelo azwaki maloba mpe alobaki na Yesu : — Limbolela biso lisese oyo.
BSB
BSB:
Peter said to Him, “Explain this parable to us.”
16
LIN
Yesu atunaki bango : — Bino mpe, boni, bozwi nanu bososoli te ?
BSB
BSB:
“Do you still not understand?”
Jesus asked.
17
LIN
Bozali kaka kososola te ete nyonso oyo ekotaka na monoko ekendaka na libumu mpe, na sima, ebwakamaka na libulu ya zongo ?
BSB
BSB:
“Do you not yet realize that whatever enters the mouth goes into the stomach and then is eliminated?
18
LIN
Kasi oyo ebimaka na monoko, ewutaka nde na motema, mpe yango nde ekomisaka moto mbindo.
BSB
BSB:
But the things that come out of the mouth come from the heart, and these things defile a man.
19
LIN
Pamba te, na motema nde ewutaka makanisi mabe, koboma, ekobo, kindumba, moyibi, litatoli ya lokuta mpe mafinga.
BSB
BSB:
For out of the heart come evil thoughts, murder, adultery, sexual immorality, theft, false testimony, and slander.
20
LIN
Ezali makambo wana nde ekomisaka moto mbindo ; kasi kozanga kosukola maboko liboso ya kolia ekomisaka moto mbindo te.
BSB
BSB:
These are what defile a man, but eating with unwashed hands does not defile him.”
21
LIN
Yesu alongwaki wana mpe akendeki na etuka ya Tiri mpe ya Sidoni.
BSB
BSB:
Leaving that place, Jesus withdrew to the district of Tyre and Sidon.
22
LIN
Mwasi moko ya mboka Kanana azalaki kovanda na etuka yango, ayaki epai ya Yesu mpe akomaki koganga : — Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa ! Mwana na ngai ya mwasi azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezali mpe konyokola ye makasi.
BSB
BSB:
And a Canaanite woman from that region came to Him, crying out, “Lord, Son of David, have mercy on me! My daughter is miserably possessed by a demon.”
23
LIN
Kasi Yesu azongiselaki ye ata liloba te. Bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe basengaki na Ye : — Bengana ye ; azali kotiela biso makelele !
BSB
BSB:
But Jesus did not answer a word. So His disciples came and urged Him, “Send her away, for she keeps crying out after us.”
24
LIN
Yesu azongisaki : — Natindamaki kaka epai ya bameme ebunga ya Isalaele !
BSB
BSB:
He answered,
“I was sent only to the lost sheep of the house of Israel.”
25
LIN
Kasi mwasi yango ayaki, agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki : — Nkolo, sunga ngai !
BSB
BSB:
The woman came and knelt before Him. “Lord, help me!” she said.
26
LIN
Yesu azongisaki : — Ezali malamu te kokamata lipa ya bana mpo na kobwakela yango bambwa !
BSB
BSB:
But Jesus replied,
“It is not right to take the children’s bread and toss it to the dogs.”
27
LIN
Mwasi yango alobaki : — Nkolo, ezali penza ya solo ; kasi bambwa eliaka biteni ya lipa, oyo ekweyaka wuta na mesa ya bankolo na yango !
BSB
BSB:
“Yes, Lord,” she said, “even the dogs eat the crumbs that fall from their master’s table.”
28
LIN
Bongo Yesu alobaki na ye : — Mwasi, kondima na yo ezali monene ! Tika ete esalemela yo ndenge ezali posa na yo ! Mpe kaka na tango wana, mwana na ye ya mwasi abikaki.
BSB
BSB:
“O woman,”
Jesus answered,
“your faith is great! Let it be done for you as you desire.”
And her daughter was healed from that very hour.
29
LIN
Yesu alongwaki wana mpe akendeki na ebale ya Galile ; amataki likolo ya ngomba mpe avandaki kuna.
BSB
BSB:
Moving on from there, Jesus went along the Sea of Galilee. Then He went up on a mountain and sat down.
30
LIN
Bato ebele bayaki epai na Ye ; bamemaki bato oyo batambolaka tengu-tengu, bakufi miso, bababa, bato oyo bakufa makolo to maboko mpe bato mosusu ebele. Batiaki bango na makolo ya Yesu, mpe Yesu abikisaki bango.
BSB
BSB:
Large crowds came to Him, bringing the lame, the blind, the crippled, the mute, and many others, and laid them at His feet, and He healed them.
31
LIN
Mpe bato bakamwaki mingi tango bamonaki ete bababa bakomi koloba, bato oyo bakufa makolo to maboko babiki, bato oyo batambolaka tengu-tengu bakomi kotambola malamu mpe bakufi miso bakomi komona. Bongo bakumisaki Nzambe ya Isalaele.
BSB
BSB:
The crowd was amazed when they saw the mute speaking, the crippled restored, the lame walking, and the blind seeing. And they glorified the God of Israel.
32
LIN
Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki : — Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa makasi, pamba te basali mikolo misato elongo na Ngai mpe bazali na eloko ya kolia te. Naboyi kozongisa bango na nzala, noki te bakolemba nzoto na nzela.
BSB
BSB:
Then Jesus called His disciples to Him and said,
“I have compassion for this crowd, because they have already been with Me three days and have nothing to eat. I do not want to send them away hungry, or they may faint along the way.”
33
LIN
Bayekoli na Ye bazongisaki : — Kati na esobe oyo, esika nini tokozwa mapa mpo na koleisa ebele ya bato boye ?
BSB
BSB:
The disciples replied, “Where in this desolate place could we find enough bread to feed such a large crowd?”
34
LIN
Yesu atunaki bango : — Bozali na mapa boni ? Bayekoli bazongisaki : — Tozali na mapa sambo mpe ndambo ya bambisi ya mike-mike.
BSB
BSB:
“How many loaves do you have?”
Jesus asked. “Seven,” they replied, “and a few small fish.”
35
LIN
Yesu alobaki na ebele ya bato yango ete bavanda na mabele.
BSB
BSB:
And He instructed the crowd to sit down on the ground.
36
LIN
Bongo azwaki mapa yango sambo mpe bambisi, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye ; mpe bayekoli bakabolaki yango epai ya bato.
BSB
BSB:
Taking the seven loaves and the fish, He gave thanks and broke them. Then He gave them to the disciples, and the disciples gave them to the people.
37
LIN
Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, batondisaki na yango bitunga sambo.
BSB
BSB:
They all ate and were satisfied, and the disciples picked up seven basketfuls of broken pieces that were left over.
38
LIN
Motango ya bato oyo baliaki ezalaki nkoto minei, longola basi mpe bana.
BSB
BSB:
A total of four thousand men were fed, besides women and children.
39
LIN
Sima na Yesu kozongisa bato, amataki kati na bwato mpe akendeki na etuka ya Magadani.
BSB
BSB:
After Jesus had dismissed the crowds, He got into the boat and went to the region of Magadan.
Chapter complete
You’ve read Matthew 15
Chapter 15 of 28 in Matthew
Up next
Matthew 16
Read Matthew 16
Listen
Back to Matthew 14
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Matthew 15
A question this chapter raises
Was Jesus sent only to Israel?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Matthew 14
Matthew 15
Matthew 16