Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.0
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Matt
Matthew
17
LIN
BSB
A
a
Matthew 17
17
Matthew
Peter's confession and the road to Jerusalem
Lingala Bible
Jesus
, person
Peter
, person
Elias
, person
Moses
, person
John
, person
Galilee
, place
John
, person
James
, person
1 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Sima na mikolo motoba, Yesu azwaki Petelo, Jake mpe Yoane, ndeko mobali ya Jake ; amemaki bango na pembeni, na likolo ya ngomba moko ya molayi.
BSB
BSB:
After six days Jesus took with Him Peter, James, and John the brother of James, and led them up a high mountain by themselves.
2
LIN
Yesu abongolamaki na miso na bango : elongi na Ye ekomaki kongenga lokola moyi, bilamba na Ye ekomaki pembe makasi lokola pole.
BSB
BSB:
There He was transfigured before them. His face shone like the sun, and His clothes became as white as the light.
3
LIN
Mbala moko, bamonaki Moyize mpe Eliya bazali kosolola na Yesu.
BSB
BSB:
Suddenly Moses and Elijah appeared before them, talking with Jesus.
4
LIN
Petelo alobaki na Yesu : — Nkolo, eleki malamu mpo na biso kotikala awa ! Soki ondimi, nakotonga bandako misato ya kapo : moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya !
BSB
BSB:
Peter said to Jesus, “Lord, it is good for us to be here. If You wish, I will put up three shelters—one for You, one for Moses, and one for Elijah.”
5
LIN
Wana azalaki nanu koloba, lipata moko ezalaki kongenga lokola moyi, ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi ; boyoka Ye ! »
BSB
BSB:
While Peter was still speaking, a bright cloud enveloped them, and a voice from the cloud said, “This is My beloved Son, in whom I am well pleased. Listen to Him!”
6
LIN
Tango bayekoli bayokaki mongongo yango, bakweyaki bilongi kino na mabele mpo ete somo makasi ekangaki bango.
BSB
BSB:
When the disciples heard this, they fell facedown in terror.
7
LIN
Kasi Yesu apusanaki pene na bango, asimbaki bango mpe alobaki : — Botelema, bobanga te !
BSB
BSB:
Then Jesus came over and touched them.
“Get up,”
He said.
“Do not be afraid.”
8
LIN
Batombolaki miso mpe bamonaki moto mosusu te, kaka Yesu.
BSB
BSB:
And when they looked up, they saw no one except Jesus.
9
LIN
Wana bazalaki kokita na ngomba, Yesu apesaki bango mitindo oyo : — Makambo oyo bowuti komona, boyebisa yango na moto moko te kino tango Mwana na Moto akosekwa kati na bakufi.
BSB
BSB:
As they were coming down the mountain, Jesus commanded them,
“Do not tell anyone about this vision until the Son of Man has been raised from the dead.”
10
LIN
Bayekoli batunaki Yesu : — Mpo na nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Eliya asengeli koya moto ya liboso ?
BSB
BSB:
The disciples asked Him, “Why then do the scribes say that Elijah must come first?”
11
LIN
Yesu azongisaki : — Solo, Eliya asengeli koya mpe akozongisa makambo nyonso na molongo.
BSB
BSB:
Jesus replied,
“Elijah does indeed come, and he will restore all things.
12
LIN
Kasi Ngai, nazali koloba na bino ete Eliya asilaki koya ; kasi na esika ya koyeba ye, basalaki ye ndenge balingaki. Ezali mpe ndenge wana nde bakonyokola Mwana na Moto.
BSB
BSB:
But I tell you that Elijah has already come, and they did not recognize him, but have done to him whatever they wished. In the same way, the Son of Man will suffer at their hands.”
13
LIN
Bayekoli basosolaki ete azalaki kolobela bango na tina na Yoane Mobatisi.
BSB
BSB:
Then the disciples understood that He was speaking to them about John the Baptist.
14
LIN
Tango bakomaki pene ya esika oyo ebele ya bato bazalaki, moto moko apusanaki pene na Yesu, afukamaki liboso na Ye mpe alobaki :
BSB
BSB:
When they came to the crowd, a man came up to Jesus and knelt before Him.
15
LIN
— Nkolo, yokela mwana na ngai ya mobali mawa ! Azali na maladi ya ndeke mpe azali penza komona pasi : akweyaka mbala mingi na moto to na mayi.
BSB
BSB:
“Lord, have mercy on my son,” he said. “He has seizures and is suffering terribly. He often falls into the fire or into the water.
16
LIN
Namemaki ye epai ya bayekoli na Yo, kasi bakoki te kobikisa ye.
BSB
BSB:
I brought him to Your disciples, but they could not heal him.”
17
LIN
Yesu alobaki : — Ekeke ya bato mabe mpe bazanga kondima ! Kino tango nini nakozala na bino elongo ? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino ? Bomemela Ngai mwana yango.
BSB
BSB:
“O unbelieving and perverse generation!”
Jesus replied.
“How long must I remain with you? How long must I put up with you? Bring the boy here to Me.”
18
LIN
Yesu abenganaki molimo mabe, mpe molimo mabe yango ebimaki kati na mwana. Kaka na tango yango, mwana abikaki.
BSB
BSB:
Then Jesus rebuked the demon, and it came out of the boy, and he was healed from that moment.
19
LIN
Bongo bayekoli bakendeki na nkuku epai ya Yesu mpe batunaki : — Mpo na nini, biso, tolongaki te kobengana molimo yango ?
BSB
BSB:
Afterward the disciples came to Jesus privately and asked, “Why couldn’t we drive it out?”
20
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Ezali mpo ete bozali na kondima moke. Nazali koloba na bino penza ya solo : soki kondima na bino ezalaki lokola mbuma ya mutarde, bokokaki koloba na ngomba oyo : « Longwa awa, kende kuna ; » mpe ekokende penza. Eloko moko te ekoki kozanga kosalemela bino. [
BSB
BSB:
“Because you have so little faith,”
He answered.
“For truly I tell you, if you have faith the size of a mustard seed, you can say to this mountain, ‘Move from here to there,’ and it will move. Nothing will be impossible for you.”
21
LIN
Kasi lolenge oyo ya milimo mabe ebimaka kaka na nzela ya mabondeli mpe ya kokila bilei.]
BSB
BSB:
Not in the BSB
Not in the earliest manuscripts
22
LIN
Mokolo moko, bayekoli basanganaki bango nyonso kati na Galile ; Yesu alobaki na bango : — Bakokaba Mwana na Moto na maboko ya bato,
BSB
BSB:
When they gathered together in Galilee, Jesus told them,
“The Son of Man is about to be delivered into the hands of men.
23
LIN
bakoboma Ye, mpe, na mokolo ya misato, akosekwa. Bayekoli bayokaki mawa mingi.
BSB
BSB:
They will kill Him, and on the third day He will be raised to life.”
And the disciples were deeply grieved.
24
LIN
Tango Yesu mpe bayekoli na Ye bakomaki na Kapernawumi, bafutisi mpako ya Ndako ya Nzambe bayaki epai ya Petelo mpe batunaki : — Boni, moteyi na bino afutaka mpako ya Ndako ya Nzambe te ?
BSB
BSB:
After they had arrived in Capernaum, the collectors of the two-drachma tax came to Peter and asked, “Does your Teacher pay the two drachmas?”
25
LIN
Petelo azongisaki : — Afutaka ! Tango Petelo akotaki na ndako, Yesu azwaki maloba moto ya liboso mpe atunaki ye : — Simona, okanisi nini ? Banani bafutaka mpako epai ya bakonzi ya mokili : bana na bango to bapaya ?
BSB
BSB:
“Yes,” he answered. When Peter entered the house, Jesus preempted him.
“What do you think, Simon?”
He asked.
“From whom do the kings of the earth collect customs and taxes: from their own sons, or from others?”
26
LIN
Petelo azongisaki : — Bapaya. Yesu alobaki na ye : — Lokola ezali bongo, bana mboka basengeli kofuta te.
BSB
BSB:
“From others,” Peter answered.
“Then the sons are exempt,”
Jesus said to him.
27
LIN
Nzokande, mpo ete totia mobulu te kati na makanisi na bango, kende na ebale, bwaka ndobo na mayi mpe kamata mbisi oyo okozwa ya liboso ; fungola monoko na yango mpe okomona mbongo moko ya bibende kati na yango ; kamata mbongo yango mpe futa mpako na Ngai mpe mpako na yo, na maboko na bango.
BSB
BSB:
“But so that we may not offend them, go to the sea, cast a hook, and take the first fish you catch. When you open its mouth, you will find a four-drachma coin. Take it and give it to them for My tax and yours.”
Chapter complete
You’ve read Matthew 17
Chapter 17 of 28 in Matthew
Up next
Matthew 18
Read Matthew 18
Listen
Back to Matthew 16
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Matthew 17
A question this chapter raises
Does the Bible teach reincarnation?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Matthew 16
Matthew 17
Matthew 18