Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.1
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Matt
Matthew
18
LIN
BSB
A
a
Matthew 18
18
Matthew
Peter's confession and the road to Jerusalem
Lingala Bible
Jesus
, person
Peter
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Na tango wana, bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe batunaki Ye : — Nani aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo ?
BSB
BSB:
At that time the disciples came to Jesus and asked, “Who then is the greatest in the kingdom of heaven?”
2
LIN
Yesu abengaki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango
BSB
BSB:
Jesus invited a little child to stand among them.
3
LIN
mpe alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bobongwani te mpe bokomi te lokola bana mike, bokotikala kokota te na Bokonzi ya Likolo.
BSB
BSB:
“Truly I tell you,”
He said,
“unless you change and become like little children, you will never enter the kingdom of heaven.
4
LIN
Yango wana, moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana oyo, ye nde aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo.
BSB
BSB:
Therefore, whoever humbles himself like this little child is the greatest in the kingdom of heaven.
5
LIN
Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko.
BSB
BSB:
And whoever welcomes a little child like this in My name welcomes Me.
6
LIN
Kasi soki moto moko akweyisi na masumu moko kati na bana mike oyo bandimelaka Ngai, ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo na kingo mpe kobwaka ye na ebale.
BSB
BSB:
But if anyone causes one of these little ones who believe in Me to stumble, it would be better for him to have a large millstone hung around his neck and to be drowned in the depths of the sea.
7
LIN
Mawa na mokili, pamba te makambo oyo ekweyisaka bato kati na masumu ezali ebele ! Solo, makambo yango esengeli kaka kozala ; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka !
BSB
BSB:
Woe to the world for the causes of sin. These stumbling blocks must come, but woe to the man through whom they come!
8
LIN
Soki loboko to lokolo na yo ekweyisaka yo na masumu, kata mpe bwaka yango mosika na yo ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na loboko moko to na lokolo moko, na esika ete otikala na maboko mibale to makolo mibale mpe obwakama na moto ya libela na libela.
BSB
BSB:
If your hand or your foot causes you to sin, cut it off and throw it away. It is better for you to enter life crippled or lame than to have two hands and two feet and be thrown into the eternal fire.
9
LIN
Soki liso na yo ekweyisaka yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika na yo ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na liso moko, na esika ete okoba kozala na miso mibale mpe obwakama na moto ya lifelo.
BSB
BSB:
And if your eye causes you to sin, gouge it out and throw it away. It is better for you to enter life with one eye than to have two eyes and be thrown into the fire of hell.
10
LIN
Bosala keba ete botiola ata moko te kati na bana oyo, pamba te nazali koloba na bino ete ba-anjelu na bango kuna na Likolo bamonaka tango nyonso elongi ya Tata na Ngai, oyo azali na Likolo. [
BSB
BSB:
See that you do not look down on any of these little ones. For I tell you that their angels in heaven always see the face of My Father in heaven.
11
LIN
Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na kobikisa bato oyo babunga nzela.]
BSB
BSB:
Not in the BSB
Not in the earliest manuscripts
12
LIN
Bokanisi nini ? Soki moto moko azali na bameme nkama moko, bongo moko kati na yango ebungi ; boni, akotika te bameme na ye tuku libwa na libwa na likolo ya ngomba mpo na kokende koluka moko oyo ewuti kobunga ?
BSB
BSB:
What do you think? If a man has a hundred sheep and one of them goes astray, will he not leave the ninety-nine on the hills and go out to search for the one that is lost?
13
LIN
Mpe soki amoni yango, nazali koloba na bino penza ya solo, esengo na ye mpo na meme wana ekoleka esengo mpo na bameme tuku libwa na libwa oyo ebungaki te.
BSB
BSB:
And if he finds it, truly I tell you, he rejoices more over that one sheep than over the ninety-nine that did not go astray.
14
LIN
Ndenge moko, Tata na bino oyo azali kati na Likolo alingi ete moko te kati na bana oyo abunga.
BSB
BSB:
In the same way, your Father in heaven is not willing that any of these little ones should perish.
15
LIN
Soki ndeko na yo asali yo mabe, kende kotalisa ye mabe na ye na esika ya bino mibale kaka. Soki ayokeli yo, wana ozongisi ye na nzela malamu.
BSB
BSB:
If your brother sins against you, go and confront him privately. If he listens to you, you have won your brother over.
16
LIN
Kasi soki ayokeli yo te, mema moto mosusu to bato mibale, pamba te Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato.
BSB
BSB:
But if he will not listen, take one or two others along, so that ‘every matter may be established by the testimony of two or three witnesses.’
17
LIN
Kasi soki aboyi kaka koyokela bango, yebisa makambo yango na Lingomba. Soki aboyi mpe kaka koyokela Lingomba, zwa ye lokola mopagano mpe lokola mofutisi mpako.
BSB
BSB:
If he refuses to listen to them, tell it to the church. And if he refuses to listen even to the church, regard him as you would a pagan or a tax collector.
18
LIN
Nazali koloba na bino penza ya solo : nyonso oyo bokokanga awa na mokili ekokangama mpe na Likolo, mpe nyonso oyo bokofungola awa na mokili ekofungwama mpe na Likolo.
BSB
BSB:
Truly I tell you, whatever you bind on earth will be bound in heaven, and whatever you loose on earth will be loosed in heaven.
19
LIN
Nazali lisusu koloba na bino penza ya solo : soki bato mibale kati na bino bayokani awa na mokili mpo na kosenga eloko songolo to pakala, Tata na Ngai oyo azali kati na Likolo akopesa bango yango.
BSB
BSB:
Again, I tell you truly that if two of you on the earth agree about anything you ask for, it will be done for you by My Father in heaven.
20
LIN
Pamba te na esika oyo bato mibale to bato misato basangani na Kombo na Ngai, Ngai mpe nazali wana kati na bango.
BSB
BSB:
For where two or three gather together in My name, there am I with them.”
21
LIN
Bongo Petelo apusanaki pene ya Yesu mpe atunaki : — Nkolo, mbala boni nasengeli kolimbisa ndeko na ngai tango akosala ngai mabe ? Boni, kino mbala sambo ?
BSB
BSB:
Then Peter came to Jesus and asked, “Lord, how many times shall I forgive my brother who sins against me? Up to seven times?”
22
LIN
Yesu azongisaki : — Nalobi na yo te kino mbala sambo, kasi kino mbala tuku sambo na sambo.
BSB
BSB:
Jesus answered,
“I tell you, not just seven times, but seventy-seven times!
23
LIN
Yango wana, Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo alingaki kobongisa elongo na basali na ye makambo na ye ya misolo.
BSB
BSB:
Because of this, the kingdom of heaven is like a king who wanted to settle accounts with his servants.
24
LIN
Tango abandaki, bamemelaki ye mosali moko oyo azalaki na niongo na ye ya batalanta nkoto zomi.
BSB
BSB:
As he began the settlements, a debtor owing ten thousand talents was brought to him.
25
LIN
Lokola azalaki na eloko moko te mpo na kofuta, mokonzi na ye atindaki ete bateka ye, mwasi na ye, bana na ye mpe biloko na ye nyonso mpo ete niongo na ye efutama.
BSB
BSB:
Since the man was unable to pay, the master ordered that he be sold to pay his debt, along with his wife and children and everything he owned.
26
LIN
Kasi mosali yango amibwakaki na makolo ya mokonzi, agumbamaki liboso na ye mpe asengaki : « Yikela ngai mpiko, pamba te nakofuta yo niongo nyonso ! »
BSB
BSB:
Then the servant fell on his knees before him. ‘Have patience with me,’ he begged, ‘and I will pay back everything.’
27
LIN
Mokonzi ya mosali ayokelaki ye mawa, alimbisaki niongo na ye mpe atikaki ye kokende.
BSB
BSB:
His master had compassion on him, forgave his debt, and released him.
28
LIN
Kasi tango mosali yango abimaki, akutanaki na moninga na ye ya mosala oyo adefaki epai na ye mbongo ya bibende nkama moko. Akangaki ye, akomaki kofinafina ye na kingo mpe alobaki na ye : « Futa niongo na ngai. »
BSB
BSB:
But when that servant went out, he found one of his fellow servants who owed him a hundred denarii. He grabbed him and began to choke him, saying, ‘Pay back what you owe me!’
29
LIN
Moninga na ye ya mosala afukamaki mpe asengaki na ye : « Yikela ngai mpiko, nakofuta yo niongo nyonso. »
BSB
BSB:
So his fellow servant fell down and begged him, ‘Have patience with me, and I will pay you back.’
30
LIN
Kasi ye aboyaki ; akendeki kosenga ete babwaka ye na boloko, kino tango akosilisa kofuta niongo nyonso.
BSB
BSB:
But he refused. Instead, he went and had the man thrown into prison until he could pay his debt.
31
LIN
Tango baninga na ye ya mosala bamonaki ndenge makambo elekaki, bayokaki mawa mingi mpe bakendeki koyebisa makambo nyonso epai ya mokonzi na bango.
BSB
BSB:
When his fellow servants saw what had happened, they were greatly distressed, and they went and recounted all of this to their master.
32
LIN
Bongo mokonzi abengaki mosali wana mpe alobaki na ye : « Mosali mabe ! Ngai nalimbisaki yo niongo nyonso oyo ozalaki na yango epai na ngai, mpo ete osengaki ngai.
BSB
BSB:
Then the master summoned him and said, ‘You wicked servant! I forgave all your debt because you begged me.
33
LIN
Boni, osengelaki te koyikela moninga na yo mpiko ndenge ngai nasalaki mpo na yo ? »
BSB
BSB:
Shouldn’t you have had mercy on your fellow servant, just as I had on you?’
34
LIN
Lokola mokonzi na ye azalaki na kanda, akabaki ye na maboko ya banyokoli kino tango afutaki niongo nyonso.
BSB
BSB:
In anger his master turned him over to the jailers to be tortured, until he should repay all that he owed.
35
LIN
Ezali ndenge wana nde Tata na Ngai ya Likolo akosala bino soki moko na moko kati na bino alimbisi te ndeko na ye, na motema na ye mobimba.
BSB
BSB:
That is how My heavenly Father will treat each of you unless you forgive your brother from your heart.”
Chapter complete
You’ve read Matthew 18
Chapter 18 of 28 in Matthew
Up next
Matthew 19
Read Matthew 19
Listen
Back to Matthew 17
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Matthew 18
A question this chapter raises
Isn’t the Trinity a contradiction?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Matthew 17
Matthew 18
Matthew 19