Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.2
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Matt
Matthew
19
LIN
BSB
A
a
Matthew 19
19
Matthew
Peter's confession and the road to Jerusalem
Lingala Bible
Jesus
, person
Moses
, person
Israel
, person
Jordan
, place
Peter
, person
Galilee
, place
Judea
, place
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana, alongwaki na Galile mpe akendeki na etuka ya Yuda, na ngambo mosusu ya Yordani.
BSB
BSB:
When Jesus had finished saying these things, He left Galilee and went into the region of Judea beyond the Jordan.
2
LIN
Ebele penza ya bato balandaki Ye, mpe abikisaki bango kuna.
BSB
BSB:
Large crowds followed Him, and He healed them there.
3
LIN
Bafarizeo bapusanaki pene na Ye mpo na komeka Ye ; bapesaki Ye motuna : — Boni, mibeko na biso epesi nzela na mobali ya kobengana mwasi na ye na libala mpo na likambo songolo ?
BSB
BSB:
Then some Pharisees came and tested Him by asking, “Is it lawful for a man to divorce his wife for any reason?”
4
LIN
Yesu azongisaki : — Boni, botangi te ete, na ebandeli, Mokeli « akelaki bango mobali mpe mwasi, »
BSB
BSB:
Jesus answered,
“Have you not read that from the beginning the Creator ‘made them male and female,’
5
LIN
mpe ete alobaki : « Yango wana mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko ?
BSB
BSB:
and said, ‘For this reason a man will leave his father and mother and be united to his wife, and the two will become one flesh’?
6
LIN
Boye, bazali lisusu bato mibale te, kasi bakomi moto moko. Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi ! »
BSB
BSB:
So they are no longer two, but one flesh. Therefore what God has joined together, let man not separate.”
7
LIN
Kasi Bafarizeo balobaki na Ye : — Bongo mpo na nini Moyize atindaki ete mobali apesa mwasi na ye mokanda ya koboma libala soki bakabwani na libala ?
BSB
BSB:
“Why then,” they asked, “did Moses order a man to give his wife a certificate of divorce and send her away?”
8
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Moyize apesaki bino nzela ya kobengana basi na bino na mabala, pamba te mitema na bino ezali mabanga ; na ebandeli, ezalaki bongo te.
BSB
BSB:
Jesus replied,
“Moses permitted you to divorce your wives because of your hardness of heart. But it was not this way from the beginning.
9
LIN
Nazali koloba na bino : Soki mobali alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki akweyaki na ekobo, mpe abali mwasi mosusu asali ekobo.
BSB
BSB:
Now I tell you that whoever divorces his wife, except for sexual immorality, and marries another woman commits adultery.”
10
LIN
Bayekoli balobaki na Ye : — Soki mobali asengeli kozala bongo liboso ya mwasi na ye, wana eleki malamu mpo na mobali ete abala te !
BSB
BSB:
His disciples said to Him, “If this is the case between a man and his wife, it is better not to marry.”
11
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Mibali nyonso bakoki kondima mateya oyo te, kaka ba-oyo bapesameli makoki mpo na yango.
BSB
BSB:
“Not everyone can accept this word,”
He replied,
“but only those to whom it has been given.
12
LIN
Ezali na tina misato oyo esalaka ete mibali mosusu babala te : ezali na mibali oyo, wuta na mabumu ya bamama na bango, bakoki kobala te ; ezali na mibali oyo baboma bango mokongo ; ezali mpe lisusu na mibali oyo bango moko baboya kobala mpo na Bokonzi ya Likolo. Tika ete moto oyo azali na makoki ya kondima mateya oyo andima yango !
BSB
BSB:
For there are eunuchs who were born that way; others were made that way by men; and still others live like eunuchs for the sake of the kingdom of heaven. The one who can accept this should accept it.”
13
LIN
Bato bamemaki bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko mpe asambela mpo na bango. Kasi bayekoli bapamelaki bato oyo bamemaki bana yango.
BSB
BSB:
Then little children were brought to Jesus for Him to place His hands on them and pray for them. And the disciples rebuked those who brought them.
14
LIN
Yesu alobaki : — Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai ; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.
BSB
BSB:
But Jesus said,
“Let the little children come to Me, and do not hinder them! For the kingdom of heaven belongs to such as these.”
15
LIN
Atielaki bango maboko, mpe alongwaki wana.
BSB
BSB:
And after He had placed His hands on them, He went on from there.
16
LIN
Elenge mobali moko apusanaki pene na Yesu mpe atunaki : — Moteyi, likambo nini ya malamu nasengeli kosala mpo ete nazwa bomoi ya seko ?
BSB
BSB:
Just then a man came up to Jesus and inquired, “Teacher, what good thing must I do to obtain eternal life?”
17
LIN
Yesu azongisaki : — Mpo na nini ozali kotuna Ngai na tina na oyo ezali malamu ? Moko kaka azali malamu. Soki olingi kokota kati na bomoi, tosa mibeko.
BSB
BSB:
“Why do you ask Me about what is good?”
Jesus replied.
“There is only One who is good. If you want to enter life, keep the commandments.”
18
LIN
Elenge mobali yango atunaki lisusu : — Mibeko nini ? Yesu azongisaki : — Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka litatoli ya lokuta te,
BSB
BSB:
“Which ones?” the man asked. Jesus answered,
“‘Do not murder, do not commit adultery, do not steal, do not bear false witness,
19
LIN
okotosaka tata mpe mama na yo mpe okolingaka moninga na yo ndenge yo moko omilingaka.
BSB
BSB:
honor your father and mother, and love your neighbor as yourself.’”
20
LIN
Elenge mobali alobaki : — Natosaka mibeko wana nyonso ; nasala lisusu nini ?
BSB
BSB:
“All these I have kept,” said the young man. “What do I still lack?”
21
LIN
Yesu azongisaki : — Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo mpe pesa epai ya babola mbongo oyo okozwa ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.
BSB
BSB:
Jesus told him,
“If you want to be perfect, go, sell your possessions and give to the poor, and you will have treasure in heaven. Then come, follow Me.”
22
LIN
Tango elenge mobali ayokaki bongo, akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.
BSB
BSB:
When the young man heard this, he went away in sorrow, because he had great wealth.
23
LIN
Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Nazali koloba na bino penza ya solo : ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Likolo !
BSB
BSB:
Then Jesus said to His disciples,
“Truly I tell you, it is hard for a rich man to enter the kingdom of heaven.
24
LIN
Nazali koloba na bino lisusu : ezali pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga, kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.
BSB
BSB:
Again I tell you, it is easier for a camel to pass through the eye of a needle than for a rich man to enter the kingdom of God.”
25
LIN
Tango bayekoli bayokaki Yesu koloba bongo, bakamwaki mingi mpe bakomaki kotunana : — Bongo nani penza akoki kobikisama ?
BSB
BSB:
When the disciples heard this, they were greatly astonished and asked, “Who then can be saved?”
26
LIN
Wana Yesu atalaki bango, alobaki : — Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, nyonso ekoki kosalema !
BSB
BSB:
Jesus looked at them and said,
“With man this is impossible, but with God all things are possible.”
27
LIN
Petelo azwaki maloba mpe alobaki na Yesu : — Biso, totiki nyonso mpo na kolanda Yo ! Ekozala boni mpo na biso ?
BSB
BSB:
“Look,” Peter replied, “we have left everything to follow You. What then will there be for us?”
28
LIN
Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : tango makambo nyonso ekokoma ya sika, tango Mwana na Moto akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo, bino bato oyo bozali kolanda Ngai, bino mpe bokovanda na bakiti zomi na mibale ya bokonzi, mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.
BSB
BSB:
Jesus said to them,
“Truly I tell you, in the renewal of all things, when the Son of Man sits on His glorious throne, you who have followed Me will also sit on twelve thrones, judging the twelve tribes of Israel.
29
LIN
Mpe moto nyonso oyo atiki bandako, bandeko ya mibali, bandeko ya basi, tata, mama, bana to bilanga mpo na Kombo na Ngai akozwa yango koleka mbala nkama elongo na bomoi ya seko.
BSB
BSB:
And everyone who has left houses or brothers or sisters or father or mother or wife or children or fields for the sake of My name will receive a hundredfold and will inherit eternal life.
30
LIN
Kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.
BSB
BSB:
But many who are first will be last, and the last will be first.
Chapter complete
You’ve read Matthew 19
Chapter 19 of 28 in Matthew
Up next
Matthew 20
Read Matthew 20
Listen
Back to Matthew 18
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Matthew 19
A question this chapter raises
Was Jesus married?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Matthew 18
Matthew 19
Matthew 20