Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.4
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Matt
Matthew
21
LIN
BSB
A
a
Matthew 21
21
Matthew
Jerusalem: conflict and teaching
Lingala Bible
Jesus
, person
Jerusalem
, place
John
, person
David
, person
Galilee
, place
Nazareth
, place
Olives Mount
, place
Bethany
, place
1 more
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Wana bazalaki kopusana pene ya Yelusalemi mpe bakomaki pene ya Betifaje, na ngomba ya banzete ya olive, Yesu atindaki bayekoli mibale.
BSB
BSB:
As they approached Jerusalem and came to Bethphage on the Mount of Olives, Jesus sent out two disciples,
2
LIN
Alobaki na bango : — Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino ; tango kaka bokokota na mboka yango, bokomona ane ya mwasi bakanga na singa, mpe mwana ya ane pembeni na yango ; bofungola nyonso mibale mpe bomemela Ngai yango.
BSB
BSB:
saying to them,
“Go into the village ahead of you, and at once you will find a donkey tied there, with her colt beside her. Untie them and bring them to Me.
3
LIN
Soki moto moko alobi na bino likambo na tina na yango, bozongisela ye : « Nkolo azali na bosenga na yango. » Mpe, mbala moko, akotika yango kokende.
BSB
BSB:
If anyone questions you, tell him that the Lord needs them, and he will send them right away.”
4
LIN
Makambo wana nyonso esalemaki mpo ete maloba oyo mosakoli aloba ekokisama :
BSB
BSB:
This took place to fulfill what was spoken through the prophet:
5
LIN
« Boloba na Siona, mboka kitoko : ‹ Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, atonda na boboto, avandi na likolo ya ane ya mwasi, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya nyama oyo ememaka mikumba. › »
BSB
BSB:
“Say to the Daughter of Zion, ‘See, your King comes to you, gentle and riding on a donkey, on a colt, the foal of a donkey.’”
6
LIN
Bayekoli bakendeki mpe basalaki ndenge kaka Yesu atindaki bango.
BSB
BSB:
So the disciples went and did as Jesus had directed them.
7
LIN
Bamemaki ane ya mwasi elongo na mwana ya ane, batandaki bilamba na bango na mikongo na yango ; mpe Yesu avandaki na likolo na yango.
BSB
BSB:
They brought the donkey and the colt and laid their cloaks on them, and Jesus sat on them.
8
LIN
Bato ebele batandaki bilamba na bango na nzela ; bamosusu bakataki bitape na likolo ya banzete mpe batandaki yango lisusu na nzela.
BSB
BSB:
A massive crowd spread their cloaks on the road, while others cut branches from the trees and spread them on the road.
9
LIN
Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga : « Ozana na Mwana na Davidi ! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! »
BSB
BSB:
The crowds that went ahead of Him and those that followed were shouting: “Hosanna to the Son of David!” “Blessed is He who comes in the name of the Lord!” “Hosanna in the highest!”
10
LIN
Tango Yesu akotaki kati na Yelusalemi, engumba mobimba eninganaki ; bazalaki kotuna : — Oyo lisusu nani ?
BSB
BSB:
When Jesus had entered Jerusalem, the whole city was stirred and asked, “Who is this?”
11
LIN
Bato bazalaki kozongisa : — Ezali mosakoli Yesu, moto ya Nazareti ya Galile !
BSB
BSB:
The crowds replied, “This is Jesus, the prophet from Nazareth in Galilee.”
12
LIN
Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo, abenganaki bato nyonso oyo bazalaki koteka mpe kosomba biloko kati na Tempelo ; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo mpe bakiti ya ba-oyo bazalaki koteka bibenga.
BSB
BSB:
Then Jesus entered the temple courts and drove out all who were buying and selling there. He overturned the tables of the money changers and the seats of those selling doves.
13
LIN
Alobaki na bango : — Ekomama : « Ndako na Ngai ekobengama Ndako ya losambo ; » kasi bino, bozali kokomisa yango penza nganda ya miyibi !
BSB
BSB:
And He declared to them,
“It is written: ‘My house will be called a house of prayer.’ But you are making it ‘a den of robbers.’”
14
LIN
Bakufi miso mpe bato oyo batambola tengu-tengu bapusanaki pene na Yesu kati na lopango ya Tempelo, mpe abikisaki bango.
BSB
BSB:
The blind and the lame came to Him at the temple, and He healed them.
15
LIN
Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basilikaki makasi tango bamonaki bikamwa oyo Yesu asalaki mpe ndenge bana bazalaki koganga kati na lopango ya Tempelo : « Ozana na Mwana na Davidi ! »
BSB
BSB:
But the chief priests and scribes were indignant when they saw the wonders He performed and the children shouting in the temple courts, “Hosanna to the Son of David!”
16
LIN
Balobaki na Yesu : — Ozali koyoka makambo oyo bazali koloba ? Yesu azongiselaki bango : — Iyo ! Boni, botikala nanu kotanga te : « Wuta na minoko ya bana mike, mpe ya bana oyo bazali nanu komela mabele, ozwaki lokumu na Yo ? »
BSB
BSB:
“Do You hear what these children are saying?” they asked.
“Yes,”
Jesus answered.
“Have you never read: ‘From the mouths of children and infants You have ordained praise’?”
17
LIN
Bongo atikaki bango, abimaki longwa na engumba mpe akendeki na Betani epai wapi alekisaki butu.
BSB
BSB:
Then He left them and went out of the city to Bethany, where He spent the night.
18
LIN
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana azalaki kozonga na engumba, ayokaki nzala.
BSB
BSB:
In the morning, as Jesus was returning to the city, He was hungry.
19
LIN
Amonaki nzete moko ya figi pembeni ya nzela, apusanaki pene na yango ; kasi amonaki eloko moko te na nzete yango, kaka makasa. Alobaki na nzete yango : — Okobotaka lisusu mbuma te mpo na libela. Mpe kaka na tango wana, nzete ya figi ekawukaki.
BSB
BSB:
Seeing a fig tree by the road, He went up to it but found nothing on it except leaves.
“May you never bear fruit again!”
He said. And immediately the tree withered.
20
LIN
Tango bayekoli bamonaki bongo, bakamwaki mingi mpe batunaki : — Ndenge nini nzete ya figi ekawuki kaka boye na mbala moko ?
BSB
BSB:
When the disciples saw this, they marveled and asked, “How did the fig tree wither so quickly?”
21
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bozali na kondima mpe botie tembe te, bokoki kaka te kosala makambo oyo Ngai nasali na nzete ya figi oyo, kasi bokoki mpe koloba na ngomba wana : « Longwa wana mpe mibwaka na ebale, » yango ekosalema solo.
BSB
BSB:
“Truly I tell you,”
Jesus replied,
“if you have faith and do not doubt, not only will you do what was done to the fig tree, but even if you say to this mountain, ‘Be lifted up and thrown into the sea,’ it will happen.
22
LIN
Soki bozali na kondima, bokozwa nyonso oyo bokosenga kati na losambo.
BSB
BSB:
If you believe, you will receive whatever you ask for in prayer.”
23
LIN
Yesu akotaki na lopango ya Tempelo ; mpe wana azalaki koteya, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bapusanaki pene na Ye. Batunaki : — Na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo ? Nani apesi yo bokonzi yango ?
BSB
BSB:
When Jesus returned to the temple courts and began to teach, the chief priests and elders of the people came up to Him. “By what authority are You doing these things?” they asked. “And who gave You this authority?”
24
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Ngai mpe, nazali kotuna bino motuna moko. Soki kaka bopesi Ngai eyano, nakoyebisa bino soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.
BSB
BSB:
“I will also ask you one question,”
Jesus replied,
“and if you answer Me, I will tell you by what authority I am doing these things.
25
LIN
Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato ? Bakomaki kokabola makanisi bango na bango : — Soki tolobi : « Ewutaki na Nzambe, » akotuna biso lisusu : « Bongo mpo na nini bondimaki ye te ? »
BSB
BSB:
What was the source of John’s baptism? Was it from heaven or from men?”
They deliberated among themselves and said, “If we say, ‘From heaven,’ He will ask, ‘Why then did you not believe him?’
26
LIN
Soki mpe tolobi : « Ewutaki na bato, » wana tosengeli kobanga bato, pamba te bato nyonso bazwaka Yoane lokola mosakoli.
BSB
BSB:
But if we say, ‘From men,’ we are afraid of the people, for they all regard John as a prophet.”
27
LIN
Boye, bazongiselaki Yesu : — Toyebi te ! Yesu mpe alobaki na bango : — Ngai mpe, nakoyebisa bino te soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.
BSB
BSB:
So they answered, “We do not know.” And Jesus replied,
“Neither will I tell you by what authority I am doing these things.
28
LIN
Yesu alobaki na bango lisusu : — Bokanisi nini na tina na lisolo oyo ? Moto moko azalaki na bana mibali mibale ; akendeki epai ya mwana ya liboso mpe alobaki na ye : « Mwana na ngai, kende lelo kosala na elanga ya vino. »
BSB
BSB:
But what do you think? There was a man who had two sons. He went to the first one and said, ‘Son, go and work today in the vineyard.’
29
LIN
Mwana azongisaki : « Naboyi. » Kasi sima na mwa tango, abongolaki makanisi mpe akendeki na elanga yango.
BSB
BSB:
‘I will not,’ he replied. But later he changed his mind and went.
30
LIN
Tata akendeki epai ya mwana mosusu mpe alobaki na ye kaka ndenge moko. Mwana yango azongisaki : « Malamu, nkolo na ngai, nakeyi ! » Kasi akendeki te.
BSB
BSB:
Then the man went to the second son and told him the same thing. ‘I will, sir,’ he said. But he did not go.
31
LIN
Nani kati na bango mibale akokisaki mokano ya tata na ye ? Bazongisaki : — Mwana ya liboso. Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : bafutisi mpako mpe basi ya ndumba bakokota na Bokonzi ya Nzambe liboso na bino,
BSB
BSB:
Which of the two did the will of his father?”
“The first,” they answered. Jesus said to them,
“Truly I tell you, the tax collectors and prostitutes are entering the kingdom of God before you.
32
LIN
pamba te Yoane ayaki nde epai na bino mpo na kolakisa bino nzela ya bosembo, kasi bondimaki ye te ; nzokande, bafutisi mpako mpe basi ya ndumba bandimaki ye. Atako bomonaki yango na miso na bino, kasi bobongolaki kaka mitema te mpe bondimaki ye kaka te.
BSB
BSB:
For John came to you in the way of righteousness, and you did not believe him, but the tax collectors and prostitutes did. And even after you saw this, you did not repent and believe him.
33
LIN
Boyoka lisese mosusu : Moto moko alonaki elanga ya vino, atongaki lopango zingazinga na yango, atimolaki ekamolelo bambuma ya vino mpe atongaki ndako molayi ya bakengeli. Sima, apesaki elanga yango na maboko ya basali mpo ete bakoma kofutela yango, mpe akendeki na mobembo.
BSB
BSB:
Listen to another parable: There was a landowner who planted a vineyard. He put a wall around it, dug a winepress in it, and built a tower. Then he rented it out to some tenants and went away on a journey.
34
LIN
Tango eleko ya kobuka bambuma ekomaki pene, atindaki basali na ye epai ya bafuteli elanga, mpo ete bakende kokongola bambuma na ye ;
BSB
BSB:
When the harvest time drew near, he sent his servants to the tenants to collect his share of the fruit.
35
LIN
kasi bafuteli elanga bakangaki basali yango ; babetaki moko, babomaki mosusu, mpe babambaki oyo ya misato mabanga.
BSB
BSB:
But the tenants seized his servants. They beat one, killed another, and stoned a third.
36
LIN
Atindaki basali mosusu ebele koleka ba-oyo ya liboso ; kasi bafuteli elanga basalaki bango ndenge kaka basalaki ba-oyo ya liboso.
BSB
BSB:
Again, he sent other servants, more than the first group. But the tenants did the same to them.
37
LIN
Na suka, atindelaki bango mwana na ye ya mobali mpe amilobelaki : « Solo, bakotosa mwana na ngai ! »
BSB
BSB:
Finally, he sent his son to them. ‘They will respect my son,’ he said.
38
LIN
Kasi tango bafuteli elanga bamonaki mwana yango, balobanaki bango na bango : « Tala mokitani ya libula ya elanga ! Boya, toboma ye mpo ete libula ya elanga ekoma ya biso ! »
BSB
BSB:
But when the tenants saw the son, they said to one another, ‘This is the heir. Come, let us kill him and take his inheritance.’
39
LIN
Bakangaki ye, babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino mpe babomaki ye.
BSB
BSB:
So they seized him and threw him out of the vineyard and killed him.
40
LIN
Tango nkolo elanga ya vino akoya, akosala bafuteli elanga wana nini ?
BSB
BSB:
Therefore, when the owner of the vineyard returns, what will he do to those tenants?”
41
LIN
Bazongisaki : — Akobomisa bato mabe wana na kufa moko ya somo penza, akopesa elanga yango ya vino na maboko ya bafuteli mosusu oyo bakobanda kofutaka ye ndambo na ye ya bambuma, na eleko oyo babukaka yango.
BSB
BSB:
“He will bring those wretches to a wretched end,” they replied, “and will rent out the vineyard to other tenants who will give him his share of the fruit at harvest time.”
42
LIN
Yesu alobaki na bango : — Nanu botanga te kati na Makomi : « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba ? Nkolo asalaki bongo, mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso. »
BSB
BSB:
Jesus said to them,
“Have you never read in the Scriptures: ‘The stone the builders rejected has become the cornerstone. This is from the Lord, and it is marvelous in our eyes’?
43
LIN
Yango wana, nazali koyebisa bino ete Bokonzi ya Nzambe ekolongolama kati na bino mpo ete epesama na bato oyo bakokoka kolakisa misala na yango. [
BSB
BSB:
Therefore I tell you that the kingdom of God will be taken away from you and given to a people who will produce its fruit.
44
LIN
Moto oyo akokweya na likolo ya libanga yango akobukana ndambo na ndambo ; kasi moto oyo libanga yango ekokweyela, ekopanza ye.]
BSB
BSB:
He who falls on this stone will be broken to pieces, but he on whom it falls will be crushed.”
45
LIN
Sima na bango koyoka masese na Ye, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo basosolaki ete Yesu azalaki koloba na tina na bango.
BSB
BSB:
When the chief priests and Pharisees heard His parables, they knew that Jesus was speaking about them.
46
LIN
Bazalaki koluka nzela ya kokanga Ye, kasi babangaki bato, pamba te bango nyonso bazalaki kozwa Yesu lokola mosakoli.
BSB
BSB:
Although they wanted to arrest Him, they were afraid of the crowds, because the people regarded Him as a prophet.
Chapter complete
You’ve read Matthew 21
Chapter 21 of 28 in Matthew
Up next
Matthew 22
Read Matthew 22
Listen
Back to Matthew 20
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Matthew 21
A question this chapter raises
Why did Jesus curse a fig tree?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Matthew 20
Matthew 21
Matthew 22