Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.6
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Matt
Matthew
22
LIN
BSB
A
a
Matthew 22
22
Matthew
Jerusalem: conflict and teaching
Lingala Bible
Jesus
, person
David
, person
Caesar
, person
Jacob
, person
Moses
, person
Abraham
, person
Isaac
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Yesu alobaki na bango lisusu na masese :
BSB
BSB:
Once again, Jesus spoke to them in parables:
2
LIN
— Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo asalaki feti ya libala mpo na mwana na ye ya mobali.
BSB
BSB:
“The kingdom of heaven is like a king who prepared a wedding banquet for his son.
3
LIN
Atindaki basali na ye kokende koyebisa babengami na feti ete baya na feti, kasi babengami yango baboyaki.
BSB
BSB:
He sent his servants to call those he had invited to the banquet, but they refused to come.
4
LIN
Atindaki lisusu basali mosusu mpe alobaki na bango : « Bosengela ngai epai ya babengami na feti ete baya penza, mpe boyebisa bango ete nasili kobongisa bilei : nabomi bangombe na ngai ya mibali mpe banyama na ngai ya mafuta ; mpe sik’oyo, nyonso esili kobongisama malamu. Boloba na bango ete bazanga te na feti. »
BSB
BSB:
Again, he sent other servants and said, ‘Tell those who have been invited that I have prepared my dinner. My oxen and fattened cattle have been killed, and everything is ready. Come to the wedding banquet.’
5
LIN
Kasi babengami na feti bazwaki kobengama yango na pamba : bamoko bakendeki na bilanga na bango ; bamosusu, na mombongo na bango ;
BSB
BSB:
But they paid no attention and went away, one to his field, another to his business.
6
LIN
mpe bamosusu bakangaki basali ya mokonzi, banyokolaki bango mpe babomaki bango.
BSB
BSB:
The rest seized his servants, mistreated them, and killed them.
7
LIN
Mokonzi asilikaki makasi, atindaki basoda na ye koboma babomi wana mpe kotumba engumba na bango.
BSB
BSB:
The king was enraged, and he sent his troops to destroy those murderers and burn their city.
8
LIN
Alobaki na basali na ye : « Bilei ya feti esili kobongisama malamu, kasi babengami mpo na kozala na feti yango babongaki na yango te.
BSB
BSB:
Then he said to his servants, ‘The wedding banquet is ready, but those I invited were not worthy.
9
LIN
Bokende na bisika oyo babalabala ekutana mpe bobenga bato nyonso oyo bokomona kuna, mpo ete baya na feti ya libala ya mwana na ngai. »
BSB
BSB:
Go therefore to the crossroads and invite to the banquet as many as you can find.’
10
LIN
Basali bakendeki na babalabala mpe babengaki bato nyonso oyo bamonaki kuna : bato mabe mpe bato malamu. Boye, ndako ya feti etondaki na babengami.
BSB
BSB:
So the servants went out into the streets and gathered everyone they could find, both evil and good, and the wedding hall was filled with guests.
11
LIN
Kasi tango mokonzi akotaki mpo na kotala bato oyo babengamaki na feti, amonaki moto moko oyo alataki te elamba ya feti ya libala.
BSB
BSB:
But when the king came in to see the guests, he spotted a man who was not dressed in wedding clothes.
12
LIN
Atunaki ye : « Molingami na ngai, okoti awa ndenge nini awa olati te elamba oyo ebongi na feti ya libala ? » Moto yango azangaki eyano ya kopesa.
BSB
BSB:
‘Friend,’ he asked, ‘how did you get in here without wedding clothes?’ But the man was speechless.
13
LIN
Bongo mokonzi alobaki na basali na ye : « Bokanga ye makolo mpe maboko, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali. »
BSB
BSB:
Then the king told the servants, ‘Tie him hand and foot, and throw him into the outer darkness, where there will be weeping and gnashing of teeth.’
14
LIN
Pamba te babengami bazali ebele, kasi baponami bazali moke.
BSB
BSB:
For many are called, but few are chosen.”
15
LIN
Bongo Bafarizeo babendanaki pembeni mpo na kosala mabongisi ya kokanga Yesu na motambo na nzela ya maloba na Ye moko.
BSB
BSB:
Then the Pharisees went out and conspired to trap Jesus in His words.
16
LIN
Batindelaki Yesu bayekoli na bango elongo na bato ya lisanga ya Erode. Batindami yango balobaki na Yesu : — Moteyi, toyebi malamu ete ozali moto oyo azanga pamela mpe oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe, otepaka-tepaka te liboso ya makanisi ya bato mpe oponaka bilongi te ;
BSB
BSB:
They sent their disciples to Him along with the Herodians. “Teacher,” they said, “we know that You are honest and that You teach the way of God in accordance with the truth. You seek favor from no one, because You pay no attention to external appearance.
17
LIN
yebisa biso makanisi na yo na tina na likambo oyo : Kolanda mobeko, ezali malamu to epekisami kofuta mpako ya mokonzi epai ya Sezare ?
BSB
BSB:
So tell us what You think: Is it lawful to pay taxes to Caesar or not?”
18
LIN
Kasi lokola Yesu asosolaki mayele mabe na bango, alobaki : — Bato ya bilongi mibale ! Mpo na nini bozali kotiela Ngai motambo ?
BSB
BSB:
But Jesus knew their evil intent and said,
“You hypocrites, why are you testing Me?
19
LIN
Bolakisa Ngai mbongo oyo bofutaka na yango mpako. Bamemelaki Ye mbongo moko ya ebende.
BSB
BSB:
Show Me the coin used for the tax.”
And they brought Him a denarius.
20
LIN
Atunaki bango : — Elilingi mpe makomi oyo ezali ya nani ?
BSB
BSB:
“Whose image is this,”
He asked,
“and whose inscription?”
21
LIN
Bazongisaki : — Ezali ya Sezare. Yesu alobaki na bango : — Bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare ; mpe bopesa na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe !
BSB
BSB:
“Caesar’s,” they answered. So Jesus told them,
“Give to Caesar what is Caesar’s, and to God what is God’s.”
22
LIN
Tango bayokaki eyano ya Yesu, bakamwaki ; batikaki Ye mpe bakendeki.
BSB
BSB:
And when they heard this, they were amazed. So they left Him and went away.
23
LIN
Kaka na mokolo yango, Basaduseo oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai na Yesu mpe batunaki Ye :
BSB
BSB:
That same day the Sadducees, who say there is no resurrection, came to Jesus and questioned Him.
24
LIN
— Moteyi, Moyize alobaki : « Soki mobali akufi mpe atiki mwana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kobala mwasi oyo mokufi atiki mpo ete abotisa ye bana oyo bakozala bakitani ya mokufi. »
BSB
BSB:
“Teacher,” they said, “Moses declared that if a man dies without having children, his brother is to marry the widow and raise up offspring for him.
25
LIN
Nzokande, kati na biso, ezalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko mobali ya liboso abalaki mwasi mpe akufaki ; kasi lokola abotaki te bana oyo basengelaki kokitana na ye, atikelaki ndeko na ye ya mobali mwasi na ye.
BSB
BSB:
Now there were seven brothers among us. The first one married and died without having children. So he left his wife to his brother.
26
LIN
Esalemaki mpe bongo na ndeko ya mibale, na ndeko ya misato kino na ndeko ya sambo.
BSB
BSB:
The same thing happened to the second and third brothers, down to the seventh.
27
LIN
Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki.
BSB
BSB:
And last of all, the woman died.
28
LIN
Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani kati na bandeko nyonso sambo, pamba te bango nyonso sambo babalaki ye ?
BSB
BSB:
In the resurrection, then, whose wife will she be of the seven? For all of them were married to her.”
29
LIN
Yesu azongiselaki bango : — Bozali kati na libunga, pamba te boyebi Makomi te, mpe boyebi nguya ya Nzambe te.
BSB
BSB:
Jesus answered,
“You are mistaken because you do not know the Scriptures or the power of God.
30
LIN
Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, bakobala lisusu te ; kasi bakozala lokola ba-anjelu kati na Likolo.
BSB
BSB:
In the resurrection, people will neither marry nor be given in marriage. Instead, they will be like the angels in heaven.
31
LIN
Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, botikala nanu kotanga te makambo oyo Nzambe ayebisa bino :
BSB
BSB:
But concerning the resurrection of the dead, have you not read what God said to you:
32
LIN
« Nazali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi ? » Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi azali Nzambe ya bato ya bomoi.
BSB
BSB:
‘I am the God of Abraham, the God of Isaac, and the God of Jacob’? He is not the God of the dead, but of the living.”
33
LIN
Tango ebele ya bato bayokaki bongo, bakamwaki mingi mateya ya Yesu.
BSB
BSB:
When the crowds heard this, they were astonished at His teaching.
34
LIN
Tango Bafarizeo bayokaki ete Yesu asukisi Basaduseo, bango mpe basanganaki ;
BSB
BSB:
And when the Pharisees heard that Jesus had silenced the Sadducees, they themselves gathered together.
35
LIN
mpe moko kati na bango, molakisi ya Mobeko, alukaki kotiela Yesu motambo, atunaki Ye :
BSB
BSB:
One of them, an expert in the law, tested Him with a question:
36
LIN
— Moteyi, mobeko nini eleki monene kati na mibeko nyonso ?
BSB
BSB:
“Teacher, which commandment is the greatest in the Law?”
37
LIN
Yesu azongiselaki ye : — Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.
BSB
BSB:
Jesus declared,
“‘Love the Lord your God with all your heart and with all your soul and with all your mind.’
38
LIN
Yango nde mobeko ya liboso mpe eleki monene.
BSB
BSB:
This is the first and greatest commandment.
39
LIN
Mobeko ya mibale oyo ekokani na yango : « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. »
BSB
BSB:
And the second is like it: ‘Love your neighbor as yourself.’
40
LIN
Mibeko nyonso mpe mateya ya basakoli evandi kati na mibeko oyo mibale.
BSB
BSB:
All the Law and the Prophets hang on these two commandments.”
41
LIN
Wana Bafarizeo basanganaki esika moko, Yesu atunaki bango :
BSB
BSB:
While the Pharisees were assembled, Jesus questioned them:
42
LIN
— Bozali kokanisa nini na tina na Klisto ? Azali Mwana ya nani ? Bazongiselaki Ye : — Azali mwana ya Davidi !
BSB
BSB:
“What do you think about the Christ? Whose son is He?”
“David’s,” they answered.
43
LIN
Alobaki na bango : — Bongo ndenge nini Davidi, na botindikami ya Molimo ya Nzambe, abengaki Ye Nkolo ? Pamba te alobaki :
BSB
BSB:
Jesus said to them,
“How then does David in the Spirit call Him ‘Lord’? For he says:
44
LIN
« Nkolo alobaki na Nkolo na ngai : ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino natia banguna na Yo na se ya matambe na Yo. › »
BSB
BSB:
‘The Lord said to my Lord, “Sit at My right hand until I put Your enemies under Your feet.”’
45
LIN
Soki Davidi azali kobenga Ye « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye ?
BSB
BSB:
So if David calls Him ‘Lord,’ how can He be David’s son?”
46
LIN
Moto moko te akokaki kozongisela Ye ata liloba moko. Mpe, banda mokolo wana, moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna.
BSB
BSB:
No one was able to answer a word, and from that day on no one dared to question Him any further.
Chapter complete
You’ve read Matthew 22
Chapter 22 of 28 in Matthew
Up next
Matthew 23
Read Matthew 23
Listen
Back to Matthew 21
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Matthew 22
A question this chapter raises
What about our ancestors, and honouring them, in African tradition?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Matthew 21
Matthew 22
Matthew 23