Opened
By The Kingdom Tribe (TKT).
Built by Paruto.
v1.41.7
Skip to content
Opened
Today
Ask
Read
Journey
More
Matt
Matthew
23
LIN
BSB
A
a
Matthew 23
23
Matthew
Jerusalem: conflict and teaching
Lingala Bible
Christ
, person
Jerusalem
, place
Moses
, person
Barachiah
, person
Abel
, person
Zechariah
, person
Lingala Bible
Berean Standard Bible
1
LIN
Yesu alobaki na ebele ya bato mpe na bayekoli na Ye :
BSB
BSB:
Then Jesus spoke to the crowds and to His disciples:
2
LIN
« Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bazali na mokumba ya koteya bato mibeko ya Moyize.
BSB
BSB:
“The scribes and Pharisees sit in Moses’ seat.
3
LIN
Boye, bosengeli kosala keba na mateya nyonso oyo bateyaka bino, mpe bobongisa etamboli na bino kolanda mateya na bango ; kasi bomekola te misala na bango, pamba te batiaka mateya na bango na misala te.
BSB
BSB:
So practice and observe everything they tell you. But do not do what they do, for they do not practice what they preach.
4
LIN
Babongisaka mikumba ya kilo makasi mpe batiaka yango na mapeka ya bato mosusu, kasi bango moko balingaka ata moke te kotombola mosapi oyo ya moke mpo na kosunga bato yango na komema mikumba yango.
BSB
BSB:
They tie up heavy, burdensome loads and lay them on men’s shoulders, but they themselves are not willing to lift a finger to move them.
5
LIN
Misala nyonso oyo basalaka, basalaka yango kaka mpo ete bato bamona bango. Boye, bayeisaka minene mikanda na bango, oyo bakoma biteni ya Makomi, mpe milayi, basonge ya banzambala na bango.
BSB
BSB:
All their deeds are done for men to see. They broaden their phylacteries and lengthen their tassels.
6
LIN
Balingaka kovanda na bisika ya lokumu kati na bafeti, mpe na bisika ya liboso kati na bandako ya mayangani ;
BSB
BSB:
They love the places of honor at banquets, the chief seats in the synagogues,
7
LIN
balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka, mpe babenga bango ‹ Moteyi. ›
BSB
BSB:
the greetings in the marketplaces, and the title of ‘Rabbi’ by which they are addressed.
8
LIN
Kasi bino, bolinga te ete bato babenga bino ‹ Moteyi, › pamba te bozali na Moteyi kaka moko, mpe bino nyonso bozali bandeko.
BSB
BSB:
But you are not to be called ‘Rabbi,’ for you have one Teacher, and you are all brothers.
9
LIN
Bobenga moto moko te awa na mokili ‹ Tata, › pamba te bozali kaka na Tata moko, mpe azali kati na Likolo.
BSB
BSB:
And do not call anyone on earth your father, for you have one Father, who is in heaven.
10
LIN
Bolinga te ete bato babenga bino ‹ bakonzi, › pamba te bozali kaka na Mokonzi moko, Klisto.
BSB
BSB:
Nor are you to be called instructors, for you have one Instructor, the Christ.
11
LIN
Moto oyo aleki monene kati na bino akozala mosali na bino.
BSB
BSB:
The greatest among you shall be your servant.
12
LIN
Pamba te moto oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.
BSB
BSB:
For whoever exalts himself will be humbled, and whoever humbles himself will be exalted.
13
LIN
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bokangaka nzela mpo ete bato mosusu bakota te kati na Bokonzi ya Likolo ; bino moko, bozali kokota kuna te, kasi bozali lisusu kokanga nzela mpo ete bato oyo bazali na posa ya kokota bakota te. [
BSB
BSB:
Woe to you, scribes and Pharisees, you hypocrites! You shut the kingdom of heaven in men’s faces. You yourselves do not enter, nor will you let in those who wish to enter.
14
LIN
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Boyibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali, mpe bosalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Mpo na yango, bokozwa etumbu oyo eleki makasi.]
BSB
BSB:
Not in the BSB
Not in the earliest manuscripts
15
LIN
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo : bato ya bilongi mibale ! Bosalaka mibembo na ebale mpe na mokili mpo na koluka kozwa kaka mopagano moko oyo akondima kosambela na lingomba na bino ; mpe soki kaka andimi, bokomisaka ye moto ya lifelo mbala mibale koleka bino moko.
BSB
BSB:
Woe to you, scribes and Pharisees, you hypocrites! You traverse land and sea to win a single convert, and when he becomes one, you make him twice as much a son of hell as you are.
16
LIN
Mawa na bino, batambolisi bakufa miso ! Bolobaka : ‹ Soki moto alapi ndayi na kombo ya Tempelo, wana ezali likambo te ; kasi soki alapi ndayi na kombo ya wolo ya Tempelo, wana asengeli kokokisa ndayi na ye. ›
BSB
BSB:
Woe to you, blind guides! You say, ‘If anyone swears by the temple, it means nothing; but if anyone swears by the gold of the temple, he is bound by his oath.’
17
LIN
Bino, bakufi miso, bozali penza bazoba ! Eloko nini eleki motuya : wolo to Tempelo oyo ekomisaka wolo bule ?
BSB
BSB:
You blind fools! Which is greater: the gold, or the temple that makes it sacred?
18
LIN
Bolobaka lisusu : ‹ Soki moto alapi ndayi na kombo ya etumbelo, wana ezali likambo te ; kasi soki alapi ndayi na kombo ya likabo oyo ezali na likolo ya etumbelo, asengeli kokokisa ndayi na ye. ›
BSB
BSB:
And you say, ‘If anyone swears by the altar, it means nothing; but if anyone swears by the gift on it, he is bound by his oath.’
19
LIN
Bakufi miso ! Eloko nini eleki motuya : likabo to etumbelo oyo ekomisi likabo bule ?
BSB
BSB:
You blind men! Which is greater: the gift, or the altar that makes it sacred?
20
LIN
Pamba te moto oyo alapi ndayi na kombo ya etumbelo alapi yango na kombo ya etumbelo yango mpe na kombo ya biloko nyonso oyo ezali na likolo na yango.
BSB
BSB:
So then, he who swears by the altar swears by it and by everything on it.
21
LIN
Moto oyo mpe alapi ndayi na kombo ya Tempelo alapi yango na kombo ya Tempelo yango mpe na Kombo ya Ye oyo avandaka kati na yango.
BSB
BSB:
And he who swears by the temple swears by it and by the One who dwells in it.
22
LIN
Mpe moto oyo alapi ndayi na kombo ya Likolo alapi yango na kombo ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe na Kombo ya Ye oyo avandelaka yango.
BSB
BSB:
And he who swears by heaven swears by God’s throne and by the One who sits on it.
23
LIN
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Solo, bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya bamusikadi mpe ya biloko ya mike-mike ya solo kitoko ; kasi bomonaka pamba makambo oyo eleki motuya kati na Mobeko : bosembo, motema mawa mpe kondima. Nzokande, bosengeli nde kotia yango na misala mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi.
BSB
BSB:
Woe to you, scribes and Pharisees, you hypocrites! You pay tithes of mint, dill, and cumin. But you have disregarded the weightier matters of the law: justice, mercy, and faithfulness. You should have practiced the latter, without neglecting the former.
24
LIN
Bino, batambolisi bakufa miso ! Solo, bolongolaka nzinzi oyo ekweyaka na masanga na bino, kasi bomelaka shamo mobimba.
BSB
BSB:
You blind guides! You strain out a gnat but swallow a camel.
25
LIN
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bosukolaka malamu libanda ya bakopo mpe ya basani, kasi botondisaka yango na biloko ya moyibi mpe ya lokoso na bino.
BSB
BSB:
Woe to you, scribes and Pharisees, you hypocrites! You clean the outside of the cup and dish, but inside they are full of greed and self-indulgence.
26
LIN
Mofarizeo mokufi miso ! Banda nanu na kopetola kati ya kopo mpe ya sani, bongo libanda ekokoma peto.
BSB
BSB:
Blind Pharisee! First clean the inside of the cup and dish, so that the outside may become clean as well.
27
LIN
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bozali lokola bakunda oyo bapakola langi ya pembe : emonanaka kitoko na libanda, kasi etonda na mikuwa ya bakufi mpe na lolenge nyonso ya mbindo.
BSB
BSB:
Woe to you, scribes and Pharisees, you hypocrites! You are like whitewashed tombs, which look beautiful on the outside but on the inside are full of dead men’s bones and every kind of impurity.
28
LIN
Ndenge moko mpe mpo na bino : na libanda, bomonanaka lokola bato ya sembo na miso ya bato ; kasi na kati, botondi na lokuta mpe na mabe.
BSB
BSB:
In the same way, on the outside you appear to be righteous, but on the inside you are full of hypocrisy and wickedness.
29
LIN
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Botongaka bakunda mpo na basakoli, mpe bokomisaka kitoko malita ya bato ya sembo.
BSB
BSB:
Woe to you, scribes and Pharisees, you hypocrites! You build tombs for the prophets and decorate the monuments of the righteous.
30
LIN
Bolobaka : ‹ Soki tozalaki na bomoi na tango ya bakoko na biso, tolingaki kosangana te elongo na bango mpo na kotangisa makila ya basakoli. ›
BSB
BSB:
And you say, ‘If we had lived in the days of our fathers, we would not have been partners with them in shedding the blood of the prophets.’
31
LIN
Boye, na maloba na bino moko, bondimaka ete bozali penza bakitani ya bato oyo babomaki basakoli.
BSB
BSB:
So you testify against yourselves that you are the sons of those who murdered the prophets.
32
LIN
Bokoba malamu na mosala oyo batata na bino babandaki, mosala ya koboma basakoli !
BSB
BSB:
Fill up, then, the measure of the sin of your fathers.
33
LIN
Bino, banyoka, libota ya bitupa ! Ndenge nini bokoki kokanisa ete bokokima etumbu ya lifelo ?
BSB
BSB:
You snakes! You brood of vipers! How will you escape the sentence of hell?
34
LIN
Mpo na yango, Ngai nakotindela bino basakoli, bato ya bwanya mpe balakisi ya Mobeko. Bokoboma mpe bokobaka bamoko na ekulusu, bokobeta bamosusu fimbu kati na bandako na bino ya mayangani mpe bokobengana bango na engumba moko na moko,
BSB
BSB:
Because of this, I am sending you prophets and wise men and teachers. Some of them you will kill and crucify, and others you will flog in your synagogues and persecute from town to town.
35
LIN
mpo ete makila ya bato nyonso ya sembo, oyo basopa na mabele, etangama na mito na bino, kobanda na makila ya Abele, moto ya sembo, kino na makila ya Zakari, mwana mobali ya Barashi, oyo bobomaki kati ya Tempelo mpe etumbelo.
BSB
BSB:
And so upon you will come all the righteous blood shed on earth, from the blood of righteous Abel to the blood of Zechariah son of Berechiah, whom you murdered between the temple and the altar.
36
LIN
Nazali koloba na bino penza ya solo : etumbu oyo esengeli mpo na mabe wana nyonso ekokweyela bato ya ekeke oyo.
BSB
BSB:
Truly I tell you, all these things will come upon this generation.
37
LIN
Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu na yango, kasi boboyaki !
BSB
BSB:
O Jerusalem, Jerusalem, who kills the prophets and stones those sent to her, how often I have longed to gather your children together, as a hen gathers her chicks under her wings, but you were unwilling!
38
LIN
Sik’oyo, ndako na bino ezali kosundolama.
BSB
BSB:
Look, your house is left to you desolate.
39
LIN
Pamba te, nazali koloba na bino : Kobanda lelo, bokotikala komona Ngai lisusu te kino bokoloba : ‹ Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! › »
BSB
BSB:
For I tell you that you will not see Me again until you say, ‘Blessed is He who comes in the name of the Lord.’”
Chapter complete
You’ve read Matthew 23
Chapter 23 of 28 in Matthew
Up next
Matthew 24
Read Matthew 24
Listen
Back to Matthew 22
Go deeper
Commentary
What the commentators say on Matthew 23
A question this chapter raises
Why are so many Christians hypocrites?
LIN
Lingala Bible. Copyright © 2020 Biblica, Inc.. Licensed under CC BY-SA 4.0 (creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0). Text from eBible.org; verses renumbered to the KJV scheme where they differ, otherwise unchanged.
BSB
The Holy Bible, Berean Standard Bible, BSB. Dedicated to the public domain. BereanBible.com
Matthew 22
Matthew 23
Matthew 24